Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2017

 LISOLO YA BOMOI

Koyika mpiko na komekama ememaka mapamboli

Koyika mpiko na komekama ememaka mapamboli

MOKONZI ya basoda ya KGB agangaki: “Ozali tata moko ya motema mabe! * Osundoli mwasi na zemi ná mwana na mabɔkɔ. Nani akoleisa bango mpe akobatela bango? Ndimá kotika makambo osalaka bongo ozonga ndako!” Nazongisaki: “Nasundoli libota na ngai te. Bino nde bokangi ngai! Nasali nini?” Mokonzi yango alobaki: “Kozala Motatoli ezali mbeba oyo eleki monene.”

Likambo yango esalemaki na 1959 na bolɔkɔ moko na engumba Irkutsk, na Russie. Tiká nalobela ntina oyo ngai ná mwasi na ngai Maria tomibongisaki liboso mpo na “konyokwama mpo na boyengebene,” mpe mapamboli oyo tozwaki mpo totikalaki sembo.​—1 Petro 3:13, 14.

Nabotamá na Ukraine na 1933 na mboka Zolotniki. Na 1937, mama-leki na biso ná mobali na ye, oyo bazalaki Batatoli, bautaki France mpe bayaki kotala biso. Batikelaki biso buku Gouvernement mpe buku Délivrance, ya la Société Watch Tower. Ntango papa atángaki babuku yango, akómaki kondimela Nzambe. Likambo ya mawa, na 1939, abɛlaki makasi, kasi liboso akufa, ayebisaki mama: “Makambo oyo ezali solo. Teyá yango bana.”

SIBÉRIE​—TERITWARE YA SIKA MPO NA KOSAKOLA

Na sanza ya minei na 1951, bakonzi babandaki kolongola Batatoli na wɛsti ya Union soviétique mpo na komema bango na bolɔkɔ na Sibérie. Bamemaki ngai, mama, ná leki na ngai ya mobali Grigory na wɛsti ya Ukraine. Nsima ya kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 6 000 na engbunduka (train), tokómaki na engumba Tulun, na Sibérie. Pɔsɔ mibale na nsima, Bogdan, yaya na biso ya mobali, akómaki na kaa moko pembeni ya engumba Angarsk. Bakatelaki ye mbula 25 ya mosala makasi na bolɔkɔ.

Ngai, mama, mpe Grigory tozalaki kosakola na bakaa oyo ezalaki zingazinga ya Tulun, kasi esɛngaki tózala ekɛngɛ. Na ndakisa, tozalaki kotuna: “Ezali na moto oyo alingi kotɛka ngɔmbɛ?” Soki tozwi moto oyo azali na ngɔmbɛ ya kotɛka, tozalaki komonisa moto yango ete ngɔmbɛ ekelamá na ndenge ya kokamwa. Mpe na nsima, tobandaki koyebisa ye makambo etali Mozalisi. Na ntango wana, zulunalo moko ebimisaki lisolo oyo elobaki ete Batatoli batunaka ngɔmbɛ, kasi balukaka nde bampate! Mpe tokutanaki na bato oyo bazali na bizaleli ya mpate! Ezalaki esengo koyekola Biblia na bato ya komikitisa mpe ya boboto na teritware wana epai basakoli bakómaki naino te. Lelo, ezali na lisangá ya basakoli koleka 100 na Tulun.

 NDENGE KONDIMA YA MARIA EMEKAMAKI

Mwasi na ngai Maria ayekolaki solo na Ukraine ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kotɔka. Ntango azalaki na mbula 18, soda moko ya KGB abandaki kotungisa ye mpe alukaki kosangisa na ye nzoto na makasi, kasi Maria aboyaki na motema moko. Mokolo moko, ntango azongaki ndako akutaki soda yango alali na mbeto na ye. Maria akimaki. Soda yango asilikaki mpe alobaki ete akokangisa ye mpo azali Motatoli; mpe na 1952, bakangaki Maria mpe bakatelaki ye mbula 10 ya bolɔkɔ. Amiyokaki lokola Yozefe, oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo abatelaki bosembo na ye. (Ebandeli 39:12, 20) Sofɛlɛ oyo amemaki Maria longwa na tribinale tii na bolɔkɔ alobaki na ye: “Kobanga te. Bato mingi bakɔtaka bolɔkɔ mpe babimaka kozanga ete bábebisa lokumu na bango.” Maloba yango epesaki ye makasi.

Kobanda 1952 tii 1956, batyaki Maria na kaa moko esika bazalaki kosalisa bango misala makasi pene ya engumba Gorkiy (lelo Nizhniy Novgorod) na Russie. Basɛngaki ye apikola banzete, ata na malili makasi. Maria abɛlaki, kasi na 1956, babimisaki ye mpe akendaki na Tulun.

BAKABOLI NGAI NA MWASI NA NGAI MPE BANA NA NGAI

Ntango ndeko mobali moko na Tulun ayebisaki ngai ete ndeko mwasi moko azali koya, nakendaki na velo na ngai esika bisi etɛlɛmaka mpe nasalisaki ye na komema bisaka na ye. Ntango nakutanaki na Maria, nasepelaki na ye mbala moko. Ezalaki mpasi mpo nazwa motema na ye, kasi nalongaki. Tobalanaki na 1957. Mbula moko na nsima, tobotaki mwana na biso ya mwasi Irina, kasi esengo na biso ezalaki ya ntango mokuse. Na 1959, bakangaki ngai mpo nazalaki kobimisa mikanda oyo elobelaka Biblia. Nasalaki sanza motoba na bolɔkɔ oyo nazalaki kaka ngai moko. Mpo nabatela kimya ya motema, nazalaki ntango nyonso kobondela, koyemba nzembo ya Bokonzi, mpe kokanisa ndenge nakozongela kosakola soki babimisi ngai.

Na kaa ya misala makasi, na 1962

Mokolo moko na bolɔkɔ, moto oyo ayaki mpo na kotuna ngai mituna, agangaki: “Mosika te tokonyata bino ndenge banyataka mpɛsɛ na sima!” Nazongisaki: “Yesu alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi EKOSAKOLAMA na bikólo nyonso, mpe moto te akopekisa yango.” Na nsima, moto yango asalelaki mayele mabe mpe alukaki kotinda ngai nawangana kondima na ngai, ndenge nalobaki yango na ebandeli. Lokola maloba mpe mayele mabe na ye esimbaki te, bakatelaki ngai mbula nsambo ya kosala misala makasi lokola moombo na kaa moko pene na engumba Saransk. Ntango nazalaki kokende na kaa, nayokaki ete mwana na biso ya mibale, Olga, abotami. Atako mwasi na ngai ná bana bazalaki mosika, nabɔndisamaki ntango nayebaki ete ngai ná Maria totikalaki sembo epai ya Yehova.

Maria ná bana na biso ya basi, Olga ná Irina, na 1965

Mbala moko na mbula Maria azalaki koya na Saransk mpo na kotala ngai, atako mobembo yango kende-zonga longwa na Tulun ezalaki kozwa mikolo 12 na engbunduka. Mbula na mbula, azalaki komemela ngai sapato ya makasi ya sika. Na kati, azalaki kobomba nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na libaku moko oyo Maria ayaki kotala ngai, ezalaki malamu mpenza mpo amemaki bana na biso mibale. Nayokaki esengo mpenza komona bango mpe kozala elongo na bango!

 BISIKA YA SIKA NÁ MIKAKATANO NA YANGO

Na 1966, babimisaki ngai na kaa ya misala makasi mpe biso minei tokendaki na engumba Armavir, pene ya Mbu Moindo. Kuna nde bana na biso Yaroslav ná Pavel babotamaki.

Eumelaki te basoda ya KGB babandaki kolukaluka na ndako na biso mikanda oyo elimbolaka Biblia. Balukaki bisika nyonso, ata esika bangɔmbɛ elyaka. Mokolo moko, ntango basoda bazalaki kolukaluka, batɔkaki na molunge mpe bilamba na bango etondaki na putulu. Maria ayokaki mawa, mpo bazalaki kaka kotosa mitindo bapesaki bango. Apesaki bango mwa eloko ya komɛla mpe mwa eloko mpo bálongola salite, mai mpe esumɛ. Na nsima ntango mokonzi na bango ayaki, basoda yango bayebisaki ye makambo ya malamu oyo basalelaki bango. Ntango bakendaki, mokonzi yango asɛkaki mpe apɛpaki biso lobɔkɔ. Tosepelaki komona matomba ya ‘kosala malamu mpo na kolonga mabe.’​—Baroma 12:21.

Atako bazalaki koluka kokanga biso, tokobaki kosakola na Armavir. Topesaki mpe mabɔkɔ na kolendisa mwa etuluku moko ya basakoli pene na engumba Kurganinsk. Lelo oyo, nayokaka esengo komona ete masangá ezali motoba na Armavir mpe minei na Kurganinsk.

Ezalaki mpe na bantango oyo tolɛmbaki na elimo. Kasi, tozali na botɔndi epai ya Yehova na ndenge asalelaki bandeko ya sembo mpo na kosembola biso mpe kosalisa biso na elimo. (Nzembo 130:3) Ezalaki mpe komekama makasi kosala elongo na basoda ya KGB oyo bazalaki kokɔta na masangá kozanga ete tóyeba yango. Bazalaki komonisa molende mpe bazalaki kosakola mingi. Basusu kutu bazwaki mikumba na lisangá. Kasi, nsukansuka toyebaki bango mpenza.

Na 1978, ntango Maria akómaki na mbula 45, azwaki lisusu zemi. Lokola azalaki na maladi ya motema, minganga babangaki ete akoki kokufa mpe balukaki kondimisa ye alongola zemi. Maria aboyaki. Minganga mosusu balandaki ye bisika nyonso na lopitalo ná ntonga, balukaki kotuba ye mpo mwana abima mobesu. Mpo na kobatela mwana, Maria akimaki lopitalo yango.

KGB esɛngaki biso tólongwa na engumba. Tokendaki na mboka moko pene ya engumba Tallinn na Estonie, oyo ezalaki mpe na kati ya Union soviétique. Na Tallinn, Maria abotaki Vitaly, mwana mobali kitoko, atako minganga bakanisaki ete ekosalema te.

Na nsima, tolongwaki na Estonie mpe tokendaki kofanda na Nézlobnaïa, na sudi ya Russie. Tozalaki kosakola na ekɛngɛ na bamboka ya pembenipembeni, bisika bato ya ekólo mobimba bazalaki koya kozwa lisalisi ya monganga. Bazalaki koya kuna mpo na maladi, kasi basusu bazalaki kozonga na elikya ya bomoi ya seko.

KOBƆKƆLA BANA MPE KOSALISA BANGO BÁLINGA YEHOVA

Tosalaki makasi mpo na kosalisa bana na biso bálinga Yehova mpe bázala na mposa ya kosalela ye. Mbala mingi, tozalaki kobengisa bandeko mibali oyo bazalaki bandakisa malamu mpo na bana na biso. Ndeko mobali moko oyo azalaki koya mingi ezalaki leki na ngai Grigory, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga kobanda 1970 tii 1995. Tozalaki kosepela soki ayei mpo azalaki moto ya esengo mpe azalaki kosɛkisa. Soki toyambi bapaya, mbala mingi tozalaki kosala masano ya Biblia,  mpe bana na biso bakómaki kolinga masolo ya Biblia.

Bana na biso ya mibali ná basi na bango.

Banda na lobɔkɔ ya mwasi, na nsima: Yaroslav, Pavel, Vitaly

Na liboso: Alyona, Raya, Svetlana

Na 1987, mwana na biso Yaroslav akendaki na engumba Riga na Lettonie, epai akokaki kosakola polele. Kasi ntango aboyaki kokɔta mosala ya soda, bakatelaki ye mbula moko ná ndambo ya bolɔkɔ mpe akɔtaki na babolɔkɔ libwa. Nayebisaki ye makambo nakutanaki na yango na bolɔkɔ mpe esalisaki ye ayika mpiko. Na nsima, akómaki mobongisi-nzela. Na 1990, mwana na biso Pavel, oyo na ntango wana azalaki na mbula 19, alingaki kokóma mobongisi-nzela na Sakhaline, esanga moko na nɔrdi ya Japon. Liboso, tolingaki te akende. Ezalaki kaka na basakoli 20 na esanga yango mobimba, mpe ezalaki na kilomɛtrɛ koleka 9 000 longwa epai na biso. Nsukansuka, tondimaki akende mpe ezalaki ekateli ya malamu. Kuna, bato bazalaki kondima nsango ya Bokonzi. Nsima ya mwa bambula, masangá ekómaki mwambe. Pavel asalaki na Sakhaline tii na 1995. Na ntango wana, totikalaki kaka na mwana na biso ya nsuka, Vitaly. Banda bomwana, azalaki kolinga kotánga Biblia. Ntango akómaki na mbula 14, abandaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe nasalaki yango elongo na ye mbula mibale. Ezalaki malamu mpenza. Ntango akómaki na mbula 19, Vitaly alongwaki ndako mpe akómaki mobongisi-nzela monene.

Na 1952, soda moko ya KGB alobaki na Maria ete: “Soki otiki lingomba na yo te, okokɔta bolɔkɔ mbula 10. Ntango okobima, okokóma mobange mpe okotikala yo moko.” Kasi, makambo elekaki ndenge mosusu. Tomonaki bolingo ya Nzambe na biso ya sembo Yehova, ya bana na biso, mpe ya bato ebele oyo tosalisaki báyeba solo. Ngai ná Maria tozwaki libaku ya kokende mobembo na bisika oyo bana na biso bazalaki. Bato oyo bana na biso basalisaki báyeba Yehova bamonisaki botɔndi mingi.

TOZALI NA BOTƆNDI MPO NA BOLAMU YA YEHOVA

Na 1991, mosala ya Batatoli ya Yehova endimamaki na Leta. Ekateli yango ezongiselaki biso molende na mosala ya kosakola. Kutu, lisangá esombaki bisi mpo tókendaka na bamboka ya zingazinga mpo na kosakola na nsuka ya pɔsɔ nyonso.

Ngai ná Maria na 2011

Nazali na esengo mpo Yaroslav ná mwasi na ye Alyona, mpe Pavel ná mwasi na ye Raya, bazali kosala na Betele mpe Vitaly ná mwasi na ye Svetlana, bazali na mosala ya zongazonga. Irina, mwana na biso ya mwasi ya mokóló ná libota na ye bafandaka na Allemagne. Mobali na ye Vladimir ná bana na bango nyonso misato ya mibali bazali bankulutu. Mwana na biso Olga afandaka na Estonie mpe abengaka ngai mbala na mbala. Likambo ya mawa, mwasi na ngai ya motema Maria akufaki na 2014. Nazelaka komona ye lisusu na lisekwa! Lelo, nafandaka na engumba Belgorod mpe bandeko basalisaka ngai mingi.

Bambula oyo nalekisi na mosala ya Yehova eteyi ngai ete kobatela bosembo ezalaka mpasi kasi kimya ya motema oyo Yehova apesaka ezali na motuya mingi mpenza. Mapamboli oyo ngai ná Maria tozwaki mpo totikalaki sembo eleki mosika oyo tokokaki kokanisa. Liboso bokonzi ya Union soviétique ekwea na 1991, tozalaki kaka basakoli 40 000. Lelo, ezali na basakoli koleka 400 000 na bikólo oyo ezalaki na kati ya Union soviétique. Nazali sikoyo na mbula 83 mpe nazali kaka nkulutu. Yehova apesaka ngai ntango nyonso makasi ya koyika mpiko. Ya solo, Yehova apamboli ngai mingi mpenza.​—Nzembo 13:5, 6.

^ par. 4 KGB ezali ebengeli ya mokuse ya komite oyo elandelaka kimya na Russie.