Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2017

Tyá makanisi na yo na likambo oyo eleki ntina

Tyá makanisi na yo na likambo oyo eleki ntina

“Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”NZEMBO 83:18.

NZEMBO: 46, 136

1, 2. (a) Likambo nini eleki ntina mpo na bato nyonso? (b) Mpo na nini tosengeli kolinga yango?

MPO na bato mingi lelo, mbongo nde likambo eleki ntina. Balekisaka ntango na bango mpo na koluka mbongo mingi to mpo na kobatela oyo bazali na yango. Bato mosusu bamonaka ete libota, kolɔngɔnɔ ya nzoto, to makambo oyo balingi kosala nde eleki ntina.

2 Nzokande, ezali na likambo moko oyo eleki makambo nyonso wana. Kolongisama ya boyangeli ya Yehova nde likambo yango. Tosengeli kobosana yango ata moke te. Soki tokebi te, makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kobenda likebi na biso nyonso, to mpe mikakatano na biso ekoki kobosanisa biso likambo yango ya ntina mingi. Kasi, soki tolingi mpenza boyangeli ya Yehova tokozala na likoki ya kolonga mikakatano ya mokolo na mokolo mpe tokozala na boyokani malamu ná Yehova.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA MINGI?

3. Ntembe nini Satana abimisaki mpo na boyangeli ya Nzambe?

3 Satana Zabolo abimisaki ntembe ya koyeba soki Yehova azali na lotomo ya koyangela. Satana alingi bato bákanisa ete  Yehova azali Moyangeli mabe mpe ete apimelaka bikelamu na ye makambo ya malamu. Maloba ya Satana emonisaki ete bato bakozala na esengo koleka soki bamiyangeli bango moko. (Ebandeli 3:1-5) Satana amonisaki mpe ete moto moko te azalaka mpenza sembo epai ya Nzambe mpe ete soki bomoi ya moto ekómi na likama, akowangana Nzambe. (Yobo 2:4, 5) Yango wana, Yehova atiki ntango eleka mpo emonana polele ete soki ayangeli te, makambo ekotambola malamu te.

4. Mpo na nini ntembe ya boyangeli ya Yehova esengeli kosila?

4 Yehova ayebi malamu ete maloba ya Zabolo ezali lokuta. Bongo, mpo na nini atikeli Satana ntango mpo amonisa soki alobaki solo? Eyano na motuna yango etali bikelamu nyonso. (Tángá Nzembo 83:18.) Adama ná Eva baboyaki boyangeli ya Yehova, yango wana bato mingi mpe basalaka bongo. Yango ekoki kotinda basusu bámituna soki Zabolo alobaki solo. Lokola bato mpe baanzelu bamoni naino nsuka ya likambo yango te, kimya mpe bomoko ya solosolo ekoki kozala te. Kasi ntango boyangeli ya Yehova ekolongisama, bato bakoyangelama malamu mpo na libela. Kimya ekozonga na molɔ́ngɔ́ mobimba.Baefese 1:9, 10.

5. Na ndenge nini likambo ya boyangeli ya Yehova etali biso?

5 Boyangeli ya Nzambe ekolongisama; boyangeli ya Satana mpe ya bato ekokwea mpe ekolongwa. Nzambe akosalela Bokonzi ya Masiya mpo na kolongisa boyangeli na ye, mpe bato oyo bakobatela bosembo bakomonisa ete moto akoki kotikala sembo epai ya Nzambe mpe kokangama na boyangeli na Ye. (Yisaya 45:23, 24) Yo mpe olingi kozala na kati ya bato yango ya sembo? Ntembe ezali te! Yango wana, tosengeli koyeba ete kolongisama ya boyangeli ya Yehova ezali na ntina mingi.

KOLONGISAMA YANGO EZALI NA NTINA KOLEKA LOBIKO YA BATO

6. Ndenge nini tosengeli kotalela kolongisama ya boyangeli ya Yehova?

6 Kolongisama ya boyangeli ya Yehova ezali na ntina koleka esengo ya bato. Kasi yango elingi koloba te ete lobiko na biso ezali na ntina te, to ete Yehova atyelaka biso likebi te. Ndenge nini toyebi yango?

7, 8. Matomba nini kolongisama ya boyangeli ya Nzambe ekomemela biso?

7 Yehova alingaka bato mingi mpenza. Tozali na motuya mingi na miso na ye, yango wana apesaki Mwana na ye mpo tózwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16; 1 Yoane 4:9) Soki Yehova akokisi bilaka na ye te, Satana ná banguna mosusu bakozwa elonga. Satana alobaka ete Yehova azali lokuta, apimelaka bato makambo ya malamu mpe boyangeli na ye ezali sembo te. Banguna batyolaka bilaka ya Yehova na maloba oyo: “Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, banda mokolo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.” (2 Petro 3:3, 4) Kasi, Yehova akokokisa mpenza bilaka na ye. Ayebi ete ntango akolongisa boyangeli na ye, akobikisa mpe bato ya botosi. (Tángá Yisaya 55:10, 11.) Yehova ayangelaka na bolingo. Na yango, tondimisami ete akokoba ntango nyonso kolinga basaleli na ye ya sembo mpe kozwa bango na motuya.Kobima 34:6.

8 Kondima ete boyangeli ya Yehova ezali na ntina mingi elakisi te ete lobiko  na biso ezali na ntina te na miso na ye. Yehova alingaka biso mingi. Kotalela makambo ndenge wana ekosalisa biso tótya makanisi na likambo oyo eleki ntina mpe tópesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ.

NDENGE YOBO ABONGOLAKI MAKANISI NA YE

9. Satana alobaki nini mpo na Yobo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Tosengeli kotalela boyangeli ya Yehova na ndenge oyo ebongi. Yango emonisami na mokanda ya Yobo, moko ya mikanda oyo ekomamaki liboso. Na mokanda yango, Satana alobaki ete soki Yobo anyokwami makasi, akowangana Nzambe. Kutu, Satana asɛngaki Nzambe abimisela Yobo mpasi. Yehova akokaki kosala bongo te; na yango apesaki Satana nzela ameka Yobo mpe alobaki na ye: “Biloko na ye nyonso ezali na lobɔkɔ na yo.” (Tángá Yobo 1:7-12.) Eumelaki te, basaleli ya Yobo bakufaki mpe abungisaki biloko na ye nyonso ya kobikela. Na nsima, bayebisaki ye ete bana na ye zomi bakufi na likama. Satana asalaki makambo mpo emonana lokola ete Nzambe nde asali yango. (Yobo 1:13-19) Na nsima, Satana abimiselaki Yobo maladi moko ya mpasi mpe ya nsɔmɔ. (Yobo 2:7) Longola yango, mwasi ya Yobo ná baninga na ye misato ya lokuta bayebisaki ye makambo ya mpasi mpe ya kolɛmbisa nzoto.Yobo 2:9; 3:11; 16:2.

10. (a) Ndenge nini Yobo amonisaki bosembo na ye epai ya Nzambe? (b) Mpo na nini esengelaki kosembola Yobo?

10 Makambo Satana alobaki ezalaki solo? Te. Yobo anyokwamaki mingi, kasi awanganaki Yehova te. (Yobo 27:5) Kasi, Yobo abosanaki mwa moke likambo oyo elekaki ntina mpe atyaki makanisi nyonso epai na ye moko. Azalaki ntango nyonso koloba ete asali mabe te. Yobo amonaki mpe ete asengeli koyeba ntina oyo azalaki konyokwama. (Yobo 7:20; 13:24) Tokoki komona ete ebongaki Yobo akanisa bongo mpo azalaki konyokwama. Kasi Yehova ayebaki ete makanisi ya Yobo ezalaki mabe mpe asembolaki ye. Ndenge nini asalaki yango?

11, 12. Yehova asalisaki Yobo ayeba nini, mpe Yobo asalaki nini?

11 Tokoki kotánga makambo oyo Yehova ayebisaki Yobo na mokanda ya Yobo mokapo 38 tii na 41. Yehova ayebisaki ye te ntina ya bampasi na ye. Alingaki nde kosalisa ye amona ete azali mpenza moke liboso ya Nzambe. Ateyaki Yobo ete ezali na makambo oyo ezali na ntina koleka mikakatano na ye. (Tángá Yobo 38:18-21.) Maloba ya Yehova esalisaki Yobo abongola makanisi na ye.

 12 Yehova azangaki nde boboto ndenge alobaki na Yobo makambo wana nzokande Yobo anyokwamaki mingi? Te, ata Yobo ye moko mpe akanisaki bongo te. Amonaki ntina ya toli ya Yehova mpe andimaki. Alobaki kutu ete: “Nabongoli motema na kati ya putulu ya mabele mpe na putulu ya mɔtɔ.” (Yobo 42:1-6) Liboso, elenge mobali moko na nkombo Elihu apesaki Yobo toli mpo asembola makanisi na ye. (Yobo 32:5-10) Ntango Yobo ayokaki toli wana ya bwanya oyo eutaki epai ya Yehova mpe abongolaki makanisi na ye, Yehova ayebisaki bato mosusu ete asepeli na Yobo mpo na bosembo na ye.Yobo 42:7, 8.

13. Na ndenge nini toli ya Yehova esalisaki Yobo ata nsima ya komekama na ye?

13 Toli ya Yehova ekobaki kosalisa Yobo ata nsima ya komekama na ye. Biblia elobi ete: “Yehova apambolaki nsuka ya Yobo koleka ebandeli na ye.” Na nsima, “abotaki mpe bana mibali nsambo ná bana basi misato.” (Yobo 42:12-14) Atako Yobo alingaki bana yango, na ntembe te azalaki kokanisa mpe baoyo bakufaki. Ntango mosusu mpe abosanaki te makambo nyonso ya mpasi oyo ekómelaki ye ná libota na ye. Ata soki na nsima Yobo ayebaki ntina oyo amekamaki, mbala mosusu amitunaki ntina oyo Nzambe atikaki nzela anyokwama makasi ndenge wana. Ata soki makanisi ya ndenge nini eyelaki Yobo, akokaki kokanisa makambo Yehova ayebisaki ye. Yango elingaki kosalisa ye azala na makanisi oyo ebongi mpe kobɔndisa ye.Nzembo 94:19.

Tokoki kotya makanisi na boyangeli ya Yehova ata ntango tozali na mikakatano! (Talá paragrafe 14)

14. Likambo oyo ekómelaki Yobo ekoki koteya biso nini?

14 Komanyola likambo oyo ekómelaki Yobo ekoki kosalisa biso tózala na makanisi oyo ebongi mpe kobɔndisa biso. Yehova akomisaki mokanda ya Yobo “mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Baroma 15:4) Eteyaka biso ete tosengeli te kokanisaka kaka mikakatano na biso tii tóbosana kolongisama ya boyangeli ya Yehova. Ndenge moko na Yobo, tokopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ soki totikali sembo ata na mikakatano.

15. Matomba nini tokozwa soki totikali sembo atako tozali na mikakatano?

15 Likambo oyo ekómelaki Yobo ekoki kobɔndisa biso mpo emonisi ete soki tokutani na komekama elakisi te ete Yehova aboyi biso. Komekama epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingi boyangeli ya Yehova. (Masese 27:11) Soki toyiki  mpiko tii na nsuka, Yehova akondima biso mpe elikya na biso mpo na mikolo ezali koya ekokóma makasi. (Tángá Baroma 5:3-5.) Likambo oyo ekómelaki Yobo emonisi ete “Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Soki topesi boyangeli ya Yehova mabɔkɔ, akopesa biso mbano. Koyeba bongo esalisaka biso ‘tóyika mpenza mpiko mpe tózala na motema molai ná esengo.’Bakolose 1:11.

KOTIKA KOKANISA YANGO TE

16. Mpo na nini tosengeli te kobosanaka ntina ya kolongisama ya boyangeli ya Yehova?

16 Ya solo, kotya makanisi na kolongisama ya boyangeli ya Yehova ekoki kozala mpasi soki tozali na mikakatano ebele. Ata makambo ya mike ekoki komonana minene soki tozali kokanisa yango mingi. Yango wana, ezali malamu tóbosanaka te ntina ya kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ ata soki tozali na mikakatano.

17. Ndenge nini komipesa na mosala ya Yehova ekoki kosalisa biso tótya makanisi na likambo eleki ntina?

17 Kokoba komipesa na mosala ya Yehova ekoki kosalisa biso tóbosana te likambo oyo eleki ntina. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Renee abɛlaki makasi, azalaki koyoka nzoto mpasi ntango nyonso, mpe bazwaki ye na maladi ya kanser. Ntango azalaki na lopitalo, ateyaki bato oyo basalaka kuna, bato ya maladi mosusu, mpe bapaya oyo bazalaki koya na lopitalo. Na lopitalo moko epai Renee asalaki pɔsɔ mibale ná ndambo, asakolaki ngonga 80. Renee ayebaki ete akokufa, kasi abosanaki ata moke te likambo oyo eleki ntina. Kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ epesaki ye kimya.

18. Ndenge nini likambo oyo ekómelaki Jennifer emonisi litomba ya kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ?

18 Tokoki kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ ata na mikakatano ya mikemike oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo. Ndeko mwasi moko na nkombo Jennifer asalaki mikolo misato mpo na kozela mpɛpɔ mpo azonga mboka na bango. Lokola manaka ya mobembo ezalaki kobongwana mbala na mbala, Jennifer alɛmbaki mpe amiyokaki lokola mwana etike. Akokaki komiyokela mawa. Kasi, Jennifer abondelaki Yehova asalisa ye apesa litatoli epai ya bato mosusu oyo bazalaki mpe kozela mpɛpɔ. Nsukansuka, ateyaki bato mingi mpe akabolaki mikanda ebele. Jennifer alobaki boye: “Nayokaki ete Yehova apamboli ngai atako likambo wana ezalaki mpasi mpe apesaki ngai makasi mpo nayokisa nkombo na ye nsɔni te.”

19. Nini ekesenisaka basaleli ya Yehova na mangomba ya lokuta?

19 Kaka basaleli ya Yehova nde bayebi mpenza ntina ya boyangeli na ye. Boyebi yango ekesenisaka biso na mangomba ya lokuta. Yango wana, mokomoko na biso asengeli kosala makasi mpo na kokoba kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ.

20. Ndenge nini Yehova atalelaka makambo nyonso oyo osalaka mpo na kopesa boyangeli na ye mabɔkɔ?

20 Yehova amonaka mpe azwaka na motuya makambo nyonso osalaka mpo na kopesa mabɔkɔ na boyangeli na ye wana ozali kosalela ye na bosembo mpe koyika mpiko na komekama. (Nzembo 18:25) Lisolo oyo elandi ekolobela makambo mosusu oyo emonisi ntina oyo osengeli kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ mpe ndenge ya kosala yango malamu koleka.