Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2017

Luká bomɛngo ya solosolo

Luká bomɛngo ya solosolo

“Bózwa baninga na nzela ya bomɛngo oyo ezangi boyengebene.”LUKA 16:9.

NZEMBO: 32, 154

1, 2. Mpo na nini babola bakozala kaka na mokili oyo?

LELO oyo, nkita ya mokili ezali konyokola bato mpe etondi na makambo ya kozanga bosembo. Na ndakisa, bilenge mingi bazali koluka misala, kasi bazali kozwa te. Basusu bazali kotya bomoi na bango na likama mpo na kokende na bikólo ya bozwi. Ata na bikólo yango ya bozwi, bato mingi bazali babola. Mpe na bisika mingi na mokili, bato ya bozwi bazali se kokóma na bozwi ebele mpe babola bazali se kokóma na bobola makasi. Baankɛtɛ oyo euti kosalema emonisi ete mbongo ya mwa bato moke oyo baleki na bozwi na mokili (1 %) ekokani na mbongo ya bato mosusu nyonso oyo batikali na mokili (99 %). Ya solo mpenza, bato mosusu bazali na bozwi mingi oyo ekoki koumela bambula na bambula, kasi bamiliare ya bato mosusu bazali na bobola makasi. Yesu amonisaki likambo yango ntango alobaki: “Bozali na babola ntango nyonso.” (Marko 14:7) Mpo na nini bokeseni makasi boye?

2 Yesu ayebaki ete makambo ya nkita ekobonga kaka soki Bokonzi ya Nzambe eyei. Biblia emonisi ete ebongiseli ya mombongo, oyo emonisami na “bato ya mombongo” na Emoniseli 18:3, ná ebongiseli ya politiki, mpe ebongiseli ya mangomba ezali  biteni ya mokili ya Satana. Basaleli ya Nzambe balongi kokabwana na politiki mpe mangomba ya lokuta. Kasi, mingi bakoki te kokabwana mobimba na ebongiseli ya mombongo ya mokili ya Satana.

3. Mituna nini tokotalela?

3 Biso bakristo tosengeli kotalela makanisi oyo tozalaka na yango mpo na ebongiseli ya mombongo ya mokili oyo. Mpo na yango, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kosalela biloko na ngai ya mokili mpo na komonisa ete nazali sembo epai ya Nzambe? Nakoki kosala nini mpo namikɔtisa mobimba te na mombongo ya mokili oyo? Bandakisa nini emonisi ete basaleli ya Nzambe lelo oyo batyelaka ye motema mobimba?’

KAPITA OYO AZALAKI MOYENGEBENE TE

4, 5. (a) Likambo nini ekómelaki kapita na ndakisa ya Yesu? (b) Yesu ayebisaki bayekoli na ye básala nini?

4 Tángá Luka 16:1-9. Ndakisa ya Yesu oyo elobelaki kapita oyo azalaki moyengebene te esengeli kotinda mokomoko na biso akanisa. Bafundaki kapita yango ete azali kobebisa biloko, mpe nkolo na ye azwaki ekateli ya kolongola ye mosala. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kasi, kapita yango amonisaki “mayele.” Liboso alongwa mosala, azwaki baninga oyo bakoki kosalisa ye na nsima. Soki Yesu apesaki ndakisa yango, ezalaki te mpo na kotinda bayekoli na ye básalaka makambo na kozanga boyengene mpo bázwa biloko ya kobikela. Alobaki ete bato ya mokili nde basalaka bongo. Kasi, Yesu apesaki ndakisa yango mpo na koteya likambo moko ya ntina mingi.

5 Yesu ayebaki ete ndenge kaka kapita wana akutanaki na mokakatano na mbalakaka, bayekoli na ye mingi bakokutana na mikakatano mpo na kozwa biloko ya kobikela na mokili oyo ezangi boyengebene. Yango wana alobaki na bango: “Bózwa baninga na nzela ya bomɛngo oyo ezangi boyengebene, mpo, ntango ekosila, bango [baninga yango, Yehova ná Yesu] báyamba bino na bisika ya kofanda ya seko.” Liteya nini tokoki kozwa na toli wana ya Yesu?

6. Ndenge nini toyebi ete ebongiseli ya mombongo ezalaki te na kati ya mokano ya Nzambe?

6 Atako Yesu ayebisaki te ntina oyo abengaki biloko ya mokili ete “bomɛngo oyo ezangi boyengebene,” Biblia emonisi polele ete ebongiseli ya mombongo ezalaki na kati ya mokano ya Nzambe te. Na ndakisa, na elanga ya Edene Yehova apesaki Adama ná Eva biloko ebele koleka oyo basengelaki na yango. (Ebandeli 2:15, 16) Na nsima, ntango Nzambe apesaki bakristo elimo santu na siɛklɛ ya liboso, “moto moko te azalaki koloba ete eloko boye ezali ya ye moko na biloko oyo azalaki na yango; kasi batyaki nde biloko nyonso lisangá.” (Misala 4:32) Yisaya asakolaki ete ekozala na ntango moko oyo bato nyonso bakosepela na biloko nyonso oyo mabele ebimisaka. (Yisaya 25:6-9; 65:21, 22) Kasi liboso ntango yango ekóma, bayekoli ya Yesu basengeli kozala na “mayele.” Basengeli kosalela biloko ya mokili oyo ezangi boyengebene mpo na kozwa biloko ya kobikela mpe koluka kosepelisa Nzambe.

SALELÁ BOMƐNGO OYO EZANGI BOYENGEBENE NA BWANYA

7. Toli nini Yesu apesaki na Luka 16:10-13?

7 Tángá Luka 16:10-13. Kapita oyo Yesu alobelaki azwaki baninga mpo na matomba na ye moko. Kasi ntango Yesu asɛngaki bayekoli na ye bázwa baninga na likoló, ezalaki te na mokano ya koluka matomba na bango moko. Alingi tóyeba ete ndenge tozali kosalela bomɛngo oyo ezangi boyengebene ekoki komonisa soki tozali sembo epai ya Nzambe to te. Na ndenge nini?

8, 9. Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge bandeko bamonisaka bosembo na ndenge ya kosalela bomɛngo oyo ezangi boyengebene.

 8 Tokoki komonisa ete tozali sembo na ndenge na biso ya kosalela biloko ya mokili soki tozali kopesa makabo mpo na mosala ya kosakola oyo Yesu alobaki ete ekosalema na mokili mobimba. (Matai 24:14) Elenge mwasi moko na ekólo Inde azalaki kobomba mbongo ya bibende na mwa kɛsi na ye. Kutu atikaki kosomba bana-popi mpo na kobomba mbongo. Ntango kɛsi yango etondaki, apesaki mbongo yango nyonso likabo mpo na mosala ya kosakola. Ndeko mobali moko na Inde oyo azali na elanga monene ya kokoti apesaki kokoti ebele lokola likabo na biro ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Malayalam. Lokola bandeko ya biro yango bazalaka na mposa ya kosomba kokoti, amonaki ete kopesa likabo ya kokoti ekosalisa mingi koleka soki apesi mbongo. Yango nde komonisa “mayele.” Ndenge moko mpe na ekólo Grèce, bandeko bapesaka mbala na mbala likabo ya mafuta ya olive, fromaje mpe biloko mosusu mpo na libota ya Betele.

9 Ndeko mobali moko ya Sri Lanka apesaki lopango na ye mpo ezala esika ya makita, mayangani mpe ndako ya kolala mpo na bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso. Akokaki kotya yango ndako ya kofutela mpo azwaka mbongo, kasi esalisaka mpenza basakoli ya kuna, oyo bazali na mbongo mingi te. Na ekólo moko oyo mosala na biso esalemaka polele te, bandeko basalelaka bandako na bango lokola Bandako ya Bokonzi. Yango esalisaka babongisi-nzela mpe bandeko oyo bazali na mbongo mingi te bázala na esika ya kosala makita kozanga ete báfutela ndako.

10. Matomba nini tokoki kozwa soki tokabaka mingi?

10 Bandakisa ya ndenge wana emonisi ete basaleli ya Nzambe bazali “sembo na likambo ya moke.” (Luka 16:10) Basalelaka biloko na bango ya mokili mpo na bolamu ya basusu. Baninga yango ya Yehova bayokaka ndenge nini ntango basalisaka basusu? Bazalaka na esengo mpo bayebi ete ntango bazali kokaba, bazali kozwa bomɛngo ya “solosolo” na likoló. (Luka 16:11) Ndeko mwasi moko oyo apesaka likabo ya mbongo mbala na mbala mpo na mosala ya Bokonzi alobeli likambo ya kokamwa oyo ekómeli ye na boumeli ya bambula. Alobi boye: “Namoni ete kokaba ebongisi ndenge na ngai ya kotalela basusu. Nakómi kolimbisa mingi, komonisela basusu motema molai, kokanga motema soki basali likambo moko oyo elɛmbisi ngai nzoto, mpe kondima toli mbala moko.” Bandeko mingi bamoni ete kokaba ememeli bango matomba.Nzembo 112:5; Masese 22:9.

11. (a) Na ndenge nini kokaba emonisaka “mayele”? (b) Likambo nini ezali komonana epai ya basaleli ya Nzambe lelo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Tokomonisa mpe “mayele” soki tozali kosalela biloko na biso ya mokili mpo na kosalisa basusu na mosala ya kosakola. Ata soki tozali na likoki ya kosala mosala ya ntango nyonso te to kokende esika mposa ezali monene, makabo na biso ekoki kosalisa basusu. (Masese 19:17) Na ndakisa, makabo na biso esalisaka mpo na kobimisa mikanda mpe kosimba mosala ya kosakola na mikili ya bobola makasi epai bato mingi bazali kondima solo. Na bikólo lokola Congo, Madagascar, mpe Rwanda Biblia ekoki kozala ntalo mingi mpenza. Na bantango mosusu  ntalo ya Biblia moko ekoki kozwa lifuti ya pɔsɔ moko to sanza mobimba. Na boumeli ya bambula, ezalaki kosɛnga bandeko bápona kati na kosomba bilei mpo na mabota na bango mpe kosomba Biblia. Kasi, lokola makabo ya bandeko mosusu esali ete “bokokani” ya mbongo ezala, ebongiseli ya Yehova ezali kobongola Babiblia mpe kokabola yango ofele na moto mokomoko ya libota ata mpe na bayekoli ya Biblia. (Tángá 2 Bakorinti 8:13-15.) Na yango, ezala baoyo bazali kopesa to baoyo bazali kozwa, bango nyonso bakoki kokóma baninga ya Yehova.

TOKOKI KOSALA NINI MPO TÓMIKƆTISA MOBIMBA TE NA EBONGISELI YA MOMBONGO?

12. Ndenge nini Abrahama amonisaki ete atyelaki Nzambe motema?

12 Tokoki mpe kokóma baninga ya Yehova soki toboyi komikɔtisa mobimba na ebongiseli ya mombongo ya mokili oyo mpe tozali koluka bomɛngo ya “solosolo.” Yango nde Abrahama moto ya sembo asalaki. Atosaki Yehova mpe atikaki Ure, engumba moko ya bozwi, mpe akendaki kofanda na bahema mpo alingaki kokóma moninga ya Yehova. (Baebre 11:8-10) Atyelaki Nzambe motema ntango nyonso, kasi te biloko ya mokili. (Ebandeli 14:22, 23) Yesu alendisaki basusu bákóma na kondima ya ndenge wana. Mokolo moko ayebisaki elenge mozwi moko ete: “Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende kotɛka biloko na yo mpe pesá babola mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká, landá ngai.” (Matai 19:21) Elenge mobali yango azalaki na kondima lokola ya Abrahama te, kasi ezali na bato mosusu oyo batyelaki Nzambe motema.

13. (a) Toli nini Paulo apesaki Timote? (b) Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo lelo?

13 Timote azalaki na kondima. Ntoma Paulo abengaki ye “soda ya solosolo ya Kristo,” mpe ayebisaki ye: “Moto oyo azali kosala mosala ya soda amikɔtisaka na mimbongo te lokola bato oyo bazali basoda te, mpo moto oyo azwaki ye na mosala ya soda andima ye.” (2 Timote 2:3, 4) Lelo oyo, bayekoli ya Yesu, kati na bango bandeko koleka milio moko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, basalaka makasi básalela toli ya Paulo. Baboyaka kolanda bapiblisite ya mokili oyo etondi na lokoso mpe babosanaka te etinda oyo elobi: “Modefi azali mosaleli ya moto oyo azali kodefisa.” (Masese 22:7) Satana alingi tólekisa ntango na biso nyonso mpe makasi na biso nyonso lokola baombo ya ebongiseli ya mombongo ya mokili na ye. Bato mosusu bakɔtaka banyongo ya minene mpo na kosomba ndako, motuka, kotánga kelasi to kutu mpo na kosala fɛti ya libala. Soki tokebi te, tokoki kokɔta nyongo ya bambula ebele. Tokomonisa mpe mayele soki tokómisi bomoi na biso pɛpɛlɛ, toboyi kokɔta banyongo, mpe tozali kobebisa mbongo mpambampamba te. Na ndenge yango, tokozala na bonsomi ya kosalela Nzambe, na esika tózala baombo ya ebongiseli ya mombongo ya mokili oyo.1 Timote 6:10.

14. Tosengeli kozala na ekateli nini? Pesá bandakisa.

14 Mpo tókoba kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ, tosengeli kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso. Mwasi moko ná mobali na ye bazalaki na kompanyi moko monene mpe ya mbongo mingi. Kasi, mposa na bango ezalaki bázongela mosala ya mobongisi-nzela. Na yango, batɛkaki kompanyi yango, masuwa na bango, mpe biloko na bango mosusu ya mokili. Na nsima, bakendaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga biro monene ya sika na Warwick, na etúká ya New York. Basepelaki mingi na libaku yango mpo basalaki na Betele elongo na mwana na bango ya mwasi ná mobali na ye; basalaki mpe mwa bapɔsɔ elongo na baboti ya mobali ya mwana na bango, oyo bayaki mpe kopesa mabɔkɔ na kotonga Warwick. Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela na Colorado, na États-Unis, azwaki mosala na banki moko, oyo ezalaki kozwa ye ntango mingi te. Bakonzi na ye basepelaki  na mosala na ye mingi mpe basɛngaki ye abanda kosala ntango nyonso mpe balobaki bakobakisela ye lifuti mbala misato. Kasi, lokola amonaki ete mosala yango ekolongola makanisi na ye na mosala ya kosakola, aboyaki. Wana ezali kaka mwa bandakisa moke oyo emonisi ete basaleli ya Yehova bazali komipimela makambo mosusu. Soki tozali na ekateli ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, ekomonisa ete tolingaka boninga na biso na Nzambe mpe bomɛngo ya solosolo koleka biloko ya mokili.

NTANGO BOMƐNGO YA MOKILI EKOSILA

15. Bomɛngo nini epesaka esengo ya solosolo?

15 Kozala na bomɛngo ya mokili elimboli mpenzampenza te ete Nzambe azali kondima biso. Yehova apambolaka baoyo bazali “bazwi na misala ya malamu.” (Tángá 1 Timote 6:17-19.) Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Lucia amonaki ete mposa ya basakoli ezali monene na Albanie. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na yango, alongwaki na Italie na 1993 mpe akendaki kuna. Azalaki na mosala te, kasi atyaki motema ete Yehova akokokisa bamposa na ye. Ayekolaki monɔkɔ ya Albanais mpe asalisi bato koleka 60 bámipesa na Nzambe. Biso nyonso tokozwa matomba lokola oyo wana te na teritware na biso. Kasi nyonso oyo tosalaka mpo na kosalisa basusu báyeba Yehova mpe bákóma baninga na ye yango ezali makambo oyo tokobosana te libela na libela.Matai 6:20.

16. (a) Nini ekokómela ebongiseli ya mombongo ya lelo? (b) Yango esengeli kotinda biso tótalela bozwi na biso ndenge nini?

16 Yesu alobaki ete ebongiseli ya mombongo ekosuka. Alobaki: “Ntango [bomɛngo yango] ekosila, kasi te ‘soki esili.’ (Luka 16:9) Na mikolo oyo ya nsuka, babanki mosusu ekangami mpe nkita ya bikólo mosusu ebebi makasi. Kasi mosika te, makambo ekobeba lisusu koleka. Ebongiseli ya politiki, ya mangomba mpe ya mombongo oyo ezali biteni ya mokili ya Satana ekolongwa. Mosakoli Ezekiele ná mosakoli Sefania basakolaki ete palata mpe wolo, oyo ezalaka na ntina mingi na ebongiseli ya mombongo, ekozala lisusu na ntina te. (Ezekiele 7:19; Sefania 1:18) Tokoyoka ndenge nini soki tokómi na nsuka ya bomoi na biso na mokili oyo mpe tomoni ete tolukaki nde bomɛngo ya mokili oyo ezangi boyengebene na esika tóluka bomɛngo ya solosolo? Tokoki komiyoka lokola mobali moko oyo asali mosala bomoi na ye mobimba mpe azwi mbongo ebele, na nsima amoni ete mbongo yango ezali ya monyato. (Masese 18:11) Bomɛngo ya mokili oyo ekosila. Yango wana, kolekisa te libaku ya kosalela biloko na yo ya mokili mpo na kozwa baninga na likoló. Makambo oyo tozali kosala mpo na Yehova mpe Bokonzi na ye ekopesa biso esengo ya solosolo.

17, 18. Nini ezali kozela baninga ya Nzambe?

17 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, moto moko te akofutela to akokɔta nyongo. Bilei ekozala beboo mpe ofele, mpe mposa ya mbongo mpo na kofuta minganga to ya nkisi ekozala te. Baninga ya Yehova bakosepela na biloko oyo mabele ekobimisa. Bakosalela wolo, palata, mpe mabanga mosusu ya ntalo mpo na kosala monzɛlɛ, kasi te mpo na kokóma na bozwi. Bakosalela mabaya, mabanga mpe bibende ya malamu mpenza mpo na kotonga bandako ya kitoko. Baninga na biso bakosalisa biso mpo balingi kosala yango, kasi te mpo tófuta bango. Biloko nyonso oyo mabele ekobimisa ekozala mpo na biso nyonso.

18 Wana ezali kaka mwa ndambo ya mbano mpo na bato oyo bazali kozwa baninga na likoló. Basambeli ya Yehova na mabele bakoganga na esengo ntango bakoyoka Yesu alobi: “Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.”Matai 25:34.

^ par. 4 Yesu alobaki te soki bifundeli yango ezalaki solo to lokuta. Kutu, liloba oyo ebongolami na “bafundaki” na Luka 16:1 ekokaki kolimbola ete moto moko akoselaki kapita yango makambo. Yesu abendaki nde likebi na ndenge kapita yango asalaki, kasi te na ntina oyo balongolaki ye mosala.

^ par. 15 Lisolo ya bomoi ya Lucia Moussanett, ezali na Lamuká! ya 22/06/2003 nkasa 18-22, na Lifalanse.