Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2017

Ndenge ya kolata mpe kobatela bomoto ya sika

Ndenge ya kolata mpe kobatela bomoto ya sika

“Bólata bomoto ya sika.”​—BAKOLOSE 3:10.

NZEMBO: 43, 106

1, 2. (a) Ndenge nini toyebi ete tokoki kolata bomoto ya sika? (b) Bakolose 3:10-14 elobeli bizaleli nini oyo ezali na kati ya bomoto ya sika?

MALOBA “bomoto ya sika” ezali mbala mibale na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika. (Baefese 4:24; Bakolose 3:10) Maloba yango emonisaka bomoto oyo “ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe.” Moto akoki kolata bomoto ya sika? Ɛɛ. Lokola Yehova akelá bato na elilingi na ye, tokoki komekola bizaleli na ye ya kokamwa.​—Ebandeli 1:26, 27; Baefese 5:1.

2 Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, na bantango mosusu tozalaka na bamposa ya mabe. Ekoki mpe kozala ete makambo oyo tomonaka esika tofandi ekɔtelá biso makasi. Kasi, na motema mawa na ye, Yehova akoki kosalisa biso tókóma lolenge ya bato oyo alingi tózala. Mpo tósala yango malamu, tólobela bizaleli oyo ezali na kati ya bomoto ya sika. (Tángá Bakolose 3:10-14.) Tokolobela mpe ndenge ya komonisa bizaleli yango na mosala ya kosakola.

“BOZALI BINO NYONSO . . . NA BOMOKO”

3. Tángá ezaleli moko ya bomoto ya sika.

3 Ntoma Paulo amonisaki ete kopona bilongi te ezali ezaleli  ya ntina mingi na kati ya bomoto ya sika. Alobaki boye: “Mogrɛki azali te Moyuda mpe te, kokatama ngenga ezali te kozanga kokatama ngenga mpe te, mopaya azali te, Mosikitia te, moombo te, moto ya bonsomi te.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na lisangá, moto moko te asengeli komona ete aleki baninga mpo na loposo na ye, ekólo na ye, mpo azali na bozwi, to atángá mingi. Mpo na nini? Mpo biso bayekoli ya Kristo ‘tozali biso nyonso na bomoko.’​—Bakolose 3:11; Bagalatia 3:28.

4. (a) Ndenge nini basaleli ya Yehova basengeli kotalela basusu? (b) Likambo nini ekoki kozala likama mpo na bomoko ya bokristo?

4 Baoyo balati bomoto ya sika bamemyaka mpe bapesaka bato nyonso lokumu, kozanga kotala loposo na bango to esika bautá. (Baroma 2:11) Na bisika mosusu, ekoki kozala mpasi mpenza kosala bongo. Na ndakisa, na bambula oyo eleki, na Afrique du Sud, Leta akabolaki bisika ya kofanda na kolanda loposo ya bato. Tii lelo, bato mingi, ata mpe Batatoli, bafandaka na bisika oyo Leta apesá bato ya loposo na bango. Na yango, mpo na kolendisa bandeko ‘báfungwama,’ na sanza ya 10/2013, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki ebongiseli moko mpo na kosalisa bandeko báyebana malamu.​—2 Bakorinti 6:13.

5, 6. (a) Ebongiseli nini ezwamaki na ekólo moko mpo na kolendisa bomoko kati na basaleli ya Nzambe? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Matomba nini emonanaki?

5 Bibongiseli ezwamaki mpo Batatoli ya masangá mibale ya minɔkɔ to loposo ekeseni bálekisa ntango elongo na nsuka ya bapɔsɔ mosusu. Bandeko basi mpe bandeko mibali ya masangá yango babimaki mosala ya kosakola, bakendaki makita elongo, mpe bakendaki kotalana na bandako. Masangá ebele esalaki bongo, mpe biro ya filiale ezwaki balapolo ya malamu mpenza. Likambo yango ekamwisaki ata bato mosusu oyo bazalaki Batatoli te. Na ndakisa, mokambi ya lingomba moko alobaki boye: “Nazali Motatoli te, kasi nakoloba ete mosala na bino ya kosakola ebongisami malamu mpenza mpe bozali na bomoko na bato ya loposo ekeseni.” Bandeko bayokaki ndenge nini mpo na ebongiseli yango?

6 Na ebandeli, Noma, ndeko mwasi moko oyo alobaka monɔkɔ ya Xhosa, azalaki kokoka te kobengisa bandeko ya lisangá ya Lingelesi mpo ndako na ye ezalaki moke. Kasi, nsima ya kobima mosala ya kosakola na bandeko ya mindɛlɛ mpe kokende na bandako na bango, motema na ye ekitaki. Alobaki boye: “Bazali kaka bato lokola biso!” Na yango, ntango ekómaki ngala ya lisangá ya Xhosa eyamba lisangá ya Lingelesi, Noma ayambaki mwa bapaya na ndako na ye mpe alambelaki bango. Nkulutu moko ya mondɛlɛ azalaki na kati ya bapaya yango. Noma alobaki: “Nakamwaki ndenge andimaki kofanda na ebónga moko ya kopale.” Ebongiseli yango esalisaki bandeko bázwa baninga ya sika mpe bákoba kofungwama epai ya bandeko ya loposo mosusu.

‘BOLINGO YA MOTEMA OYO EUTI NA MAWA MPE BOBOTO’

7. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso komonisa motema mawa?

7 Lokola mokili ya Satana ebebisami naino te, tokokoba kokutana na komekama. Tokoki kozanga mosala, kobɛla makasi, kokutana na minyoko mpe makama, bakoki koyiba biloko na biso nyonso, mpe bongo na bongo. Mpo tósalisana na ntango ya komekama, tosengeli kozala na motema mawa ya solosolo. Bolingo ya motema oyo euti na mawa  ekotinda biso tósalela baninga makambo na boboto. (Baefese 4:32) Bizaleli yango ezali na kati ya bomoto ya sika. Ekosalisa biso tómekola Nzambe mpe tóbɔndisaka basusu.​—2 Bakorinti 1:3, 4.

8. Makambo nini ya malamu ekoki kosalema soki tomoniseli bato nyonso motema mawa mpe boboto na lisangá? Pesá ndakisa.

8 Ndenge nini tokoki komonisa boboto mingi epai ya bandeko ya lisangá oyo bauti bikólo mosusu to oyo bazali babola? Tosengeli koyamba bango malamu, kokóma baninga na bango mpe kosalisa bango bámona ete bazali na ntina na lisangá. (1 Bakorinti 12:22, 25) Tózwa ndakisa ya Dannykarl oyo alongwaki Philippines mpe akendaki kofanda na Japon. Lokola azalaki mopaya, na mosala na bango, bazalaki kosalela ye makambo lokola bana-mboka te. Na nsima, akendaki na makita ya Batatoli ya Yehova. Dannykarl alobi boye: “Bato mingi bazalaki bato ya Japon, kasi bayambaki ngai malamu, lokola nde toyebaná banda kala.” Boboto oyo bandeko bakobaki komonisela ye esalisaki ye akende liboso na elimo. Dannykarl azwaki batisimo, mpe lelo oyo azali nkulutu. Bankulutu mosusu ya lisangá na bango basepelaka mingi mpo Dannykarl ná mwasi na ye Jennifer bazali na lisangá yango. Balobi boye: “Bazali na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe bazali babongisi-nzela, bazali ndakisa malamu mpenza na oyo etali koluka liboso Bokonzi.”​—Luka 12:31.

9, 10. Pesá bandakisa oyo emonisi matomba ya komonisa motema mawa na mosala ya kosakola.

9 Na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi, tozalaka na libaku ya kosalela “bato nyonso oyo ezali malamu.” (Bagalatia 6:10) Mpo na mawa ya bato oyo bakimá bamboka na bango, Batatoli mingi bazali kosala makasi báyekola monɔkɔ na bango. (1 Bakorinti 9:23) Milende na bango ebotaka mbuma ya malamu. Na ndakisa, Tiffany, ndeko mwasi moko ya Australie oyo azali mobongisi-nzela, ayekolaki Swahili mpo na kosalisa lisangá moko ya Swahili na engumba Brisbane. Ata soki koyekola Swahili ezalaki mpasi mpenza, azwaki mapamboli ebele. Alobi boye: “Soki olingi koyoka esengo na mosala ya kosakola, kende na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya. Ezali lokola okei mobembo kasi olongwe na mboka na yo te. Okomona ete tozali lisangá ya bandeko na mokili mobimba mpe ete bomoko na biso ezali mpenza likamwisi.”

Nini etindaka bakristo básalisa bato oyo bakimá bamboka na bango? (Talá paragrafe 10)

10 Libota moko na Japon esalaki mpe bongo. Sakiko, mwana mwasi ya libota yango, alobi boye: “Na bambula ya 1990, soki tobimi na mosala ya kosakola, mbala mingi tozalaki kokutana na bato oyo  bautá Brésil. Soki tolakisi bango bavɛrsɛ lokola Emoniseli 21:3, 4 to Nzembo 37:10, 11, 29 na Biblia na bango ya Portugais, bazalaki kotya likebi mpe bamosusu kutu bazalaki kobimisa mpisoli.” Libota yango eyokelaki bato yango mawa mpe balingaki kosalisa bato yango báyeba solo; na yango babandaki koyekola monɔkɔ ya Portugais libota mobimba. Na nsima, basalisaki mpo na kofungola lisangá ya monɔkɔ ya Portugais. Nsima ya bambula, basalisaki bato ebele oyo bakimá mboka bákóma basaleli ya Yehova. Sakiko alobi boye: “Koyekola monɔkɔ ya Portugais ezalaki mpasi mpenza, kasi tozwaki mapamboli mingi koleka. Tozali na botɔndi mingi epai ya Yehova.”​—Tángá Misala 10:34, 35.

“BÓLATA . . . KOMIKITISA”

11, 12. (a) Mpo na nini ezali na ntina tózala na makanisi ya malamu na oyo etali kolata bomoto ya sika? (b) Nini ekosalisa biso tózala ntango nyonso na komikitisa?

11 Soki tosengeli kolata bomoto ya sika, ezali mpo na kokumisa Yehova, kasi te mpo bato bákumisa biso. Kobosana te ete ata anzelu ya kokoka akómaki na lolendo mpe asalaki lisumu. (Talá mpe Ezekiele 28:17.) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, kokima lolendo ezalaka mpasi mingi. Atako bongo, tokoki kolata komikitisa. Nini ekosalisa biso?

12 Mpo tózala na komikitisa, tosengeli kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo. (Kolimbola Mibeko 17:18-20) Tosengeli mingimingi komanyola mateya ya Yesu mpe ndakisa na ye ya malamu mingi ya komikitisa. (Matai 20:28) Yesu asukolaki ata makolo ya bantoma na ye. (Yoane 13:12-17) Tosengeli mpe kobondela Yehova apesa biso elimo santu mpo esalisa biso tólongola mposa nyonso ya koyoka ete toleki basusu.​—Bagalatia 6:3, 4; Bafilipi 2:3.

13. Komikitisa ememaka matomba nini?

13 Tángá Masese 22:4. Yehova asɛngi biso tózala na komikitisa. Komikitisa ememaka matomba mingi. Soki tozali na komikitisa tokolendisa kimya mpe bomoko na lisangá. Lisusu, Yehova akomonisela biso boboto monene na ye. Ntoma Petro alobaki: “Bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino, mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.”​—1 Petro 5:5.

“BÓLATA . . . MOTEMA PƐTƐƐ MPE MOTEMA MOLAI”

14. Nani nde ndakisa eleki malamu ya kozala na motema pɛtɛɛ mpe motema molai?

14 Na mokili ya lelo, soki moto azali na motema pɛtɛɛ mpe na motema molai, mbala mingi bamonaka ye alɛmbá. Kasi ezali solo te. Bizaleli yango ya malamu eutaka epai ya Yehova, Moto oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba. Azali ndakisa eleki malamu ya kozala na motema pɛtɛɛ mpe motema molai. (2 Petro 3:9) Kanisá ndenge amonisaki motema molai ntango ayanolaki na nzela ya anzelu na mituna ya Abrahama ná Lota. (Ebandeli 18:22-33; 19:18-21) Kanisá mpe ndenge Yehova amoniselaki ekólo Yisraele motema molai mbula koleka 1 500.​—Ezekiele 33:11.

15. Ndakisa nini Yesu atikaki na oyo etali motema pɛtɛɛ mpe motema molai?

15 Yesu azalaki “na ezaleli ya boboto.” (Matai 11:29) Amonisaki motema molai mpenza na bolɛmbu ya bayekoli na ye. Na mosala na ye awa na mabele, bakonzi ya mangomba bazalaki kotyola ye mpe kokosela ye makambo. Kasi, azalaki kaka na motema pɛtɛɛ mpe na motema molai tii na liwa na ye. Ntango Yesu azalaki na nzete ya mpasi, asɛngaki Tata na ye alimbisa mibali oyo babomaki ye, mpo ndenge alobaki yango, “bazali koyeba oyo bazali kosala te.” (Luka 23:34) Ata ntango Yesu  atungisamaki to azalaki na mpasi, azalaki kaka na motema pɛtɛɛ mpe na motema molai.​—Tángá 1 Petro 2:21-23.

16. Ndenge nini tokoki komonisa motema pɛtɛɛ mpe motema molai?

16 Ndenge nini tokoki komonisa motema pɛtɛɛ mpe motema molai? Paulo alobelaki lolenge moko na maloba oyo: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Bakolose 3:13) Mpo na kolimbisa basusu, tosengeli kozala na motema pɛtɛɛ mpe motema molai. Soki tozali kolimbisa, tokolendisa mpe tokobatela bomoko na lisangá.

17. Mpo na nini motema pɛtɛɛ mpe motema molai ezali na ntina?

17 Yehova nde asɛngi biso tózala na motema pɛtɛɛ to boboto, mpe motema molai epai ya basusu. Ezali na ntina mingi mpo na lobiko na biso. (Matai 5:5; Yakobo 1:21) Longola yango, soki tozali na motema pɛtɛɛ to boboto mpe motema molai, tokokumisa Yehova mpe tokosalisa basusu bálanda toli ya Biblia.​—Bagalatia 6:1; 2 Timote 2:24, 25.

“BÓLATA BOLINGO”

18. Boyokani nini ezali kati na bolingo mpe kopona bilongi te?

18 Bizaleli nyonso oyo tolobeli ezali na boyokani na bolingo. Na ndakisa, moyekoli Yakobo asengelaki kopesa bandeko toli na likambo etali kosalela bato ya bozwi makambo na lokumu koleka babola. Amonisaki ete yango eyokani te na mobeko ya Nzambe oyo elobi: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Na nsima abakisaki: “Soki bozali kaka kopona bilongi, bozali kosala lisumu.” (Yakobo 2:8, 9) Soki tolingi bato, tokokanisela moto te mabe mpo na kelasi atángá, loposo na ye, to bozwi na ye. Kopona bilongi te esengeli kozala kaka ya maloba te. Esengeli kozala na kati ya bomoto na biso.

19. Mpo na nini ezali na ntina tólata bolingo?

19 Bolingo ezali mpe “na motema molai mpe na boboto” mpe “emivimbisaka na lolendo te.” (1 Bakorinti 13:4) Tosengeli kozala na motema molai, na boboto, mpe na komikitisa mpo tókoba koyebisa bazalani na biso nsango malamu. (Matai 28:19) Lisusu, bizaleli yango esalisaka biso tóyokanaka malamu na bandeko nyonso ya lisangá. Nini ekosalema soki biso nyonso tozali komonisa bolingo ya ndenge wana? Masangá ekozala na bomoko, ekopesa Yehova nkembo, ekobenda bato mosusu báya na kati ya solo. Yango wana, mpo na kosukisa kolobela bomoto ya sika, Biblia elobi: “Longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”​—Bakolose 3:14.

BÓKOBA “KOKÓMISAMA SIKA”

20. (a) Mituna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini? (b) Ntango nini tozali kozela?

20 Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Milende nini nasengeli lisusu kosala mpo na kolongola mpe kobwaka bomoto ya kala?’ Tosengeli kobondela Yehova asalisa biso mpe kosala makasi tólongola likanisi to momeseno nyonso ya mabe oyo ekoki kopekisa biso tózwa “libula ya bokonzi ya Nzambe.” (Bagalatia 5:19-21) Tosengeli mpe komituna boye: ‘Nazali kokoba kokómisa makanisi na ngai sika mpo na kosepelisa Yehova?’ (Baefese 4:23, 24) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kotika te kosala makasi mpo na kolata mpe kobatela bomoto ya sika. Bomoi ekozala malamu mpenza ntango moto nyonso awa na mabele akolata bomoto ya sika na ndenge ya kokoka!

^ par. 3 Na ntango ya kala, bato bazalaki komona Basikitia lokola basɛnzi, na yango, bazalaki kotyola bango.