Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2017

Tiká “akokisa mokano na yo mobimba”

Tiká “akokisa mokano na yo mobimba”

“Sepelá mingi mpenza na Yehova, mpe akopesa yo oyo motema na yo ezali kosɛnga.”NZEMBO 37:4.

NZEMBO: 89, 140

1. Ekateli nini bilenge basengeli kozwa, kasi mpo na nini basengeli kobanga koleka ndelo te? (Talá elilingi ya ebandeli.)

KOZANGA ntembe, bilenge mingi bayebi ete liboso ya kokende mobembo, ezalaka malamu koyeba esika okokende. Bomoi ezali lokola mobembo, mpe ntango ya koluka koyeba esika okokende ezali ntango ozali elenge. Ya solo, kokanisa yango ekoki kozala mpasi. Elenge mwasi moko na nkombo Heather alobi boye: “Ebangisaka mpo osengeli kozwa ekateli ya likambo oyo okosala bomoi na yo mobimba.” Soki yo mpe oyokaka ndenge wana, kanisá maloba oyo ya Yehova: “Kobanga te . . . mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.”Yisaya 41:10.

2. Ndenge nini oyebi ete Yehova alingi omityela mikano oyo ekopesa yo esengo na mikolo ezali koya?

2 Yehova azali kolendisa yo omityela mikano oyo ekopesa yo esengo na mikolo ezali koya. (Mosakoli 12:1; Matai 6:20) Alingi ozala na esengo. Biloko kitoko oyo akelá mpo na kosepelisa miso ná matoi na biso, mpe bilei ndenge na ndenge emonisi yango. Kanisá mpe ndenge Yehova atyelaka biso likebi mpe ateyaka biso ndenge ya kozala na bomoi oyo eleki malamu. Na baoyo baboyaka kolanda toli na ye, alobi boye: “Boponaki likambo oyo nasepelaka na yango ata moke te. . . . Talá! Basaleli  na ngai bakosepela, kasi bino bokozala na nsɔni. Talá! Basaleli na ngai bakoganga na esengo na ndenge bakoyoka malamu na motema.” (Yisaya 65:12-14) Yehova azwaka nkembo ntango tomityelaka mikano ya malamu.Masese 27:11.

MIKANO OYO EKOSALISA YO OZALA NA ESENGO

3. Mikano ya ndenge nini Yehova alingi omityela?

3 Mikano nini Yehova alingi omityela? Mpo ozala na esengo, osengeli koyeba Yehova mpe kosalela ye. Yehova akelá bato bongo. (Nzembo 128:1; Matai 5:3) Ezalaka bongo te mpo na nyama; nyama mosala na yango kolya, komɛla, mpe kobota bana. Nzokande, Yehova alingi omityela mikano oyo ekosalisa yo ozala na bomoi ya esengo mpe oyo ezali na ntina. Mozalisi na biso azali “Nzambe ya bolingo,” “Nzambe ya esengo,” oyo akelá bato “na elilingi na ye.” (2 Bakorinti 13:11; 1 Timote 1:11; Ebandeli 1:27) Okozala na esengo soki ozali komekola Nzambe na biso ya bolingo. Osilá komona bosolo ya vɛrsɛ oyo elobi ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa”? (Misala 20:35) Ezali likambo ya solo. Yango wana, Yehova alingi omityela mikano oyo ekomonisa ete olingi ye mpe bato.Tángá Matai 22:36-39.

4, 5. Nini ezalaki kopesa Yesu esengo?

4 Yesu Kristo azali ndakisa malamu mpenza mpo na bilenge. Ntango azalaki mwana moke, na ntembe te azalaki kosakana lokola bana nyonso. Ndenge Liloba ya Nzambe elobi yango, ezali na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kobina.” (Mosakoli 3:4) Yesu azalaki mpe koyekola Makomami mpo na kopusana penepene na Yehova. Ntango azalaki na mbula 12, bateyi na tempelo bazalaki ‘se kokamwa mayele na ye mpe biyano na ye.’Luka 2:42, 46, 47.

5 Ntango Yesu akómaki mokóló, azalaki na esengo mpo azalaki kosala oyo Nzambe asɛngaki ye. Na ndakisa, Nzambe alingaki ‘asakwela babola nsango malamu’ mpe ‘afungola miso ya bato oyo bakufá miso.’ (Luka 4:18) Nzembo 40:8 eyebisi ndenge Yesu azalaki komiyoka; elobi: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.” Yesu azalaki kosepela koteya bato makambo ya Tata na ye. (Tángá Luka 10:21.) Mokolo moko, nsima ya koteya mwasi moko makambo ya losambo ya solo, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoane 4:31-34) Yesu azalaki na esengo mpo azalaki kolinga Nzambe mpe bato. Soki yo mpe osali bongo, okozala na esengo.

6. Mpo na nini ezali malamu kosolola na basusu mpo na mikano oyo olingi komityela?

6 Bakristo mingi babandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango bazalaki bilenge, mpe epesaki bango esengo. Okoki kosolola na bakristo yango mosusu mpo na mikano oyo olingi komityela? Biblia elobi: “Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te, kasi ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.” (Masese 15:22) Mbala mosusu bandeko yango bakoyebisa yo ete mosala ya ntango nyonso ekoteya yo makambo oyo ekosalisa yo bomoi mobimba. Yesu ayekolaki makambo mingi ntango azalaki elongo na Tata na ye na likoló. Na nsima, na mosala na ye awa na mabele, akobaki koyekola. Na ndakisa, ayekolaki esengo ya koyebisa bato nsango malamu mpe ya kobatela bosembo na ntango ya komekama. (Tángá Yisaya 50:4; Baebre 5:8; 12:2) Tólobela ntina oyo mosala ya ntango nyonso ekoki kopesa yo esengo.

NTINA OYO MOSALA YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI ELEKI MALAMU

7. Mpo na nini bilenge mingi basepelaka na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

7 Yesu ayebisaki biso tókende ‘kokómisa bato bayekoli’ mpe tóteya bango. (Matai 28:19, 20) Soki omityeli mokano ya kosala mosala yango bomoi na yo mobimba, okozala na bomoi ya esengo oyo ekokumisa Nzambe. Ndenge moko na misala nyonso, esengeli ntango eleka mpo oyeba yango malamu. Ndeko mobali moko na nkombo Timothy, oyo abandaki mosala  ya mobongisi-nzela na bolenge, alobaki boye: “Nalingaka kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso mpo ezali ndenge ya kolakisa ye ete nalingaka ye. Na ebandeli, nazalaki kokoka te kozwa bato ya koyekola na bango Biblia, kasi na nsima, nakendaki na teritware mosusu, mpe nsima ya sanza moko, nakómaki na bayekoli ebele. Moko na bango akómaki koya na Ndako ya Bokonzi. Na nsima, nakɔtaki Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba, batindaki ngai na teritware mosusu mpe nakómaki koyekola Biblia na bato minei. Nalingaka koteya bato, mpo namonaka ndenge elimo santu esalisaka bango bábongwana.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.)1 Batesaloniki 2:19.

8. Bilenge mosusu basalaki nini mpo na kosakwela bato ebele?

8 Bilenge mosusu bayekolaki monɔkɔ ya bapaya. Na ndakisa, Jacob, ndeko moko ya Amerika ya Nɔrdi, akomi boye: “Ntango nazalaki na mbula nsambo, bana-kelasi na biso mingi bazalaki koloba monɔkɔ ya Vietnamien. Nazalaki na mposa ya koyebisa bango makambo ya Yehova; yango wana, mwa moke na nsima nalukaki koyekola monɔkɔ na bango. Mpo na koyekola, nazalaki mingimingi kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Lingelesi mpe ya monɔkɔ ya Vietnamien mpo na kokokanisa maloba. Nazwaki mpe baninga na lisangá ya monɔkɔ ya Vietnamien, oyo ezalaki pembeni na biso. Ntango nakómaki na mbula 18, nakómaki mobongisi-nzela. Na nsima, nakɔtaki Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba. Esalisaka ngai tii lelo mpo nazala mobongisi-nzela ya malamu na etuluku moko ya monɔkɔ ya Vietnamien, epai nazali nkulutu kaka ngai moko. Bato mingi ya Vietnam bakamwaka ndenge nayekolá monɔkɔ na bango. Bayambaka ngai na esengo, mpe mbala mingi bandimaka nayekola na bango Biblia. Basusu bazwaki batisimo.”—Talá mpe Misala 2:7, 8.

9. Makambo nini okoki koyekola na mosala ya kokómisa bato bayekoli?

9 Mosala ya kokómisa bato bayekoli ekoteya yo ndenge ya kosala mosala malamu, okoyekola ndenge ya kosolola malamu na bato, mpe ndenge ya koloba na mpiko mpe na mayele. (Masese 21:5; 2 Timote 2:24) Kasi, mosala yango epesaka esengo mingimingi mpo okoyekola ndenge ya kolimbola mateya ya Biblia oyo ondimaka. Okoyekola mpe ndenge ya kosala na bomoko elongo na Yehova.1 Bakorinti 3:9.

10. Ndenge nini mosala ya kokómisa bato bayekoli ekoki kopesa yo esengo ata soki teritware na yo ezali mpasi?

10 Mosala ya kokómisa bato bayekoli ekoki kopesa yo esengo ata soki bato mingi ya teritware na yo basepelaka na nsango malamu te. Mpo na kokómisa moto moyekoli, lisangá mobimba esalisaka. Ata soki ndeko moko nde akutanaki na moto oyo akómi moyekoli ya Yesu, tozalaka na esengo mpo biso nyonso tosalaka mosala yango ya koluka bayekoli. Na ndakisa, Brandon, oyo azalaki mobongisi-nzela mbula libwa na teritware oyo bato moke kaka bandimaki koyekola Biblia, alobi boye: “Nalingaka kosakola nsango malamu mpo yango nde Yehova asɛngi biso tósala. Nakómaki mobongisi-nzela mwa moke nsima ya kosilisa kelasi. Nasepelaka kolendisa bilenge ya lisangá na biso mpe komona ndenge bazali kokende liboso na elimo. Nsima ya kokɔta Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba, batindaki ngai na teritware mosusu. Ngai moko nasalisaki ata moto moko te tii na batisimo, kasi bandeko mosusu basalaki yango. Nasepelaka ndenge namityelaki mokano ya komipesa mobimba na mosala ya kokómisa bato bayekoli.”Mosakoli 11:6.

ESIKA MIKANO NA YO EKOKI KOMEMA YO

11. Likambo nini bilenge mosusu basalaka na mosala ya Yehova?

11 Ezali na makambo ebele oyo okoki kosala na mosala ya Yehova. Na ndakisa, bilenge mingi bapesaka  mabɔkɔ na mosala ya botongi. Bandako ya Bokonzi ebele esengeli kotongama. Lokola bisika yango ekumisaka Yehova, kopesa mabɔkɔ mpo na kotonga yango ekoki kopesa yo esengo. Kosala elongo na bandeko na yo bakristo ekopesa yo mpe esengo. Kotonga bandako ya losambo ekoki mpe koteya yo makambo ebele, na ndakisa ndenge ya kosala mosala malamu kozanga likama mpe ndenge ya koyokana na bandeko oyo bazali kokamba.

Baoyo basalaka mosala ya ntango nyonso bazwaka mapamboli ebele (Talá paragrafe 11 tii 13)

12. Mosala ya mobongisi-nzela ekoki kopesa yo mabaku nini?

12 Ndeko mobali moko na nkombo Kevin alobi boye: “Banda ntango nazalaki mwana moke, mposa na ngai ezalaki ete nasalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Nsukansuka, nakómaki mobongisi-nzela na mbula 19. Mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, na bantango mosusu nazalaki kosalisa ndeko moko oyo ayebaki kotonga bandako. Nayekolaki kotya nsamba, maninisa, mpe baporte. Na nsima, nasalisaki mbula mibale na etuluku ya kosunga bandeko oyo bakutani na likama ya mopɛpɛ makasi; nasalisaki na kotonga lisusu Bandako ya Bokonzi mpe bandako ya bandeko. Ntango nayokaki ete bazali na mposa ya basali na mosala ya botongi na Afrika ya Sudi, natondisaki formilɛrɛ, mpe babengaki ngai kuna. Awa na Afrika, nsima ya mwa bapɔsɔ soki tosilisi kotonga Ndako ya Bokonzi moko, tokendaka kotonga esika mosusu. Ekipi na biso tozalaka lokola libota. Tofandaka elongo, toyekolaka Biblia elongo, mpe tosalaka elongo. Nasepelaka mpe kobima mosala ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ elongo na bandeko ya lisangá. Mikano oyo namityelaki ntango nazalaki mwana moke epesi ngai esengo oyo nakanisaki te.”

13. Mpo na nini bilenge mingi basepelaka kosalela Yehova na Betele?

13 Bilenge mosusu oyo bazalaki babongisi-nzela bazali lelo kosala na Betele. Mosala ya  Betele epesaka esengo mingi mpo nyonso oyo okosala kuna ezali mpo na Yehova. Bandeko ya Betele basalisaka na kobimisa bilei ya elimo mpo bato báyeba solo. Dustin, ndeko moko ya Betele, alobi boye: “Namityelaki mokano ya mosala ya ntango nyonso ntango nazalaki na mbula 9, mpe nakómaki mobongisi-nzela ntango nasilisaki kelasi. Nsima ya mbula moko na ndambo, babengaki ngai na Betele, epai nayekolaki kosalela masini ya kobimisa mikanda, mpe na nsima kosala mosala ya baordinatɛrɛ. Na Betele, nasepelaka koyoka ngai moko ndenge mosala ya kokómisa bato bayekoli ezali kotambola na mokili mobimba. Nalingaka mpe kosala awa mpo mosala na biso esalisaka bato bákóma baninga ya Yehova.”

MIKANO NINI OKOMITYELA MPO NA BOMOI NA YO?

14. Okoki kosala nini mpo omibongisa mpo na mosala ya ntango nyonso?

14 Ndenge nini okoki komibongisa mpo na mosala ya ntango nyonso? Mpo osalela Yehova malamu mpenza, osengeli kokolisa bizaleli ya bokristo. Na yango, yekoláká Biblia mokolo na mokolo, manyoláká yango, mpe salá makasi opesaka biyano na makita mpo na komonisa kondima na yo. Lokola ozali naino na kelasi, okoki kokolisa likoki na yo ya koyebisa basusu nsango malamu. Yekolá kotyela bato likebi: tunáká makanisi na bango na mayele mpe yokáká biyano na bango. Lisusu, okoki kosɛnga opesa mabɔkɔ na makambo ya lisangá, na ndakisa kotya bopɛto to kobongisa Ndako ya Bokonzi. Yehova asepelaka kosalela bato oyo bazali na komikitisa mpe elimo ya komipesa. (Tángá Nzembo 110:3; Misala 6:1-3) Ntoma Paulo abengaki Timote asala elongo na ye na mosala ya misionɛrɛ mpo bandeko “bazalaki koloba malamu mpo na ye.”Misala 16:1-5.

15. Okoki kosala nini mpo ozwa mwa mosala ya mosuni?

15 Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bazalaka na mposa ya mosala ya mosuni mpo na kozwa eloko ya kobikela. (Misala 18:2, 3) Ntango mosusu okoki koyekola mwa misala oyo ekosalisa yo ozwa mosala ya mosuni oyo ekozwa yo ntango mingi te. Mpo na yango, sololá na mokɛngɛli ya zongazonga mpe babongisi-nzela mosusu mpo na mikano na yo, mpe tuná bango mwa makanisi. Na nsima, ndenge Biblia elobi, “Tikelá Yehova misala na yo mpe myango [to mikano] na yo ekopikama makasi.”Masese 16:3; 20:18.

16. Ndenge nini komipesa na mosala ya Yehova na bolenge ekoki kobongisa yo mpo na mikumba oyo okozwa soki okómi mokóló?

16 Yebá ete Yehova alingi ozala na bomoi ya esengo na mikolo ezali koya. (Tángá 1 Timote 6:18, 19.) Na mosala ya ntango nyonso, okoyebana na bandeko mosusu oyo bazali mpe na mosala yango mpe ekosalisa yo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. Longola yango, bandeko mingi bamoni ete komipesa na mosala ya Yehova na bolenge esalisaki bango na nsima ntango babalaki. Mbala mingi, bato oyo bazalaki babongisi-nzela liboso bábalana bakobaka mosala yango elongo nsima ya kobalana.Baroma 16:3, 4.

17, 18. Boyokani nini ezali kati na mikano oyo okomityela mpe motema na yo?

17 Nzembo 20:4 elobi mpo na Yehova ete: “Apesa yo na kolanda mposa ya motema na yo, mpe akokisa mokano na yo mobimba.” Wana ozali komityela mikano mpo na bomoi na yo, kanisá soki olingi mpenza kosala nini na bomoi na yo. Kanisá makambo oyo Yehova azali kosala na mikolo na biso mpe ndenge oyo okoki kopesa mabɔkɔ na mosala na ye. Na nsima, omityela mikano oyo ekosepelisa ye.

18 Soki omipesi mobimba na kosalela Yehova mpe kokumisa ye, okozala na esengo mingi. ‘Okosepela mingi mpenza na Yehova, mpe akopesa yo oyo motema na yo ezali kosɛnga.’Nzembo 37:4.

^ par. 7 Eteyelo yango ekómá Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.