Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2017

“Kimya ya Nzambe . . . eleki makanisi nyonso”

“Kimya ya Nzambe . . . eleki makanisi nyonso”

“Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino.”​—BAFILIPI 4:7.

NZEMBO: 76, 141

1, 2. Nini ekómelaki Paulo ná Silasi na Filipi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

KANISÁ likambo oyo. Tozali pene na midi ya butu. Bamisionɛrɛ mibale, Paulo ná Silasi, bazali na esika oyo eleki molili na bolɔkɔ moko na engumba Filipi. Bakoki koningana te mpo bakangi bango makolo na bikanga-makolo, mpe bazali na mpasi na mokɔngɔ mpo bautaki kobɛta bango makasi mpenza. (Misala 16:23, 24) Na moi ya mokolo yango, ebele ya bato bakangaki Paulo ná Silasi na mbalakaka, bamemaki bango na zando mpe basambisaki bango nokinoki. Bapasolaki bango bilamba ya likoló mpe babɛtaki bango makasi na mangenda. (Misala 16:16-22) Basalaki mabe mpenza! Lokola ntoma Paulo azalaki Moroma, ebongaki básambisa ye na ndenge ya malamu. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

2 Ntango bazalaki na bolɔkɔ, ekoki kozala ete Paulo azalaki kokanisa likambo oyo esalemaki mokolo yango mpe bato oyo bazalaki kofanda na Filipi. Bazalaki ata na sinagoga te na engumba yango, na bokeseni na bisika mingi oyo Paulo akendaki liboso. Na yango, Bayuda bazalaki kokende kosambela libándá ya porte ya engumba pene ya ebale moko. (Misala 16:13, 14) Mbala mosusu  bazalaki kosala bongo mpo Bayuda ya mibali bakómaki ata zomi te na engumba yango, yango wana bakokaki kosala sinagoga te. Bato ya Filipi bazalaki komikumisa mpo bazalaki bana-mboka Roma. (Misala 16:21) Ekoki kozala mpo na ntina yango nde bakanisaki te ete Paulo ná Silasi, oyo bazalaki Bayuda, bakokaki mpe kozala Baroma. Ezala bongo to te, babwakaki Paulo ná Silasi na bolɔkɔ atako basalaki mabe te.

3. Nini ekokaki kotinda ntoma Paulo amituna mituna ndenge bakɔtisaki ye bolɔkɔ, kasi ezaleli nini amonisaki?

3 Mbala mosusu ntoma Paulo akanisaki mpe makambo oyo elekaki mwa basanza liboso akóma na Filipi. Azalaki na ngámbo mosusu ya Mbu Égée, na Azia Moke. Kuna, elimo santu epekisaki ye mbala na mbala asakola na bisika mosusu. Ezalaki lokola nde elimo santu ezalaki kotindika ye mpo akende na esika moko boye. (Misala 16:6, 7) Esika nini? Ntango azalaki na Troase, Paulo azwaki emonaneli moko; moto moko alobaki na ye: “Leká na Masedonia kosalisa biso.” Lokola mokano ya Yehova emonanaki polele, ntoma Paulo akendaki mbala moko na Masedonia. (Tángá Misala 16:8-10.) Kasi nini esalemaki? Ntango akómaki na Masedonia, eumelaki te bakɔtisaki ye na bolɔkɔ! Mpo na nini Yehova atikaki nzela na likambo yango? Ntoma Paulo akoumela na bolɔkɔ ntango boni? Ata soki amitunaki mituna ya ndenge wana, kondima na ye ezalaki kaka makasi mpe abatelaki esengo na ye. Ye ná Silasi babandaki “kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo.” (Misala 16:25) Kimya ya Nzambe ekitisaki mitema mpe makanisi na bango.

4, 5. (a) Nini ekoki kotinda biso tómiyoka lokola ntoma Paulo? (b) Ndenge nini likambo ya ntoma Paulo ebongwanaki na mbala moko?

4 Osilá komiyoka lokola ntoma Paulo? Ntango mosusu osɛngaki Nzambe asalisa yo ozwa ekateli moko boye mpe omonaki ete ozali kolanda litambwisi ya elimo santu, kasi makambo ebalukaki ndenge mosusu. Okutanaki na mikakatano ebele, to makambo oyo esɛngaki osala mbongwana minene na bomoi na yo. (Mosakoli 9:11) Sikoyo soki okanisi likambo yango, mbala mosusu omitunaka ntina oyo Yehova atikaki makambo mosusu esalema. Nini ekoki kosalisa yo okoba koyika mpiko mpe kotyela Yehova motema mobimba? Mpo na kozwa eyano, tózongela lisolo ya ntoma Paulo ná Silasi.

5 Ntango ntoma Paulo ná Silasi bazalaki koyemba, makambo ebele oyo bazalaki kokanisa te ebandaki kosalema. Ya liboso, koningana makasi ya mabele esalemaki. Baporte ya bolɔkɔ efungwamaki na mbala moko. Minyɔlɔlɔ ya bato nyonso ya bolɔkɔ efungwamaki. Na nsima, ntoma Paulo apekisaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ amiboma, mpe moto yango ná libota na ye mobimba bazwaki batisimo. Na ntɔngɔntɔngɔ, bakambi-mboka batindaki bapolisi bábimisa ntoma Paulo ná Silasi na bolɔkɔ mpe basɛngaki bango bálongwa mboka na bango na malɛmbɛ. Ntango bakambi-mboka bayebaki ete ntoma Paulo ná Silasi bazalaki Baroma, bamonaki libunga monene oyo basalaki mpe bayaki mpo na kobimisa bango. Kasi liboso ntoma Paulo ná Silasi bálongwa na engumba yango, bakendaki naino kotala Lidia, ndeko mwasi oyo autaki kozwa batisimo. Basalelaki libaku yango mpo na kolendisa bandeko mosusu ya Filipi. (Misala 16:26-40) Talá ndenge makambo ebongwanaki na mbala moko mpenza!

“ELEKI MAKANISI NYONSO”

6. Tokolobela nini na lisolo oyo?

6 Makambo yango ekoki koteya biso nini? Lokola Yehova akoki kosala makambo oyo tozali kokanisa te, ezali na ntina te tómitungisa soki tokutani  na komekama. Ntoma Paulo abosanaki liteya yango te; yango emonani na makambo oyo akomelaki bandeko ya Filipi na nsima, na oyo etali komitungisa mpe kimya ya Nzambe. Na lisolo oyo, tokolobela maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Bafilipi 4:6, 7. (Tángá.) Tokolobela mpe bandakisa mosusu ya Biblia oyo emonisi ndenge Yehova asalaki makambo oyo bato bazalaki kokanisa te. Na nsima, tokolobela ndenge “kimya ya Nzambe” ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na komekama wana tozali kotyela Yehova motema mobimba.

7. Liteya nini ntoma Paulo alingaki kopesa bandeko ya Filipi, mpe maloba na ye ekoki koteya biso nini?

7 Ntango bandeko ya Filipi batángaki mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki bango, na ntembe te bakanisaki makambo oyo ekómelaki ye ná Silasi mpe makambo ya kokamwa oyo Yehova asalaki mpo na bango. Liteya nini ntoma Paulo alingaki kopesa bango na mokanda na ye? Liteya yango ezalaki ete: Bómitungisa te. Soki bobondeli, bokozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” Maloba yango elimboli nini? Na Babiblia mosusu, maloba yango ebongolami na “eleki ndɔtɔ nyonso” to “eleki mikano nyonso ya bato.” Na yango, ntoma Paulo alingaki koloba ete “kimya ya Nzambe” eleki nyonso oyo tokoki kokanisa. Soki mayele na biso esuki na likambo moko, Yehova ayebaka oyo esengeli kosala; mpe akoki kosala makambo oyo tozali kokanisa te.​—Tángá 2 Petro 2:9.

8, 9. (a) Atako ntoma Paulo akutanaki na makambo ya kozanga bosembo na Filipi, matomba nini yango ebimisaki? (b) Mpo na nini bandeko ya Filipi bakokaki kondima maloba ya ntoma Paulo?

8 Na ntembe te ntango bandeko ya Filipi bakanisaki makambo oyo esalemaki mbula zomi liboso, mokanda ya ntoma Paulo epesaki bango makasi. Ata soki Yehova apesaki nzela ete ntoma Paulo ná Silasi bákutana na makambo ya kozanga bosembo, makambo yango esalisaki mpo na “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko.” (Bafilipi 1:7) Bakonzi ya Filipi bamekaki lisusu te konyokola lisangá ya bokristo oyo eutaki kofungwama. Mbala mosusu ndenge ntoma Paulo alobaki ete azali Moroma esalisaki moyekoli Luka atikala na Filipi ntango ntoma Paulo ná Silasi balongwaki kuna. Na yango, Luka akobaki kosalisa lisangá ya sika oyo efungwamaki kuna.

9 Ntango bandeko ya Filipi batángaki mokanda ya ntoma Paulo, bayebaki ete maloba yango eutaki te na makanisi ya moto moko ya mayele. Ntoma Paulo akutanaki na komekama makasi mpenza. Ata ntango akomelaki bandeko yango, azalaki mokangami na ndako na ye na Roma. Kasi amonisaki ete azalaki kaka na “kimya ya Nzambe.”​—Bafilipi 1:12-14; 4:7, 11, 22.

“BÓMITUNGISA ATA NA LIKAMBO MOKO TE”

10, 11. Tosengeli kosala nini ntango tozali komitungisa mpo na likambo moko, mpe nini ekoki kosalema?

10 Nini ekoki kosalisa biso ‘tómitungisa ata na likambo moko te’ kasi tózala nde na “kimya ya Nzambe”? Maloba ya ntoma Paulo epai ya Bafilipi emonisi ete libondeli nde ekoki kosalisa. Na yango, soki tozali komitungisa, tosengeli koyebisa Nzambe mitungisi na biso na libondeli. (Tángá 1 Petro 5:6, 7.) Ntango ozali kobondela Yehova, zalá na kondima mpo atyelaka yo likebi. Pesáká ye matɔndi mpo na lipamboli nyonso oyo ozwi. Mpe kobosana ata mokolo moko te ete Yehova akoki “kosala mingi mpenza koleka makambo nyonso oyo tosɛngaka  to oyo eyelaka biso na makanisi.”​—Baefese 3:20.

11 Ndenge ezalaki mpo na ntoma Paulo ná Silasi, Yehova akoki kosala makambo ya kokamwa mpo na kosalisa biso. Mbala mosusu ekozala likambo ya monene te, kasi ekozala oyo tosengeli na yango. (1 Bakorinti 10:13) Yango elingi koloba te ete tosengeli kofanda kaka boye, tokangi mabɔkɔ mpo na kozela Yehova asembola makambo to asilisa mokakatano na biso. Tosengeli kosala makambo oyo eyokani na mabondeli na biso. (Baroma 12:11) Misala na biso ekomonisa ete tolingi mpenza likambo oyo tosɛngi, mpe Yehova akozwa eloko ya kopambola. Tóbosana mpe te ete Yehova akoki kosala koleka oyo tosɛngi to oyo tozali kozela asala. Na bantango mosusu, akoki kosala makambo oyo tozali kokanisa te. Na yango, tótalela mwa bandakisa oyo ekosalisa biso tótya motema mobimba ete Yehova azali na makoki ya kosalela biso makambo oyo tozali kokanisa te.

YEHOVA ASALAKI MAKAMBO OYO BATO BAZALAKI KOKANISA TE

12. (a) Mokonzi Hizikiya asalaki nini ntango mokonzi ya Asiri ayaki kobundisa Yerusaleme? (b) Ndenge oyo Yehova asilisaki likambo yango ezali koteya biso nini?

12 Na Biblia, ezali na bandakisa ebele oyo emonisi Yehova asali makambo oyo bato bazalaki kokanisa te. Na ndakisa, ntango Hizikiya azalaki mokonzi na Yuda, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, akɔtaki na Yuda mpe azwaki bingumba na yango nyonso longola kaka Yerusaleme. (2 Bakonzi 18:1-3, 13) Na nsima, Senakeribe ayaki kobundisa Yerusaleme. Mokonzi Hizikiya asalaki nini? Ya liboso, asɛngaki Yehova lisalisi mpe atunaki toli epai ya Yisaya, mosakoli ya Yehova. (2 Bakonzi 19:5, 15-20) Hizikiya amonisaki ete azali makambo makasimakasi te na ndenge afutaki Senakeribe mpako oyo asɛngaki. (2 Bakonzi 18:14, 15) Na nsima, azwaki bibongiseli mpo na kobatela bato ya engumba soki banguna bazingi bango ntango molai. (2 Ntango 32:2-4) Kasi esukaki ndenge nini? Yehova atindaki anzelu moko mpe abomaki basoda ya Senakeribe 185 000 na butu moko. Ata Hizikiya akanisaki likambo ya ndenge wana te!​—2 Bakonzi 19:35.

Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yozefe?​—Ebandeli 41:42 (Talá paragrafe 13)

13. (a) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yozefe? (b) Likambo nini ya kokamwa ekómelaki Sara?

13 Tótalela mpe likambo oyo ekómelaki elenge mobali Yozefe. Ntango azalaki na libulu ya bolɔkɔ na Ezipito, Yozefe akanisaki ata moke te ete akoki kokóma moto ya mibale oyo aleki na nguya na Ezipito, to ete Yehova akosalela ye mpo na kobatela libota na ye ekufa nzala te. (Ebandeli 40:15; 41:39-43; 50:20) Makambo Yehova asalaki elekaki nyonso oyo Yozefe akokaki kozela. Tólobela mpe Sara, nkɔkɔ ya Yozefe. Mobange mwasi Sara akokaki mpenza kokanisa ete Yehova akopesa ye nzela abota mwana na ye moko, na esika azala kaka na mwana ya  mosaleli na ye? Kobotama ya Yisaka elekaki mosika makambo nyonso oyo Sara akokaki kokanisa.​—Ebandeli 21:1-3, 6, 7.

14. Likambo nini tosengeli koyeba mpo na Yehova?

14 Tozelaka te ete Yehova alongola mikakatano na biso nyonso na ndenge ya likamwisi liboso mokili ya sika eya, to ete asala makambo minene ya kokamwa na bomoi na biso. Kasi, toyebi ete Nzambe oyo asalelaki basaleli na ye makambo ya kokamwa na ntango ya kala, azali mpe Nzambe na biso, Yehova; abongwani te. (Tángá Yisaya 43:10-13.) Koyeba yango etindaka biso tótyela ye motema. Toyebi ete akopesa biso nguya oyo esengeli mpo na kosala mokano na ye. (2 Bakorinti 4:7-9) Ndakisa ya Hizikiya, ya Yozefe, mpe ya Sara ezali koteya biso nini? Yehova akoki kosalisa biso tólonga ata mokakatano ya monene ndenge nini soki totikali sembo epai na ye.

Yehova akoki kosalisa biso tólonga ata mokakatano ya monene ndenge nini soki totikali sembo epai na ye

15. Ndenge nini tokoki kozala na “kimya ya Nzambe” ata soki tozali na mikakatano, mpe nini esalisaka biso?

15 Ndenge nini tokoki kozala na “kimya ya Nzambe” ata ntango tozali na mikakatano? Tosengeli ntango nyonso kozala na boyokani malamu na Yehova. Tokómaka na boyokani ya ndenge wana kaka na “nzela ya Kristo Yesu,” oyo apesaki bomoi na ye mbeka. Lisiko ezali likambo mosusu ya kokamwa oyo Yehova asalá. Yehova asalelaka lisiko mpo na kolimbisa masumu na biso, mpo tózala na lisosoli ya pɛto mpe tózala penepene na ye.​—Yoane 14:6; Yakobo 4:8; 1 Petro 3:21.

EKOBATELA MITEMA MPE MAKANISI NA BISO

16. Nini ekosalema soki tozwi “kimya ya Nzambe”? Pesá ndakisa.

16 Nini ekosalema soki tozwi “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso”? Biblia elobi ete ‘ekobatela mitema na biso mpe makanisi na biso na nzela ya Kristo Yesu.’ (Bafilipi 4:7) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kobatela’ ezalaki na elobeli ya basoda mpe ezalaki komonisa etuluku ya basoda oyo batyami mpo na kobatela engumba. Engumba Filipi ebatelamaki ndenge wana. Bato bakokaki kolala na kimya mpo bayebaki ete basoda bazali kobatela engumba. Ndenge moko mpe, soki tozali na “kimya ya Nzambe,” tokomitungisa te, makanisi mpe mitema na biso ekozala ya kokita. Toyebi ete Yehova atyelaka biso likebi mpe alingi tózala malamu. (1 Petro 5:10) Yango ekobatela biso mpo mitungisi to kolɛmba nzoto elekela biso te.

17. Nini ekosalisa biso tótyela Yehova motema na bolɔzi monene?

17 Mosika te, bolɔzi monene ekoyela bato nyonso awa na mabele. (Matai 24:21, 22) Toyebi mpenza te nini ekokómela mokomoko na biso. Kasi, tosengeli komitungisa koleka ndelo te mpo na yango. Ata soki toyebi te makambo nyonso oyo Yehova akosala, kasi toyebi Nzambe na biso. Toyebi makambo oyo asalelaki basaleli na ye ya sembo na ntango ya kala. Tomoni ete ata soki makambo nini esalemi, Yehova akokokisa mokano na ye. Mpe akoki kosala yango na ndenge oyo tozali kokanisa te! Yango wana, mbala nyonso oyo Yehova asaleli biso likambo oyo tozalaki kokanisa te, tokoki koyoka “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”

^ par. 1 Ekoki kozala ete Silasi mpe azalaki Moroma.​—Misala 16:37.