Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2017

Mpo na nini tosengeli ‘kosanzola Yah’?

Mpo na nini tosengeli ‘kosanzola Yah’?

“Bósanzola Yah . . . mpo ezali likambo ya kosepelisa.”NZEMBO 147:1.

NZEMBO: 104, 152

1-3. (a) Mbala mosusu Nzembo 147 ekomamaki ntango nini? (b) Boyekoli ya Nzembo 147 ekoki koteya biso nini?

MBALA mingi soki moto asali malamu likambo oyo basɛngaki ye to amonisi ezaleli moko ya bokristo, tokumisaka ye. Nzokande, tozali na makambo ebele oyo esengeli kotinda biso tósanzola Yehova Nzambe! Tokoki kosanzola ye mpo na nguya na ye monene, oyo tomonaka na biloko ya kokamwa oyo akelá, to mpo na bolingo na ye makasi epai na biso, oyo amonisaki na ndenge apesaki Mwana na ye se moko mbeka ya lisiko.

2 Soki totángi Nzembo 147, tokomona polele ete mokomi na yango azalaki na mposa makasi ya kosanzola Yehova. Alendisaki mpe basusu básanzola Nzambe elongo na ye.Tángá Nzembo 147:1, 7, 12.

3 Toyebi nkombo ya mokomi ya Nzembo 147 te. Kasi, emonani lokola ete azalaki na bomoi na ntango oyo Bayisraele bazongaki na Yerusaleme nsima ya kolongwa na boombo na Babilone. (Nzembo 147:2) Na ntembe te mokomi ya nzembo yango  asanzolaki Yehova mpo basaleli na Ye bazongelaki kosambela ye na mokili na bango moko. Kasi, ayebisaki bantina mosusu ya kosanzola Yehova. Bantina yango nini? Mpe mpo na bantina nini tosengeli kobelela “Aleluya!,” oyo elimboli ‘Sanzolá Yah’?Nzembo 147:1.

YEHOVA ABIKISAKA BAOYO BAZOKI NA MOTEMA

4. Ntango Mokonzi Siruse abimisaki Bayisraele na boombo, bayokaki ndenge nini, mpe mpo na nini?

4 Kanisá ndenge Bayisraele bazalaki koyoka ntango bazalaki na boombo na Babilone. Bato oyo bamemaki bango kuna bazalaki kosɛka bango mpe koyebisa bango: “Bóyembela biso loyembo moko ya Siona.” Kasi Bayuda bazalaki na esengo ya koyemba te. Yerusaleme, engumba oyo ezalaki kopesa bango esengo, ebebisamaki. (Nzembo 137:1-3, 6) Mitema na bango ezokaki, mpe bazalaki na mposa ya libɔndisi. Kasi, kaka ndenge Liloba ya Nzambe esakolaki yango, Yehova asalisaki bato na ye. Na ndenge nini? Siruse, mokonzi ya Perse, alongaki Babilone mpe alobaki ete: “Yehova . . . apesi ngai mokumba ya kotongela ye ndako na Yerusaleme.” Alobaki na Bayisraele: “Moto nyonso kati na bino nyonso bato na ye, Yehova Nzambe na ye azala na ye. Amata.” (2 Ntango 36:23) Na ntembe te, yango ebɔndisaki Bayisraele oyo bazalaki na Babilone!

5. Mokomi ya nzembo alobaki nini mpo na nguya ya Yehova ya kobikisa biso?

5 Yehova asukaki kaka te na kobɔndisa ekólo mobimba, abɔndisaki mpe Moyisraele mokomoko. Yehova asalaka mpe bongo lelo. Mokomi ya nzembo alobaki ete Nzambe “abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango.” (Nzembo 147:3) Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali kobɛla to kotungisama na makanisi. Alingaka kobɔndisa biso mpe kobikisa mpota ya motema na biso. (Nzembo 34:18; Yisaya 57:15) Apesaka biso bwanya mpe makasi mpo tóyika mpiko ata na mokakatano nini oyo tozali na yango.Yakobo 1:5.

6. Ndenge nini maloba ya Nzembo 147:4 ekoki kosalisa biso? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Na nsima, mokomi ya nzembo atalaki likoló mpe alobaki ete Yehova “atángaka motángo ya minzoto” mpe “abengaka yango nyonso na nkombo na yango.” (Nzembo 147:4) Mokomi ya nzembo akokaki komona minzoto, kasi akokaki ata moke te koyeba motángo na yango. Lelo, bato ya siansi bayebi ete ezali na bamiliare ya minzoto na galaksi na biso. Mpe bagalaksi ekoki kozala bamiliare na bamiliare na molɔ́ngɔ́! Bato bakoki te koyeba motángo ya minzoto nyonso, kasi Mozalisi na biso ayebi. Kutu, ayebi monzoto mokomoko malamu mpe apesá yango nkombo. (1 Bakorinti 15:41) Nzambe oyo ayebi esika monzoto mokomoko ezali ayebi mpe yo: ayebi esika ozali, ndenge ozali komiyoka, mpe oyo osengeli na yango!

7, 8. (a) Makambo nini Yehova ayebi mpo na biso? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi motema mawa ya Yehova.

7 Yehova atyelaka yo likebi, mpe azali na nguya ya kosalisa yo na mikakatano na yo. (Tángá Nzembo 147:5.) Okoki komona lokola mokakatano na yo eleki makasi mpe okokoka kolonga yango te. Nzambe ayebi esika makasi na yo esuki mpe ‘abosanaka te ete ozali putulu.’ (Nzembo 103:14) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka mabunga mosusu mbala na mbala, mpe yango ekoki kolɛmbisa biso nzoto. Mbala boni toyokaka mawa mpo tolobaki makambo oyo ebongi te, bamposa mabe eyelaki biso, to mpo toyokelaki basusu likunya! Yehova azali ata na bolɛmbu moko  te, kasi ayebi malamu ndenge tomiyokaka.Yisaya 40:28.

8 Mbala mosusu osilá komona ndenge Yehova asalisaki yo ntango okutanaki na komekama moko boye. (Yisaya 41:10, 13) Tózwa ndakisa ya mobongisi-nzela moko na nkombo Kyoko. Ntango akendaki na teritware moko ya sika, alɛmbaki nzoto mpenza. Kasi, ndenge nini Yehova amonisaki Kyoko ete ayebi mikakatano na ye? Na lisangá oyo Kyoko akendaki, bandeko ebele bazalaki komitya na esika na ye. Amiyokaki lokola nde Yehova azalaki koloba na ye ete: “Nalingaka yo, kaka te mpo ozali mobongisi-nzela, kasi mpo ozali mwana na ngai mpe omipesá na ngai. Ozali na kati ya Batatoli na ngai mpe nalingi ozala na esengo!” Bongo yo, ndenge nini Yehova amonisaki yo ete ayebi mikakatano na yo?

YEHOVA AKOKISAKA BAMPOSA NA BISO

9, 10. Likambo nini oyo eleki ntina Yehova asalaka mpo na kosalisa biso? Pesá ndakisa.

9 Biso nyonso tozalaka na mposa ya bilei, bilamba, mpe esika ya kolala. Mbala mosusu ozali komitungisa mpo okozala na biloko mingi te ya kolya. Kasi, Yehova akelá mabele mpo ebimisa bilei oyo ekoki mpo na moto nyonso, ata mpo na “bana ya yanganga.” (Tángá Nzembo 147:8, 9.) Soki Yehova aleisaka yanganga (corbeau), tokoki kondima ete akokokisa mpe bamposa na biso ya mosuni.Nzembo 37:25.

10 Likambo eleki ntina, Yehova akokisaka bamposa na biso ya elimo mpo tózala na kondima makasi, mpe apesaka biso “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7) Ndeko moko na nkombo Mutsuo ná mwasi na ye bamonaki yango. Ntango tsunami esalemaki na Japon na 2011, babikaki na liwa mpo bamataki na likoló ya ndako na bango. Mokolo yango, babungisaki biloko na bango nyonso. Na butu wana, molili mpe malili ezalaki makasi mpe balalaki na mwa shambrɛ moko na likoló. Na ntɔngɔ, balukaki eloko oyo ekoki kolendisa bango. Bamonaki kaka Buku ya mobu 2006 ya Batatoli ya Yehova. Ntango Mutsuo afungolaki yango, amonaki motó ya likambo oyo elobi “Le tsunami le plus meurtrier jamais recensé” (tsunami oyo ebomaki bato mingi koleka). Na esika yango, balobelaki koningana ya mabele oyo esalemaki na Sumatra na 2004, oyo ebomaki koleka tsunami nyonso oyo esalemaki liboso. Mutsuo ná mwasi na ye balelaki ntango batángaki masolo ya bandeko na bango. Bamonaki ete Yehova alendisaki bango na ntango oyo basengelaki na yango. Yehova asalisaki bango mpe na ndenge mosusu. Bandeko ya bisika mosusu ya Japon bamemelaki bango bilei mpe bilamba. Kasi, balendisamaki koleka ntango bandeko oyo bazalaki bamonisi ya ebongiseli ya Nzambe bayaki kotala bango. Mutsuo alobi boye: “Nayokaki lokola Yehova atɛlɛmi pene ya mokomoko na biso mpo na kobatela biso. Ebɔndisaki biso mpenza!” Nzambe akokisaka liboso bamposa na biso ya elimo, na nsima nde akokisaka bamposa na biso ya mosuni.

NDENGE YA KOZWA LISALISI YA NZAMBE

11. Tosengeli kosala nini mpo tózwa lisalisi ya Nzambe?

11 Yehova “asalisaka bato ya komikitisa.” Alingaka biso mpe azalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso. (Nzembo 147:6a) Ndenge nini tokoki kozwa lisalisi yango? Tosengeli kozala na boyokani malamu na ye. Mpo na yango, tosengeli kokolisa komikitisa. (Sefania 2:3) Bato ya komikitisa bazelaka Yehova  abongisa makambo nyonso ya kozanga bosembo mpe asilisa mpasi na bango. Yehova asepelaka na bato ya ndenge wana.

12, 13. (a) Mpo na kozwa lisalisi ya Nzambe, makambo nini tosengeli kokima? (b) Yehova asepelaka na bato ya ndenge nini?

12 Nzokande, Nzambe “akitisaka bato mabe kino na mabele.” (Nzembo 147:6b) Tólinga te likambo yango ekómela biso! Lokola tolingaka Nzambe amonisela biso boboto monene na ye, tosengeli koyina oyo ye ayinaka. (Nzembo 97:10) Na ndakisa, tosengeli koyina pite. Yango elingi koloba ete tosengeli kokima makambo nyonso oyo ekoki komema biso kuna, na ndakisa pornografi. (Nzembo 119:37; Matai 5:28) Ekoki kozala etumba monene, kasi tosengeli kosala makasi mpenza mpo ekomemela biso mapamboli ya Yehova.

13 Tokoki kolonga etumba yango biso moko te. Tosengeli kotyela Yehova motema. Yehova akosepela nde soki tomitye motema na “nguya ya mpunda” elingi koloba bisika oyo bato balukaka lisalisi? Te! Tosengeli mpe kotya motema na “makolo ya moto te,” elingi koloba kotya motema epai na biso moko to epai ya bato mosusu. (Nzembo 147:10) Tosengeli nde kokoba kobondela Yehova asalisa biso mpe apesa biso makasi tólonga bolɛmbu na biso. Yehova akolɛmba ata moke te koyoka mabondeli ya ndenge wana. “Yehova asepelaka na baoyo bazali kobanga ye, na baoyo bazali kozela motema boboto na ye.” (Nzembo 147:11) Lokola azali sembo mpe alingaka biso, toyebi ete akosalisa biso tólonga bamposa ya mabe.

14. Mokomi ya nzembo andimaki likambo nini?

14 Yehova alaki ete akosalisa biso soki tokutani na mikakatano. Ntango Bayisraele bazongaki na Yerusaleme, mokomi ya nzembo akanisaki ndenge Yehova azalaki kosalisa bango. Ayembaki boye: “Akómisi bikangiseli ya baporte na yo makasi; apamboli bana na yo na kati na yo. Azali kotya kimya na teritware na yo.” (Nzembo 147:13, 14) Mokomi ya nzembo akitisaki motema mpo ayebaki ete Nzambe akokómisa baporte ya engumba makasi mpe akobatela bato na ye.

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa biso ntango tozali komitungisa mpo na komekama na biso? (Talá paragrafe 15 tii 17)

15-17. (a) Tokoki komiyoka ndenge nini ntango tozali na komemaka, kasi ndenge nini Yehova asalelaka Liloba na ye mpo na kosalisa biso? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ete Liloba ya Nzambe “epotaka mbangu mpenza” mpo na kosalisa biso.

15 Ntango mosusu ozali komitungisa mpo na mikakatano na yo, kasi Yehova akoki kopesa yo bwanya mpo olonga yango. Mokomi ya nzembo alobaki ete Nzambe “azali kotinda liloba na ye na mabele; liloba na ye epotaka mbangu mpenza.” Na nsima, alobelaki nɛjɛ, matandala, mpe mbula ya mabanga, mpe atunaki: “Nani akoki kotɛlɛma liboso ya malili na ye?” Na nsima alobaki ete Yehova “atindaka liloba na ye mpe anyangwisaka yango.” (Nzembo 147:15-18) Nzambe na biso, oyo ayebi makambo nyonso mpe akoki kosala makambo nyonso, oyo atambwisaka nɛjɛ mpe mbula ya mabanga, akoki mpenza kosalisa yo olonga ata mokakatano nini.

16 Lelo, Yehova atambwisaka biso na nzela ya Liloba na ye Biblia. Mokomi ya nzembo alobaki ete liloba ya Yehova “epotaka mbangu mpenza” mpo na kosalisa biso, elingi koloba Nzambe alakisaka biso nzela ya malamu mpe na ntango oyo ebongi. Kanisá lisalisi oyo ozwaka na Biblia, na mikanda ya “moombo ya sembo,” na TV JW, na site Internet jw.org, na nzela ya bankulutu mpe bandeko na biso ya lisangá. (Matai 24:45) Osilá komona na bomoi na yo ete Yehova ayaka nokinoki mpo na kotambwisa yo?

17 Ndeko mwasi Simone amonaki ndenge Liloba ya Nzambe esalisaki ye. Azalaki  komiyoka ete azali na ntina te, mpe azalaki kokanisa ete Yehova asepelaka na ye te. Kasi, ntango alɛmbaki nzoto, akobaki kobondela Yehova asalisa ye. Akobaki mpe koyekola Biblia. Simone alobi boye: “Mbala ya liboso namona mpenza ete Yehova apesi ngai makasi mpe atambwisi ngai.” Yango esalisaki ye akóma na makanisi ya malamu koleka.

18. Mpo na nini oyokaka ete Yehova azali pene na yo, mpe bantina nini ozali na yango ya ‘kosanzola Yah’?

18 Mokomi ya nzembo ayebaki ete na kati ya bikólo nyonso ya mabele, Yehova aponaki ekólo Yisraele mpo ezala ekólo ya bato na ye. Yango nde ekólo kaka moko oyo Nzambe apesaki “liloba na ye” mpe “malako na ye.” (Tángá Nzembo 147:19, 20.) Lelo, tozali na lokumu monene ya kobengama na nkombo ya Nzambe. Tozali na botɔndi ndenge toyebi ye, ndenge Liloba na ye etambwisaka biso, mpe ndenge tokoki kozala na boyokani malamu na ye. Ndenge moko na mokomi ya Nzembo 147, okoki kozwa bantina ebele ya ‘kosanzola Yah’ mpe kolendisa basusu básala yango.