Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2017

“Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”

“Bólela elongo na bato oyo bazali kolela”

“Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana.”1 BATESALONIKI 5:11.

NZEMBO: 121, 75

1, 2. Mpo na nini tosengeli kolobela ndenge ya kobɔndisa bato oyo bazali kolela? (Talá elilingi ya ebandeli.)

NDEKO mwasi moko na nkombo Susi alobaki boye: “Pene na mbula mobimba nsima ya liwa ya mwana na biso ya mobali, tozalaki kaka koyoka mpasi makasi.” Ndeko mosusu oyo mwasi na ye akufaki na mbalakaka alobaki ete azalaki koyoka “mpasi makasi nzoto mobimba.” Likambo ya mawa, bato mingi bakutanaka na mpasi ya ndenge wana. Lelo oyo na lisangá, bandeko mingi bazalaki kokanisa te ete bato oyo balingaka bakokufa liboso Armagedone eya. Ntango mosusu moto moko olingaki akufi, to mpe oyebi moto oyo azali kolela moto oyo azalaki kolinga. Soki ezali bongo, mbala mosusu ozali komituna: ‘Ndenge nini moto oyo azali kolela akoki kobɔndisama?’

2 Bato mosusu balobaka ete mpasi nyonso esilaka soki mikolo eleki. Kasi ezalaka kaka bongo? Mwasi moko oyo mobali akufá alobaki boye: “Mpo na ngai, ebongi nde koloba ete makambo oyo moto azali kosala ntango mikolo ezali koleka nde esilisaka mpasi.” Soki moto azoki mpota, esɛngaka ntango eleka mpe kozwa lisalisi mpo mpota yango esila. Ndenge moko mpe, esɛngaka ntango  eleka mpe kozwa lisalisi oyo esengeli mpo mpasi ya motema esila. Makambo nini mpenza ekoki kosalisa baoyo bazali kolela bákitisa mpasi na bango?

YEHOVA AZALI “NZAMBE YA KOBƆNDISAMA NYONSO”

3, 4. Nini emonisi ete Yehova ayebaka mpasi ya baoyo bazali kolela?

3 Yehova, Tata na biso ya motema mawa, azali moto ya libosoliboso oyo apesaka libɔndisi oyo esengeli. (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Ye nde ayebi mpenza komitya na esika ya basusu, mpe apesi basaleli na ye elaka ete: “Ngai moko nazali moto oyo azali kobɔndisa bino.”Yisaya 51:12; Nzembo 119:50, 52, 76.

4 Tata na biso ya bolingo amonaki liwa ya bato oyo azalaki kolinga, na ndakisa, mosaleli na ye Abrahama, Yisaka, Moize, mpe Mokonzi Davidi. (Mitángo 12:6-8; Matai 22:31, 32; Misala 13:22) Biblia emonisi ete Yehova azelaka mpenza mokolo oyo akosekwisa mibali yango ya sembo. (Yobo 14:14, 15) Na ntango wana, bakozala na esengo mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Yehova amonaki mpe liwa ya Yesu, Mwana na ye ya liboso, oyo Biblia elobi ete “azalaki kolinga mingi.” (Masese 8:22, 30) Na ntembe te Yehova ayokaki mpasi mingi mpenza ntango Mwana na ye azalaki kobundana na mpasi ya liwa.Yoane 5:20; 10:17.

5, 6. Ndenge nini Yehova abɔndisaka biso?

5 Yehova akoki mpenza kosalisa biso. Yango wana, tosengeli ntango nyonso kobondela ye mpe koyebisa ye mpasi na biso nyonso. Koyeba ete Yehova ayebi mpasi na biso mpe ete apesaka biso libɔndisi oyo esengeli ekitisaka mpenza motema! Kasi ndenge nini asalaka yango?

6 Mpo na kobɔndisa biso, Yehova apesaka biso elimo santu. (Misala 9:31) Yesu alakaki ete Tata na biso akopesa elimo santu, to nguya na ye oyo eleki nyonso, na baoyo bazali kosɛnga ye yango. (Luka 11:13) Ndeko Susi, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Mbala mingi tozalaki kaka kotya mabɔlɔngɔ na nse mpo na kobondela Yehova abɔndisa biso. Mbala nyonso, kimya ya Nzambe ezalaki mpenza kobatela mitema mpe makanisi na biso.”Tángá Bafilipi 4:6, 7.

YESU MPE AMITYAKA NA ESIKA NA BISO

7, 8. Mpo na nini tokoki kondima ete Yesu akobɔndisa biso?

7 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki na ndenge ya kokoka bizaleli ya Tata na ye, na maloba mpe na misala. (Yoane 5:19) Yehova atindaki Yesu awa na mabele mpo abɔndisa “bato oyo bazoki na mitema” mpe “baoyo bazali kolela.” (Yisaya 61:1, 2; Luka 4:17-21) Bato bayebaki ete Yesu azalaki komitya na esika na bango mpe ete alingaki mpenza kosalisa bango.Baebre 2:17.

8 Ntango Yesu azalaki elenge, na ntembe te amonaki liwa ya baninga mpe ya bato ya libota na ye. Na ndakisa, emonani ete tata-mobɔkɔli na ye Yozefe akufaki ntango Yesu azalaki naino elenge. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kanisá ndenge Yesu, elenge ya motema pɛtɛɛ, asengelaki koyika mpiko mpo na mpasi na ye moko, mpe mpo na mawa ya mama na ye ná ya bandeko na ye ya basi mpe ya mibali.

9. Ntango Lazare akufaki, ndenge nini Yesu amonisaki ete amityaka na esika ya basusu?

9 Na mosala na ye, ezalaki komonana polele ete Yesu ayebi mpenza makambo ya  bato mpe azalaki komitya na esika na bango. Na ndakisa, ntango moninga na ye Lazare akufaki, Yesu ayokaki mpasi oyo Maria ná Marta bazalaki koyoka. Amityaki na esika na bango mpe alelaki, atako ayebaki ete akosala likamwisi ya kosekwisa Lazare.Yoane 11:33-36.

10. Nini ekoki kondimisa biso ete lelo mpe Yesu amityaka na esika na biso?

10 Ndenge oyo Yesu amonisaki ete amityaka na esika ya basusu ekoki kobɔndisa biso lelo. Na ndenge nini? Biblia elobi polele ete Yesu abongwani te: “Yesu Kristo azali se ndenge moko lobi, lelo mpe libela na libela.” (Baebre 13:8) Biblia ebengi ye “Kapita ya bomoi” mpo afungwelaki biso nzela ya kozwa bomoi ya seko. Lisusu, Yesu ye moko ayebi ndenge mpasi ezalaka mpe “akoki kosalisa baoyo bazali komekama.” (Misala 3:15; Baebre 2:10, 18) Na yango, tokoki kondima ete tii lelo Yesu ayokaka mawa ntango bato bazali na mpasi. Amityaka na esika na bango, mpe akoki kobɔndisa bango ‘ntango bazali na mposa ya lisalisi.’Tángá Baebre 4:15, 16.

“LIBƆNDISI OYO EUTI NA MAKOMAMI”

11. Bavɛrsɛ nini ebɔndisaka yo mpenza?

11 Lisolo oyo elobeli ndenge Yesu alelaki ntango Lazare akufaki ezali kaka moko na ebele ya bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekoki kobɔndisa biso. Tosengeli kokamwa te mpo “makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Baroma 15:4) Soki ozali kolela moto oyo olingaki, bavɛrsɛ lokola oyo ezali awa na nse ekoki kokitisa yo motema:

  • “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”Nzembo 34:18, 19.

  • “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo [Yehova] ebandaki kokitisa . . . ngai motema.”Nzembo 94:19.

  • “Nkolo na biso Yesu Kristo ye moko mpe Nzambe Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu na nzela ya boboto monene, bábɔndisa mitema na bino mpe bápesa bino makasi.”2 Batesaloniki 2:16, 17. *—Talá maloba na nse ya lokasa.

TOKOKI KOZWA LIBƆNDISI YA SOLOSOLO NA LISANGÁ

12. Ndenge nini tokoki kobɔndisa basusu?

12 Bato oyo bazali kolela bakoki mpe kozwa libɔndisi na lisangá. (Tángá 1 Batesaloniki 5:11.) Ndenge nini okoki kolendisa mpe kobɔndisa baoyo bazali na “elimo oyo elɛmbi”? (Masese 17:22) Kobosana te ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Dalene, ndeko moko oyo mobali na ye akufá, alobaki boye: “Bato oyo bazali kolela bazalaka na mposa ya kobimisa makanisi mpe mayoki na bango. Yango wana, likambo eleki ntina oyo okoki kosala mpo na moto oyo azali kolela ezali ya koyoka ye, kozanga kokata ye maloba.” Junia, oyo ndeko na ye amibomaki, alobi boye: “Ata soki okokoka koyeba mpenza te mpasi na bango, eloko eleki ntina ezali ete olingi koyeba ndenge bazali komiyoka.”

13. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali kolela?

13 Tosengeli kobosana te ete bato nyonso bamiyokaka ndenge moko te mpe balelaka ndenge moko te. Na bantango mosusu,  moto akokaka te koyebisa mpenza mpasi oyo azali na yango. Biblia elobi: “Motema eyebaka bololo ya molimo ya moto, mpe mopaya moko te akomikɔtisa na esengo na yango.” (Masese 14:10) Ata soki moto ayebisi ndenge oyo azali komiyoka, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te koyeba mpenza likambo oyo alingi koloba.

14. Tokoki koloba nini mpo na kobɔndisa baoyo bazali kolela?

14 Ekoki kozala mpasi koyeba likambo ya koloba epai ya moto oyo azali kolela. Kasi Biblia elobi ete “lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.” (Masese 12:18) Bato mingi bazwaka maloba mpo na kobɔndisa basusu na mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi. * (Tángá maloba na nse ya lokasa.) Kasi mbala mingi, likambo oyo esalisaka mingi ezali ya ‘kolela elongo na bato oyo bazali kolela.’ (Baroma 12:15) Gaby, oyo mobali akufá, alobi ete na bantango mosusu, kaka kolela nde emonisaka mayoki na ye. Abakisi boye: “Yango wana, motema ekitaka soki baninga baleli elongo na ngai. Na ntango yango, nayokaka ete nazali kaka ngai moko te na mpasi na ngai.”

15. Tokoki kosala nini mpo na kobɔndisa basusu soki tokokoka kosolola na bango te? (Talá mpe etanda “ Maloba ya kobɔndisa mpe ya kokitisa motema.”)

15 Soki okokaka te kosolola na moto mpo na kobɔndisa ye, okoki kotindela ye mokanda, to kokomela ye mesaje na telefone to na ordinatɛrɛ. Okoki kokoma ata vɛrsɛ moko mpo na kobɔndisa ye, okoki kotánga ezaleli moko ya malamu oyo ozalaki kolinga epai ya moto oyo akufi, to kolobela likambo moko ya esengo oyo obosanaka te. Junia alobi boye: “Soki ndeko moko atindeli ngai mwa mesaje ya kolendisa to abengisi ngai tólekisa ntango elongo esalisaka ngai mingi mpenza. Makambo ya ndenge wana  emonisaka ngai ete bato balingaka ngai mpe batyelaka ngai likebi.”

16. Likambo nini ya malamu ekoki kobɔndisa basusu?

16 Yebá ete mabondeli na biso ekoki kosalisa bandeko oyo bazali kolela. Tokoki kobondela mpo na bango, to kutu elongo na bango. Ata soki ekoki kozala mpasi mpo omoni ete okoki kolela ntango ozali kobondela, libondeli na yo oyo euti na motema ekoki kozala libɔndisi monene. Dalene alobi boye: “Na bantango mosusu, soki bandeko basi bayei kobɔndisa ngai, nazalaki kotuna bango soki tokoki kosala libondeli. Soki ndeko abandi kobondela, okomona azali kokakatana, kasi na nsima, okomona mongongo ebandi kofungwama mpe akosala libondeli oyo euti mpenza na motema. Kondima makasi ya bandeko basi yango, bolingo na bango mpe boboto na bango ekómisaki mpenza kondima na ngai makasi.”

KOBÁ KOBƆNDISA

17-19. Mpo na nini tosengeli kokoba kobɔndisa baoyo bazali kolela?

17 Mawa ya bato mosusu eumelaka te, kasi, mawa ya bato mosusu eumelaka mingi. Yango wana, zalá pene ya kosalisa. Na ebandeli, baninga mpe bandeko ya libota bayaka ebele mpo na kobɔndisa moto oyo azali kolela. Kasi na nsima, soki bato bazongeli bomoi na bango ya mokolo na mokolo, bato oyo bazali kolela bazalaka kaka na mposa ya libɔndisi. Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Tosengeli kobɔndisa baoyo bazali kolela ntango nyonso oyo bakozala na mposa na biso.Tángá 1 Batesaloniki 3:7.

18 Kobosana te ete moto akoki koyoka mpasi makasi na mbalakaka. Ekoki kozala soki dati oyo libala na bango esalemaki ekoki, soki ayoki miziki moko boye, atali bafɔtɔ, amoni likambo moko boye, to ayoki ata nsolo moko, makɛlɛlɛ moko boye, to mpe na eleko moko boye na kati ya mbula. Mbala ya liboso oyo moto oyo molongani na ye akufi akosala makambo mosusu ye moko, na ndakisa kokende liyangani to Ekaniseli, ekoki kozala mpasi mingi. Ndeko mobali moko alobi boye: “Nayebaki ete mbala ya liboso oyo dati ya libala na biso ekokoka, nakoyoka mpasi mingi, mpe ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, bandeko bazwaki bibongiseli mpo nalekisa ntango yango elongo na mwa baninga na ngai mpo nazala kaka ngai moko te.”

19 Kobosana te ete baoyo bazali kolela bazalaka na mposa ya libɔndisi kaka te na mikolo ya ntina mingi mpo na bango. Junia alobi boye: “Mbala mingi kosalisa moto mpe kozala elongo na ye ata na mokolo oyo ezali na likambo ya ntina te mpo na ye ezalaka malamu mpenza. Kosala ndenge wana ebongi mpenza mpe ebɔndisaka mingi.” Ya solo, tokoki te kosilisa mpasi nyonso mpe mawa ya bato oyo bazali kolela, kasi tokoki kobɔndisa bango soki tosali mwa makambo mpo na kosalisa bango. (1 Yoane 3:18) Gaby alobi: “Nazali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpo na bankulutu ya boboto oyo basalisaki ngai ntango nyonso oyo nazalaki na mpasi. Basalisaki ngai namona mpenza ete Yehova alingaka ngai.”

20. Mpo na nini bilaka ya Yehova ekitisaka mpenza motema?

20 Motema na biso ekitaka mpenza lokola toyebi ete Yehova, Nzambe ya kobɔndisama nyonso, akolongola mawa na biso nyonso na lisekwa. (Yoane 5:28, 29) Nzambe alaki ete “akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.” (Yisaya 25:8) Na ntango wana, na esika ‘tólela elongo na bato oyo bazali kolela,’ moto nyonso na mabele ‘akosepela elongo na bato oyo bazali kosepela.’Baroma 12:15.

^ par. 8 Biblia emonisi ete Yozefe azalaki na bomoi ntango Yesu azalaki na mbula 12. Kasi, ntango Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso ya kobongola mai vinyo, balobeli Yozefe te, ata mpe na nsima na yango. Mbala mosusu na ntango yango Yozefe asilaki kokufa. Longola yango, ntango Yesu azalaki na nzete ya mpasi, asɛngaki ntoma Yoane abatela mama na ye; soki Yozefe azalaka naino na bomoi, Yesu alingaki kosɛnga Yoane likambo yango te.Yoane 19:26, 27.

^ par. 14 Talá mpe lisolo “Bɔndisáká baoyo moto na bango akufi ndenge Yesu asalaki” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2010.