Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2017

Yehova abɔndisaka biso na bolɔzi na biso nyonso

Yehova abɔndisaka biso na bolɔzi na biso nyonso

“Nzambe ya kobɔndisama nyonso . . . abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”2 BAKORINTI 1:3, 4.

NZEMBO: 38, 56

1, 2. Ndenge nini Yehova abɔndisaka biso na bolɔzi na biso, mpe elaka nini tozali na yango na Liloba na ye?

NDEKO mobali moko ya elenge akanisaki 1 Bakorinti 7:28, oyo elobi ete baoyo bazali kobala “bakozwa bolɔzi na kati ya mosuni na bango.” Ndeko yango asololaki na nkulutu moko ya mokóló oyo abalá mpe atunaki ye ete: “‘Bolɔzi’ yango ezali nini, mpe soki nabali, nakoki kosala nini mpo na yango?” Liboso apesa ye eyano, nkulutu ayebisaki elenge yango akanisa likambo mosusu oyo ntoma Paulo akomaki, ete Yehova azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.”2 Bakorinti 1:3, 4.

2 Yehova Tata na biso alingaka biso mpe abɔndisaka biso soki tokutani na mikakatano. Ntango mosusu okutanaki na makambo mpe omonaki ndenge Yehova asalisaki yo mpe atambwisaki yo na nzela ya Liloba na ye. Tóyeba ete alukaka bolamu na biso, ndenge asalaki mpo na basaleli na ye ya ntango ya kala.Tángá Yirimia 29:11, 12.

3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

 3 Mbala mingi, ezalaka mpasi te tóyikela mikakatano mpe bolɔzi mpiko soki toyebi makambo oyo ebimisi yango. Ezali mpe bongo mpo na bolɔzi ya libala mpe libota. Na yango, makambo nini ekoki kobimisa bolɔzi na kati libala to na libota? Bandakisa nini ya Biblia mpe ya mikolo na biso ekoki kobɔndisa biso? Tótalela biyano na mituna yango mpe tótala ndenge tokoki koyikela bolɔzi mpiko.

MIKAKATANO NA KATI YA LIBALA

4, 5. Makambo nini ekoki kobimisela mwasi ná mobali bolɔzi?

4 Nsima ya kokela Eva, Yehova amemaki ye epai ya Adama, mpe abalisaki bango. Na nsima, Yehova alobaki: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” (Ebandeli 2:24) Kasi, biso nyonso lelo tozali bato ya kozanga kokoka. (Baroma 3:23) Yango wana, soki mwasi ná mobali babalani, mikakatano ekoki kozanga te. Na ndakisa, liboso mwana mwasi abala, azalaka na nse ya bokonzi ya baboti na ye. Kasi, Liloba ya Nzambe emonisi ete nsima ya libala, asengeli kokóma na nse ya bokonzi ya mobali. (1 Bakorinti 11:3) Na ebandeli ya libala, mobali akoki kozala na mokakatano mpo na kopesa mwasi na ye malako. Mpe mwasi akoki kozala na mokakatano ya kolanda malako ya mobali na ye, kasi ya baboti na ye te. Longola yango, koyokana na babokilo mpe basɛmɛki ekoki kozala mpasi.

5 Mikakatano mosusu ekoki kobima ntango mwasi ayebisi mobali na ye ete: “Nazali na zemi.” Atako bakoki koyoka esengo mingi, mbala mingi mitungisi mpe ezalaka. Bakoki komituna soki zemi yango ekonyokola bango te, mpe soki mwana na bango akozala nzoto kolɔngɔnɔ. Bayebi mpe ete ekosɛnga mbongo mingi koleka. Soki mwana abotami, ekosɛnga mwasi ná mobali bábongola makambo mosusu. Mwasi akoki kobanda kolekisa ntango mingi na kobatela mwana. Na yango, mwasi ná mobali bakoki kozanga ntango ya kolekisa elongo ndenge bazalaki kosala liboso. Mobali akokóma mpe na mikumba mingi koleka. Asengeli kosala nyonso mpo mwasi ná mwana bázala na oyo esengeli.

6-8. Mwasi ná mobali bakoki koyoka ndenge nini soki bazali kobota te?

6 Bato mosusu oyo babalá bakutanaka mpe na bolɔzi ya ndenge mosusu. Ntango mosusu balukaka kobota, kasi mwana ayaka te. Soki mwasi azali kozwa zemi te, akoki kotungisama mingi. (Masese 13:12) Na ntango ya kala, ezalaki na ntina mingi mwasi abala mpe abota bana. Yango wana Rashele, mwasi ya Yakobo, akómaki mawamawa mpenza mpo azalaki kozwa zemi te, nzokande ndeko na ye azalaki kobota. (Ebandeli 30:1, 2) Lelo oyo, na bamboka mosusu, bato mingi bamonaka ete ezali na ntina mingi kozala na bana ebele. Mbala mingi, bato batunaka bamisionɛrɛ ntina oyo bazalaka na bana te. Ata soki bamisionɛrɛ basali makasi bálimbwela bango, balobaka kaka, “Aa, tokobondela mpo na bino!”

7 Tózwa ndakisa mosusu. Ndeko mwasi moko na Angleterre azalaki na mposa abota bana. Ntango bayebisaki ye ete akoki kobota te, ayokaki mpasi  mingi. Na nsima, ye ná mobali na ye bazwaki ekateli bázwa mwana ya kobɔkɔla. Atako bongo, mawa na ye esilaki mbala moko te. Alobaki boye: “Nayebaki ete kozwa mwana ya kobɔkɔla ekozala ndenge moko te na kobota mwana na ngai moko.”

8 Biblia elobi ete mwasi ‘akobatelama na lisalisi ya kobota bana.’ (1 Timote 2:15) Yango elingi koloba te ete mwasi akozwa bomoi ya seko kaka mpo aboti bana. Boye, vɛrsɛ yango elimboli nini? Mama alekisaka ntango mingi na kobatela bana mpe ndako. Yango ekoki kosalisa ye akima makambo lokola bilobaloba to kokɔta na makambo oyo etali ye te. (1 Timote 5:13) Atako bongo, akoki kaka kozala na mikakatano na libala mpe na libota.

Ndenge nini okoki kozwa libɔndisi ntango molongani na yo akufi? (Talá paragrafe 9 mpe 12)

9. Bolɔzi nini mosusu bato oyo babalá bakoki kokutana na yango?

9 Liwa ya molongani ezali mpe bolɔzi oyo bato babalá bakoki kokutana na yango. Bato mingi bakanisaki ete likambo ya ndenge wana ekoki kokómela bango te; kasi ekómelaki bango, mpe bazali koyika mpiko na mpasi yango. Bakristo bandimaka na motema moko ete lisekwa ekozala, mpe yango ebɔndisaka bango. (Yoane 5:28, 29) Na Liloba na ye, Tata na biso Yehova alaki makambo ebele oyo ebɔndisaka biso na ntango ya mpasi. Tótala sikoyo ndenge basaleli mosusu ya Yehova bazwaki libɔndisi mpe ndenge esalisaki bango.

LIBƆNDISI NA NTANGO YA BOLƆZI

10. Ndenge nini Hana azwaki libɔndisi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Tótalela ndakisa ya Hana, oyo mobali na ye Elekana azalaki kolinga mingi. Hana azalaki na mposa ya mwana, kasi azalaki kobota te. Nzokande, mbanda na ye Penina azalaki na bana ebele. (Tángá 1 Samwele 1:4-7.) Penina azalaki kotyola Hana “mbula na mbula.” Ezalaki kosala Hana mpasi mpenza. Asalaki nini mpo azwa libɔndisi? Abondelaki Yehova. Hana akendaki na tempelo ya Yehova mpe abondelaki ntango molai. Asɛngaki Yehova apesa ye mwana mobali, mpe atyaki motema ete akosalisa ye. Nsima ya kobondela, Hana ayokaki motema ekiti mpe “elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.” (1 Samwele 1:12, 17, 18) Ayebaki ete Yehova akoki kopesa ye mwana, to kobɔndisa ye na ndenge mosusu.

11. Tokoki kosala nini mpo libondeli ebɔndisa biso?

11 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tofandi na mokili ya Satana, bolɔzi ekozanga te. (1 Yoane 5:19) Ezali esengo mpenza koyeba ete tokoki kobondela Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” Yango nde Hana asalaki. Ayebisaki Yehova polele ndenge azalaki koyoka mpe asɛngaki ye asalisa ye. Biso mpe, ntango tozali na mpasi, tósuka kaka te na koyebisa Yehova makambo na biso. Tosengeli kosɛnga ye asalisa biso mpe koyebisa ye polele ndenge tozali koyoka.Bafilipi 4:6, 7.

12. Nini esalisaki Ana azala na esengo atako bolɔzi na ye?

12 Ata soki toyokaka mawa makasi mpo tozali na bana te to mpo moto oyo tolingaka akufi, tokoki kozwa libɔndisi. Tózwa ndakisa ya Ana, oyo azalaki na bomoi na ntango ya Yesu. Nsima ya mbula nsambo mpamba ya libala, mobali na ye akufaki. Mpe emonani ete azalaki na bana te. Nini esalisaki ye? Biblia elobi ete “azalaki kozanga te na  tempelo.” Ata ntango Ana azalaki na mbula 84, azalaki kaka kokende na tempelo mpo na kobondela mpe kosambela Yehova. (Luka 2:37) Yango nde ebɔndisaki ye mpe esalaki ete azala na esengo atako bolɔzi na ye.

13. Pesá ndakisa oyo emonisi ete baninga ya solosolo bakoki kobɔndisa biso soki bato ya libota na biso bapesi biso mpasi.

13 Baninga ya solosolo oyo tozwaka na lisangá bakoki mpe kobɔndisa biso. (Masese 18:24) Tózwa ndakisa ya Paula oyo azalaki na mbula mitano mpamba ntango mama na ye atikaki kosambela Yehova. Ayokaki mawa mingi, mpe ezalaki mpasi mpenza mpo na ye. Kasi na nsima, ndeko mwasi moko ya mobongisi-nzela na nkombo Ann alendisaki ye mpe abandaki kotyela ye likebi. Paula alobi boye: “Atako Ann azalaki moto ya libota na biso te, likebi mpe bolingo na ye esalisaki ngai mingi. Elendisaki ngai nakoba kosalela Yehova.” Na nsima, mama ya Paula azongelaki lisangá, mpe Paula asepelaki mingi. Ann mpe azali na esengo mpo asalisaki Paula akoba kosalela Yehova.

14. Matomba nini baoyo babɔndisaka basusu bazwaka?

14 Ntango tozali kosalela basusu bolamu, tobosanaka mikakatano na biso. Na ndakisa, bandeko basi mingi, ezala babalá to te, bamonaka ete koyebisa basusu nsango malamu ya Bokonzi  epesaka bango esengo mingi mpo basalaka elongo na Yehova mpe bakokisaka mokano na ye. Kutu, biso nyonso tokoki koyebisa basusu nsango malamu mpo na komonisa ete tolingaka bango. Mpe ntango tozali kosalela bandeko ya lisangá bolamu, boyokani na biso ná bango ekómaka malamu koleka. (Bafilipi 2:4) Yango nde ntoma Paulo asalaki. Azalaki kolɛngɛla bandeko ‘lokola mama oyo azali komɛlisa.’ Lisusu, Paulo abɔndisaki mpe alendisaki bandeko na ye “ndenge tata asalaka na bana na ye.”Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 11, 12.

LIBƆNDISI NA KATI YA LIBOTA

15. Koteya bana makambo ya Yehova ezali mokumba ya nani?

15 Tólobela mpe ndenge ya kobɔndisa mabota na kati ya lisangá. Na bantango mosusu, bato ya sika bakoki kosɛnga biso tósalisa bango na koteya bana na bango makambo ya Yehova to kutu tóyekola Biblia na bana na bango. Biblia emonisi ete Yehova apesi nde baboti mokumba ya koteya bana na bango. (Masese 23:22; Baefese 6:1-4) Atako tokoki kosalisa na bantango mosusu, ezali na ntina mingi baboti bango moko báteyaka bana na bango. Baboti basengeli kosololaka mingi na bana na bango.

16. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali koyekola na mwana ya bato?

16 Soki moboti moko asɛngi biso tóyekola Biblia na mwana na ye, tosengeli koyeba ete tozwi esika ya moboti yango te. Na bantango mosusu tokoki koyekola ata na mwana oyo baboti na ye bazali Batatoli te. Soki tozali koyekola na mwana ya bato, tokomonisa bwanya soki tozali koyekola na ye na miso ya baboti na ye to na miso ya Motatoli mosusu oyo akɔmɛli na elimo, to mpe na esika ya bato ebele. Na ndenge yango, moto te akokanisela biso mabe. Na nsima, mbala mosusu baboti bango moko bakokokisa mokumba na bango ya koteya bana makambo ya Yehova.

17. Ndenge nini bana bakoki kobɔndisa bato ya libota na bango?

17 Bana oyo bayekoli kolinga Yehova bakoki kobɔndisa mpe kolendisa bato ya libota na bango. Na ndenge nini? Soki bazali kotosa baboti na bango mpe kopesa bango mabɔkɔ. Soki bana batikali sembo epai ya Yehova, bakoki mpe kolendisa libota mobimba. Liboso ya Mpela, Lameke azalaki kosambela Yehova. Alobaki mpo na mwana na ye Noa ete: “Ye akobɔndisa biso na mosala na biso mpe na mpasi ya mabɔkɔ na biso oyo euti na mabele oyo Yehova alakeli mabe.” Esakweli yango ekokisamaki nsima ya Mpela, ntango Yehova alongolaki elakeli mabe na mabele. (Ebandeli 5:29; 8:21) Lelo, bana oyo bazali kotikala sembo epai ya Yehova bakoki mpe kobɔndisa mabota na bango. Bakoki kosalisa moto mokomoko ya libota na bango ayika mpiko na mikakatano sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

18. Nini ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na bolɔzi nyonso?

18 Lelo oyo, kobondela, komanyola bandakisa ya Biblia, mpe kosala boninga na bandeko ya lisangá ebɔndisaka basaleli ya Yehova. (Tángá Nzembo 145:18, 19.) Toyebi mpe ete Yehova azalaka ntango nyonso pene mpo na kobɔndisa biso, mpe akosalisa biso tóyika mpiko na bolɔzi nyonso oyo ezali kotungisa biso!