Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2017

Bolingo​—Ezaleli ya ntina mingi

Bolingo​—Ezaleli ya ntina mingi

YEHOVA asalisaki ntoma Paulo alobela bizaleli libwa oyo elimo santu esalisaka moto amonisa. (Bagalatia 5:22, 23) Bizaleli yango nyonso ebengamaka “mbuma ya elimo.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Mbuma yango ezali mpe na kati ya bomoto ya sika oyo bakristo basengeli kolata. (Bakolose 3:10) Ndenge kaka nzete ebotaka mbuma soki ebatelami malamu, moto akomonisa bizaleli yango ya malamu soki elimo santu ezali kosala na bomoi na ye kozanga mokakatano.​—Nzembo 1:1-3.

Ezaleli ya liboso oyo ntoma Paulo atángaki na mbuma ya elimo ezali bolingo. Mpo na nini ezali na ntina mingi? Ntoma Paulo alobaki ete soki azali na bolingo te, azali “mpamba.” (1 Bakorinti 13:2) Kasi, bolingo ezali nini? Ndenge nini tokoki kokolisa yango mpe komonisa yango mokolo na mokolo?

BOLINGO EZALI NINI?

Ata soki ezali mpasi kolimbola soki bolingo ezali mpenza nini, Biblia emonisi ndenge moto oyo azali na bolingo akanisaka mpe asalaka makambo. Na ndakisa, moto oyo azali na bolingo azalaka “na motema molai mpe na boboto” mpe ‘asepelaka na solo.’ Soki moto azali na bolingo, ‘akangaka motema na makambo nyonso, andimaka makambo nyonso, alikyaka makambo nyonso, mpe ayikaka mpiko na makambo nyonso.’ Asepelaka na bato, atyelaka bango likebi mpe azalaka sembo epai ya baninga. Soki moto azali na bolingo te, azalaka na zuwa, amikumisaka, alukaka matomba na ye moko, asalaka makambo ya nsɔni, mpe alimbisaka te. Tómonisa te bizaleli wana ya mabe, tóluka nde komonisa bolingo oyo “elukaka matomba na yango moko te.”​—1 Bakorinti 13:4-8.

YEHOVA NÁ YESU BAZALI NDAKISA MALAMU NA OYO ETALI BOLINGO

“Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Makambo nyonso oyo asalaka emonisi ete azali bolingo. Bolingo na ye monene mpo na bato emonanaki na ndenge atindaki Yesu na mabele mpo anyokwama mpe akufela biso. Ntoma Yoane alobaki boye: “Na likambo oyo nde bolingo ya Nzambe emonisamaki polele mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki na mokili Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo biso tókoka kozwa bomoi na nzela na ye. Bolingo, na likambo oyo, ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye azala mbeka mpo na kozipa masumu na biso.” (1 Yoane 4:9, 10) Lokola Nzambe alingaka biso, masumu na biso ekoki kolimbisama, tokoki kozwa elikya mpe bomoi.

Yesu amonisaki ete alingaka bato na ndenge apesaki bomoi na ye mbeka mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki: “Na ‘mokano’ yango biso tosantisami na likabo ya nzoto ya Yesu Kristo mbala moko mpo na libela.” (Baebre 10:9, 10) Moto moko te akoki komonisa bolingo monene ya ndenge wana. Yesu alobaki: “Ata moto moko te azali na bolingo koleka oyo, ete moto akaba molimo na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Bato ya kozanga  kokoka mpe bakoki komonisa bolingo oyo Yehova ná Yesu bamonisaki? Ɛɛ! Tótala ndenge tokoki kosala yango.

“BÓKOBA KOTAMBOLA NA KATI YA BOLINGO”

Ntoma Paulo alendisi biso: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo, mpe bókoba kotambola na kati ya bolingo, ndenge Kristo mpe alingaki bino mpe amikabaki mpo na bino.” (Baefese 5:1, 2) ‘Kokoba kotambola na kati ya bolingo’ elimboli nini? Elimboli ete tosengeli komonisa bolingo ntango nyonso. Tósukaka kaka na koloba te ete tolingaka bato. Tosengeli komonisa yango na misala. Ntoma Yoane akomaki: “Bana, tólingaka, na maloba te mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.” (1 Yoane 3:18) Na ndakisa, tosakolaka ‘nsango malamu ya Bokonzi’ mpo tolingaka Yehova mpe bazalani na biso. (Matai 24:14; Luka 10:27) Tokotambola mpe na bolingo soki tozali na motema molai, na boboto mpe tolimbisaka basusu. Tolandaka toli oyo ya Biblia: “Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.”​—Bakolose 3:13.

Kasi, kopesa basusu toli to kosembola basusu elimboli te ete tozangi bolingo. Na ndakisa, mpo mwana atika kolela, baboti mosusu basalaka nyonso oyo mwana alingi. Kasi, moboti oyo alingaka mpenza mwana na ye akopamela ye ntango esengeli. Ndenge moko mpe, atako Nzambe azali bolingo, “apesaka disiplini na moto oyo ye alingaka.” (Baebre 12:6) Kopesa disiplini ntango esengeli ezali ndenge ya komonisa bolingo. (Masese 3:11, 12) Kasi kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe mbala mingi tosalaka makambo na bolingo te. Yango wana, tosengeli kokolisa bolingo na makambo mosusu. Ndenge nini tokoki kosala yango? Tótalela makambo misato.

NDENGE OYO TOKOKI KOKOLISA BOLINGO

Ya liboso, sɛngá Nzambe apesa yo elimo santu, oyo esalaka ete tómonisa bolingo. Yesu alobaki ete Yehova apesaka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango. (Luka 11:13) Soki tozali kobondela mpo na kosɛnga elimo santu mpe totiki yango etambwisa biso, tokokóma na bolingo mingi. (Bagalatia 5:16) Na ndakisa, soki ozali nkulutu, okoki kosɛnga elimo santu mpo esalisa yo omonisa bolingo ntango ozali kopesa basusu toli oyo euti na Biblia. To soki ozali moboti, okoki kosɛnga elimo ya Nzambe esalisa yo opesa bana na yo disiplini, na nkanda te, kasi na bolingo.

Ya mibale, manyoláká ndenge Yesu amonisaki bolingo ata ntango basusu basalaki ye mabe. (1 Petro 2:21, 23) Soki moto moko apesi yo nkanda to soki asali yo likambo na kozanga bosembo, omituna boye: ‘Soki ezalaki Yesu, alingaki kosala nini?’ Ndeko mwasi moko na nkombo Leigh amonaki ete komituna motuna yango esalisaki ye akanisaka liboso ya kosala likambo. Alobi boye: “Mokolo moko, moninga moko ya mosala akomelaki baninga mosusu mesaje oyo elobaki mabe mpo na ngai mpe mosala oyo nazalaki kosala. Esalaki ngai mpasi mpenza. Kasi na nsima namitunaki: ‘Ndenge nini nakoki komekola Yesu na likambo oyo?’ Nsima ya kokanisa oyo Yesu alingaki kosala, namonaki malamu nalekisa likambo yango na esika nayeisa yango monene. Na nsima, nayokaki ete moninga yango azalaki na maladi moko mpe azalaki na mitungisi ebele. Namonaki ete mbala mosusu alingaki kokoma bongo te. Kokanisa ndakisa ya Yesu na oyo etali komonisa bolingo atako nazalaki na nkanda esalisaki ngai namonisela moninga na ngai ya mosala bolingo.” Soki tomekoli Yesu, tokomonisa bolingo ntango nyonso.

Ya misato, yekolá bolingo oyo elukaka matomba ya basusu. Yango nde bolingo oyo ezali elembo ya bayekoli ya solo ya Yesu. (Yoane 13:34, 35) Yesu ye moko amonisaki bolingo yango mpe atikelá biso ndakisa ya kokoka. Na ndenge nini? Alongwaki likoló, “amikómisaki . . . mpamba” mpo na biso, ata “tii liwa.” (Bafilipi 2:5-8) Soki tozali komekola bolingo ya Yesu oyo elukaka matomba ya basusu, makanisi mpe mayoki na biso ekokóma  lokola oyo ya ye mpe tokotya bamposa ya basusu liboso ya oyo ya biso. Wapi matomba mosusu oyo ekomonana?

MATOMBA YA KOMONISA BOLINGO

Komonisa bolingo ebimisaka matomba mingi. Tótalela ndakisa mibale:

Komonisa bolingo ezali na matomba nini?

  • LISANGÁ YA BANDEKO NA MOKILI MOBIMBA: Lokola tolinganaka, toyebi ete ata soki tokei na lisangá nini na mokili, bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bakoyamba biso malamu. Ezali mpenza lipamboli koyeba ete ozali na ‘lisangá mobimba ya bandeko’ oyo balingaka yo! (1 Petro 5:9) Bolingo ya ndenge wana ezali kaka epai ya basaleli ya Nzambe.

  • KIMYA: ‘Kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo’ esalisaka biso tóbatela “bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya.” (Baefese 4:2, 3) Tomonaka kimya yango na makita, na mayangani ya mike, mpe na mayangani ya minene. Omoni te ete kimya ya ndenge wana ezali mpenza likamwisi na mokili ya lelo oyo etondi na bokabwani? (Nzembo 119:165; Yisaya 54:13) Soki tozali kobatela kimya na basusu, tokomonisa ete tolingaka bango, mpe yango ekosepelisa Tata na biso ya likoló.​—Nzembo 133:1-3; Matai 5:9.

“BOLINGO ETONGAKA”

Ntoma Paulo akomaki ete: “Bolingo etongaka.” (1 Bakorinti 8:1) Elingi koloba nini? Mokanda ya 1 Bakorinti mokapo 13, oyo bato mosusu babengaka “Loyembo ya bolingo,” emonisi ndenge bolingo etongaka. Na ndakisa, bolingo elukaka bolamu ya basusu. (1 Bakorinti 10:24; 13:5) Lisusu, lokola bolingo etindaka moto akanisa, azala na bonkonde, na motema molai, mpe na boboto, esalisaka bato ya libota bálinganaka mpe masangá ezala na bomoko.​—Bakolose 3:14.

Ezali na ndenge mingi ya komonisa ete tolingaka bato, kasi bolingo na biso mpo na Nzambe nde ezali na motuya mingi mpe etongaka mpenza. Mpo na nini? Bolingo yango esangisi bato ya bikólo nyonso, loposo nyonso, mpe ya minɔkɔ nyonso mpo básambela Yehova elongo, “na bomoko.” (Sefania 3:9) Mokolo na mokolo, tózala na ekateli ya komonisa bolingo, moko ya bizaleli kitoko ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe.

^ par. 2 Oyo ezali lisolo ya liboso na masolo libwa oyo ekolobela ezaleli mokomoko ya mbuma ya elimo.