Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2017

Ndenge ya kolongola mpe kobwaka bomoto ya kala

Ndenge ya kolongola mpe kobwaka bomoto ya kala

“Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango.”​—BAKOLOSE 3:9.

NZEMBO: 83, 129

1, 2. Bato bamonaka nini epai ya Batatoli ya Yehova?

BATO mingi bamonaka ete Batatoli ya Yehova bakokani na bato mosusu te. Na ndakisa, mokomi moko na nkombo Anton Gill akumisaki bizaleli ya Batatoli ya Yehova ya ntango ya Banazi, na Allemagne. Akomaki boye: “Batatoli ya Yehova bazalaki kopesa Banazi nkanda makasi. . . . Na 1939, Batatoli 6 000 bazalaki na [bakaa ya bakangami].” Abakisaki ete atako Batatoli ya Yehova banyokwamaki mingi, eyebanaki ete babongi kotyelama motema, bazalaki kimya liboso ya minyoko, batikalaki sembo epai ya Nzambe na bango, mpe bazalaki na bomoko.

2 Mikolo eleki, bato ya Afrique du Sud mpe bamonaki ete Batatoli ya Yehova bakokani na bato mosusu te. Na eleko moko, Batatoli ya Yehova ya baindo bakokaki te koyangana elongo na Batatoli ya Yehova ya mindɛlɛ. Kasi, na mokolo ya lomingo, 18/12/2011, Batatoli ya Yehova koleka 78 000 ya loposo ekeseni ya Afrique du Sud mpe ya bikólo mosusu ya pembeni bayaki na liyangani moko monene na libándá ya masano oyo eleki monene na Johannesburg. Moko ya bakambi na yango alobaki: “Oyo nde ebele ya bato ya bizaleli malamu koleka bato nyonso oyo namoná bayei na libándá ya masano oyo. Moto nyonso alati  malamu. Mpe bobongisi yango malamu mpenza. Longola nyonso wana, bozali na bomoko atako bozali loposo ekeseni.”

3. Mpo na nini lisangá na biso ya bandeko na mokili mobimba ekokani na mosusu te?

3 Na yango, ata baoyo bazali Batatoli te bamonaka polele ete lisangá na biso ya bandeko na mokili mobimba ekokani na mosusu te. (1 Petro 5:9) Mpo na nini ebongiseli na biso ekeseni na mosusu nyonso? Mpo Biblia mpe elimo santu ya Nzambe esalisaka biso tóbongwana mpe tótika makambo nyonso oyo esepelisaka Yehova te. ‘Tolongolaka bomoto ya kala,’ mpe tolataka “bomoto ya sika.”​—Bakolose 3:9, 10.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo? Mpo na nini?

4 Soki tolongoli bomoto ya kala, tosengeli kobwaka yango. Na lisolo oyo, tokolobela liboso ndenge ya kolongola bomoto ya kala mpe ntina ya kosala yango. Tokomona ete moto akoki kosala mbongwana minene na bomoi na ye ata soki azalaki kosala makambo ya mabe mpenza. Na nsima, tokolobela makambo oyo bato oyo baumeli na lisangá bambula mingi bakoki kosala mpo bázongela bomoto ya kala te. Mpo na nini tosengeli kolobela makambo yango? Ezali mawa mpo bato mosusu oyo liboso bazalaki kosalela Yehova batikaki kozala ekɛngɛ. Bakómaki kokanisa mpe kosala makambo oyo bazalaki kosala liboso báyeba Yehova. Yango wana, tosengeli kokanisa likebisi oyo: “Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.”​—1 Bakorinti 10:12.

LONGOLÁ MPOSA NYONSO YA PITE

5. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya kolongola nokinoki bomoto ya kala. (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mimeseno nini oyo ezali na kati ya bomoto ya kala Bakolose 3:5-9 elobeli?

5 Okosala nini soki omoni ete bilamba na yo ezali salite to elumbi nsolo? Okolongola yango nokinoki. Ndenge moko mpe, soki tomoni ete tozali kosala makambo oyo Yehova ayinaka, tosengeli kotika yango nokinoki. Mpo na makambo yango ya mabe, ntoma Paulo alobaki: “Bólongola makambo [wana] nyonso mosika na bino.” Tólobela mibale: pite mpe mbindo.​—Tángá Bakolose 3:5-9.

6, 7. (a) Ndenge nini maloba ya ntoma Paulo emonisi ete esɛngaka milende mpo na kolongola bomoto ya kala? (b) Sakura azalaki na bomoi ya ndenge nini, mpe nini epesaki ye makasi ya kobongwana?

6 Pite. Na Biblia “pite” elimbolaka mpe kosangisa nzoto kati na bato oyo babalaná te. Ntoma Paulo alobaki ete bakristo basengeli ‘koboma binama ya nzoto’ na bango na likambo ya pite. Yango elakisi ete tosengeli kosala makasi mpenza tólongola bamposa ya mabe. Kosala yango ekoki kozala mpasi, kasi tokoki kolonga!

7 Tokoki komona yango na ndakisa ya ndeko mwasi moko ya Japon na nkombo Sakura. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ntango Sakura azalaki kokola, mbala mingi azalaki mawamawa mpe komiyoka lokola mwana-etike. Mpo alongola mawa na ye, akómaki kosala pite ntango azalaki na mbula 15. Sakura azwaki mibali ndenge na ndenge mpe alongolaki zemi mbala misato. Alobi boye: “Na ebandeli, kosala pite ezalaki kopesa ngai kimya, nazalaki kokanisa ete nazali na ntina mpe bato balingi ngai. Kasi, na nsima, soki nasangisi nzoto, nazalaki kobangabanga.” Ekobaki ndenge wana tii Sakura akokisaki mbula 23. Na nsima, abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe alingaki makambo oyo azalaki koyekola. Yehova asalisaki ye atika bomoi ya mbindo, alongola nsɔni mpe atika koyoka lokola amemá ngambo. Lelo, Sakura azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe amiyokaka lisusu lokola  mwana-etike te. Alobi boye: “Nasepelaka mingi mpenza na bolingo oyo Yehova amoniselaka ngai mokolo na mokolo.”

NDENGE YA KOTIKA MIMESENO YA MBINDO

8. Makambo nini ekoki kokómisa biso mbindo na miso ya Nzambe?

8 Mbindo. Na Biblia, “mbindo” ezali kaka pite te. Ekoki kozala makambo lokola komɛla likaya to koloba makambo ya nsɔni. (2 Bakorinti 7:1; Baefese 5:3, 4) Ekoki mpe kozala makambo ya mabe oyo moto akoki kosala na kobombana, na ndakisa kotánga babuku oyo elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto to kotala pornografi. Makambo yango ekoki kotinda moto akóma na momeseno ya kosimbasimba binama ya kobotela tii akoyoka elɛngi. (Bakolose 3:5) *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

9. Nini ekoki kosalema soki moto aloni “mposa [makasi] ya kosangisa nzoto”?

9 Bato oyo bazali na momeseno ya kotala pornografi bakómaka na “mposa [makasi] ya kosangisa nzoto” mpe bakoki kokóma baombo ya kosangisa nzoto. Bato ya mayele balobi ete kozala moombo ya pornografi ezali ndenge moko na kozala moombo ya masanga to makaya. Yango wana, momeseno ya kotala pornografi ebotaka mbuma mabe mpenza: epesaka nsɔni makasi, esilisaka moto mayele na mosala, elongolaka esengo na libota, ebomaka mabala, mpe etindaka ata moto amiboma. Moto moko oyo alongwaki na boombo ya kotala pornografi, ntango akokisaki mbula mobimba, alobaki ete sikoyo azongeli komipesa kilo.

10. Ndenge nini Ribeiro alongwaki na boombo ya kotala pornografi?

10 Mpo na bato mingi, kozala mosika na pornografi ezali etumba mpenza. Kasi, ndenge ndakisa ya Ribeiro, ya Brésil, emonisi yango, bakoki kolonga etumba yango. Ribeiro, alongwaki ndako ya baboti liboso akokisa mbula 20 mpe na nsima akómaki kosala na izini ya kosalela lisusu bapapye oyo basalelá. Kuna nde amonaki bazulunalo ya pornografi. Ribeiro alobi boye: “Mokemoke, nakómaki moombo. Ekómaki mabe mpenza tii nazalaki kokoka lisusu kozela te ete makango na ngai alongwa na ndako mpo natala bavideo na ngai ya pornografi.” Na nsima, mokolo moko na mosala, ntango Ribeiro atalaki na liboke ya babuku oyo azalaki kosangisa amonaki buku Sekɛlɛ́ ya bolamu na libota. Azwaki buku yango mpe atángaki yango. Makambo oyo atángaki etindaki ye ayekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kasi, ezwaki ntango mingi mpo Ribeiro alongwa na boombo ya kotala pornografi. Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Libondeli, koyekola Biblia, mpe komanyola makambo oyo nayekolaki esalisaki ngai nalinga mingi bizaleli ya Yehova tii bolingo na ngai mpo na Yehova ekómaki makasi koleka mposa na ngai ya kotala pornografi.” Nguya ya Biblia mpe elimo santu ya Nzambe esalisaki Ribeiro abongola bizaleli na ye; azwaki batisimo, mpe lelo azali nkulutu na lisangá.

11. Moto asengeli kosala nini mpo azala mosika na pornografi?

11 Tomoni ete mpo na kolongwa na boombo ya kotala pornografi, Ribeiro asukaki kaka na koyekola Biblia te. Azalaki kokanisa malamumalamu makambo oyo azalaki koyekola na Biblia mpe atikaki yango ekɔta na motema na ye. Azalaki kobondela Yehova asalisa ye. Kosala bongo ekómisaki bolingo na ye mpo na Nzambe makasi mingi koleka mposa na ye ya kotala pornografi. Kolinga Yehova mingi mpe koyina oyo ezali  mabe nde ekosalisa biso tózala mosika na pornografi.​—Tángá Nzembo 97:10.

LONGOLÁ NKANDA, MALOBA YA KOFINGA, MPE LOKUTA

12. Nini esalisaki Stephen alongola nkanda mpe maloba ya kofinga?

12 Mbala mingi, bato oyo basilikaka mpambampamba babimisaka nkanda na bango na maloba ya kofinga. Ezaleli ya ndenge wana ekoki kotya kimya te na libota. Tata moko na Australie na nkombo Stephen azalaki kofinga mingi mpe azalaki kosilika makasi ata mpo na makambo ya mikemike. Alobi boye: “Nakabwanaki na mwasi na ngai mbala misato mpe tozalaki kosala bapapye mpo na koboma libala.” Na nsima, Stephen ná mwasi na ye babandaki koyekola Biblia na Batatoli, mpe akómaki kosala makasi asalela toli ya Biblia. Alobi ete liboso ayeba Yehova, azalaki kosilika ata mpo na mwa likambo ya moke mpe azalaki koyoka nkanda lokola bombe oyo elingi kopanzana. Alobi boye: “Libota na biso ebongaki mpenza. Na lisalisi ya Yehova nakómá koyoka kimya mpe motema mpiɔ.” Lelo oyo, Stephen azali mosaleli na misala, mpe mwasi na ye azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza esali bambula ebele. Bankulutu oyo bazali lisangá moko na Stephen balobi boye: “Stephen azalaka kimya, azali makasi na mosala, mpe azali na komikitisa mpenza.” Balobaki mpe ete bamoná naino esika asiliki te. Stephen amikumisaka te mpo na mbongwana oyo asalá. Alobi boye: “Nalingaki kozwa ata lipamboli moko te na bomoi na ngai soki naboyaka kondima Yehova asalisa ngai nabongola mpenza bomoto na ngai.”

13. Mpo na nini nkanda ezali mabe, mpe likebisi nini Biblia epesi biso?

13 Biblia eyebisi biso tókeba na nkanda, kofinga, mpe koganga. (Baefese 4:31) Mbala mingi makambo yango ebimisaka mobulu. Lelo oyo, bato mingi ya mokili bamonaka ete nkanda mpe mobulu ezali mabe te. Nzokande, makambo yango ekumisaka Mozalisi na biso te. Esɛngaki bandeko na biso ebele bábongola bizaleli na bango mpe bálata bomoto ya sika.​—Tángá Nzembo 37:8-11.

14. Moto ya mobulu akoki kokóma moto ya komikitisa?

14 Tózwa ndakisa ya ndeko Hans oyo azali nkulutu na lisangá moko ya Autriche. Mokambi-misala ya bankulutu ya lisangá yango alobi ete Hans azali na komikitisa mingi mpenza. Kasi, kala ndeko Hans azalaki na komikitisa te. Liboso akokisa mbula 20, abandaki kolangwa masanga mpe akómaki moto ya mobulu. Mokolo moko na nse ya molangwa, asilikaki makasi mpe abomaki makango na ye. Akɔtaki bolɔkɔ mpo na mbula 20, kasi ebongolaki bomoto na ye te. Na nsima, mama na ye asɛngaki nkulutu moko akende kotala ye na bolɔkɔ, mpe Hans abandaki koyekola Biblia. Alobi boye: “Ezalaki etumba mpenza mpo nalongola bomoto ya kala. Bavɛrsɛ oyo elendisaki ngai mingi ezalaki Yisaya 55:7, oyo elobi: ‘Moto mabe atika nzela na ye,’ mpe 1 Bakorinti 6:11, oyo elobi mpo na bato oyo batikaki nzela ya masumu ete: ‘Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.’ Yehova amoniselaki ngai motema molai bambula mingi mpe asalisaki ngai na nzela ya elimo santu na ye mpo nalata bomoto ya sika.” Hans azwaki batisimo ntango azalaki naino na bolɔkɔ, mpe abimaki bolɔkɔ nsima ya mbula 17 ná ndambo. Alobi: “Nazali na botɔndi mingi ndenge Yehova amoniseli ngai motema mawa mingi mpe alimbisi ngai.”

15. Likambo nini ezali mpe na kati ya bomoto ya kala, kasi Biblia elobi nini mpo na yango?

15 Lokuta mpe ezali na kati ya bomoto  ya kala. Na ndakisa, bato mingi bakosaka mpo báfuta mpako te to bákima ngambo ya mbeba oyo basali. Kasi Yehova azali “Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Yango wana, asɛngi basambeli na ye nyonso ‘balobaka solo’ mpe ‘bálobanaka lokuta te.’ (Baefese 4:25; Bakolose 3:9) Na yango, tosengeli kolobaka solo ata soki ezali mpasi to ntango tozali koyoka nsɔni.​—Masese 6:16-19.

NDENGE YA KOLONGA ETUMBA

16. Nini ekosalisa moto alongola bomoto ya kala?

16 Tokokoka te kolongola bomoto ya kala na makasi na biso moko. Sakura, Ribeiro, Stephen, ná Hans babundaki etumba makasi mpo bálongola mimeseno ya mabe. Balongaki etumba yango na nguya ya Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye. (Luka 11:13; Baebre 4:12) Mpo na kozwa nguya yango, tosengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo, komanyola, mpe kobondela ntango nyonso mpo na kosɛnga Nzambe bwanya mpe makasi ya kosalela makambo oyo toyekoli. (Yosua 1:8; Nzembo 119:97; 1 Batesaloniki 5:17) Mpo Liloba ya Nzambe mpe elimo santu na ye esalisa biso, tosengeli mpe kobongisaka mpe koyanganaka na makita. (Baebre 10:24, 25) Tosengeli mpe kosalela malamu biloko mosusu oyo ebongiseli ya Yehova epesi biso, na ndakisa bazulunalo na biso, TV JW, JW Library, mpe jw.org.​—Luka 12:42.

Ndenge nini tokoki kolongola bomoto ya kala? (Talá paragrafe 16)

17. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

17 Tolobeli mimeseno mabe oyo bakristo basengeli kolongola mpe kobwaka mpo na kosepelisa Yehova. Kasi, tosengeli kosala mpe likambo mosusu. Tosengeli kolata bomoto ya sika mpe kofanda na yango libela. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge ya kosala yango.

^ par. 7 Na lisolo oyo, topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 8 Talá mokapo 25 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1.