Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2016

Sepelá ndenge Yehova azali Moyemi-mbɛki na biso

Sepelá ndenge Yehova azali Moyemi-mbɛki na biso

“Ee Yehova, . . . yo nde Moyemi na biso; mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.”YISAYA 64:8.

NZEMBO: 89, 26

1. Mpo na nini Yehova azali Moyemi-mbɛki oyo aleki monene?

NA SANZA ya 11/2010, na Angleterre, batyaki mbɛki moko ya Ba-chinois mpo esombama na moto oyo akopesa dolare pene na milio 70. Ezali likambo ya kokamwa ete moyemi-mbɛki akoki kobongisa mabele ya lima, eloko ya ntalo moke, mpo na kokómisa yango mbɛki kitoko mpe ya ntalo mingi. Yehova, Moyemi-mbɛki na biso, aleki mosika moyemi-mbɛki mosusu nyonso. Biblia elobi ete Yehova asalaki moto ya kokoka “na putulu ya mabele,” elingi koloba, na mabele ya lima. (Ebandeli 2:7) Moto yango, Adama, azalaki “mwana ya Nzambe” mpe akelamaki na likoki ya komekola bizaleli ya Nzambe.Luka 3:38.

2, 3. Ndenge nini tokoki komekola Bayisraele oyo babongolaki motema?

2 Ntango Adama atombokelaki Mozalisi na ye, azalaki lisusu mwana ya Nzambe te. Kasi bakitani mingi ya Adama bandimaki ete Yehova azala Mokonzi bango. (Baebre 12:1) Na ndenge batosaka Mozalisi na bango na komikitisa nyonso, bamonisaka ete balingi azala Tata na bango mpe Moyemi-mbɛki na bango, kasi Satana te. (Yoane 8:44) Bosembo na bango  epai ya Nzambe ekundweli biso maloba ya Bayisraele oyo babongolaki motema: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso. Biso tozali mabele ya lima, mpe yo nde Moyemi na biso; mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.”Yisaya 64:8.

3 Lelo oyo mpe, basaleli ya solo ya Yehova basalaka makasi bázala na komikitisa mpe na botosi. Bamonaka ete kobenga Yehova Tata na bango ezali lokumu monene, mpe balingaka ete azala Moyemi-mbɛki na bango. Tokolinga kozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ oyo Nzambe akoki kobongisa mpo ekóma mbɛki ya motuya? Totalelaka ndeko mokomoko lokola moto oyo Nzambe azali kokoba kobongisa mokemoke? Mpo na kosalisa biso tózala na makanisi malamu, tokotalela ndenge oyo Yehova aponaka bato oyo abongisaka, ntina oyo abongisaka bango, mpe ndenge oyo asalaka yango.

YEHOVA APONAKA BATO OYO ABONGISAKA

4. Ndenge nini Yehova aponaka bato oyo abendaka epai na ye? Pesá bandakisa.

4 Yehova atalelaka bato te ndenge biso totalelaka bango. Ye atalaka nde motema, mpe amonaka bomoto ya kati ya mokomoko na biso. (Tángá 1 Samwele 16:7b.) Yehova amonisaki yango ntango abandisaki lisangá ya bokristo. Ye ná Mwana na ye babendaki bato mingi oyo basusu bakokaki komona ete babongi te. (Yoane 6:44) Na bato yango, tokoki kotánga Saulo, Mofarisai moko oyo azalaki ‘kofinga mpe konyokola [bakristo] mpe azalaki moto ya lofundo.’ (1 Timote 1:13) Kasi, ntango Yehova atalaki motema ya Saulo, amonaki te ete azalaki mabele ya lima oyo ezangi ntina. (Masese 17:3) Kutu, Yehova amonaki ete Saulo akokaki kobongisama mpo na kokóma ‘mbɛki oyo aponi’ mpo na kosakola “epai ya bikólo mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisraele.” (Misala 9:15) Yehova aponaki mpe bato mosusu oyo bakokaki kobongisama “mpo na mosala ya lokumu,” oyo liboso bazalaki balangwi-masanga, bato ya pite, mpe miyibi. (Baroma 9:21; 1 Bakorinti 6:9-11) Ntango bayekolaki Makomami, bakómisaki makasi kondima na bango epai na Yehova mpe batikaki ye abongisa bango.

Tosengeli te kosambisa basusu na teritware na biso to na lisangá na biso

5, 6. Na ndenge nini kondima ete Yehova azali Moyemi-mbɛki na biso esengeli kobongola lolenge na biso ya kotalela (a) bato ya teritware na biso? (b) bandeko ya lisangá?

5 Tondimaka ete Yehova azali na likoki ya kopona mpe kobenda bato oyo babongi. Yango wana, tosengeli te kosambisa basusu na teritware na biso to na lisangá na biso. Na ndakisa, tótalela ndenge mobali moko na nkombo Michael asalaki ntango Batatoli ya Yehova bayaki kotala ye. Alobi boye: “Naboyaki koyamba bango mpe nalingaki ata kotala bango na miso te. Namonisaki limemya ata moke te! Na nsima, na esika mosusu, nakutanaki na libota moko oyo nazalaki kosepela mingi na etamboli na bango ya malamu. Mokolo moko nakamwaki mingi ntango nayebaki ete bazali Batatoli ya Yehova! Etamboli na bango etindaki ngai natika kokanisela Batatoli ya Yehova mabe.  Eumelaki te, nayaki komona ete nazalaki kokanisela bango mabe mpo na kozanga koyeba, kasi te mpo bazalaki bato mabe.” Michael alingaki koyeba makambo mosusu mingi, mpe andimaki boyekoli ya Biblia. Na nsima, azwaki batisimo mpe akɔtaki na mosala ya ntango nyonso.

6 Soki tondimi ete Yehova azala Moyemi-mbɛki na biso, tokobongola ndenge na biso ya kotalela bandeko. Tokotalela mokomoko na bango lokola bato oyo bazali naino kobongisama mokemoke. Yehova atalelaka bango ndenge wana. Amonaka bomoto na bango ya kati mpe ayebi ete ezaleli ya kozanga kokoka ezali kaka mpo na mwa ntango. Ayebi mpe lolenge ya moto oyo mokomoko na bango akoki kokóma. (Nzembo 130:3) Tokoki komekola Yehova soki tozali kotalela bandeko na biso ndenge ye atalelaka bango. Tokoki ata kosala elongo na Moyemi-mbɛki na biso mpo na kosalisa bandeko bákende liboso. (1 Batesaloniki 5:14, 15) Bankulutu ya lisangá basengeli kopesa ndakisa malamu soki bazali kosala bongo.Baefese 4:8, 11-13.

MPO NA NINI YEHOVA ABONGISAKA BISO?

7. Mpo na nini osepelaka na disiplini ya Yehova?

7 Bato mosusu balobaka ete: ‘Nayebaki mpenza valɛrɛ ya disiplini oyo baboti na ngai bazalaki kopesa ngai kaka ntango ngai moko nakómaki na bana.’ Ntango tokómaka mikóló, toyebaka malamu valɛrɛ ya disiplini, mpo totalelaka yango lokola elembo ya bolingo. (Tángá Baebre 12:5, 6, 11.) Ya solo, Yehova alingaka biso lokola bana na ye, yango wana, na motema molai nyonso apesaka biso disiplini to abongisaka biso. Alingi ete tózala na bwanya mpe na esengo mpe tólinga ye lokola Tata na biso. (Masese 23:15) Alingi te komona biso tozali konyokwama, alingi mpe te tókufa kozanga ete tóbongola mitema.Baefese 2:2, 3.

Yehova alingaka biso lokola bana na ye, yango wana, na motema molai nyonso apesaka biso disiplini to abongisaka biso

8, 9. Ndenge nini Yehova azali koteya biso lelo, mpe ndenge nini mateya yango ekokoba na mikolo ezali koya?

8 Liboso ete tóyeba Yehova, mbala mosusu tozalaki na bizaleli mingi ya mabe. Kasi, Yehova abongisaki biso mpe asalisaki biso tóbongwana, yango wana, lelo oyo tozali na bizaleli mingi ya malamu. (Yisaya 11:6-8; Bakolose 3:9, 10) Tozali na kati ya paradiso ya elimo, oyo ezali ebongiseli moko ya ntina mingi oyo Yehova azali kozwa na mikolo na biso, oyo ezali kosalisa mpo na kobongisa biso. Na paradiso yango, tozali na libateli mpe na likambo ya kobanga te atako tofandi na mokili oyo mabe. Baoyo bakolá kozanga bolingo ya libota bazali lelo komona bolingo ya solosolo epai ya bandeko mibali mpe basi na paradiso ya elimo. (Yoane 13:35) Toyekoli komonisela basusu bolingo. Kasi likambo eleki ntina, toyebi Yehova mpe sikoyo tozali komona bolingo ya Tata na biso.Yakobo 4:8.

9 Na mokili ya sika, tokozwa ebele ya matomba na paradiso ya elimo. Tokosepela mpe na bomoi na paradiso awa na mabele na boyangeli ya Bokonzi ya  Nzambe. Na ntango wana, Yehova akokoba kobongisa biso mpe koteya biso na ndenge oyo tokoki kokanisa yango sikoyo te. (Yisaya 11:9) Yehova akosala mpe ete makanisi na biso mpe nzoto na biso ekóma ya kokoka. Yango ekosala ete ezala pɛtɛɛ mpo tókanga ntina ya malako na ye nyonso mpe tótosa yango. Yango wana, tiká tókoba kotika Yehova abongisa biso, mpe tómonisa ye ete tozwaka na motuya elembo wana oyo emonisi ete alingaka biso.Masese 3:11, 12.

NDENGE OYO YEHOVA ABONGISAKA BISO

10. Ndenge nini Yesu amonisaki motema molai mpe mayele ya Moyemi-mbɛki Monene?

10 Kaka ndenge moyemi-mbɛki ya mayele ayebaka malamu motindo ya mabele ya lima oyo azali kobongisa, Yehova, Moyemi-mbɛki na biso, ayebi biso malamu. Ayebi bolɛmbu na biso, esika makoki na biso esuki, mpe mbongwana oyo tosali, mpe abongisaka mokomoko na biso na kotalela makambo wana nyonso. (Tángá Nzembo 103:10-14.) Tokoki koyekola ndenge oyo Yehova atalelaka biso soki totaleli ndenge oyo Yesu azalaki kotalela kozanga kokoka ya bantoma na ye. Na bantango mosusu, bantoma bazalaki kowelana mpo na koyeba nani aleki basusu. Soki ozalaki wana, ndenge nini olingaki kotalela bantoma yango? Mbala mosusu olingaki komona ete bazali te lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ. Kasi, Yesu ayebaki ete bakokaki kobongisama soki bayoki toli oyo apesaki bango na boboto mpe na motema molai mpe soki bamekoli komikitisa na ye. (Marko 9:33-37; 10:37, 41-45; Luka 22:24-27) Nsima ya lisekwa ya Yesu, bantoma bazwaki elimo santu ya Nzambe mpe bazalaki lisusu te koluka koyeba nani aleki basusu. Bakómaki kotya makanisi nde na mosala oyo Yesu apesaki bango.Misala 5:42.

11. Ndenge nini mokonzi Davidi amonisaki ete azali lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

11 Lelo oyo, Yehova azali kosalela Biblia, elimo santu na ye, mpe lisangá mpo na kobongisa biso. Ndenge nini Biblia ekoki kobongisa biso? Tosengeli kotánga yango, komanyola makambo oyo tozali kotánga, mpe kosɛnga Yehova asalisa biso tósalela makambo oyo toyekoli. Mokonzi Davidi akomaki: “Ntango nakanisi yo na mbeto na ngai, namanyolaka likoló na yo na bileko ya kokɛngɛla na butu.” (Nzembo 63:6) Akomaki mpe ete: “Nakopambola Yehova, moto apesi ngai toli. Ya solo mpenza, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.” (Nzembo 16:7) Ya solo, mokonzi Davidi azalaki komanyola na toli ya Yehova mpe atikaki ete toli yango ebongisa makanisi ya motema na ye mpe mayoki na ye, ata soki ezalaki mpasi andima toli yango. (2 Samwele 12:1-13) Mokonzi Davidi atikelá biso ndakisa malamu ya komikitisa mpe ya botosi. Na yango, omituna boye: ‘Ntango natángaka Biblia, namanyolaka na yango mpe natikaka ete toli ya Nzambe ekɔta na makanisi ya motema na ngai mpe mayoki na ngai? Nakoki kosala bongo lisusu mingi koleka?’Nzembo 1:2, 3.

12, 13. Ndenge nini Yehova abongisaka biso na nzela ya elimo santu mpe lisangá ya bokristo?

12 Elimo santu ekoki kobongisa biso na ndenge mingi. Na ndakisa, ekoki kosalisa biso tóyekola komekola bomoto ya Yesu mpe tómonisa bizaleli ndenge na ndenge ya mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Bolingo ezali moko ya bizaleli yango. Tolingaka Nzambe, tolingi kotosa ye, mpe tolingi ete abongisa biso mpo toyebi ete mibeko na ye ezali mpo na bolamu na  biso. Lisusu, elimo santu ekoki kopesa biso makasi ya koboya ete mokili oyo mabe ebebisa biso. (Baefese 2:2) Ntango ntoma Paulo azalaki elenge, azalaki kolanda makanisi ya lolendo ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Kasi elimo santu esalisaki ye abongwana. Na nsima, akomaki: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Biso mpe tosengeli kosɛnga elimo santu, mpo toyebi ete Yehova akoyanola na mabondeli na biso oyo euti na motema.Nzembo 10:17.

Yehova asalelaka bankulutu ya lisangá mpo na kobongisa biso, kasi tosengeli kosalela toli na bango (Talá paragrafe 12, 13)

13 Yehova asalelaka mpe lisangá mpe bankulutu mpo na kobongisa mokomoko na biso. Na ndakisa, soki bankulutu bamoni ete tozali na bolɛmbu moko, basalaka nyonso mpo básalisa biso. Kasi, bapesaka te toli oyo euti na makanisi na bango moko. (Bagalatia 6:1) Babondelaka nde Yehova na komikitisa nyonso apesa bango bososoli mpe bwanya. Na nsima, basalaka bolukiluki na Biblia mpe na mikanda na biso mpo na kozwa makanisi oyo ekosalisa biso. Soki bankulutu bayei kotala yo mpe bapesi yo toli ya boboto mpe ya bolingo, na ndakisa mpo na molato na yo, kobosana te ete yango ezali komonisa ete Nzambe alingi yo. Soki osaleli toli yango, okozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ oyo Yehova azali na likoki ya kobongisa, mpe okozwela yango litomba.

14. Atako Yehova azali na bokonzi likoló ya mabele ya lima, ndenge nini amemyaka bonsomi na biso ya kopona?

14 Koyeba malamu ndenge oyo Yehova abongisaka biso ekoki kosalisa biso tózala na boyokani malamu na bandeko na biso. Lisusu, tokotalela bato ya teritware na biso mpe bayekoli na biso ya Biblia na ndenge ya malamu. Na ntango ya kala, liboso ya kobongisa mabele ya lima, moyemi-mbɛki asengelaki kopɛtola yango mpe kolongola mabanga mpe biloko mosusu. Yehova, Moyemi-mbɛki Monene, asalisaka bato oyo balingi ete abongisa bango. Atindaka bango na makasi te bábongwana; ateyaka bango nde mitinda na ye ya pɛto. Na nsima, bango moko basengeli kozwa ekateli soki bakobongwana to te.

15, 16. Ndenge nini bayekoli ya Biblia bamonisaka ete balingi Yehova abongisa bango? Pesá ndakisa.

 15 Tótalela likambo oyo ekómelaki Tessie, ndeko mwasi moko na Australie. Ezalaki mpasi te mpo na ye ayekola makambo oyo Biblia elobi. Kasi akolaki mpenza te na elimo, mpe azalaki kokende na makita te. Ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye abondelaki Yehova mpe azwaki ekateli ya kokata boyekoli yango. Na nsima, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Ntango bazalaki koyekola, Tessie ayebisaki ndeko oyo azalaki koyekola na ye ntina oyo azalaki te kokola na elimo. Alobaki ete azalaki komimona lokola mokosi, mpo azalaki kolinga kobɛta masano ya mbongo. Kasi sikoyo, azwaki ekateli ya kotika kobɛta masano ya mbongo.

16 Eumelaki te, Tessie abandaki kokende na makita mpe komonisa bizaleli ya bakristo, atako baninga na ye mosusu ya kala bazalaki kosɛka ye. Na nsima, Tessie azwaki batisimo mpe akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, atako azalaki na bana ya mike. Emonani polele ete ntango bayekoli ya Biblia babandi kobongwana mpo na kosepelisa Nzambe, apusanaka penepene na bango mpe abongisaka bango mpo bákóma bambɛki ya lokumu.

17. (a) Nini esepelisaka yo ndenge Yehova azali Moyemi-mbɛki na yo? (b) Makambo nini etali kobongisama tokotalela na lisolo oyo elandi?

17 Tii lelo, na likebi nyonso, bayemi-mbɛki mosusu babongisaka mabele ya lima na mabɔkɔ mpo na kokómisa yango bambɛki ya kitoko. Ndenge moko mpe, Yehova, na motema molai na ye, abongisaka biso ntango apesaka biso toli, mpe atalaka biso na likebi mpo na komona ndenge oyo tokosalela toli yango. (Tángá Nzembo 32:8.) Omonaka ete Yehova atyelaka yo likebi? Omonaka ndenge oyo Yehova azali kobongisa yo na likebi? Soki ezali bongo, bizaleli nini ekosalisa yo okoba kozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ oyo Yehova akoki kobongisa? Bizaleli nini osengeli koboya mpo okóma te lokola mabele ya lima ya makasi oyo bakoki kobongisa te? Mpe ndenge nini baboti bakoki kosala elongo na Yehova mpo na kobongisa bana na bango? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna wana.