Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2016

“Mabɔkɔ na yo elɛmba te”

“Mabɔkɔ na yo elɛmba te”

“Mabɔkɔ na yo elɛmba te.”SEFANIA 3:16.

NZEMBO: 81, 32

1, 2. (a) Mikakatano ya ndenge nini bato mingi bazali kokutana na yango lelo oyo, mpe yango ezali kobimisa nini? (b) Elikya nini ya solosolo Yisaya 41:10, 13 epesi biso?

NDEKO mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe mobali na ye azali nkulutu, alobi: “Atako nazalaki na mimeseno malamu ya elimo, nabundaki na mitungisi bambula mingi. Ezalaki kozangisa ngai mpɔngi, kobɛlisa ngai, ebongolaki ndenge na ngai ya kosalela basusu makambo mpe na bantango mosusu ezalaki kotinda ngai nasundola makambo nyonso.”

2 Okoki komitya na esika ya ndeko mwasi wana? Likambo ya mawa, lokola tozali na mokili mabe ya Satana, tokutanaka na ebele ya mikakatano oyo ekoki kolekela biso. Lokola longo oyo epekisaka masuwa etambola, mitungisi ekoki kosala ete tógumbama, elingi koloba tólɛmba nzoto. (Masese 12:25) Makambo nini ekoki kosala ete omitungisa? Mbala mosusu ozali na mawa mpo moto moko oyo olingaka akufi to ozali koyikela maladi to minyoko mpiko. To ekoki kozala ete ozali kobundana mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo atako nkita ezali mpasi mingi. Ntango mikolo ezali koleka, kotungisama na makanisi ekoki kosilisa yo makasi ata mpe kosilisa esengo  na yo. Kasi, okoki kozala na kondima ete Nzambe akosalisa yo.Tángá Yisaya 41:10, 13.

3, 4. (a) Ndenge nini Biblia esalelaka liloba “lobɔkɔ”? (b) Nini ekoki kolɛmbisa mabɔkɔ na biso?

3 Mbala mingi Biblia esalelaka binama ya nzoto mpo na komonisa bizaleli ya moto to makambo oyo asalaka. Na ndakisa, Biblia esaleli liloba lobɔkɔ mbala ebele. Soki Biblia elobi ete balendisi mabɔkɔ ya moto moko, elingi koloba balendisi moto yango, azwi makasi, mpe alingi kosala likambo moko. (1 Samwele 23:16; Ezera 1:6) Ekoki mpe kolimbola ete moto yango azali na makanisi ya malamu mpe azali na elikya mpo na mikolo ezali koya.

4 Na bantango mosusu, Biblia ekoki kolobela moto oyo alɛmbisi mabɔkɔ na ye. Yango ezali komonisa moto oyo alɛmbi nzoto to abungisi elikya. (2 Ntango 15:7; Baebre 12:12) Ntango ozali kotungisama na makanisi to makasi esili yo to mpe omoni ete boyokani na yo na Yehova ezali lisusu makasi te, okoki komona ete osengeli kosundola makambo nyonso. Nini ekoki kolendisa yo? Ndenge nini okoki kolendisama mpe kozala na likoki ya koyika mpiko mpe kozala na esengo?

“LOBƆKƆ YA YEHOVA EKÓMI MOKUSE MINGI TE MPO AKOKA KOBIKISA TE”

5. (a) Tokoki koyoka ndenge nini ntango tozali na mikakatano, kasi nini tosengeli kobosana te? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

5 Tángá Sefania 3:16, 17. Tosengeli kobanga te, kolɛmba nzoto te, to kolɛmbisa mabɔkɔ te, ntango tozali na mikakatano. Yehova, Tata na biso ya bolingo, asɛngi biso tóbwakela ye mitungisi na biso nyonso. (1 Petro 5:7) Yehova atyelaka biso likebi ndenge azalaki kotyela ekoló Yisraele likebi. Ayebisaki bango ete lobɔkɔ na ye “ekómi mokuse mingi te mpo akoka kobikisa te.” Azalaka ntango nyonso na mposa ya kobikisa basaleli na ye ya sembo. (Yisaya 59:1) Na lisolo oyo, tokolobela bandakisa misato oyo ezali na Biblia, oyo emonisi mposa mpe likoki oyo Yehova azali na yango ya kolendisa bato na ye básala mokano na ye ata ntango bazali na mikakatano makasi. Tótala ndenge oyo bandakisa yango ekoki kolendisa yo.

6, 7. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Bayisraele balongaki Baamaleke?

6 Mwa moke nsima ya kosikolama ya Bayisraele na boombo na Ezipito, Baamaleke babundisaki bango. Moize ayebisaki Yosua, mobali ya mpiko, akamba Bayisraele na etumba. Na nsima, Moize azwaki Arona ná Hure mpe amataki na bango na mwa ngomba moko oyo ezalaki pene. Kuna, bakokaki komona esika etumba ezalaki kotɔka. Mibali yango misato bakimaki nde etumba mpo bazalaki kobanga? Soki moke te!

7 Moize alandaki mwango moko oyo esalisaki Bayisraele bálonga Baamaleke na etumba. Akamataki lingenda ya Nzambe ya solo na lobɔkɔ na ye mpe atombolaki yango likoló. Ntango Moize asalaki bongo, Yehova apesaki Bayisraele nguya ya kobundisa Baamaleke. Nzokande, ntango mabɔkɔ ya Moize ebandaki kokóma kilo mpe kokita, Baamaleke babandaki kolonga etumba. Arona ná Hure bayaki nokinoki kosalisa Moize. “Bazwaki libanga mpe batyaki yango na nse na ye, mpe afandaki likoló na yango; mpe Arona ná Hure basimbaki mabɔkɔ na ye, mosusu epai oyo mpe mosusu epai oyo, mpo mabɔkɔ na ye etikala ngwi tii  moi ekolala.” Ya solo, na lisalisi ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, Bayisraele balongaki etumba yango.Kobima 17:8-13.

8. (a) Asa asalaki nini ntango bato ya Etiopi batumolaki Yuda? (b) Ndenge nini tokoki komekola Asa?

8 Yehova asalelaki mpe lobɔkɔ na ye ya nguya mpo na kosalisa bato na ye na mikolo ya mokonzi Asa. Biblia elobeli mampinga mingi ya basoda, kasi oyo elekaki monene ezalaki ya Zera moto ya Etiopi, oyo azalaki na basoda 1 000 000 oyo bayebi mpenza kobunda. Limpinga ya basoda ya Etiopi ezalaki monene mbala mibale koleka oyo ya Asa. Asa akómaki nde komitungisa, kobanga to alɛmbaki nzoto? Alɛmbisaki mabɔkɔ na ye? Te! Mbala moko Asa asɛngaki Yehova asalisa ye. Mpo na bato oyo babundaka, ekokaki komonana mpasi mpo na kolonga bato ya Etiopi na etumba. “Kasi mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.” (Matai 19:26) Nzambe asalelaki nguya na ye monene mpe “alongaki bato ya Etiopi liboso ya Asa,” oyo ‘motema na ye ezalaki mobimba epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye.’2 Ntango 14:8-13; 1 Bakonzi 15:14.

9. (a) Nini epekisaki Nehemia te kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme? (b) Ndenge nini Nzambe ayanolaki na libondeli ya Nehemia?

9 Ntango Nehemia akendaki na Yerusaleme, akutaki nini? Amonaki ete banguna oyo bautaki na bamboka ya bapaya bazalaki kotumola Bayuda, mpo bápekisa mosala ya kotonga bifelo ya Yerusaleme. Engumba yango ebatelamaki te, mpe Bayuda balɛmbaki nzoto. Nehemia ayokaki ndenge nini? Ye mpe alɛmbaki nzoto mpe atikaki ete mabɔkɔ na ye elɛmba? Te! Lokola Moize, Asa mpe basaleli mosusu ya sembo ya Yehova, Nehemia atyelaki Yehova motema ntango nyonso. Na mbala oyo mpe, Nehemia abondelaki Yehova asalisa ye, mpe Yehova ayanolaki ye. Nzambe asalelaki ‘nguya na ye monene’ mpe “nguya ya lobɔkɔ” na ye mpo na kolendisa Bayuda. (Tángá Nehemia 1:10; 2:17-20; 6:9.) Ondimaka ete Yehova asalelaka ‘nguya na ye monene’ mpe “nguya ya lobɔkɔ” na ye mpo na kolendisa basaleli na ye lelo oyo?

YEHOVA AKOLENDISA MABƆKƆ NA YO

10, 11. (a) Ndenge nini Satana alukaka kotinda biso tólɛmbisa mabɔkɔ? (b) Yehova asalelaka nini mpo na kolendisa biso mpe kopesa biso nguya? (c) Matomba nini ozwi na mateya oyo eutaka epai ya Yehova?

10 Tokoki kondima ete Satana akolɛmbisa mabɔkɔ na ye soki moke te. Akokoba kobundisa biso, komeka kopekisa misala na biso ya bokristo. Asalelaka lokuta mpe makaneli oyo eutaka na baguvɛrnema, bakonzi ya mangomba, mpe bapɛngwi. Mokano na ye ezali nini? Alingi ete tótika kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Kasi, Yehova azali na makoki ya kosalisa biso mpe alingi kosalisa biso; apesaka biso elimo santu na ye mpo na kolendisa biso. (1 Ntango 29:12) Ezali na ntina mingi ete tósɛnga elimo ya Nzambe mpo tókoka kobunda na Satana mpe  mokili na ye mabe. (Nzembo 18:39; 1 Bakorinti 10:13) Tozali mpe na botɔndi mpo na lisalisi oyo tozwaka na Liloba ya Nzambe. Kanisá mpe ebele ya mateya oyo tozwaka na mikanda na biso sanza na sanza. Maloba ya Zekaria 8:9, 13 (tángá) elobamaki ntango tempelo ya Yerusaleme ezalaki kotongama; atako bongo, maloba yango ekoki kosalisa biso lelo oyo.

Ezali na ntina mingi ete tósɛnga elimo ya Nzambe mpo tókoka kobunda na Satana mpe mokili na ye mabe

11 Yehova alendisaka mpe biso na nzela ya mateya oyo tozwaka na makita na biso ya bokristo, mayangani ya mike mpe ya minene, ezala mpe na biteyelo na biso ya teokrasi. Mateya yango ekoki kosalisa biso tósalela Nzambe na makanisi ya malamu, tómityela mikano, mpe tókokisa ebele ya mikumba na biso ya bokristo. (Nzembo 119:32) Ozali na mposa makasi ya kozwa nguya oyo eutaka na mateya oyo Yehova apesaka biso?

12. Tosengeli kosala nini mpo tózala makasi?

12 Yehova asalisaki basaleli na ye bálonga Baamaleke mpe bato ya Etiopi, mpe apesaki Nehemia ná Bayuda makasi ya kosilisa kotonga bifelo ya Yerusaleme. Ndenge moko mpe, Nzambe akopesa biso makasi mpo tókoba kosakola atako biso moko mpe tozali na mitungisi, bato bazali kotɛmɛla biso, mpe bazali kosepela na nsango na biso te. (1 Petro 5:10) Yehova asilisaka te mikakatano na biso na ndenge ya likamwisi. Kutu, ezali na makambo oyo biso moko tosengeli kosala. Makambo nini? Tosengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, kobongisa mpe koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ, kokoba koyekola biso moko mpe kosalaka losambo na kati ya libota, mpe kobondelaka mpo na komonisa ete totyelaka Yehova motema. Tótika soki moke te ete eloko moko elongola likebi na biso na makambo oyo Yehova abongisi mpo na kopesa biso makasi mpe kolendisa biso. Soki omoni ete mabɔkɔ na yo elɛmbi na likambo moko kati na oyo tolobeli, sɛngá Nzambe asalisa yo. Na nsima, talá ndenge elimo ya Nzambe ‘ekosala na kati na yo mpo olinga mpe osala.’ (Bafilipi 2:13) Kasi, okoki mpe kolendisa mabɔkɔ ya basusu?

LENDISÁ MABƆKƆ OYO EKOKI KOLƐMBALƐMBA

13, 14. (a) Ndenge nini ndeko mobali moko alendisamaki ntango mwasi na ye akufaki? (b) Ndenge nini tokoki kolendisa basusu?

13 Yehova apesá biso libota ya bandeko mibali mpe basi na mokili mobimba oyo bakoki kolendisa biso. Ntoma Paulo alobaki: “Bólendisa mabɔkɔ oyo elɛmbilɛmbi mpe mabɔlɔngɔ oyo ezali na makasi te, mpe bókoba kosembola banzela ya makolo na bino.” (Baebre 12:12, 13) Bakristo mingi na siɛklɛ ya liboso bazwaki lisalisi ya ndenge wana epai ya bandeko na bango bakristo. Ezali mpe bongo lelo oyo. Tótalela ndakisa ya ndeko moko. Nsima ya liwa ya mwasi na ye mpe nsima ya koyika mpiko na makambo mosusu ya mpasi, ndeko yango alobaki boye: “Liteya oyo nazwaki ezali ete tokoki te kopona mikakatano oyo tokokutana na yango, ata mpe ntango oyo yango esengeli kobima to mpe mbala boni esengeli kobima. Mabondeli mpe boyekoli na ngai moko nde esalisaka ngai lokola elamba oyo ebatelaka moto azinda na mai te (gilet de sauvetage). Lisungi ya bandeko na ngai ya elimo mpe ebɔndisi ngai mingi. Nayaki komona ntina ya kozala na boyokani malamu na Yehova liboso ete mikakatano ebima.”

Moto nyonso na lisangá akoki kolendisa basusu (Talá paragrafe 14)

 14 Arona ná Hure basalisaki Moize na ndenge balendisaki mabɔkɔ na ye na ntango ya etumba na Baamaleke. Lelo oyo, biso mpe tokoki koluka ndenge ya kopesa basusu mabɔkɔ mpe kosalisa bango. Bandeko na biso mosusu bazali konyokwama mpo bakómi mibange, bazali kobɛla, mabota na bango ezali konyokola bango, bazali komiyoka bango moko, to moto moko oyo balingaka akufi. Tokoki mpe kolendisa bilenge oyo batyaka bango mpanzi likoló mpo básala makambo ya mabe to bákóma bato minene na mokili oyo. (1 Batesaloniki 3:1-3; 5:11, 14) Luká mabaku mpo na komonisa ete otyelaka basusu likebi na Ndako ya Bokonzi, na mosala ya kosakola, na ntango ya kolya, to ntango ozali kosolola na telefone.

15. Maloba ya kolendisa ekoki kosala nini epai ya bandeko?

15 Ntango Asa alongaki limpinga monene ya basoda ya Etiopi, mosakoli Azaria alendisaki ye mpe bato na ye na maloba oyo: “Mpe bino, bózala na mpiko mpe bólɛmbisa mabɔkɔ te, mpamba te mosala na bino ezali na mbano.” (2 Ntango 15:7) Yango elendisaki Asa mpo abongola makambo mingi mpo na kozongisa losambo ya pɛto. Ndenge moko mpe, maloba na yo ya kolendisa ekoki kolendisa basusu mpe kosalisa bango bákoba kosalela Yehova. (Masese 15:23) Mpe osengeli kobosana soki moke te ndenge oyo bandeko na yo bakristo balendisamaka ntango opesaka biyano na makita.

Nehemia azalaki kaka te kotala ndenge basusu bazalaki kosala mosala. Ye moko apesaki mabɔkɔ mpo na kotonga bifelo ya Yerusaleme

16. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Nehemia? (b) Lobelá ndenge bandeko balendisaki yo.

 16 Na lisalisi ya Yehova, Nehemia mpe Bayuda balendisaki mabɔkɔ na bango. Basilisaki kotonga bifelo ya Yerusaleme nsima ya mikolo 52 mpamba! (Nehemia 2:18; 6:15, 16) Nehemia azalaki kaka te kotala ndenge basusu bazalaki kosala mosala. Ye moko apesaki mabɔkɔ mpo na kotonga bifelo ya Yerusaleme. (Nehemia 5:16) Ndenge moko mpe, bankulutu mingi bamekolaka Nehemia ntango bapesaka mabɔkɔ na misala ya kotonga, kotya bopɛto, mpe kobatela Ndako ya Bokonzi. Bandeko wana ya bolingo balendisaka mpe bandeko mosusu oyo bazali “na motema likoló” ndenge bakendaka kotala bango mpe basakolaka elongo na bango.Tángá Yisaya 35:3, 4.

“MABƆKƆ NA YO ELƐMBA TE”

17, 18. Ntango tozali na mikakatano mpe mitungisi, tokoki kondimisama na nini?

17 Ntango tosalaka elongo na bandeko na biso, yango ekómisaka bomoko na biso makasi. Yango esalisaka mpe biso tósala boninga makasi mpe etindaka biso tótya motema na mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomema mosika te. Ntango tolendisaka mabɔkɔ ya basusu, tosalisaka bango báyikela mikakatano mpiko mpe bábatela elikya mpo na mikolo ezali koya. Longola yango, kosalisa basusu elendisaka mabɔkɔ na biso mpe esalisaka biso tótya makanisi na biso nyonso na mikolo ezali koya.

18 Soki tokanisi ndenge oyo Yehova abatelaki mpe asalisaki basaleli na ye ya sembo na ntango ya kala, kondima na biso mpe elikya na biso epai na ye ekómaka makasi. Na yango, ntango ozali na mikakatano mpe ozali komitungisa, kotika “mabɔkɔ na yo elɛmba te”! Okoki kondimisama ete soki obondeli Yehova asalisa yo, lobɔkɔ na ye ya nguya ekolendisa yo mpe ekosalisa yo ozwa mapamboli oyo Bokonzi na ye ekomemela bato mosika te.Nzembo 73:23, 24.