Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2017

 LISOLO YA BOMOI

Nazwi lipamboli ya kosala na bato oyo bakɔmɛli na elimo

Nazwi lipamboli ya kosala na bato oyo bakɔmɛli na elimo

NA KATIKATI ya bambula ya 1930, papa ná mama na biso, James ná Jessie Sinclair, bakendaki kofanda na Bronx, mboka moko na engumba New York. Willie Sneddon azalaki kati na baninga oyo bakutaki kuna, ye mpe autaki Écosse, lokola bango. Ntango kaka bakutanaki mpo na mbala ya liboso, bango misato bakómaki kobɛta masolo ya mabota na bango. Ezalaki mwa bambula liboso nabotama.

Mama ayebisaki Willie ete mwa moke liboso ya Etumba Monene, tata na ye ná yaya na ye ya mwasi bakufaki na masuwa na bango ntango bazalaki koboma mbisi mpe masuwa yango etutaki mine na mer du Nord. Willie alobaki: “Tata na bino azali na lifelo!” Willie azalaki Motatoli ya Yehova, mpe ezalaki na nzela ya maloba wana ya mpasi nde mama ayokaki solo mpo na mbala ya liboso.

Willie ná Liz Sneddon

Makambo Willie alobaki esalaki mama mpasi na motema mpo tata na ye azalaki moto malamu. Kasi, Willie abakisaki: “Motema na yo ekokita soki nayebisi yo ete Yesu mpe akendaki na lifelo?” Mama akanisaki mateya ya ndako-nzambe, oyo kala bazalaki koteya ete Yesu akitaki na lifelo mpe asekwaki nsima ya mikolo misato. Na yango amitunaki: ‘Soki lifelo ezali esika ya mɔtɔ epai bato mabe banyokwamaka, mpo na nini Yesu akendaki kuna?’ Banda ntango wana nde mama abandaki kosepela na solo. Akómaki koyangana na makita na lisangá ya Bronx mpe azwaki batisimo na 1940.

Ná mama, mpe na nsima ná tata na ngai

Na ntango wana, lisangá ezalaki mpenza kolendisa baboti te ete báyekola Biblia na bana na bango. Ntango nazalaki mwana moke, papa azalaki kotikala na ngai soki mama akei makita to abimi na mosala ya kosakola na nsuka ya pɔsɔ. Nsima ya mwa bambula, ngai ná papa tokómaki koyangana na makita elongo na mama. Mama azalaki molende na mosala ya kosakola mpe azalaki koyekola Biblia na bato ebele oyo bazalaki kosepela na solo. Kutu, ezalaki na bantango mosusu oyo azalaki kosangisa bato ebele oyo bazalaki kofanda pembeni esika moko mpo na koyekola na bango Biblia. Nazalaki kobima na ye na mosala ya kosakola soki tozwi konje na kelasi. Na ndenge yango, nayekolaki makambo ebele ya Biblia mpe ndenge ya koteya basusu makambo yango.

 Nayokaka mawa soki nakanisi ete ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kosepela na solo mpenza te. Nazalaki kozwa yango na motuya te. Kasi, na mbula 12, nakómaki mosakoli mpe banda wana, nakómaki kosakola mbala na mbala. Ntango nakómaki na mbula 16, namipesaki epai ya Yehova, mpe nazwaki batisimo na mokolo ya 24/07/1954, na liyangani ya etúká moko na Toronto, na Canada.

NAKƆTI BETELE

Bandeko mosusu ya lisangá na biso bazalaki kosala na Betele, basusu basalaki kuna kala. Ndakisa na bango esalisaki ngai mingi. Nazalaki kokamwa ndenge bayebaki kolobela mpe kolimbola mateya ya Biblia. Atako balakisi na biso balingaki nakɔta iniversite, ngai namityelaki mokano ya kokɔta Betele. Na yango, natondisaki formilɛrɛ mpo na kokɔta Betele na liyangani wana ya Toronto. Nasalaki yango lisusu na 1955 na liyangani moko na Yankee Stadium, na engumba New York. Eumelaki te, ntango nakómaki na mbula 17, babengisaki ngai nabanda kosala na Betele ya Brooklyn na mokolo ya 19/09/1955. Mokolo oyo elandaki, nabandaki kosala na esika bazalaki kobimisa mikanda, na balabala Adams, nimero 117. Mwa moke na nsima, nakómaki kosala na masini oyo ezalaki kosangisa nkasa 32 ya eteni mokomoko ya babuku mpo ekɔta na masini oyo ezalaki kokangisa babuku.

Ntango nakɔtaki Betele, na mbula 17

Nsima ya mwa bapɔsɔ, batindaki ngai na departema oyo ezalaki kotalela bazulunalo mpo nayebaki kobɛta masini. Na ntango wana, bandeko mibali mpe bandeko basi bazalaki kokoma na mwa manzanza ya papala, baadrɛsi ya bato oyo basali abonema na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Mwa basanza na nsima, nakómaki kosala na departema ya kotinda mikanda. Ndeko Klaus Jensen, oyo azalaki mokɛngɛli ya departema, asɛngaki ngai nakende kotika sofɛlɛ oyo azalaki kokende kotinda bakartɔ ya mikanda na motuka monene na libongo mpo na kotinda mikanda na mokili mobimba. Ezalaki mpe na basaki ya bazulunalo oyo esengelaki kokende na posita  mpo na masangá ya États-Unis mobimba. Ndeko Jensen alobaki ete akanisaki mosala ya mabɔkɔ ekozala malamu mpo na ngai. Nazalaki kaka na kilo 57 mpe nazalaki moke mpenza. Kokende mbala na mbala na libongo mpe na posita esalisaki ngai nakóma mobali makasi. Ndeko Jensen ayebaki mpenza oyo ebongi na ngai!

Departema oyo etalelaka bazulunalo ezalaki mpe kolandela ba komande ya masangá. Na yango, nayebaki minɔkɔ oyo ezalaki kobimisa bazulunalo oyo ezalaki kobima na masini na Brooklyn mpe kotindama na bisika mosusu. Nayoká ata mokolo moko te ndenge balobaka minɔkɔ yango mingi kasi nazalaki na esengo ya koyeba ete bazulunalo ebele ezalaki kotindama mosika mpenza. Atako nayebaki bisika yango te na ntango wana, nazwaki libaku ya kokende na bisika yango mosusu na bambula oyo elandaki.

Elongo na Ndeko Robert Wallen, Charles Molohan, mpe Don Adams

Na 1961, batindaki ngai na biro oyo etalelaka makambo ya mbongo, epai Ndeko Grant Suiter azalaki mokɛngɛli. Nsima ya mbula mibale kuna, Ndeko Nathan Knorr, oyo azalaki mokambi ya La Société na ntango wana, abengaki ngai na biro na ye. Alobaki ete moko ya bandeko oyo asalaka na biro na ye azali kokɔta Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi sanza mobimba, na nsima akobanda kosala na Departema ya mosala. Batyaki ngai na esika ya ndeko yango mpe nasalaki elongo na Ndeko Don Adams. Kozanga nayeba yango, Don nde ndeko oyo andimaki formilɛrɛ na ngai na liyangani ya 1955. Nakutaki bandeko mibale oyo bazalaki mpe kosala na biro yango: Robert Wallen ná Charles Molohan. Tosalaki biso minei elongo mbula koleka 50. Ezalaki esengo mpenza kosala na mibali yango ya sembo oyo bakɔmɛli na elimo!​—Nzembo 133:1.

Mbala ya liboso lokola mokɛngɛli ya zone na Vénézuéla, na 1970

Kobanda na 1970, nakómaki kokende mbula na mbula to nsima ya mbula moko kotala  Babetele mpo na mwa bapɔsɔ lokola mokɛngɛli ya zone. Ezalaki mpo na kotala bandeko ya Betele mpe bamisionɛrɛ na mokili mobimba, mpo na kolendisa bango mpe kotala ndenge makambo ezalaki kotambola na Betele. Ezalaki esengo mpenza kokutana na bandeko mosusu oyo bakɔtaki bakelasi ya liboso ya Eteyelo ya Gileade mpe bazalaka kaka sembo na bamboka-mopaya epai batindá bango! Ezalaki libaku malamu mpenza mpe esengo ya kokende na bikólo koleka 90 lokola mokɛngɛli ya zone.

Natalá bandeko na mikili koleka 90

NAZWI MONINGA YA SEMBO

Bandeko nyonso ya Betele ya Brooklyn batindamaki na masangá ya engumba New York. Ngai natindamaki na lisangá ya Bronx. Lisangá ya liboso ya mboka yango ekolaki mpe bakabolaki yango. Ngai nazalaki na lisangá ya libosoliboso oyo babengaki Bronx ya likoló.

Na katikati ya bambula ya 1960, libota moko ya Batatoli oyo bazalaki bato ya ekólo Lettonie mpe bandimaki solo na sudi ya Bronx bayaki na teritware ya lisangá na biso. Livija, oyo azalaki mwana mwasi ya liboso na libota yango, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza ntango kaka azwaki diplome. Mwa basanza na nsima, akendaki na etúká ya Massachusetts mpo na kosakola esika mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki monene. Nakómaki kokomela ye mikanda mpo na kopesa ye bansango ya lisangá, mpe na mikanda oyo azalaki kozongisela ngai, azalaki koyebisa ngai ndenge mosala na ye ezalaki kobota mbuma na teritware.

Elongo na Livija

Mwa bambula na nsima, Livija akómaki mobongisi-nzela monene. Azalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova, na yango atondisaki formilɛrɛ mpo na kokɔta Betele mpe babengisaki ye na 1971. Namonaki lokola nde Yehova abongiseli ngai nzela! Tobalanaki na mokolo ya 27/10/1973, mpe Ndeko Knorr nde asalaki diskur ya libala na biso. Masese 18:22 elobi: “Ozwi mwasi ya malamu? Ozwi eloko ya malamu, mpe Yehova akosepela na yo.” Ngai ná Livija tosali na Betele elongo mbula 40. Mpe tozali kokoba kosalisa lisangá moko kaka na teritware ya Bronx.

KOSALA NA BOMOKO NA BANDEKO YA KRISTO

Kosala elongo na Ndeko Knorr ezalaki esengo mpenza. Azalaki makasi na mosala ya Bokonzi mpe azalaki kolinga mpenza bamisionɛrɛ ya mokili mobimba. Bamisionɛrɛ yango mingi bazalaki Batatoli ya liboso na mikili oyo batindaki bango. Ezalaki mawa mpenza ntango Ndeko Knorr abɛlaki maladi ya kanser na 1976. Mokolo moko, ntango alalaki na mbeto, asɛngaki ngai natángela ye makambo oyo esengelaki kobimisama. Asɛngaki ngai nabenga Ndeko Frederick Franz aya mpe koyoka ndenge nazalaki kotánga. Na nsima, nayaki koyeba ete lokola Ndeko Franz azalaki komona lisusu malamu te, Ndeko Knorr nde azalaki kolekisa ntango ebele mpo na kotángela ye makambo oyo ekobimisama.

Ntango nakendaki viziti ya zone elongo na Daniel ná Marina Sydlik na 1977

Ndeko Knorr akufaki na 1977, kasi baoyo bayebaki ye mpe bazalaki kolinga ye, babɔndisamaki mpo azalaki sembo ntango asilisaki bomoi na ye awa na mabele. (Emoniseli 2:10) Na nsima, Ndeko Franz akómaki mokambi ya la Société.

 Na ntango wana, nazalaki sɛkrɛtɛrɛ ya Ndeko Milton Henschel, oyo asalaki na Ndeko Knorr bambula ebele. Ndeko Henschel ayebisaki ngai ete mokumba na ngai ya libosoliboso na Betele ekómaki ya kosalisa Ndeko Franz na likambo nyonso oyo esengeli. Nazalaki mbala na mbala kotángela ye makambo liboso ebimisama. Ndeko Franz azalaki kokanga makambo malamu mpenza mpe azalaki na likoki ya kotya likebi nyonso na makambo oyo nazalaki kotánga. Ezalaki esengo mpenza kosalisa ye ndenge wana tii ntango asilisaki bomoi na ye awa na mabele na sanza ya 12 na 1992!

Balabala Columbia Heights, nimero 124, esika nasalaki bambula ebele

Mbula 61 oyo nasali na Betele eleki noki mpenza. Papa ná mama na ngai batikalaki sembo epai ya Yehova tii na liwa na bango, mpe nazali kozela ntango nakoyamba bango na mokili ya sika. (Yoane 5:28, 29) Eloko moko te oyo nakokaki kozwa na mokili oyo ekokani na libaku kitoko ya kosala elongo na mibali mpe basi ya sembo mpo na bolamu ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba. Ngai ná Livija tokoki mpenza koloba ete na boumeli ya bambula nyonso oyo tolekisi na mosala ya ntango nyonso, “esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na [biso].”​—Nehemia 8:10.

Moto moko te aleki ntina na lisangá ya Yehova, mpe mosala ya kopalanganisa solo ya Bokonzi ezali kokoba. Ezali esengo mpe libaku malamu kosala elongo na ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi ya sembo na boumeli ya bambula. Bandeko ebele oyo nasalá na bango, oyo bazalaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bazali lisusu awa na mabele te. Kasi nazali na esengo mingi ndenge nasalaki elongo na bato yango ya sembo na mosala ya Yehova.