Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2016

“Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko”

“Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko”

“Yoká, Ee Yisraele: Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.”KOLIMBOLA MIBEKO 6:4.

NZEMBO: 138, 112

1, 2. (a) Mpo na nini maloba oyo ezali na Kolimbola Mibeko 6:4 eyebani mingi? (b) Mpo na nini Moize alobaki maloba yango?

NA BOUMELI ya bankama ya bambula, Bayuda bazalaki kosalela maloba ya Kolimbola Mibeko 6:4 na kati ya libondeli. Libondeli yango ezalaki kobengama Shema, oyo ezali liloba ya liboso ya vɛrsɛ yango na Ebre. Bayuda mingi bazalaki kosala libondeli yango mikolo nyonso na ntɔngɔ mpe na mpokwa mpo na komonisa ete bakangami kaka na Nzambe.

2 Maloba yango ezali eteni ya nsuka ya lisolo oyo Moize asalaki liboso ya bana ya Yisraele. Na mobu 1473 liboso ya Kristo, ekólo yango ezalaki na mokili ya Moabe, liboso ya kokatisa Ebale Yordani mpe kobɔtɔla Mokili ya Ndaka. (Kolimbola Mibeko 6:1) Moize asilaki kokamba bango mbula 40, mpe alingaki ete bázala na mpiko mpo na kolonga mikakatano oyo basengelaki kokutana na yango. Basengelaki kotyela Yehova Nzambe na bango motema, mpe kozala sembo epai na ye. Yango wana, maloba ya nsuka ya Moize elendisaki bango básala kaka bongo. Nsima ya kolobela Mibeko Zomi mpe mibeko  mosusu oyo Yehova apesaki ye, Moize akundwelaki bango likambo moko ya ntina mingi oyo ezali na Kolimbola Mibeko 6:4, 5. (Tángá.)

3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

3 Bayisraele bayebaki ete Yehova Nzambe na bango azali “Yehova kaka moko.” Bayisraele ya sembo bazalaki kosambela Nzambe kaka moko, Nzambe ya bankɔkɔ na bango. Kasi, mpo na nini Moize akundwelaki bango ete Yehova Nzambe na bango azali “Yehova kaka moko”? Boyokani nini ezali kati na likambo wana ná kolinga Nzambe na biso na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makasi na biso nyonso? Mpe ndenge nini maloba oyo ezali na Kolimbola Mibeko 6:4, 5 etaleli mpe biso lelo oyo?

NZAMBE NA BISO AZALI “YEHOVA KAKA MOKO”

4, 5. (a) Maloba “Yehova kaka moko” elimboli nini? (b) Na ndenge nini Yehova akeseni ná banzambe ya bikólo?

4 Akokani na mosusu te. Liloba “Yehova kaka moko” elimboli ete Yehova akokani na mosusu te, moto moko te akokani na ye to azali lokola ye. Mpo na nini Moize asalelaki maloba wana? Na maloba wana, Moize azalaki te koluka komonisa ndenge oyo liteya ya bosato ezali solo te. Yehova azali Mozalisi ya likoló mpe mabele, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Azali Nzambe kaka moko ya solo, mpe nzambe mosusu te azali lokola ye. (2 Samwele 7:22) Na yango, maloba ya Moize ekundwelaki Bayisraele ete basengelaki kosambela kaka Yehova. Basengelaki te komekola bato oyo bafandaki zingazinga na bango, oyo bazalaki kosambela banzambe mingi ya lokuta mpe banzambe-basi. Bato yango bazalaki kokanisa ete banzambe na bango bakokaki kobatela biloko mosusu oyo ekelamá.

5 Na ndakisa, Baezipito bazalaki kosambela nzambe-moi Râ, nzambe-mwasi ya likoló Nout, nzambe ya mabele Geb, nzambe ya Nile Hâpi, mpe ebele ya banyama. Yehova amonisaki ete aleki mosika banzambe wana ya lokuta ntango ayeisaki malɔzi zomi. Baala, nzambe ya lokuta oyo Bakanana bazalaki kokanisa ete ye nde apesaka bomoi, azalaki nzambe na bango ya libosoliboso. Bazalaki mpe kokanisa ete azalaki nzambe ya likoló, ya mbula, mpe ya mopɛpɛ makasi. Na bisika mingi, bato bazalaki kotyela Baala motema mpo abatela bango. (Mitángo 25:3) Bayisraele basengelaki kobosana te ete Nzambe na bango, “Nzambe ya solo,” akokani na mosusu te. Azali “Yehova kaka moko.”Kolimbola Mibeko 4:35, 39.

Yehova Nzambe akabwani te to azali bongolabongola te. Azalaka ntango nyonso sembo, abongwanaka te, mpe azali solo

6, 7. Maloba “kaka moko” elimboli mpe nini, mpe ndenge nini Yehova amonisaki ete azali “kaka moko”?

6 Abongwanaka te mpe azali sembo. Liloba “moko” na kati ya maloba “Yehova kaka moko” elimboli mpe ete mokano na ye mpe misala na ye ebongi kotyelama motema ntango nyonso. Yehova Nzambe akabwani te to azali bongolabongola te. Azalaka ntango nyonso sembo, abongwanaka te, mpe azali solo. Na ndakisa, alakaki  Abrahama ete bakitani na ye bakofanda na Mokili ya Ndaka. Mpe Yehova asalaki makamwisi mingi mpo na kokokisa elaka yango. Mbula 430 nsima ya kopesa elaka wana, mokano ya Yehova ebongwanaki te.Ebandeli 12:1, 2, 7; Kobima 12:40, 41.

7 Bankama ya bambula na nsima, Yehova abengaki Bayisraele batatoli na ye mpe alobaki na bango ete: “Ngai nazali kaka ndenge nazalaka. Liboso na ngai Nzambe moko te asalemaki, mpe nsima na ngai mosusu azali te.” Yehova amonisaki mpe polele ete mokano na ye ebongwanaka soki moke te ntango alobaki lisusu ete: “Ntango nyonso Ngai nazali kaka ndenge nazalaka.” (Yisaya 43:10, 13; 44:6; 48:12) Bayisraele bazalaki na libaku monene ya kosalela Nzambe oyo abongwanaka te mpe oyo azalaka ntango nyonso sembo! Biso mpe tozali na libaku yango lelo oyo.Malaki 3:6; Yakobo 1:17.

8, 9. (a) Yehova asɛngaka nini epai ya basambeli na ye? (b) Ndenge nini Yesu abendaki likebi na ndimbola ya maloba ya Moize?

8 Moize akundwelaki Bayisraele ete bolingo oyo Yehova azalaki kolinga bango mpe likebi oyo azalaki kotyela bango esengelaki kobongwana soki moke te. Yehova na ngámbo na ye azalaki kozela ete bákangama kaka na ye mpe bálinga ye na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, mpe na makasi na bango nyonso. Baboti basengelaki koteya bana na bango makambo ya Yehova na mabaku nyonso mpo bilenge básambela kaka Yehova.Kolimbola Mibeko 6:6-9.

9 Yehova abongolaka mokano na ye soki moke te, yango wana akobongola soki moke te masɛngami ya ntina mpo na basambeli na ye ya solo. Soki tolingi ete Yehova asepela na losambo na biso, tosengeli kokangama kaka na ye mpe kolinga ye na motema na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso mpe na makasi na biso nyonso. Yesu alobaki ete yango nde mobeko oyo eleki ntina. (Tángá Marko 12:28-31.) Tiká ete tóyekola ndenge oyo tokoki komonisa na misala na biso ete tondimaka ete “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.”

KANGAMÁ KAKA NA YEHOVA

10, 11. (a) Na ndimbola nini tosambelaka kaka Yehova? (b) Ndenge nini bilenge Baebre na Babilone bamonisaki ete bakangamaki kaka na Yehova?

10 Yehova azali Nzambe na biso kaka moko. Tokangamaka kaka na ye ntango tosambelaka kaka ye. Tokoki kosambela banzambe mosusu te to kokɔtisa makanisi to misala nyonso ya lokuta na losambo oyo topesaka Yehova. Azali Nzambe oyo azali likoló ya banzambe mosusu nyonso mpe aleki na nguya. Azali Nzambe ya solo. Tosengeli kosambela kaka Yehova.Tángá Emoniseli 4:11.

11 Na mokanda ya Danyele, totángaka masolo ya bilenge Baebre minei: Danyele, Hanania, Mishaele, mpe Azaria. Bamonisaki ete bakangami kaka na Yehova na ndenge baboyaki kolya bilei oyo ezalaki mbindo mpo na basambeli ya Yehova. Na nsima, baninga misato ya Danyele baboyaki kofukamela ekeko ya wolo oyo Nebukadenezare asalaki. Mpo na bango, Yehova nde azalaki na esika ya liboso. Bazalaki mpenza sembo epai na ye.Danyele 1:1–3:30.

Yehova asengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso

12. Mpo tómonisa ete tokangami kaka na Yehova, tosengeli komibatela na likambo nini?

 12 Yehova asengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso. Soki tolingi kokangama kaka na ye, tosengeli kokeba ete biloko mosusu ezwa esika na ye te. Biloko yango ekoki kozala nini? Na Mibeko Zomi, Yehova alobaki ete basaleli na ye basengeli kosambela banzambe mosusu te. Basengelaki te kosangana na losambo nyonso ya bikeko. (Kolimbola Mibeko 5:6-10) Lelo oyo, losambo ya bikeko ezali ndenge na ndenge, mpe ekoki kozala mpasi koyeba mitindo na yango mosusu. Kasi Yehova abongoli masɛngami na ye te. Tii lelo, azali “Yehova kaka moko.” Tótala ndenge oyo tokoki koboya losambo ya bikeko lelo oyo.

13. Nini tokoki kobanda kolinga mingi koleka Yehova?

13 Na Bakolose 3:5 (tángá), tozali kotánga makambo oyo ekoki kobebisa boyokani makasi oyo tozali na yango na Yehova. Tomoni ete bilulela ezali losambo ya bikeko. Na ndenge nini? Soki tozali na mposa makasi ya eloko moko, na ndakisa mbongo mingi to bomɛngo, mposa yango ekoki kotambwisa bomoi na biso, lokola nzambe moko ya nguya. Masumu nyonso oyo Bakolose 3:5 elobeli ezali bilulela, oyo ezali lolenge moko ya losambo ya bikeko. Na yango, soki tozali na mposa makasi ya biloko wana, tokoki kobanda kolinga yango mingi koleka Nzambe. Na ntango wana, Yehova akozala lisusu te “Yehova kaka moko” mpo na biso. Tokolinga soki moke te ete esalema bongo.

14. Likebisi nini ntoma Yoane apesaki mpo na bolingo oyo tolingaka Nzambe?

14 Ntoma Yoane abendaki likebi na likambo moko ya ndenge wana. Akebisaki ete soki moto azali kolinga biloko oyo ezali na mokili, elingi koloba, “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela,” “bolingo ya Tata ezali na kati na ye te.” (1 Yoane 2:15, 16) Na yango, tosengeli komitalela mbala na mbala mpo na koluka koyeba soki tolingaka mokili to te. Ntango mosusu tokoki komona ete tobandi kobendama na kominanola, bato, midɛlɛ ya bilamba mpe ndenge ya kobongisa nzoto ya mokili. To, tokoki koluka “makambo minene” na nzela ya bakelasi milaimilai. (Yirimia 45:4, 5) Mokili ya sika ekómi mpenza pene. Yango wana, tosengeli kobosana te maloba ya nguya oyo Moize alobaki! Soki tokangi ntina mpe tondimi mpenza ete “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko,” tokokangama kaka na ye mpe tokosalela ye na ndenge oyo alingi.Baebre 12:28, 29.

TÓBATELA BOMOKO NA BISO YA BOKRISTO

15. Mpo na nini ntoma Paulo akundwelaki bakristo ete Nzambe azali “Yehova kaka moko”?

15 Maloba “Yehova kaka moko” esalisi biso tókanga ntina ete Yehova alingi basaleli na ye bázala na bomoko mpe bázala na mokano moko na bomoi. Na lisangá ya bokristo ya liboso, ezalaki na Bayuda, Bagrɛki, Baroma, mpe bato ya bikólo mosusu. Bautaki na bisika ndenge na ndenge, bazalaki na mimeseno ndenge na ndenge, mpe bazalaki kolinga makambo ndenge na ndenge. Mpo na yango, ezalaki mpasi mpo  na basusu bándima lolenge ya sika ya losambo to bátika misala na bango ya kala. Yango wana, ntoma Paulo asengelaki kokundwela bango ete bakristo bazali na Nzambe kaka moko, Yehova.Tángá 1 Bakorinti 8:5, 6.

Yehova alingi basaleli na ye bázala na bomoko mpe bázala na mokano moko na bomoi

16, 17. (a) Esakweli nini ezali kokokisama na mikolo na biso, mpe yango ebimisi matomba nini? (b) Nini ekoki kobebisa bomoko na biso?

16 Kasi tokoloba nini mpo na lisangá ya bokristo lelo oyo? Mosakoli Yisaya alobaki ete “na eleko ya nsuka ya mikolo,” bato ya bikólo nyonso bakosangana elongo mpo na kosambela Yehova. Bakoloba: “Akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.” (Yisaya 2:2, 3) Tozali na esengo ya komona ndenge oyo esakweli yango ezali kokokisama lelo oyo! Bandeko na biso bakristo bauti na bisika ndenge na ndenge, balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge, mpe bazali na mimeseno ndenge na ndenge. Kasi, biso nyonso tosambelaka Yehova na bomoko. Nzokande, lokola tokeseni mpenza, na bantango mosusu mikakatano ebimaka.

Ozali kosala makasi mpo na kobatela bomoko ya lisangá ya bokristo? (Talá paragrafe 16-19)

17 Na ndakisa, ndenge nini otalelaka bandeko mibali mpe basi oyo bazali na mimeseno oyo ekeseni na biso? Monɔkɔ oyo  balobaka, molato na bango, ndenge na bango ya kosala makambo, mpe bilei na bango ekoki kokesana na oyo ya yo. Okimaka bango mpe olekisaka ntango mingi kaka na baoyo yo ná bango bozali makambo ndenge moko? Na esika bofandi, ndenge nini otalelaka bankulutu oyo oleki bango na mbula to oyo loposo mpe mimeseno ekeseni na oyo ya yo? Soki tokebi te, tokoki kotika ete bokeseni wana ebebisa biso mpe ebebisa bomoko na biso.

18, 19. (a) Toli nini ezali na Baefese 4:1-3? (b) Tokoki kosala nini mpo na kosalisa lisangá ekoba kozala na bomoko?

18 Ndenge nini tokoki kokima mikakatano ya ndenge wana? Ntoma Paulo apesaki toli oyo ebongi epai ya bakristo ya Efese, engumba moko ya bozwi oyo ezalaki na bato ya mimeseno ndenge na ndenge. (Tángá Baefese 4:1-3.) Alobelaki bizaleli lokola komikitisa, boboto, motema molai, mpe bolingo. Bizaleli yango ezali lokola makonzí oyo esalaka ete ndako epikama makasi. Kasi mpo na kobatela ndako ekoba kozala malamu, esɛngaka mosala makasi. Ntoma Paulo alingaki ete bakristo ya Efese básala makasi mpo na “kobatela bomoko ya elimo.”

19 Biso nyonso tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bomoko ya lisangá. Ndenge nini tokoki kosala yango? Ya liboso, tosengeli kolona mpe komonisa bizaleli oyo ntoma Paulo elobelaki: komikitisa, boboto, motema molai, mpe bolingo. Ya mibale, tosengeli kosala makasi mpo na kobatela “ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” Matata ezali lokola minkaka oyo esalemaka na efelo ya ndako, ebebisaka bomoko na biso; yango wana, tosengeli kosala makasi tósilisa matata mpo tóbatela kimya mpe tózala na bomoko.

20. Ndenge nini tokoki komonisa ete tokangi ntina ete “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko”?

20 “Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” Maloba wana ezali mpenza na nguya! Kokundwela Bayisraele bongo epesaki bango makasi ya koyikela mikakatano mpiko ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka mpe bazwaki yango. Maloba yango ekoki mpe kopesa biso makasi mpo tókoka kokatisa bolɔzi monene mpe tópesa mabɔkɔ na kokómisa mabele Paradiso na mikolo ezali koya. Tiká tókoba kokangama kaka na Yehova. Tosengeli kolinga ye mpe kosalela ye na motema na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso, na makasi na biso nyonso, mpe tosengeli kosala makasi tóbatela kimya mpe bomoko elongo na bandeko na biso. Soki tokobi kosala makambo wana, Yesu akotalela biso lokola bampate mpe tokomona kokokisama ya maloba na ye oyo: “Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá, bózwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.”Matai 25:34.