Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2017

Okosilisa matata mpo na kobatela kimya?

Okosilisa matata mpo na kobatela kimya?

YEHOVA NZAMBE asɛngi basaleli na ye bálinga kimya, bázongisaka kimya soki matata ebimi. Yango esalaka ete basaleli na ye nyonso bázala na kimya. Kimya yango ebendaka bato ebele na lisangá.

Na ndakisa, nganga-nkisi moko na Madagascar azalaki komona ete Batatoli ya Yehova bazalaka na kimya kati na bango. Alobaki na nse ya motema ete: ‘Soki nalingi nabanda kosambela, nakokɔta na lingomba oyo.’ Na nsima, akataki boyokani na bademo, asalaki makasi asilisa makambo ya libala na ye, mpe akómaki kosambela Yehova, Nzambe ya kimya.

Ndenge moko na moto wana, mbula na mbula bankóto ya bato oyo bazali kokɔta na lisangá bazali kokuta kimya oyo balukaka. Kasi Biblia elobi ete “zuwa makasi mpe kowelana” na kati ya lisangá ekoki kopanza baninga mpe kobimisa matata. (Yakobo 3:14-16) Kasi, Biblia epesi mpe toli mpo na ndenge ya kosilisa matata mpe kobatela kimya na lisangá. Tólobela makambo oyo esalemaki mpenza mpe ndenge toli yango esalisaki.

MIKAKATANO OYO EBIMAKI MPE NDENGE ESILAKI

“Nazalaki kokoka te koyokana na ndeko oyo tozalaki kosala na ye. Mokolo moko ntango tozalaki koswana, bato mibale bayaki kokuta biso ndenge tozali kongala.”—CHRIS.

“Ndeko mwasi moko oyo tomesanaki kobima na ye na mosala ya kosakola ayebisaki ngai ete tokobanda lisusu kobima te. Na nsima, atikaki kosolisa ngai. Nayebaki te ntina oyo aboyaki.”—JANET.

“Mokolo moko nazalaki kosolola na bandeko misato na telefone. Moko asukisaki lisolo, mpe nakanisaki ete akati telefone. Na nsima, nayebisaki ndeko mosusu makambo ya malamu te mpo na ndeko wana, nzokande akataki telefone te.”—MICHAEL.

“Na lisangá na biso, babongisi-nzela mibale bazwanaki matata. Moko akómaki kolobela mosusu mabe. Koswana na bango ezalaki kolɛmbisa bandeko.”—GARY.

Okoki komona lokola ezali makambo ya mikemike. Kasi, makambo yango ekokaki kotika bampota minene na mitema mpe kobebisa kimya ya lisangá. Kasi likambo ya esengo ezali ete bandeko yango basalelaki toli ya Biblia mpe bazongisaki kimya. Okanisi ete toli nini esalisaki bango?

“Bóyokisana nkanda na nzela te.” (Ebandeli 45:24) Yozefe apesaki bandeko na ye toli wana ntango bazalaki kozonga epai ya tata na bango. Soki moto asilikaka mpambampamba,  nkanda na ye ekoki kotinda bato mosusu mpe básilika. Chris andimaki ete na bantango mosusu azangaka komikitisa mpe akakatanaka mpo na kotosa malako. Lokola alingaki kobongwana, asɛngaki ndeko oyo baswanaki na ye bolimbisi mpe abandaki kosala makasi alona komipekisa. Ntango ndeko yango amonaki ete Chris azali kosala makasi abongwana, ye mpe asalaki yango. Lelo oyo, bazali kosalela Yehova elongo na kimya.

“Myango elongaka te esika lisolo ya nkuku ezali te.” (Masese 15:22) Ntango moninga ya Janet atikaki kosolisa ye, Janet amonaki malamu asalela toli wana ya Biblia. Akendaki kosolola na ndeko yango. Janet atunaki ye soki asalaki ye likambo moko oyo epesaki ye nkanda. Na ebandeli, bakokaki kosolola malamu te. Kasi, mokemoke basololaki polele na boboto. Ndeko wana andimaki ete azwelaki Janet makanisi ya mabe mpo na likambo moko oyo esalemaki, nzokande Janet azalaki kutu na kati ya likambo yango te. Asɛngaki Janet bolimbisi, mpe lelo oyo boninga na bango ezongá mpe bazali kosalela Yehova elongo.

“Soki omemi likabo na yo na etumbelo mpe kuna okanisi ete ndeko na yo azali na likambo ná yo, tiká likabo na yo kuna liboso ya etumbelo, mpe kende; liboso yokaná yo na ndeko na yo.” (Matai 5:23, 24) Yesu apesaki toli wana na Lisolo Likoló ya Ngomba. Michael ayokaki mabe mpenza mpo na makambo oyo alobaki mpo na ndeko wana. Alukaki kosala nyonso oyo esengeli mpo na kobongisa makambo. Na yango, akendaki epai ya ndeko wana mpe asɛngaki ye bolimbisi. Nini esalemaki? Michael alobi boye: “Ndeko na ngai alimbisaki ngai na motema moko.” Boninga na bango ezongaki.

“Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.” (Bakolose 3:12-14) Bongo babongisi-nzela mibale oyo baswanaki? Nkulutu moko ya boboto asalisaki bango bámona ete likambo na bango ezalaki kotungisa basusu mpe kopesa bango mawa. Ayebisaki bango ete basengeli komoniselana motema molai mpe kosalisa na kobatela kimya ya lisangá. Bandimaki kosalela toli yango. Lelo oyo, bayokanaka malamu ntango bazali kosakola nsango malamu.

Toli yango ya Bakolose 3:12-14 ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa, tólimbisa moto oyo apesi biso mpasi mpe tóbosana likambo yango. Kasi tokosala nini soki tomeki kolimbisa kasi tozali kokoka kaka te? Toli mosusu ya Biblia oyo ezali na Matai 18:15  ekoki kosalisa biso. Atako Yesu azalaki kolobela nde masumu ya minene, tokoki kosalela toli oyo apesaki soki tozwani matata na ndeko moko. Na boboto mpe na komikitisa, tokoki kokende kosolola na ye mpo tómeka kosilisa likambo yango.

Biblia epesi batoli mosusu ebele oyo ekoki kosalisa. Mpo na kotosa yango, tosengeli kotyela elimo santu ya Nzambe motema mpo tómonisa “mbuma ya elimo,” oyo ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, [mpe] komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23) Ndenge kaka masini esalaka malamu soki ezali na mafuta, bizaleli wana esalisaka na kosilisa matata mpe kotya kimya.

LISANGÁ EZALAKA NA ESENGO MPO BANDEKO BAZALI NA BIZALELI EKESENI

Moto na moto azali na bizaleli na ye. Tokanisaka ndenge moko te, mpe totalelaka makambo ndenge moko te. Bokeseni yango ekoki kobongisa boninga, kasi ekoki mpe kobimisa matata mpe kozanga boyokani. Ndeko moko oyo azali nkulutu banda kala alobaki boye: “Moto ya nsɔninsɔni akomiyoka malamu te soki azali elongo na moto oyo alobaka makambo nyonso polele. Ekoki komonana lokola bokeseni ya moke; kasi yango ekoki kobimisa matata minene.” Okanisi ete bato oyo bazali na bizaleli ekeseni bakoki koyokana malamu ata moke te? Tólobela ndakisa ya bantoma mibale. Petro azalaki moto ya ndenge nini? Tokoki koloba ete azalaki koloba likambo nyonso oyo eyeli ye na motó. Bongo Yoane? Tokoki koloba ete azalaki kolinga bato mpe mbala mingi azalaki kokanisa liboso aloba to asala likambo. Petro ná Yoane bazalaki na bizaleli ekeseni. Atako bongo basalelaki Yehova elongo. (Misala 8:14; Bagalatia 2:9) Ekoki kozala mpe bongo mpo na biso lelo. Ata bakristo oyo bazali na bizaleli ekeseni mpenza bakoki kosala elongo.

 Ndeko moko ya lisangá akoki koloba to kosala likambo moko oyo epesi yo nkanda. Kasi kobosana te ete Kristo akufaki mpe mpo na ndeko yango, mpe osengeli kolinga ndeko na yo. (Yoane 13:34, 35; Baroma 5:6-8) Na esika oloba ete okoki kozala moninga ya ndeko yango te, to mpe obanda kokima ye, omituna boye: ‘Ndeko yango azali kosala likambo oyo ebuki mobeko ya Yehova? Azali koluka kosala ngai mabe na nko? Ezali kaka te mpo bizaleli na biso ekeseni? Kutu, bizaleli nini ya malamu oyo ye azali na yango kasi ngai nazangi?’

Motuna wana ya nsuka ezali na ntina mingi. Soki ndeko yango alobaka mingi kasi yo olobaka mingi te, mpo na nini te bósakola elongo mpe otala makambo okoki koyekola epai na ye? Soki azali lobɔkɔ pɛtɛɛ koleka yo, mpo na nini te kotala esengo oyo ayokaka ntango akabeli mobange, moto ya maladi, to mobola, mpo yo mpe oyekola kosala yango? Likanisi ya ntina ezali ete ata soki yo ná ndeko moko bokeseni, okoki kotya likebi na bizaleli na ye ya malamu. Ata soki bokokóma baninga ya motema te, bokozala na boyokani ya malamu. Yango ekosalisa na kotya kimya na kati na bino mpe na lisangá.

Na siɛklɛ ya liboso, emonani ete Evodi ná Sɛntishe bazalaki na bizaleli ekeseni mpenza. Kasi ntoma Paulo alendisaki bango “bázala likanisi moko na kati ya Nkolo.” (Bafilipi 4:2) Biso mpe tolingaka kosambela Yehova elongo na bandeko na biso mpe kobatela kimya ya lisangá.

TÓSILISAKA MATATA

Ndenge kaka matiti mabe oyo ezali kokola na elanga ya fololo ekoki kobebisa fololo, makanisi ya mabe mpo na basusu ekokoba kokola na mitema na biso soki tolongoli yango te. Soki makanisi na biso ya mabe mpo na basusu ekómi makasi, ekoki kobebisa lisangá mobimba. Kasi soki tolingaka Yehova  mpe bandeko na biso, tokosala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela kimya ya lisangá.

Soki oluki kosilisa matata mpo na kotya kimya, okoki kokamwa ndenge makambo ekobonga

Soki toluki kosilisa matata mpo na kotya kimya, tokoki kokamwa ndenge makambo ekobonga. Ndeko moko amonaki yango. Alobi boye: “Nazalaki komona ete ndeko mwasi moko azalaki kosalela ngai makambo lokola mwana moke. Ezalaki mpenza kotungisa ngai. Lokola nakangelaki ye nkanda, nakómaki kokatela ye mangala. Nazalaki kokanisa, ‘Lokola apesaka ngai limemya oyo esengeli te, ngai mpe nakopesa ye limemya te.’”

Na nsima ndeko yango ye moko amitalelaki. Alobi boye: “Nakómaki komona ete ngai mpe nazali na bizaleli ya mabe, mpe epesaki ngai mawa mpenza. Namonaki ete nasengeli kosembola makanisi na ngai. Nsima ya kobondela Yehova, namemelaki ndeko wana mwa likabo mpe nakomelaki ye mokanda mpo na kosɛnga ye bolimbisi. Toyambanaki mpe toyokanaki ete tóbosana likambo yango. Tozwanaki lisusu matata te.”

Moto nyonso azalaka na mposa ya kimya. Kasi, bato mingi babimisaka matata mpo na lolendo to mpo bamoni lokola balingi kosala bango mabe. Na mokili nde ezalaka bongo, kasi Yehova alingi basaleli na ye bázala ndenge wana te. Batatoli ya Yehova basengeli kozala na kimya mpe na bomoko. Elimo ya Yehova esalisaki ntoma Paulo akomela bakristo ete: “Bótambolaka na ndenge oyo ebongi na kobengama oyo bobengamaki, na elimo mpenza ya komikitisa mpe na boboto, na motema molai, bókanga motema moto na moto na makambo ya mosusu na bolingo, bósala makasi mpenza mpo na kobatela bomoko ya elimo na ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Baefese 4:1-3) “Ekanganeli ya kimya” oyo esangisi basaleli ya Yehova ezali na motuya mingi. Yango wana, mokomoko na biso asengeli kobatela yango; tózala na ekateli ya kosilisa matata nyonso oyo ebimi kati na biso.