Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2016

Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma na kondima makasi

Baboti: Bósalisa bana na bino bákóma na kondima makasi

“Bino bilenge mibali mpe bino bangɔndɔ . . . Básanzola nkombo ya Yehova.”NZEMBO 148:12, 13.

NZEMBO: 88, 115

1, 2. (a) Mpo na nini ezali pɛtɛɛ te baboti báteya bana bázala na kondima epai ya Yehova? (b) Wapi lolenge kaka moko oyo baboti bakoki kosala yango? (c) Makambo nini minei tokolobela sikoyo?

MAMA moko ná tata moko na France balobaki: “Tondimelaka Yehova, kasi yango elimboli te ete bana na biso mpe bakondimela ye. Basangolaka kondima na libota te. Bana na biso bakómaka na kondima mokemoke.” Ndeko mobali moko na Australie akomaki: “Kosalisa mwana na yo akóma na kondima ekoki ntango mosusu kozala mokakatano eleki monene oyo okokutana na yango.” Abakisaki: “Okoki kokanisa ete opesaki mwana na yo eyano oyo esepelisi ye. Na nsima, okoya komona ete atuni lisusu kaka motuna yango! Mwana akoki kondima eyano moko lelo, kasi lobi akómi koboya kondima yango.” Ntango bana bazali kokola, baboti mingi bamonaka ete basengeli kolimbwela bango makambo lisusu malamumalamu. Mpe bamonaka ete basengeli kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na koteya bana na bango bálinga Yehova.

2 Soki ozali moboti, mbala mosusu omitunaka soki okolonga  mpenza koteya bana na yo bálinga Yehova mpe bákoba kosalela ye ata ntango bakokóma mikóló? Mpo na koloba solo, moko te kati na biso akoki kosala yango na makasi na ye moko. (Yirimia 10:23) Yango wana, tosengeli kotyela Yehova motema asalisa biso. Alakisá baboti ndenge ya kotambwisa bana na bango. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo? (1) Luká koyeba bango malamu. (2) Teyá bango makambo ya Yehova oyo ezali na motema na yo moko. (3) Salelá bandakisa. (4) Bondelá mpo na kosɛnga elimo santu mpe moniselá bana na yo motema molai.

YEBÁ BANA NA YO MALAMU

3. Ndenge nini baboti bakoki komekola lolenge oyo Yesu azalaki koteya bayekoli na ye?

3 Mbala mingi, Yesu azalaki kotuna bayekoli na ye mituna mpo na koyeba makambo oyo bazalaki kondima. (Matai 16:13-15) Okoki kolanda ndakisa na ye. Ntango ozali kosolola na bana na yo to kosala mosala moko elongo na bango, tuná bango makambo oyo bazali kokanisa mpe tiká bango báyebisa yo ndenge oyo bazali komiyoka. Bazali naino kotya ntembe na makambo mosusu? Ndeko mobali moko ya mbula 15 na Australie alobaki: “Mbala mingi tata asololaka na ngai mpo na kondima na ngai mpe asalisaka ngai nakanisa. Atunaka ngai boye: ‘Biblia elobi nini?’ ‘Ondimaka oyo Biblia elobi?’ ‘Mpo na nini ondimaka yango?’ Alingaka ete napesa eyano na maloba na ngai moko na esika ya kozongela kaka maloba na ye to ya mama. Ntango nakolaki, nasengelaki kopesa biyano ya mwa milai.”

4. Mpo na nini ezali na ntina kozala na motema molai mpo na koyanola na mituna ya bana na yo? Pesá ndakisa.

4 Soki bana na yo bazali mbala moko te kondima likambo moko oyo Biblia elobi, zalá na motema molai. Salisá bango bázwa biyano na mituna na bango. Tata moko alobaki: “Kozwa mituna ya mwana na yo na lisɛki te. Koboya koyanola yango te kaka mpo okanisi ete ezangi ntina, koboya mpe kolobela likambo moko te kaka mpo okanisi ete ebongi te kolobela yango.” Kutu, ezali malamu ete bana na yo bátunaka yo mituna, mpo yango elimboli ete balingi kokanga ntina ya makambo. Ata Yesu azalaki kotuna mituna ntango azalaki elenge. (Tángá Luka 2:46.) Elenge moko na Danemark alobaki: “Ntango nalobaki ete namitunaki soki tozali na lingomba ya solo, baboti na ngai bafandaki nyɛɛ, ata soki motuna yango ekokaki kotinda bango bámitungisa mpo na ngai. Basalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai nyonso.”

Yebisáká bana na yo makambo ya Yehova mokolo na mokolo ntango bozali kosala makambo elongo

5. Ata soki emonani ete bana bazali na kondima epai ya Yehova, baboti basengeli kosala nini?

5 Luká koyeba bana na yo malamu. Kokanisa te ete bazali na kondima epai ya Yehova kaka mpo babimaka na mosala ya kosakola mpe bakendaka na makita. Ndenge nini batalelaka mpenza Yehova, mpe bakanisaka nini mpo na Biblia? Salá makasi oyeba soki ezali na likambo moko oyo ezali kosala ete ezala mpasi mpo bázala sembo epai ya Yehova. Yebisáká bango makambo ya Yehova mokolo na mokolo ntango bozali kosala makambo elongo na bana na yo. Bondeláká mpo na bana  na yo, ezala ntango ozali elongo na bango to ntango ozali yo moko.

TEYÁ BANGO MAKAMBO YA YEHOVA OYO EZALI NA MOTEMA NA YO

6. Soki baboti bakobi koyekola makambo ya Yehova mpe Biblia, ndenge nini yango esalisaka bango báteya bana na bango?

6 Bato bazalaki kosepela koyoka Yesu mpo azalaki kolinga Yehova mpe ayebaki Makomami malamumalamu. Bamonaki mpe ete Yesu azalaki kolinga bango. Yango wana, bazalaki koyoka ye na likebi. (Luka 24:32; Yoane 7:46) Ndenge moko mpe, soki bana na yo bazali komona ete olingaka Yehova, bango mpe bakolinga ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:5-8; Luka 6:45.) Na yango, kobá koyekola Biblia malamumalamu, mpe tángáká mikanda na biso mbala na mbala. Luká koyeba makambo mingi oyo etali biloko oyo Yehova akelá. (Matai 6:26, 28) Soki oyebi makambo mingi mpo na Yehova, okoteya mpe bana na yo makambo mingi mpo na ye.Luka 6:40.

Yebisá bana na yo makambo oyo ozali koyekola mpo na Yehova

7, 8. (a) Soki oyekoli likambo moko mpo na Yehova, okoki kosala nini? (b) Ndenge nini baboti mosusu basalaki yango?

7 Soki oyekoli likambo moko mpo na Yehova, yebisá yango bana na yo. Salá yango ntango nyonso oyo ozali elongo na bango, kaka te na ntango ya kobongisa makita to na ntango ya losambo na kati ya libota. Mama moko ná tata moko na États-Unis basalaka bongo. Basololaka na bana na bango makambo ya Yehova ntango bamoni eloko moko ya kitoko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ to ntango bazali kolya bilei kitoko. Balobi boye: “Tokundwelaka bana na biso bolingo ya Yehova mpe ndenge oyo abongiselá biso biloko nyonso.” Mobali moko ná mwasi na ye na Afrika ya Sudi basepelaka kolobela bozalisi ntango bazali kobongisa bafolo mpe milona elongo na bana na bango mibale ya basi. Na ndakisa, bamonisaka ete komona ndenge oyo mboto ekómaka molona ekamwisaka. Baboti yango balobi boye: “Tolukaka kosalisa bana na biso bákóma na limemya mingi mpo na bomoi mpe ndenge oyo esalemá na ndenge ya kokamwa.”

8 Tata moko na Australie akendaki na mwana na ye, oyo azalaki na mbula soki 10, na musée. Tata yango amonaki malamu asalela ntango yango mpo na kosalisa mwana na ye akómisa kondima na ye makasi mpe amona makambo oyo emonisi ete Yehova azali Mozalisi. Alobi boye: “Tomonaki ba ammonites mpe ba trilobites, bikelamu moko ya kala oyo ezalaki na mbu kasi ezalaka lisusu te. Tokamwaki mingi komona ete mwa banyama yango ezalaki kitoko, ezalaki kokamwisa, mpe ezalaki na biteni nyonso; ekeseni te na oyo tomonaka lelo. Na yango, soki bomoi ebandaki na eloko moko mpe na nsima ekómi eloko mosusu, mpo na nini bikelamu wana ya kala ezalaki kokamwisa ndenge wana? Liteya wana ekamwisaki ngai mingi mpe nayebisaki yango mwana na ngai.”

SALELÁ BANDAKISA

9. (a) Mpo na nini ezali malamu kosalela bandakisa? (b) Ndakisa nini mama moko asalelaki?

9 Mbala mingi, Yesu azalaki kosalela bandakisa. Azalaki kobɛta lisolo to kopesa ndakisa mpo na kobimisa mateya ya ntina mingi. (Matai 13:34, 35) Ntango ozali kosalela bandakisa,  ozali kotinda bana na yo bákanisa. Yango ekosalisa bango bákanisa liteya oyo ozali koteya bango, bákanga yango malamu, mpe bábosana yango te. Bakosepela mpe koyekola. Na ndakisa, mama moko na Japon alingaki bana na ye ya mibali báyeba ete ndenge oyo Yehova akelaki etando oyo ezingi mabele emonisi ete alingaka biso mingi. Mwana moko azalaki na mbula 8 mpe mosusu na mbula 10. Na yango, asalelaki ndakisa moko oyo bana yango bakokaki koyeba malamu. Apesaki bango miliki, sukali, mpe kafe. Na nsima, asɛngaki mokomoko na bango asalela ye kɔpɔ ya kafe. Alobi boye: “Basalaki yango mpenza na ekɛngɛ. Ntango natunaki bango ntina oyo basalaki yango na ekɛngɛ ndenge wana, bayanolaki ete balingaki kafe yango ezala kaka ndenge nalingaka. Nalimbolaki ete Nzambe asangisaki bagaze na mopɛpɛ oyo ezingi mabele na ekɛngɛ ndenge wana, na ndenge oyo ebongi mpenza mpo na biso.” Bana yango basepelaki mingi koyekola liteya wana, mpe babosaná yango te!

Okoki kosalela bandakisa ya pɛtɛɛ mpo na komonisa bana na yo ete Mozalisi azali (Talá paragrafe 10)

10, 11. (a) Ndakisa nini okoki kosalela mpo na komonisa bana na yo ete Mozalisi azali? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Bandakisa nini osalelaki?

10 Ndakisa nini okoki kosalela mpo na komonisa bana na yo ete Mozalisi azali? Okoki kosala gato elongo na mwana na yo, na kolanda liste ya biloko oyo basangisaka mpo na kosala gato. Limbolelá ye ntina oyo esengeli kolanda liste yango malamumalamu. Na nsima, pesá mwana na yo pɔme to mbuma mosusu, mpe tuná ye: “Oyebi ete ezali na biloko oyo basangisaki mpo na kosala pɔme oyo?” Nsima na yango, katá pɔme yango na katikati, mpe pesá ye mwa mbuma oyo ezalaka na kati. Limbolá ete mwa mbuma wana ezali lokola liste ya biloko oyo basangisaki mpo na kosala pɔme. Ezali na malako mpo na ndenge ya kosala pɔme. Kasi, yango ezali na makambo mingi koleka malako mpo na kosala gato. Okoki kotuna boye: “Moto moko nde akomaki biloko oyo basangisaka mpo na kosala gato. Bongo nani akomaki biloko oyo basangisaki mpo na kosala pɔme?” Soki bana bazali mwa mikóló, okoki kolimbola ete ata malako mpo na kosala nzete ya pɔme oyo ekoki kobota bapɔme mosusu ezali na ADN oyo ezali na kati ya mwa mbuma wana. Okoki mpe komonisa bango bafɔtɔ mpe bandakisa mosusu oyo ezali na mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, nkasa 10 tii na 20.

11 Baboti mingi batángaka elongo na bana na bango masolo “Ebimá kaka yango moko?” oyo ebimaka na Lamuká! Soki bana bazali naino mike, baboti bakoki kolimbola makambo yango na ndenge ya pɛtɛɛ. Na ndakisa, na Danemark, mobali moko ná mwasi na ye bakokanisaki mpɛpɔ na ndɛkɛ. Balobaki boye: “Mpɛpɔ emonanaka kaka  lokola ndɛkɛ. Kasi mpɛpɔ ekoki nde kobota maki mpe kobimisa bampɛpɔ mosusu ya mikemike? Ndɛkɛ esengeli nde na libándá ya mpɛpɔ mpo na kokita? Mpe okoloba nini mpo na makɛlɛlɛ ya mpɛpɔ ná koyemba ya ndɛkɛ? Sikoyo, nani aleki na mayele: moto oyo asalá mpɛpɔ to Mozalisi ya bandɛkɛ?” Ntango ozali kotinda bana na yo bákanisa mpe kotuna bango mituna, ozali kosalisa bango básalela ‘makoki na bango ya kososola’ mpe bákómisa makasi kondima na bango epai ya Yehova.Masese 2:10-12.

12. Ndenge nini okoki kosalela bandakisa mpo na koteya bana na yo ete likambo nyonso oyo Biblia elobaka ezali solo?

12 Okoki kosalela bandakisa mpo na koteya bana na yo ete likambo nyonso oyo Biblia elobaka ezali solo. Na ndakisa, okoki kotánga Yobo 26:7. (Tángá.) Kosuka te na koyebisa bana na yo ete likambo oyo vɛrsɛ yango elobi esengeli kouta kaka epai ya Yehova. Salisá nde bango básalela makoki na bango ya kokanisa. Okoki koloba ete na ntango ya Yobo bato bazalaki te kondima ete mabele esimbami na eloko moko te. Bayebaki ete eloko nyonso, na ndakisa bale to libanga, esengeli kosimbama na eloko mosusu. Na ntango wana, moto moko te apesaki bilembeteli oyo emonisi ete mabele esimbami na eloko moko te, mpo bazalaki te na bamasini lokola téléscope to fize. Liteya yango oyo: Atako Biblia ekomamaki eleki bambula mingi, makambo oyo elobaka ezalaka ntango nyonso solo, mpo eutá epai ya Yehova.Nehemia 9:6.

TEYÁ BANGO NTINA YA KOTIKA ETE BIBLIA ETAMBWISA BISO

13, 14. Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango bátosa makambo oyo Biblia elobi?

13 Ezali mpe na ntina mingi koteya bana na yo ete bakokóma na esengo mingi soki batosi makambo oyo Biblia elobi. (Tángá Nzembo 1:1-3.) Na ndakisa, okoki kotuna bana na yo bámeka kokanisa ete balingi kokende kofanda na esanga moko. Basengeli kopona mwa bato oyo bakofanda na bango kuna na esanga yango. Na nsima, okoki kotuna bango: “Bato ya ndenge nini bokolinga kokende elongo na bango soki bolingi ete moto nyonso azala na esengo?” Nsukansuka, okoki kotánga Bagalatia 5:19-23 mpo na komona lolenge ya bato oyo Yehova alingi bázala na mokili ya sika.

14 Na ndenge yango, okoki koteya bana na yo mateya mibale ya ntina. Ya liboso, Yehova azali koteya biso mpo tózala na bomoi ya esengo sikoyo mpe tózala na kimya na basusu. Ya mibale, azali koteya biso ndenge ya kozala na bomoi na mokili ya sika. (Yisaya 54:13; Yoane 17:3) Okoki mpe komonisa bana na yo ndenge oyo Biblia esalisaki bandeko mosusu. Na ndakisa, okoki kozwa lisolo moko ya bomoi na mikanda na biso, ekoki kozala na masolo “Biblia ebongolaka bato” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. To okoki kosɛnga ndeko moko ya lisangá na bino ayebisa yo ná bana na yo ndenge oyo Biblia esalisaki ye abongola makambo mingi mpo na kosepelisa Yehova.Baebre 4:12.

15. Nini ekosalisa yo oteya bana na yo?

15 Salelá makoki na yo ya kokanisa mpo mateya oyo ozali koteya bana na yo esepelisa bango mingi. Kanisá makambo ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa bango básepela koyekola makambo ya Yehova mpe bápusana penepene na ye. Mpe kobá kosala bongo ntango bazali kokola. Tata moko alobaki: “Kolɛmba soki moke te koluka lolenge ya sika ya kolimbola masolo ya kala.”

 BONDELÁ YEHOVA MPO NA KOSƐNGA ELIMO NA YE MPE MONISELÁ BANA NA YO MOTEMA MOLAI

16. (a) Ntango ozali koteya bana, mpo na nini ezali na ntina komonisa motema molai? (b) Ndenge nini baboti mosusu bamonisaki motema molai?

16 Na lisalisi ya elimo ya Yehova, bana na yo bakoki kozala na kondima makasi. (Bagalatia 5:22, 23) Kasi, ekoki kosɛnga ntango mingi mpo kondima na bango ekóma makasi. Yango wana, moniselá bana na yo motema molai mpe kobá koteya bango. Tata moko na Japon oyo azali na mwana moko ya mobali mpe moko ya mwasi alobaki: “Ngai ná mwasi na ngai totyelaki kaka bana na biso likebi mingi. Bandá ntango bazalaki bana mike, nazalaki koyekola na bango miniti 15 mokolo na mokolo, longola kaka mikolo oyo tozalaki na makita ya lisangá. Miniti 15 ezalaki kilo te ezala mpo na biso to mpo na bango.” Mokɛngɛli ya zongazonga moko akomaki boye: “Ntango nazalaki elenge, nazalaki na mituna mpe bantembe mingi na motema. Nsima ya mikolo, nazwaki biyano na mituna yango mingi na makita, na boyekoli ya libota, to na boyekoli na ngai moko. Yango wana, ezali na ntina mingi ete baboti bákoba koteya bana na bango.”

Mpo na kozala moteyi ya malamu, yo moko osengeli kolinga Liloba ya Nzambe (Talá paragrafe 17)

17. (a) Mpo na nini ezali na ntina ete baboti bákómisa makasi kondima na bango moko? (b) Ndenge nini mama moko ná tata moko na ekólo Bermudes basalisaki bana na bango ya basi bázala na kondima epai ya Yehova?

17 Na ntembe te, bana na yo bakoki koyekola makambo mingi soki bamoni ete yo moko ozali na kondima makasi epai ya Yehova. Bakomona makambo oyo ozali kosala. Yango wana, kobá kokómisa kondima na yo moko makasi. Tiká bana na yo bámona ete Yehova azali mpenza solo na miso na yo. Na ndakisa, ntango mama moko ná tata moko na ekólo Bermudes bazalaki komitungisa mpo na likambo moko, babondelaki elongo na bana na bango ya basi mpe basɛngaki Yehova akamba bango. Balendisaki mpe bana na bango bábondela na ndenge na bango moko. Balobi boye: “Toyebisaki mpe mwana na biso ya mwasi ya liboso ‘atyela Yehova motema mobimba, akoba komipesa na mosala ya Bokonzi, mpe amitungisa mingi te.’ Ntango amonaki ndenge likambo yango esukaki, ayebaki ete Yehova azalaki kosalisa biso. Yango ekómisaki makasi kondima na ye epai ya Nzambe mpe na Biblia.”

18. Eloko nini baboti basengeli kobosana te?

18 Baboti, bóbosana soki moke te ete bokoki te kotinda bana na bino na makasi bázala na kondima. Bozali kolona mpe komwangisa mai, kasi kaka Yehova nde akolisaka. (1 Bakorinti 3:6) Na yango, bósala makasi mpo na koteya bana na bino makambo na ye, mpe bóbondela mpo na kosɛnga elimo na ye esalisa bango bázala na kondima. Bokoki kozala na elikya ete Yehova akopambola mosala na bino nyonso ya makasi.Baefese 6:4.