Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2016

Kobá kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Yehova

Kobá kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Yehova

“Obundi ná Nzambe mpe ná bato, mpe nsukansuka yo olongi.”EBANDELI 32:28.

NZEMBO: 60, 38

1, 2. Bitumba nini basaleli ya Yehova bazali kobunda?

BASALELI nyonso ya sembo ya Nzambe, banda na moto ya sembo Abele tii na bato ya sembo ya mikolo na biso, babundaka. Ntoma Paulo ayebisaki bakristo Baebre ete ‘bayikaki mpiko na etumba moko monene na kati ya mpasi’ ntango bazalaki koluka ete Yehova andima bango mpe apambola bango. (Baebre 10:32-34) Ntoma Paulo akokanisaki bitumba ya bakristo na mimekano ya bato ya masano na Grɛsi, na ndakisa momekano ya mbangu, ya kobunda, mpe ya masano ya makofi (boxe). (Baebre 12:1, 4) Lelo oyo, tozali kopota mbangu mpo na bomoi, mpe tozali na banguna oyo balingi kolongola likebi na biso mpe koluka ete tóbungisa esengo na biso sikoyo mpe mbano na biso na mikolo ezali koya.

2 Etumba eleki monene ezali oyo tozali kobunda na Satana mpe mokili na ye. (Baefese 6:12) Ezali na ntina mingi ete tóbebisama te na mateya ya mokili oyo, bafilozofi, mpe misala ya mbindo lokola pite, kolangwa masanga, komɛla makaya, bangi to bilangwiseli mosusu. Tosengeli mpe kokoba  kobundisa ezaleli ya kolɛmba nzoto mpe bolɛmbu na biso moko.2 Bakorinti 10:3-6; Bakolose 3:5-9.

3. Ndenge nini Nzambe apesaka biso formasyo mpo tóbundisa banguna na biso?

3 Tokoki mpenza kolonga etumba na banguna ya makasi ndenge wana? Ɛɛ, tokoki kolonga; kasi ezali pɛtɛɛ te! Ntoma Paulo amikokanisaki na moto oyo asalaka lisano ya makɔfi (boxeur) ntango alobaki ete: “Ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te; ndenge oyo nazali kotinda makofi na ngai ezali ya kobɛta mopɛpɛ te.” (1 Bakorinti 9:26) Kaka ndenge bato mibale oyo basalaka lisano ya makɔfi babundaka, tosengeli kobundisa banguna na biso. Yehova asalisaka biso mpe apesaka biso formasyo mpo tósala bongo. Asalaka yango na nzela ya Biblia. Asalisaka mpe biso na nzela ya mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, makita ya bokristo, mayangani ya mike mpe ya minene. Osalelaka mateya nyonso oyo ozali kozwa? Soki osali bongo te, okolonga te kobundisa monguna na yo; okozala lokola moto oyo asalaka lisano ya makɔfi oyo azali kobɛta makɔfi na mopɛpɛ.

4. Nini tokoki kosala mpo mabe elonga biso te?

4 Tosengeli kozala ekɛngɛ ntango nyonso. Mpo na nini? Mpo banguna na biso bakoki kobundisa biso ntango oyo tozali kokanisa te to ntango tozali na bolɛmbu. Biblia ekebisi biso mpe elendisi biso na maloba oyo: “Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.” (Baroma 12:21) Soki tokobi kobundisa mabe, tokoki kolonga! Kasi, soki tozali lisusu ekɛngɛ te mpe totiki kobunda, Satana, mokili na ye, mpe bolɛmbu na biso ekoki kolonga biso. Yango wana, kotika te. Kolɛmba nzoto te mpe kolɛmbisa mabɔkɔ te!1 Petro 5:9.

5. (a) Nini tosengeli kobosana te soki tolingi ete Nzambe andima biso mpe apambola biso? (b) Tokolobela banani oyo Biblia elobeli?

5 Mpo na kolonga, tosengeli kobosana te ntina oyo tozali kobunda. Ezali mpo tolingi ete Nzambe andima biso mpe apambola biso. Baebre 11:6 elobi: “Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” Koluka Yehova na mposa makasi elimboli kosala mpenza makasi soki tolingi ete andima biso. (Misala 15:17) Biblia ezali na bandakisa mingi ya malamu ya mibali mpe basi oyo basalaki kaka bongo. Yakobo, Rashele, Yozefe, mpe ntoma Paulo, bango nyonso bakutanaki na mikakatano oyo etungisaki bango na mayoki mpe na nzoto. Kasi balongaki. Ndakisa na bango emonisi ete soki tosali makasi, biso mpe tokoki kozwa lipamboli ya Yehova. Tótala ndenge tokoki kosala yango.

OKOZWA MAPAMBOLI SOKI OLENDENDELI

6. Nini esalisaki Yakobo alendendela, mpe mbano nini azwaki? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Yakobo moto ya sembo abundaki mpe ayikaki mpiko mpo azalaki kolinga Yehova mpe azalaki kozwa boyokani na ye na Yehova na motuya mingi. Azalaki na kondima makasi na elaka ya Yehova ya kopambola momboto na ye. (Ebandeli 28:3, 4) Ntango Yakobo azalaki na mbula soki 100, abundaki na anzelu moko mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe. (Tángá Ebandeli 32:24-28.) Yakobo azalaki mpenza na makasi ya kobunda na anzelu wana ya nguya? Soki moke te! Kasi azalaki na ekateli makasi, mpe amonisaki ete alingi kosala mpenza makasi mpo na kozwa lipamboli! Yehova apambolaki Yakobo mpo alendendelaki mpe apesaki ye nkombo Yisraele, oyo elimboli “moto oyo  alendendelaka to abundaka na Nzambe.” Yakobo azwaki mbano oyo biso mpe tozali koluka, elingi koloba, Yehova andima biso mpe apambola biso.

7. (a) Mokakatano nini Rashele azalaki na yango, oyo ekokaki kolɛmbisa ye nzoto? (b) Rashele asalaki nini, mpe lipamboli nini azwaki?

7 Rashele, mwasi oyo Yakobo azalaki kolinga mingi, azalaki mpe na mposa makasi ya komona ndenge Yehova akokokisa elaka oyo apesaki mobali na ye. Kasi Rashele azalaki na mokakatano moko. Azalaki kobota te. Na ntango ya kala, kozanga kobota ezalaki kosala basi mpasi mingi. Ndenge nini Rashele akobaki kobunda atako azalaki na likambo oyo ekokaki kolɛmbisa ye nzoto? Abungisaki elikya soki moke te. Akobaki nde kobunda na ndenge azalaki kobondela Yehova lisusu mingi. Yehova ayokaki mabondeli ya Rashele oyo ezalaki kouta na motema, mpe Rashele amonaki ete Yehova apamboli ye ntango abotaki bana. Yango wana, alobaki ete: “Nabundi . . . líbanda moko ya makasi. Mpe nalongi!”Ebandeli 30:8, 20-24.

8. Mikakatano nini Yozefe akutanaki na yango, mpe ndenge nini azali ndakisa malamu mpo na biso?

8 Na ntembe te, ndakisa ya bosembo ya Yakobo ná Rashele esimbaki motema ya mwana na bango Yozefe mpe esalisaki ye ntango akutanaki na mikakatano na bomoi na ye. Ntango Yozefe azalaki na mbula 17, bomoi na ye ebongwanaki mpenza. Bandeko na ye bayokelaki ye zuwa mpe batɛkaki ye na boombo. Na nsima, alekisaki bambula mingi na bolɔkɔ na Ezipito, atako asalaki likambo moko ya mabe te. (Ebandeli 37:23-28; 39:7-9, 20, 21) Kasi Yozefe alɛmbaki nzoto te, mpe alukaki te kozongisa mabe na mabe. Mpo na nini? Mpo azalaki kozwa boyokani na ye ná Yehova na motuya mingi mpe atyaki makanisi na ye nyonso na boyokani yango. (Balevi 19:18; Baroma 12:17-21) Ndakisa ya Yozefe ekoki kosalisa biso. Ata soki bomwana na biso ezalaki mpasi to bomoi na biso sikoyo ezali komonana lokola  ete elikya ezali te, tosengeli kokoba kobunda mpe kolendendela. Soki tosali bongo, tokoki kondimisama ete Yehova akopambola biso.Tángá Ebandeli 39:21-23.

9. Ndenge nini tokoki komekola Yakobo, Rashele, mpe Yozefe?

9 Lelo oyo, biso mpe tokoki koyikela mikakatano mpiko. Mbala mosusu ozali konyokwama mpo na makambo oyo ezangi bosembo, bazali kokanisela yo mabe, to bazali kosɛka yo to moto moko azali koyokela yo zuwa. Na esika olɛmba nzoto, kanisá makambo oyo esalisaki Yakobo, Rashele, mpe Yozefe bákoba kosalela Yehova na esengo. Nzambe apesaki bango makasi mpe apambolaki bango mpo bazalaki kozwa na motuya mingi boyokani na bango elongo na ye. Bakobaki kobunda mpe kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na bango. Lokola tozali na mikolo ya nsuka, ezali na ntina mingi tókoba kokómisa makasi elikya na biso mpo na mikolo ezali koya! Okolinga kobunda, elingi koloba kosala makasi mpo Yehova andima yo?

NDIMÁ KOBUNDA MPO NA KOZWA LIPAMBOLI

10, 11. (a) Mpo na nini tosengeli kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe? (b) Nini ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu?

10 Mpo na nini tosengeli kobunda mpo Nzambe apambola biso? Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kobunda na bamposa mosusu ya mabe. Basusu babundaka mpo na kotalela mosala ya kosakola na ndenge oyo ebongi, mpe basusu bazali kobunda na maladi to mpo bazali komiyoka ete bazali bango moko. Ezali mpe na basusu oyo bamonaka ete ezali mpasi kolimbisa moto moko oyo asalelaki bango mabe. Ata soki tozali kosalela Yehova banda bambula mingi, biso nyonso tosengeli kobundisa makambo oyo esalaka ete ekóma mpasi kosalela Nzambe, ye oyo apesaka bato ya sembo mbano.

Ozali kobunda mpo na kozwa lipamboli ya Nzambe? (Talá paragrafe 10, 11)

11 Ya solo, ekoki mpenza kozala mpasi kozala mokristo mpe kozwa bikateli ya malamu, mingimingi ntango tozali kobunda na bamposa na biso moko ya mabe. (Yirimia 17:9) Soki ozali koyoka bongo, bondelá Yehova mpe sɛngá ye elimo santu. Libondeli mpe elimo santu ekoki kosalisa yo ozala na makasi ya kosala makambo ya malamu, mpe na nsima ozwa lipamboli ya Nzambe. Zalá na ekateli ya kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na yo. Salá makasi otángaka Biblia mokolo na mokolo, mpe zwáká ntango ya koyekola yo moko mpe kosala losambo na kati ya libota.Tángá Nzembo 119:32.

12, 13. Ndenge nini bandeko mibale bazwaki lisalisi mpo na kobengana bamposa mabe?

12 Ezali na bandakisa mingi oyo emonisi ndenge oyo Liloba ya Nzambe, elimo na ye, mpe mikanda ya moombo ya sembo esalisaki bandeko bálonga bamposa mabe. Elenge moko atángaki lisolo “Ndenge nini okoki kobengana bamposa ya mabe?” oyo ebimaki na Lamuká! ya 08/12/2003. Asalaki nini? Alobaki boye: “Nazalaki kobunda mpo na kobengana makanisi ya mabe. Ntango natángaki na lisolo yango ete ‘mpo na bato mingi etumba mpo na kobengana bamposa mabe ezalaka makasi,’ namonaki ete bandeko mosusu mpe bazali kobunda lokola ngai. Namonaki ete nazali ngai moko te.” Lisolo oyo elobi “Dieu approuve-t-il les mœurs différentes”? oyo ebimaki na Lamuká! ya 08/10/2003, esalisaki mpe elenge yango. Na lisolo yango, amonaki ete mpo na basusu, etumba yango esilaka te, ezali lokola “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” (2 Bakorinti 12:7) Atako bongo, ntango bazali kokoba  kobunda mpo na kozala na etamboli ya pɛto, bazali kotalela mikolo ezali koya na makanisi ya malamu. Elenge yango alobi: “Yango wana, namonaka ete mokolo na mokolo, nakoki kotikala sembo. Nazali kotɔnda Yehova mingi ndenge azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kosalisa biso tótikala sembo mokolo na mokolo na mokili oyo mabe.”

13 Tótalela mpe ndakisa ya ndeko mwasi moko na États-Unis. Akomi boye: “Nalingi kopesa bino matɔndi ndenge bozali koleisa biso bilei oyo tosengeli na yango mpe na ntango oyo ebongi. Mbala mingi namonaka lokola ete masolo yango ekomami mpenza mpo na ngai. Na boumeli ya bambula, nazalaki kobunda mpo na kobengana mposa makasi ya likambo moko oyo Yehova ayinaka. Na bantango mosusu, nazalaki na mposa ya kolɛmbisa mabɔkɔ mpe kotika kobunda. Nayebi ete Yehova azali na motema mawa mpe alimbisaka, kasi lokola nazalaki na makanisi wana ya mabe mpe nakangamaki na yango makasi, namonaki ete Nzambe akoki kosalisa ngai te. Etumba oyo nazalaki kobunda ebongolaki makambo mingi ya bomoi na ngai. . . . Nsima ya kotánga lisolo “Ozali na ‘motema moko mpo na koyeba’ Yehova?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2013, namonaki mpenza ete Yehova alingi kosalisa ngai.”

14. (a) Ntoma Paulo ayebaki nini mpo na bitumba oyo azalaki kobunda? (b) Ndenge nini tokoki kolonga bolɛmbu na biso?

14 Tángá Baroma 7:21-25. Ntoma Paulo ye moko ayebaki ndenge oyo ekokaki kozala mpasi kobunda na bamposa mabe mpe na bolɛmbu. Kasi, azalaki kondima ete akokaki kolonga etumba soki abondeli Yehova, atyeli ye motema ete akosalisa ye, mpe amonisi kondima na mbeka ya Yesu. Bongo biso? Tokoki kolonga bolɛmbu na biso? Ɛɛ, tokoki kolonga soki tomekoli ntoma Paulo mpe na esika ya kotya motema na makasi na biso moko, totyeli Yehova motema mobimba, mpe tondimi lisiko.

15. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso tótikala sembo mpe tóyikela mikakatano mpiko?

15 Ntango mosusu Nzambe akoki kotika ete tómonisa ndenge oyo tozali komitungisa mpo na likambo moko oyo ekómeli biso. Na ndakisa, tokosala nini soki biso moko to moto moko na libota na biso azali kobɛla makasi to akutani na makambo ezangi bosembo? Soki totyeli Yehova motema mobimba, tokosɛnga ye apesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo na kotikala sembo mpe kobatela esengo na biso mpe boyokani na biso na ye. (Bafilipi 4:13) Ndakisa ya bakristo mingi, ezala ya kala mpe ya mikolo oyo, emonisi ete libondeli ekoki kolendisa biso mpe kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango mpo tókoba koyika mpiko.

KOBÁ KOBUNDA MPO NA KOZWA LIPAMBOLI YA YEHOVA

16, 17. Ozali na ekateli ya kosala nini?

16 Zabolo akosepela komona yo olɛmbi nzoto, osundoli makambo nyonso, mpe olɛmbisi mabɔkɔ. Yango wana, zalá na ekateli ya ‘kokangama makasi na oyo ezali malamu.’ (1 Batesaloniki 5:21) Okoki kolonga etumba na Satana, mokili na ye mabe, mpe bamposa nyonso ya mabe! Okoki kolonga soki otyeli Yehova motema mobimba ete akolendisa yo mpe akosalisa yo.2 Bakorinti 4:7-9; Bagalatia 6:9.

17 Na yango, kolɛmbisa mabɔkɔ te. Kobá kopika mpende. Kobá kobunda. Kobá kolendendela. Zalá na kondima ete Yehova ‘akosopela yo lipamboli kino bosɛnga ekozala lisusu te.’Malaki 3:10.