Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2017

“Liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko”

“Liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko”

“Matiti ya mobesu ekauki, fololo elɛmbilɛmbi; kasi liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”​—YISAYA 40:8.

NZEMBO: 116, 115

1, 2. (a) Makambo nini olingaki kozanga soki Biblia ezalaki te? (b) Ntango nini Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso?

OYEBI makambo nini olingaki kozanga na bomoi na yo soki Biblia ezalaki te? Olingaki kozala na toli ya bwanya te mpo na kotambwisa yo mokolo na mokolo. Olingaki koyeba solo te na ntina etali Nzambe, bomoi, to mikolo ezali koya. Olingaki mpe koyeba ata moke te makambo oyo Yehova asalaki mpo na bato na ntango ya kala.

2 Nzokande, toyebi makambo nyonso wana. Mpo na nini? Mpo Yehova apesá biso Liloba na ye Biblia. Alakaki ete nsango na yango ekoumela seko. Ntoma Petro azongelaki maloba ya Yisaya 40:8. Atako vɛrsɛ yango elobeli mpenzampenza Biblia te, maloba na yango etaleli nsango oyo ezali na Biblia. (Tángá 1 Petro 1:24, 25.) Mpo Biblia esalisa biso mingi, tosengeli kotánga yango na monɔkɔ ya mboka na biso. Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe bayebi ete likambo yango ezali solo. Na boumeli ya basiɛklɛ, bato basalaki makasi mpo na kobongola Biblia atako bakutanaki na botɛmɛli mpe mikakatano ya minene. Basalaki bongo mpo bato bátánga yango. Yehova alingi ete bato ebele mpenza “bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:3, 4.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

 3 Na lisolo oyo, tokolobela ndenge Liloba ya Nzambe eumeli atako (1) kobongwana ya minɔkɔ, (2) politiki esali ete monɔkɔ oyo bato mingi balobaka ebongwana, mpe (3) batɛmɛlaki kobongolama na yango. Litomba nini tokozwa soki tolobeli makambo yango? Tokosepela lisusu mingi na Biblia mpe Mobandisi na yango.​—Mika 4:2; Baroma 15:4.

KOBONGWANA YA MINƆKƆ

4. (a) Ndenge nini minɔkɔ ebongwanaka? (b) Ndenge nini toyebi ete Nzambe aponá kaka monɔkɔ moko te, mpe yango ezali kotinda yo osala nini?

4 Minɔkɔ ebongwanaka. Maloba mosusu ekoki kozwa ndimbola ya sika, nzokande liboso ezalaki na ndimbola mosusu. Mbala mosusu ozali na ndakisa moko na monɔkɔ oyo olobaka. Ezalaki mpe bongo mpo na minɔkɔ ya kala. Ebre ná Grɛki oyo bato balobaka lelo ekeseni na Ebre ná Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia. Bato mingi bakoki kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe te soki batángi yango na minɔkɔ wana ya kala; na yango mpo bákanga ntina esengeli Biblia ebongolama. Bato mosusu bakanisi ete soki bayekoli Ebre mpe Grɛki ya kala, bakokanga malamu ntina ya Liloba ya Nzambe. Kasi, mbala mosusu yango ekosalisa bango mpenza te ndenge bakanisaki. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Tozali na botɔndi ndenge Biblia mobimba to biteni na yango ebongolami sikoyo na minɔkɔ pene na 3 000. Yehova nde alingi ete liloba na ye esalisa bato ya “bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso.” (Tángá Emoniseli 14:6) Na ntembe te, yango ezali kotinda biso tópusana mpenza pene ya Nzambe na biso ya bolingo oyo aponaka bilongi te.​—Misala 10:34.

5. Nini esalaki ete bato bálinga mingi Biblia King James Version?

5 Lokola minɔkɔ ebongwanaka, mabongoli ya Biblia na minɔkɔ yango esengeli mpe kobongwana. Libongoli oyo ezalaki pɛtɛɛ na kotánga ntango ebimaki sika, na nsima ekoki komonana ete ezali makasi. Tózwa ndakisa ya Biblia King James Version, oyo ebimaki liboso na 1611. Ezalaki moko ya Babiblia ya Lingelesi oyo bato balingaki mingi. Maloba oyo basalelaki na Biblia yango ekɔtaki kutu na elobeli ya bato ya Lingelesi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kasi, libongoli yango esalelaki nkombo Yehova kaka na bisika moke. Na bisika mingi na Makomami ya Ebre epai nkombo ya Nzambe ezalaki na makomi ya libosoliboso, batyaki liloba “NKOLO” na makomi ya minene. Biblia King James Version oyo babimisaki na nsima esalelaki mpe liloba “NKOLO” na bavɛrsɛ mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo. Na ndenge yango, Biblia King James Version endimaki ete nkombo ya Nzambe ezalaki mpe na eteni ya Biblia oyo babengaka Testama ya Sika.

6. Mpo na nini tozalaka na botɔndi mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika?

6 Ntango Biblia King James Version ebimaki sika na Lingelesi, maloba na yango emonanaki ete ebongaki na mikolo wana. Kasi na nsima, maloba na yango mosusu esilaki ngala, mpe lelo moto akoki kokanga ntina na yango te. Ezalaki mpe bongo mpo na Babiblia ya minɔkɔ mosusu. Yango wana, tozali na botɔndi mpo na Biblia  Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo ezali na elobeli ya mikolo oyo. Libongoli yango ezali na mobimba to na ndambo na minɔkɔ koleka 150. Yango emonisi ete bato mingi na mokili bakoki sikoyo kotánga Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango. Elobeli na yango ya mikolo oyo mpe ya polele ezali kosala ete nsango ya Nzambe esimba mpenza mitema na biso. (Nzembo 119:97) Kasi likambo eleki ntina, Libongoli ya Mokili ya Sika ezongisi nkombo ya Nzambe na bisika oyo ezalaki na ebandeli.

MAKAMBO YA POLITIKI

7, 8. (a) Mpo na nini Bayuda mingi ya siɛklɛ ya 3 L.T.B. bazalaki kokanga ntina ya Makomami ya Ebre te? (b) Libongoli ya Grɛki ya Septante ezali nini?

7 Na bantango mosusu makambo ya politiki mpe esalá ete monɔkɔ oyo bato bazali kosalela mingi na kati ya ekólo ebongwana. Kasi, Yehova asalaki ete Biblia ebimisama na monɔkɔ oyo bato bakokanga ntina. Na ndakisa, Bayuda to Bayisraele nde bakomaki mikanda 39 ya liboso na Biblia. Bango nde bato ya libosoliboso oyo Nzambe apesaki “maloba mosantu.” (Baroma 3:1, 2) Na ebandeli, bakomaki mikanda yango na Ebre to na monɔkɔ ya aramɛyɛ. Kasi na siɛklɛ ya 3 L.T.B., Bayuda mingi bazalaki lisusu kokanga ntina ya monɔkɔ ya Ebre te. Mpo na nini? Ntango Alezandre Monene alongaki eteni monene ya mokili, ampire ya Grɛsi ekómaki monene. Ntango ampire ezalaki se koya monene, monɔkɔ ya Grɛki ekómaki monɔkɔ ya bato nyonso oyo bazalaki na nse ya boyangeli ya Grɛsi, ata mpe Bayuda oyo bapalanganaki na mikili yango. (Danyele 8:5-7, 20, 21) Ezalaki mpe bongo mpo na Bayuda mingi, yango wana, ekómaki mpasi bákanga ntina ya Biblia na Ebre. Nini ekokaki kosilisa mokakatano yango?

8 Mbula soki 250 liboso Yesu abotama, mikanda mitano ya liboso ya Biblia ebongolamaki na Grɛki. Na nsima, babongolaki mikanda mosusu nyonso ya Makomami ya Ebre na Grɛki. Bakómaki kobenga yango libongoli ya Grɛki ya Septante. Ezali libongoli ya liboso ya Makomami ya Ebre na mobimba na yango.

9. (a) Ndenge nini libongoli ya Septante ná mabongoli mosusu ya kala esalisaki baoyo batángaki Liloba ya Nzambe? (b) Bavɛrsɛ nini olingaka mingi na Makomami ya Ebre?

9 Libongoli ya Septante esalisaki Bayuda oyo bazalaki koloba Grɛki bátánga Makomami ya Ebre na Grɛki. Kanisá esengo oyo bazalaki na yango mpo bakokaki koyoka to kotánga Liloba ya Nzambe na monɔkɔ na bango. Nsukansuka, biteni ya Biblia ebongolamaki na minɔkɔ mosusu oyo bato nyonso bazalaki koloba, na ndakisa Syriaque, Gothique, mpe Latin. Lokola bato mingi bakómaki kotánga mpe kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe, bakómaki mpe kolinga yango. Na ntembe te, bazalaki mpe na bavɛrsɛ oyo bazalaki kolinga mingi, kaka lokola biso lelo. (Tángá Nzembo 119:162-165.) Ya solo, Liloba ya Nzambe eumeli atako makambo ya politiki mpe kobongwana ya monɔkɔ oyo bato nyonso bazali koloba.

BOTƐMƐLI NA MOSALA YA KOBONGOLA BIBLIA

10. Na ntango ya John Wycliffe, mpo na nini bato mingi bakokaki kotánga Biblia te?

10 Na bambula ebele, bakonzi minene ya mokili bamekaki kopekisa bato kotánga Biblia. Kasi, bato oyo babangaka Nzambe batikaki te mosala ya kobongola Biblia mpo bato nyonso bákoka kotánga yango. Moko ya bato yango ezalaki John Wycliffe, oyo azalaki kofanda na Angleterre na bambula ya 1300. Amonaki ete moto nyonso asengeli kotánga Biblia. Ntango azalaki na bomoi, bato mingi ya  Angleterre bayokaki naino te nsango ya Biblia na monɔkɔ na bango. Mpo na nini? Mpo Biblia ezalaki ntalo mingi, mpe esengelaki kokoma Biblia mokomoko na mabɔkɔ. Na yango, bato moke kaka nde bazalaki na likoki ya kozala na Biblia. Lisusu, bato mingi na ntango wana bayebaki kotánga te. Baoyo bazalaki kokende ndako-nzambe bazalaki koyoka botángi ya Biblia na Latin, kasi monɔkɔ yango ezalaki monɔkɔ ya kala, mpe bato mingi bazalaki kokanga ntina na yango te. Yehova asalaki nini mpo bato bázwa Biblia na monɔkɔ na bango?​—Masese 2:1-5.

John Wycliffe ná baninga na ye balingaki moto nyonso ayeba Liloba ya Nzambe. Yo mpe alingaka bongo? (Talá paragrafe 11)

11. Ndenge nini Biblia ya Wycliffe esalisaki bato?

11 Na 1382, John Wycliffe ná baninga na ye babongolaki Biblia na Lingelesi. Ba Lollard, elingi koloba bato oyo bazalaki bayekoli ya Wycliffe, bakómaki kosalela Biblia ya Wycliffe mingi, mpe bakómaki kolinga yango mingi. Basalaki mibembo na makolo mboka na mboka na Angleterre mobimba. Ba Lollard bazalaki kotángela bato Biblia mpe kopesa bango biteni na yango oyo bakomá na mabɔkɔ. Mosala na bango esalaki ete Biblia eyebana lisusu mingi.

12. Bakonzi ya mangomba basalaki Wycliffe nini mpe ndenge nini batalelaki mosala na ye?

12 Bakonzi ya mangomba bayinaki Wycliffe, Biblia na ye, mpe bayekoli na ye. Banyokolaki ba Lollard mpe batumbaki Biblia nyonso ya Wycliffe oyo bamonaki. Ata nsima ya liwa ya Wycliffe, bakonzi ya mangomba balobaki ete azali mopɛngwi, monguna ya Lingomba. Bakonzi ya mangomba batimolaki mikuwa na ye, batumbaki yango, mpe babwakaki putulu yango na Ebale Swift. Kasi, bato mingi bazalaki na mposa ya kotánga mpe kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe, mpe Lingomba ekokaki kopekisa yango te. Nsima ya bambula, bato ya Mpoto mpe ya bisika mosusu ya mokili babandaki kobongola mpe kobimisa Biblia na minɔkɔ oyo bato mingi bakokaki kokanga ntina na yango.

“MOTO OYO AZALI KOTEYA YO MPO NA LITOMBA NA YO MOKO”

13. Likambo nini toyebi, mpe na ndenge nini yango ezali kokómisa kondima na biso makasi?

13 Bato oyo bakomaki Biblia basalaki yango na litambwisi ya elimo ya Nzambe.  Kasi ezali bongo te mpo na bato oyo basalaki mosala ya kobongola libongoli ya Septante, Biblia ya Wycliffe, King James Version, to Biblia mosusu nyonso. Atako bongo, soki totali ndenge Babiblia yango ebimisamaki, ezali polele ete kaka ndenge Yehova alakaki yango, Liloba na ye eumeli seko. Yango ezali kokómisa kondima na biso makasi ete makambo mosusu nyonso oyo Yehova alaki ekokokisama.​—Yosua 23:14.

14. Ndenge nini makambo oyo toyebi mpo na Biblia etindaka biso tólinga Nzambe mingi?

14 Soki tokanisi ndenge Yehova abatelaki Liloba na ye, kondima na biso ekokóma makasi koleka mpe tokolinga ye lisusu mingi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Mpo na nini Yehova apesaki biso Biblia, mpe alobaki ete akobatela yango? Mpo alingaka biso, mpe alingi koteya biso ndenge ya kozwela yango matomba. (Tángá Yisaya 48:17, 18.) Yango etindaka biso tólinga ye mpe tótosa ye.​—1 Yoane 4:19; 5:3.

15. Tokolobela nini na lisolo elandi?

15 Lokola tolingaka mpenza Liloba ya Nzambe, tokoki kosala nini mpo botángi na yango esalisa biso mpenza? Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bálinga Biblia? Bandeko oyo bateyaka na lisangá bakoki kosala nini mpo makambo nyonso oyo bazali koteya euta na Liloba ya Nzambe? Tokolobela mituna yango na lisolo elandi.

^ par. 4 Talá lisolo “Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Grɛki?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1/11/2009.

^ par. 5 Maloba ebele oyo bato basalelaka mingi na Lingelesi eutá na King James Version ya libosoliboso. Na ndakisa “kogumbama elongi na nse,” “loposo ya mino,” mpe “kosopa motema.”​—Mitángo 22:31; Yobo 19:20; Nzembo 62:8.

^ par. 14 Talá etanda “ Yo moko yaká kotala!