Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2017

Ondimaka kozela mpe komonisa motema molai?

Ondimaka kozela mpe komonisa motema molai?

“Bino mpe bózala na motema molai.”​—YAKOBO 5:8.

NZEMBO: 78, 139

1, 2. (a) Nini ekoki kotinda biso tótuna: “Kino ntango nini?” (b) Mpo na nini bandakisa ya basaleli ya Nzambe ya sembo ya ntango ya kala ekoki kolendisa biso lelo?

“KINO ntango nini?” Yisaya ná Habakuku, basakoli ya sembo ya Yehova, nde batunaki motuna yango. (Yisaya 6:11; Habakuku 1:2) Ntango Mokonzi Davidi akomaki Nzembo 13, atunaki mpe mbala minei ete: “Kino ntango nini?” (Nzembo 13:1, 2) Ata Nkolo na biso Yesu Kristo atunaki motuna yango ntango azalaki elongo na bato oyo bazangá kondima. (Matai 17:17) Na yango tókamwa te soki ekómeli biso mpe tótuna motuna yango lelo.

2 Nini ekoki kotinda biso tótuna: “Kino ntango nini?” Ekoki kozala mpo na likambo moko ya kozanga bosembo oyo okutani na yango. To mpe ozali kobɛla to obandi kokóma mobange. Mbala mosusu mpe ozali kotungisama mpo tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Ekoki mpe kozala ete makanisi mabe ya bato oyo bazali zingazinga na yo ezali kolɛmbisa yo mpe kosilisa yo makasi. Ezala mpo na ntina nini, tozali kolendisama na koyeba ete ntango basaleli ya Yehova ya sembo batunaki motuna yango, Yehova apamelaki bango te.

3. Nini ekoki kosalisa biso ntango tokutani na likambo moko ya mpasi?

 3 Nini ekoki kosalisa yo ntango okutani na likambo oyo ezali mpasi koyikela yango mpiko? Yakobo, oyo azalaki leki ya Yesu, akomaki na lisalisi ya elimo santu ete: “Bandeko, bózala na motema molai tii na kozala ya Nkolo.” (Yakobo 5:7) Biso nyonso tosengeli kozala na motema molai. Kasi, motema molai ezali nini, mpe ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango ya malamu?

MOTEMA MOLAI EZALI NINI?

4, 5. (a) Ndenge nini tokoki komonisa motema molai? (b) Ndakisa nini Yakobo apesaki mpo na kolobela motema molai? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Biblia elobi ete motema molai eutaka na elimo santu ya Nzambe. Soki Nzambe asalisi biso te, ezali mpasi mingi biso bato ya kozanga kokoka tózala na motema molai ntango tokutani na makambo ya mpasi. Motema molai ezali likabo ya Nzambe, mpe komonisa ezaleli yango nde lolenge eleki malamu ya kolakisa ete tolingaka Yehova mpe bato mosusu. Kozanga motema molai ekitisaka bolingo na biso mpo na basusu, kasi motema molai ekokómisa yango makasi. (1 Bakorinti 13:4; Bagalatia 5:22) Motema molai esangisi bizaleli ndenge na ndenge ya bokristo. Na ndakisa, ezali na boyokani na ezaleli ya koyika mpiko, oyo esalisaka biso tókanga motema na makambo ya mpasi mpe tóbatela makanisi ya malamu. (Bakolose 1:11; Yakobo 1:3, 4) Motema molai esalisaka biso mpe tótikala sembo epai ya Yehova ata na mikakatano ya ndenge nini. Ekosalisa biso mpe tózongisa mabe na mabe te ntango tozali konyokwama. Lisusu, Biblia elendisi biso tóndima ete tosengeli koyeba kozela. Likambo yango emonisami na Yakobo 5:7, 8. (Tángá.)

5 Mpo na nini tosengeli kondima kozela Yehova asala? Moyekoli Yakobo amonisi ete tozali lokola moloni-bilanga. Ata soki moloni-bilanga asali mosala makasi mpo na kolona mbuma na ye, azalaka na likoki ya konɔkisa mbula te to ya kobimisa milona nokinoki. Asengeli komonisa motema molai mpe kozela “mbuma ya malamu ya mabele.” Ndenge moko mpe, wana tozali kozela bilaka ya Yehova ekokisama, ezali na makambo ebele oyo tokoki kosala eloko te mpo na yango. (Marko 13:32, 33; Misala 1:7) Ndenge moko na moloni-bilanga, tosengeli kozela mpe komonisa motema molai.

6. Ndakisa ya mosakoli Mika ekoki koteya biso nini?

6 Mosakoli Mika ayikaki mpiko na makambo ya mpasi, kaka lokola biso lelo. Azalaki na bomoi ntango mokonzi mabe Ahaze azalaki koyangela. Kutu, Biblia elobi ete ‘mabɔkɔ ya bato ezalaki kaka na makambo ya mabe.’ (Tángá Mika 7:1-3.) Mika ayebaki ete azalaki na likoki ya kobongola makambo te. Na yango, asalaki nini? Alobaki: “Ezali Yehova nde nakotalela. Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai. Nzambe na ngai akoyoka ngai.” (Mika 7:7) Ndenge moko na Mika, biso mpe tosengeli koyeba “kozela.”

7. Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na kozela ete Yehova akokisa bilaka na ye?

7 Soki tozali na kondima lokola oyo ya Mika, tokondima kozela Yehova. Tozali te lokola moto moko na kati ya bolɔkɔ oyo azali kozela mokolo oyo bakoboma ye ekoka. Lokola bayebisi ye azela, azali kozela, kasi azali kozela mokolo yango na esengo te. Biso tozali ndenge wana te! Tondimaka kozela Yehova mpo toyebi ete akokokisa elaka na ye ya kopesa biso bomoi ya seko, na ntango oyo etyamá! Yango wana ‘tozali koyika mpiko mpe tozali na motema molai ná esengo.’ (Bakolose 1:11, 12) Soki tosali bongo te, elingi koloba soki tozali komilelalela ete Yehova azali koumisa makambo, akosepela na biso te.​—Bakolose 3:12.

 BATO YA SEMBO OYO BAZALAKI NA MOTEMA MOLAI

8. Nini tosengeli kobosana te wana tozali kotalela ndakisa ya mibali mpe basi ya sembo ya ntango ya kala?

8 Nini ekosalisa biso tóndima kozela? Tokoki kokanisa mibali mpe basi ya sembo ya ntango ya kala oyo bamonisaki motema molai mpe bazelaki Yehova akokisa bilaka na ye. (Baroma 15:4) Ntango tozali kokanisa ndakisa na bango, tóbosana te ntango boni bazelaki, ntina oyo bandimaki kozela, mpe ndenge Yehova apambolaki bango mpo bazalaki na motema molai.

Esɛngaki Abrahama azela bambula ebele mpo bankɔkɔ na ye Esau ná Yakobo bábotama (Talá paragrafe 9 mpe 10)

9, 10. Abrahama ná Sara bazelaki Yehova ntango boni?

9 Tótalela ndakisa ya Abrahama ná Sara. Bazali na kati ya baoyo bazwaki “libula ya bilaka” mpo bamonisaki “kondima mpe motema molai.” Biblia elobi ete “Abrahama, nsima ya komonisa motema molai, azwaki elaka”; Yehova alakaki ye ete akopambola ye mpe akokómisa ye tata ya ekólo moko monene. (Baebre 6:12, 15) Mpo na nini Abrahama asengelaki komonisa motema molai? Mpo ntango mingi esengelaki koleka liboso elaka wana ekokisama. Elaka yango ebandaki kokokisama na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 1943 L.T.B., ntango Abrahama ná Sara mpe bato nyonso ya ndako na bango bakatisaki Ebale Efrate mpe bakɔtaki na Mokili ya Ndaka. Kasi, Abrahama azelaki mbula 25 mpo mwana na ye Yisaka abotama, mpe mbula 60 mpo bankɔkɔ na ye, Esau ná Yakobo bábotama.​—Baebre 11:9.

10 Eteni nini ya mabele Abrahama azwaki na Mokili ya Ndaka? Biblia elobi ete Yehova “apesaki ye [Abrahama] libula moko te, ɛɛ, ata mabele oyo ekokani na bonene ya litambe ya lokolo te; kasi  alakaki nde kopesa ye yango mpo ezala eloko na ye, mpe ya momboto na ye nsima na ye, atako na ntango wana azalaki naino na mwana te.” (Misala 7:5) Bakitani na ye bakómaki ekólo oyo ekofanda na mokili yango mbula 430 nsima ya ntango oyo Abrahama akatisaki Ebale Efrata.​—Kobima 12:40-42; Bagalatia 3:17.

11. Mpo na nini Abrahama andimaki kozela, mpe mapamboli nini akomona mpo na motema molai na ye?

11 Abrahama andimaki kozela mpo ayebaki ete Yehova akokokisa mpenza bilaka na ye. Azalaki na kondima. (Tángá Baebre 11:8-12.) Abrahama azelaki na esengo, atako bilaka mosusu ya Nzambe ekokisamaki te ntango azalaki na bomoi. Kasi, kanisá esengo oyo Abrahama akoyoka ntango akozonga na bomoi na paradiso awa na mabele. Akokamwa ntango akomona ndenge lisolo ya bomoi na ye mpe ya libota na ye ezali na bisika mingi na Biblia. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kanisá esengo oyo akozala na yango ntango akoyeba mokumba na ye monene na kokokisama ya mokano ya Yehova na oyo etali Masiya oyo alakamaki! Na ntembe te, akomona ete asalaki malamu mpenza ndenge azelaki!

12, 13. Mpo na nini Yozefe asengelaki kozala na motema molai, mpe ndenge nini amonisaki ete azali na makanisi ya malamu?

12 Yozefe, nkɔkɔ ya Abrahama mpe andimaki komonisa motema molai. Basalaki ye makambo ya kozanga bosembo mpenza. Ya liboso, bayaya na ye ya mibali batɛkaki ye moombo ntango azalaki na mbula soki 17. Na nsima, akɔtaki bolɔkɔ mpo mwasi ya nkolo na ye akoselaki ye makambo ete alingi kosangisa na ye nzoto na makasi. (Ebandeli 39:11-20; Nzembo 105:17, 18) Atako Yozefe azalaki sembo epai ya Nzambe, emonanaki ete azalaki nde kozwa bitumbu na esika ya mapamboli. Kasi, mbula 13 na nsima, makambo ebongwanaki. Yozefe abimaki na bolɔkɔ mpe akómaki moto ya mibale oyo aleki monene na Ezipito.​—Ebandeli 41:14, 37-43; Misala 7:9, 10.

13 Makambo wana ya kozanga bosembo ekómisaki nde Yozefe nkandankanda? Amonaki ete Yehova asundoli ye? Te. Yozefe amonisaki motema molai mpe azelaki. Nini esalisaki ye? Azalaki na kondima. Amonaki ete Yehova ayebi makambo nyonso. Amonisaki yango na makambo oyo ayebisaki bandeko na ye; alobaki: “Bóbanga te; mpo ngai nazali nde na esika ya Nzambe? Bino bozalaki kokanisa kosala ngai mabe. Nzambe atalelaki yango na ndenge ya malamu mpo asala ndenge asali na mokolo ya lelo: kobatela bato mingi na bomoi.” (Ebandeli 50:19, 20) Yozefe ayebaki ete mpo na kozwa mapamboli ya Yehova asengelaki kozela.

14, 15. (a) Mpo na nini motema molai ya Davidi ezali likambo ya kokamwa? (b) Nini esalisaki Davidi azela mpe amonisa motema molai?

14 Mokonzi Davidi mpe akutanaki na makambo ebele ya kozanga bosembo. Ntango Yehova atyaki ye mafuta mpo azala mokonzi na Yisraele, azalaki naino elenge. Davidi azelaki mbula 15 mpo akóma mokonzi ata na libota na bango. (2 Samwele 2:3, 4) Na eleko moko boye, azalaki kokimakima mpe kobombana Mokonzi Saulo, oyo azalaki koluka koboma ye. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na yango, Davidi azalaki na esika ya kofanda te. Azalaki kofanda na mboka ya bato mosusu, to na kati ya mabanga minene na esobe. Ata ntango Saulo  akufaki na etumba, Davidi azelaki lisusu mbula soki nsambo mpo nsukansuka akóma mokonzi na ekólo mobimba ya Yisraele.​—2 Samwele 5:4, 5.

15 Mpo na nini Davidi andimaki kozela mpe komonisa motema molai? Apesaki eyano na Nzembo 13, esika atunaki mbala minei: “Kino ntango nini?” Alobi boye: “Natye motema na motema boboto na yo; tiká motema na ngai ezala na esengo na lobiko na yo. Nakoyembela Yehova, mpo ye apesi ngai mbano.” (Nzembo 13:5, 6) Davidi ayebaki ete Yehova alingaka ye mpe akozala ntango nyonso sembo epai na ye. Akanisaki ndenge Yehova asalisaki ye liboso, mpe azelaki ntango oyo Yehova akosilisa mikakatano na ye. Davidi ayebaki ete mpo na kozwa mapamboli ya Yehova, asengelaki kozela.

Yehova alingaki te kosɛnga biso tózala na motema molai soki ye moko andimaka kosala yango te

16, 17. Na ndenge nini Yehova Nzambe ná Yesu Kristo bazali ndakisa eleki malamu na oyo etali kondima kozela?

16 Yehova alingaki te kosɛnga biso tózala na motema molai soki ye moko andimaka kosala yango te. Azali ndakisa eleki monene na oyo etali kondima kozela. (Tángá 2 Petro 3:9.) Na ndakisa, Yehova azali kozela banda bankóto ya bambula mpo ntembe oyo ebimaki na elanga ya Edene esila. Yehova ‘azali kokoba kozela’ ntango oyo nkombo na ye ekosantisama malamumalamu. Yango ekomemela baoyo “bazali kokoba kozela ye” mapamboli ebele.​—Yisaya 30:18.

17 Yesu mpe andimaka kozela. Ntango azalaki awa na mabele, atikalaki sembo tii na liwa. Na mobu 33 T.B., amonisaki motuya ya mbeka na ye liboso ya Yehova na likoló. Kasi, asengelaki kozela tii na 1914 mpo abanda koyangela lokola Mokonzi. (Misala 2:33-35; Baebre 10:12, 13) Atako bongo, Yesu akozela tii na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto mpo banguna na ye nyonso bábebisama. (1 Bakorinti 15:25) Ezali ntango molai mpenza, kasi toyebi ete akondima kozela mpo ekomema mapamboli.

NINI EKOSALISA BISO?

18, 19. Nini ekosalisa biso tóndima kozela mpe tómonisa motema molai?

18 Tomoni polele ete Yehova alingi tózala na motema molai mpe tóndima kozela. Kasi, nini ekosalisa biso tósala yango? Kobondela Nzambe mpo na kosɛnga elimo santu. Kobosana te ete motema molai eutaka na elimo santu ya Nzambe. (Baefese 3:16; 6:18; 1 Batesaloniki 5:17-19) Yango wana, sɛngáká Yehova asalisa yo oyika mpiko mpe omonisa motema molai!

19 Kobosana mpe te likambo oyo esalisaki Abrahama, Yozefe mpe Davidi bázela bilaka ya Yehova ekokisama. Bazalaki na kondima mpe batyelaki Yehova motema. Bazalaki koluka kaka bolamu na bango moko te. Kokanisa ndenge makambo na bango esukaki ekolendisa mpe biso tóndima kozela.

20. Tosengeli kozala na ekateli nini?

20 Yango wana, ata soki tozali kokutana na komekama, tózala na ekateli ya komonisa “ezaleli ya koyeba kozela.” Na bantango mosusu, tokoki kotuna: “Ee Yehova, kino ntango nini?” (Yisaya 6:11) Kasi, na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, tokoki komekola mosakoli Yirimia mpe koloba ete: “Yehova azali libula na ngai, . . . yango wana nakomonisa ezaleli ya koyeba kozela ye.”​—Bileli 3:21, 24.

^ par. 11 Mikapo soki 15 ya mokanda ya Ebandeli elobeli bomoi ya Abrahama. Lisusu, bakomi ya Makomami ya Grɛki ya bokristo balobeli Abrahama mbala koleka 70.

^ par. 14 Nsima ya mbula mibale ná mwa ndambo ya boyangeli ya Saulo, Yehova aboyaki ye, kasi atikaki ye akoba koyangela lisusu mbula 38, tii ntango akufaki.​—1 Samwele 13:1; Misala 13:21.