Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2017

Kolisá komipekisa

Kolisá komipekisa

“Mbuma ya elimo ezali . . . komipekisa.”​BAGALATIA 5:22, 23.

NZEMBO: 83, 52

1, 2. (a) Kozanga komipekisa ekoki kobimisa makambo nini? (b) Mpo na nini esengeli tólobela ezaleli ya komipekisa?

KOMIPEKISA ezali ezaleli oyo elimo santu ya Yehova ebimisaka. (Bagalatia 5:22, 23) Yehova amonisaka komipekisa na ndenge ya kokoka; kasi lokola biso tozali bato ya kozanga kokoka, tobundaka mpo na kozala na ezaleli yango. Kutu, soki mikakatano ezali mingi lelo, ezali mpo bato bazali na komipekisa te. Kozanga komipekisa ekoki kotinda moto alalisa makambo ya ntina, azwa te na kelasi to asala lisusu malamu te na mosala. Ekoki mpe kotinda moto na kofinga, kolangwa masanga, kosala mobulu, koboma libala, kokɔta banyongo ezangá ntina, kokóma moombo ya eloko moko boye, kokɔta bolɔkɔ, konyokwama na makanisi, kozwa maladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto, to mpe zemi oyo ekanami te.​—Nzembo 34:11-14.

2 Ya solo, bato oyo bazangi komipekisa bamilukelaka makambo mpe bapesaka basusu mpasi. Ezaleli ya komipekisa ezali kolimwa se kolimwa. Kasi, tosengeli kokamwa te, mpo Liloba ya Nzambe esakolaki ete na “mikolo ya nsuka,” bato bakozanga komipekisa.​—2 Timote 3:1-3.

3. Mpo na nini tosengeli kozala na komipekisa?

3 Mpo na nini tosengeli kozala na komipekisa? Tótalela ntina mibale. Ya liboso, emonani ete bato oyo bayebaka kopekisa  mayoki na bango bazalaka na mikakatano mingi te. Ezalaka mpasi te mpo báyokana malamu na basusu mpe bákima makambo lokola nkanda, mitungisi, mpe konyokwama na makanisi. Ya mibale, kozala na komipekisa ekosalisa biso tótɛmɛla masɛnginya mpe tópekisa bamposa ya mabe, mpe yango ekosala ete Nzambe akoba kozala moninga na biso. Adama ná Eva basalaki bongo te. (Ebandeli 3:6) Lelo mpe, bato mingi bazali na mikakatano ebele mpo bazangi komipekisa.

4. Moto nyonso oyo azalaka na mokakatano ya komipekisa asengeli koyeba likambo nini?

4 Yehova ayebi ete lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezali mpasi tózala na komipekisa. Yango wana, alingaka kosalisa biso mpo tótɛmɛla bamposa ya kosala masumu. (1 Bakonzi 8:46-50) Lokola azali Moninga oyo alingaka biso mingi, alendisaka baoyo, na bantango mosusu, bazalaka na mokakatano mpo na kopekisa mayoki mpe bamposa na bango. Na lisolo oyo, tokolobela komipekisa ya Yehova. Tokolobela mpe bandakisa oyo ezali na Biblia, ya malamu mpe ya mabe. Na nsima, tokotalela mwa makambo oyo ekoki kosalisa biso.

KOMIPEKISA YA YEHOVA

5, 6. Ndakisa nini Yehova apesi na oyo etali komipekisa?

5 Yehova amonisaka komipekisa na ndenge ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali ya kokoka. (Kolimbola Mibeko 32:4) Kasi, biso tozali bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, mpo tóyeba soki komipekisa ezali nini, tosengeli kotalela ndakisa ya Yehova mpo tómekola ye malamu. Tólobela mwa makambo oyo esɛngaki Yehova amonisa komipekisa.

6 Kanisá ndenge Yehova amonisaki komipekisa ntango Satana atombokaki. Na ntembe te, makambo oyo Zabolo akoselaki Nzambe epesaki baanzelu ya sembo mpasi mpe nkanda makasi. Mbala mosusu yo mpe oyokaka bongo soki okanisi mpasi nyonso oyo Satana abimiselá biso. Kasi Yehova amonisaki komipekisa, asalaki makambo nokinoki te. Apesaki kaka eyano oyo ebongi. Ayokaki nkanda noki te mpe asalaki makambo oyo eyokani na bosembo na ye. (Kobima 34:6; Yobo 2:2-6) Mpo na nini? Yehova atikaki ntango eleka mpo alingi ata moto moko te abomama, kasi “alingi nde bato nyonso bábongola motema.”​—2 Petro 3:9.

7. Ndakisa ya Yehova ezali koteya biso nini?

7 Ndakisa ya Yehova ezali koteya biso ete tosengeli kokanisa malamu liboso ya koloba mpe tósalaka makambo nokinoki te kozanga kokanisa. Soki olingi kozwa ekateli moko ya monene, zwáká ntango ya kokanisa. Bondelá Nzambe apesa yo bwanya mpo oloba to osala likambo oyo ebongi. (Nzembo 141:3) Soki tosiliki to toyoki nkanda, ezalaka pɛtɛɛ tósala mabe. Yango wana, bato mingi bayokaka mawa na nsima mpo balobaki to basalaki likambo kozanga kokanisa!​—Masese 14:29; 15:28; 19:2.

BANDAKISA YA MALAMU MPE YA MABE

8. (a) Epai wapi tokoki kokuta bandakisa ya komipekisa? (b) Nini esalisaki Yozefe aboya kosala lisumu ntango mwasi ya Potifare azalaki koloba na ye maloba sukali? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Bandakisa nini ya Biblia emonisi ntina ya komipekisa? Biblia ezali na bandakisa ebele ya bato oyo bamonisaki komipekisa. Tólobela Yozefe, mwana ya Yakobo. Aboyaki kosala masumu ntango azalaki kosala na ndako ya Potifare, mokonzi ya basoda ya Farao. Lokola Yozefe “azalaki kitoko mingi, na nzoto mpe na elongi,” mwasi ya Potifare akómaki kolula ye mpe azalaki koloba na ye maloba sukali. Nini esalisaki  Yozefe aboya? Na ntembe te, azwaki ntango ya kokanisa mingi liboso na likama oyo ekobima soki andimi kosangisa nzoto na mwasi yango. Na yango, ntango mwasi yango akangaki ye na bilamba, Yozefe akimaki. Alobaki: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?”​—Ebandeli 39:6, 9; tángá Masese 1:10.

9. Ndenge nini okoki komibongisa mpo okwea na komekama te?

9 Ndakisa ya Yozefe ezali koteya biso nini? Na bantango mosusu ekoki kosɛnga tókima soki tokutani na komekama ya kobuka mibeko ya Nzambe. Bato mosusu oyo bazali lelo Batatoli ya Yehova bazalaki kolya na lokoso, komɛla masanga mingi, komɛla makaya, drɔgɛ, kosala pite, mpe makambo mosusu. Ata nsima ya kozwa batisimo, na bantango mosusu bakoki koyoka mposa ya kozongela makambo yango. Soki ekómeli yo, zwá ntango ya kokanisa ndenge boyokani na yo na Yehova ekobeba soki okwei na komekama yango. Meká komona mosika makambo oyo ekoki kotya yo na komekama mpe kanisá oyo okoki kosala mpo okima yango. (Nzembo 26:4, 5; Masese 22:3) Ata soki okutani na komekama ya ndenge wana, sɛngá Yehova apesa yo bwanya mpe komipekisa mpo okwea na komekama yango te.

10, 11. (a) Likambo nini ekómelaka bilenge mingi na kelasi? (b) Nini ekoki kosalisa bilenge bakristo bákima komekama ya kobuka mibeko ya Nzambe?

10 Lelo, bilenge bakristo ebele bakutanaka mpe na likambo oyo ekómelaki Yozefe. Tózwa ndakisa ya elenge mwasi Kim. Mbala mingi, baninga na ye ya kelasi bazalaki kobɛta masolo ya makambo ya pite oyo basalaki na nsuka ya pɔsɔ. Kasi Kim azalaki na masolo ya ndenge wana te. Alobi ete lokola azalaki ndenge moko te na baninga na ye, ntango mosusu azalaki komimona “ntina te to lokola mwana etike” mpe bazalaki komona ye zoba mpo azalaki na mwa moto na ye te. Kasi, amonisaki ete azali na bwanya. Ayebaki ete soki moto azali naino elenge, mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mingi. (2 Timote 2:22) Mbala mingi bana-kelasi bazalaki kotuna ye soki ayebi naino mibali te. Yango epesaki ye libaku ya kolimbola ntina oyo aboyaka kosala pite. Longonya na bino, bilenge bakristo oyo bozali na ekateli ya koboya makambo ya pite; bozali mpe kopesa Yehova esengo!

11 Biblia elobeli mpe bandakisa ya bato oyo balongaki te kokima pite. Emonisi mpe mbuma mabe ya kozanga komipekisa na likambo yango. Soki okutani na likambo oyo Kim akutanaki na yango, ekozala malamu okanisa bozoba ya elenge mobali oyo Masese mokapo 7 elobeli. Kanisá mpe likambo Aminone asalaki mpe mbuma mabe ya etamboli na ye. (2 Samwele 13:1, 2, 10-15, 28-32) Mpo na kosalisa bana bálona komipekisa mpe bákóma na bwanya, ekozala malamu baboti bátalela bandakisa yango na losambo na kati ya libota.

12. (a) Ndenge nini Yozefe amonisaki komipekisa liboso ya bandeko na ye? (b) Na makambo nini tosengeli komipekisa?

12 Yozefe apesaki mpe ndakisa ya komipekisa na likambo mosusu. Likambo yango esalemaki ntango bandeko na ye bayaki na Ezipito kosomba biloko. Lokola Yozefe alingaki koyeba makanisi na bango, ayebisaki bango mbala moko te ete azali ndeko na bango. Mpe ntango akokaki lisusu kokanga motema te, atikaki bandeko na ye mpe akendaki kolela na esika na ye moko. (Ebandeli 43:30, 31; 45:1) Soki ndeko mobali to ndeko mwasi moko asali likambo oyo epesi yo mpasi, komekola ndakisa ya komipekisa ya Yozefe ekosalisa yo oloba te to  osala te likambo oyo ekopesa yo mawa na nsima. (Masese 16:32; 17:27) Soki ndeko na yo alongolami na lisangá, ekoki kosɛnga ozala na komipekisa mpo osolola na ye mpambampamba te. Kosala bongo ekoki kozala mpasi, kasi okosala yango soki obosani te ete ozali komekola ndakisa ya Yehova mpe ozali kosala likambo oyo asɛngi.

13. Ndakisa ya Mokonzi Davidi ekoki koteya biso nini?

13 Ndakisa ya Mokonzi Davidi mpe ekoki koteya biso. Davidi azalaki na bokonzi kasi aboyaki kosalela yango na nkanda ntango Saulo ná Shimei batumolaki ye. (1 Samwele 26:9-11; 2 Samwele 16:5-10) Kasi, na bantango mosusu Davidi azangaki komipekisa. Biblia elobeli lisumu oyo asalaki na Bate-sheba mpe ndenge akendaki mpo na kobundisa Nabale, moto ya lokoso. (1 Samwele 25:10-13; 2 Samwele 11:2-4) Ndakisa ya Davidi ekoki koteya biso makambo mingi. Ya liboso, mingimingi bankulutu basengeli mpenza kozala na komipekisa mpo básalela bokonzi na bango na ndenge ya mabe te. Ya mibale, tosengeli te komityela motema koleka ndelo, kokanisa ete tokoki kokwea ata mokolo moko te na komekama.​—1 Bakorinti 10:12.

MAKAMBO OYO OKOKI KOSALA

14. Likambo nini ekómelaki ndeko Luigi, mpe mpo na nini ezali na ntina biso mpe tósalaka ndenge wana?

14 Okoki kosala nini mpo okolisa ezaleli ya komipekisa? Tózwa ndakisa ya likambo moko oyo ekómelaki ndeko Luigi. Motuka moko etutaki motuka na ye na nsima. Atako sofɛlɛ yango nde azalaki na foti, abandaki kogangela ndeko Luigi mpe alukaki kobundisa ye. Ndeko Luigi asɛngaki Yehova asalisa ye atikala kaka kimya mpe amekaki kobondela sofɛlɛ wana, kasi, azalaki kaka kogangela ye. Ndeko Luigi azwaki bibongiseli mpo kompanyi ya assurance ebongisela moto yango motuka na ye mpe akendaki, kasi moto yango azalaki kaka koganga. Pɔsɔ moko na nsima, ndeko Luigi azongelaki mwasi moko oyo asepelaki na solo. Nzokande mobali ya mwasi yango nde sofɛlɛ wana! Mobali yango ayokaki nsɔni mpe asɛngaki bolimbisi. Alobaki ete akosɛnga kompanyi ya assurance mpo bábongisela ndeko Luigi motuka na ye nokinoki. Mobali yango afandaki elongo na mwasi na ye mpo na kolanda lisolo ya Biblia mpe asepelaki mingi. Ndeko Luigi amonaki ete asalaki malamu mpenza ndenge atikalaki kimya ntango batutaki motuka na ye mpe amonaki ete soki ye mpe asilikaka, elingaki kozala mabe mpenza.​—Tángá 2 Bakorinti 6:3, 4.

Kotikala kimya to kosilika ekoki kobongisa to kobebisa mosala ya kosakola (Talá paragrafe 14)

15, 16. Ndenge nini koyekola Biblia ekoki kosalisa yo ná libota na yo bókolisa komipekisa?

15 Koyekola Biblia mbala na mbala na mozindo ekoki kosalisa mokristo akolisa ezaleli ya komipekisa. Kanisá likambo oyo Nzambe alobaki na Yosua ete: “Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.” (Yosua 1:8) Kasi ndenge nini koyekola Biblia ekoki kosalisa yo olona, to okolisa komipekisa?

16 Tomonaki ete Biblia ezali na bandakisa oyo emonisi ete tokozwa matomba soki tozali na komipekisa mpe tokoki konyokwama soki tozangi yango. Yehova akomisaki bandakisa yango mpamba te. (Baroma 15:4) Ezali malamu tótángaka, tóyekolaka, mpe tómanyolaka yango. Mekáká komona ndenge yango etali yo ná libota  na yo. Sɛngá Yehova asalisa yo olanda toli ya Liloba na ye. Soki omoni ete ozangaka komipekisa na makambo mosusu, ndimá yango. Na nsima, bondelá mpe salá makasi oluka ndenge okoki kobongisa. (Yakobo 1:5) Soki osali bolukiluki na mikanda na biso, na ntembe te okomona makambo oyo ekoki kosalisa yo.

17. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákolisa komipekisa?

17 Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo bákolisa komipekisa? Baboti bayebi ete bana na bango babotamá na ezaleli ya komipekisa te. Na yango, baboti basengeli koteya bana ezaleli yango na nzela ya ndakisa na bango, ndenge basalaka mpo na bizaleli mosusu. (Baefese 6:4) Soki omoni ete bana na yo bazali na komipekisa te, omituna soki yo moko ozali ndakisa ya malamu na likambo yango. Okosalisa mpenza bana na yo soki obimaka mosala ya kosakola mingi, oyanganaka na makita, mpe soki osalaka losambo na kati ya libota. Kobangaka te koboyela bana makambo mosusu soki esengeli! Yehova atyelaki Adama ná Eva bandelo mpo báyekola komemya bokonzi na ye. Ndenge moko mpe, soki baboti bazali kopesa bana disiplini mpe ndakisa ya malamu, bana bakoki koyekola komipekisa. Komemya bokonzi ya Nzambe mpe kotosa mibeko na ye ezali na kati ya makambo ya ntina mingi oyo okoki kosalisa bana na yo báyekola.​—Tángá Masese 1:5, 7, 8.

18. Mpo na nini tosengeli koyeba kopona baninga?

18 Tózala baboti to te, biso nyonso tosengeli koyeba kopona baninga. Luká baninga oyo bakolendisa yo omityela mikano ya malamu mpe okima mindɔndɔ. (Masese 13:20) Ndakisa malamu ya baninga oyo bakɔmɛli na elimo ekoki kotinda yo omekola ezaleli na bango ya komipekisa. Na ntembe te, etamboli na yo ya malamu ekolendisa mpe bango. Soki oloni komipekisa, Nzambe akondima yo, okozala na bomoi ya esengo, mpe okozala na makambo ya malamu ya kokabola na bato oyo olingaka.