Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2016

Otikaka ete Moyemi-mbɛki Monene abongisa yo?

Otikaka ete Moyemi-mbɛki Monene abongisa yo?

Talá! Lokola mabele ya lima na lobɔkɔ ya moyemi-mbɛki, bino mpe bozali bongo na lobɔkɔ na ngai.”YIRIMIA 18:6.

NZEMBO: 60, 22

1, 2. Mpo nini Nzambe amonaki ete Danyele azalaki “moto oyo alingami mingi,” mpe ndenge nini tokoki kozala na botosi lokola Danyele?

NTANGO Bayuda bamemamaki na Babilone, bakutaki ete engumba yango etondi na bikeko mpe na bato oyo bazalaki kosambela bilimo mabe. Atako bongo, Bayuda ya sembo, na ndakisa Danyele ná baninga na ye misato, batikaki te ete bato ya Babilone bábebisa bango. (Danyele 1:6, 8, 12; 3:16-18) Danyele ná baninga na ye bandimaki ete Yehova azala Moyemi-mbɛki na bango mpe bakobaki kosambela kaka ye. Atako pene na bomoi na ye mobimba Danyele afandaki esika moko na bato mabe, anzelu ya Nzambe alobaki ete azalaki “moto oyo alingami mingi.”Danyele 10:11, 19.

2 Na ntango ya kala, moyemi-mbɛki akokaki kofinafina mabele ya lima mpo na kokómisa yango eloko oyo alingi. Lelo oyo, basambeli ya solo bayebi ete Yehova azali Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe azali na bokonzi ya kobongisa bato ya bikólo. (Tángá Yirimia 18:6.) Nzambe azali mpe na bokonzi ya kobongisa mokomoko na biso. Kasi, Yehova atindaka moto na makasi te abongwana. Alingaka nde ete biso moko tótika ye abongisa biso. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo tokoki kozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ na mabɔkɔ ya Nzambe.  Tokolobela mituna oyo misato: (1) Ndenge nini tokoki koboya komonisa bizaleli oyo ekoki kosala ete tóboya toli ya Nzambe mpe tózala lokola mabele ya lima ya makasi? (2) Ndenge nini tokoki kokolisa bizaleli oyo esalisaka biso tókoba kotosa mpe tózala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ? (3) Ndenge nini baboti bakristo bakoki kosala elongo na Nzambe ntango bazali kobongisa bana na bango?

BOYÁ BIZALELI OYO EKOKI KOKÓMISA MOTEMA NA YO MAKASI

3. Bizaleli nini ekoki kokómisa mitema na biso makasi? Pesá ndakisa.

3 Masese 4:23 elobi ete: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.” Mpo mitema na biso ekóma makasi te, tosengeli koboya bizaleli ya mabe lokola lolendo, momeseno ya kosala masumu, mpe kozanga kondima. Soki tokebi te, bizaleli wana ekoki kosala ete tózanga botosi mpe tókóma batomboki. (Danyele 5:1, 20; Baebre 3:13, 18, 19) Yango nde ekómelaki Uzia, mokonzi ya Yuda. (Tángá 2 Ntango 26:3-5, 16-21.) Na ebandeli, Uzia azalaki na botosi mpe azalaki na boyokani malamu na Nzambe, yango wana Nzambe apesaki ye makasi. Kasi “ntango kaka akómaki makasi, motema na ye ekómaki na lolendo.” Akómaki na lolendo mingi, yango wana akendaki kotumba mpaka ya malasi na tempelo, mosala oyo kaka banganga-nzambe nde basengelaki kosala. Ntango banganga-nzambe bayebisaki ye ete asali mabe, Uzia asilikaki makasi! Yehova akitisaki mokonzi wana ya lolendo, mpe akómaki na maba tii liwa na ye.Masese 16:18.

4, 5. Nini ekoki kokóma soki toboyi lolendo te? Pesá ndakisa.

4 Soki toboyi lolendo te, tokoki kobanda kokanisa ete tozali malamu koleka basusu mpe koboya toli ya Biblia oyo bazali kopesa biso. (Masese 29:1; Baroma 12:3) Yango nde ekómelaki ndeko Jim, oyo azalaki nkulutu. Ye ná bankulutu mosusu ya lisangá na bango bayokanaki te na likambo moko. Alobi boye: “Nayebisaki bandeko ete bazali na bolingo te, mpe nabimaki na likita yango.” Nsima ya sanza soki motoba, akendaki na lisangá mosusu, kasi andimamaki te lokola nkulutu na lisangá wana. Ndeko Jim alɛmbaki mpenza nzoto. Lokola azalaki komona ete azali na libunga te, atikaki kosalela Yehova, mpe atikaki kosakola mbula zomi. Alobaka ete akómaki na lolendo mpe azalaki kosilikela Yehova mpo na likambo oyo esalemaki. Bambula mingi na nsima, bandeko bakendaki kotala ye mpe bamekaki kosalisa ye, kasi aboyaki lisalisi na bango.

5 Ndeko Jim alobi: “Nazalaki kokoka te kotika kokanisa ete bandeko basalaki mabe.” Ndakisa na ye emonisi ete lolendo ekoki kotinda biso tóluka kolongisa etamboli na biso ya mabe. Soki tosali bongo, tozali lisusu te lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ. (Yirimia 17:9) Esilá kokómela yo ete ndeko mobali to ndeko mwasi moko azokisa yo? Esilá kokómela yo osila esengo mpo obungisi mokumba moko? Osalaki nini? Okómaki na lolendo, to omonaki nde ete kozongisa kimya na ndeko mpe kokoba kozala sembo epai ya Yehova eleki ntina?Tángá Nzembo 119:165; Bakolose 3:13.

6. Nini ekoki kokóma soki tozali na momeseno ya kosala masumu?

6 Soki moto azali kokoba kosala masumu, ata mpe kobomba mabe oyo azali kosala, ekoki kozala mpasi moto yango andima toli ya Nzambe. Na nsima, ekozala mpasi te asala masumu mosusu. Ndeko mobali moko alobaki ete nsima ya mikolo, azalaki kotungisama lisusu te mpo na etamboli  na ye ya mabe. (Mosakoli 8:11) Na nsima, ndeko mobali mosusu oyo, na boumeli ya mwa ntango, akómaki na momeseno ya kotala pornografi, alobaki boye: “Nakómaki koloba mabe mpo na bankulutu.” Momeseno na ye wana ebebisaki boyokani na ye ná Yehova. Ntango basusu bayebaki makambo oyo azalaki kosala, kaka bankulutu nde basalisaki ye. Toyebi ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi, soki tokómi koloba mabe mpo na baoyo bapesi biso toli to soki tozali koluka komilongisa ntango tosali likambo moko ya mabe, na esika ya kosɛnga Nzambe alimbisa biso mpe asalisa biso, motema na biso ekoki kokóma makasi.

Bayisraele oyo bazangaki botosi bakufaki na esobe mpo bakómisaki mitema na bango makasi mpe bazangaki kondima

7, 8. (a) Ndenge nini Bayisraele bamonisaki ete bakómisaki mitema na bango makasi mpe bazangaki kondima? (b) Liteya nini tozwi na ndakisa na bango?

7 Ntango Yehova asikolaki Bayisraele na boombo na Ezipito, bamonaki ebele ya makamwisi oyo asalaki. Atako bongo, ntango bakómaki pene na Mokili ya Ndaka, mitema na bango ekómaki makasi. Mpo na nini? Mpo bazalaki na kondima te epai ya Nzambe. Na esika ya kotyela Yehova motema, bakómaki nde kobanga mpe koimaima mpo na Moize. Balingaki kutu kozonga na Ezipito, esika bazalaki baombo! Yehova ayokaki mpasi mingi na motema mpe alobaki ete: “Kino ntango nini bato oyo bakozanga limemya epai na ngai?” (Mitángo 14:1-4, 11; Nzembo 78:40, 41) Bayisraele yango bakufaki na esobe mpo bakómisaki mitema na bango makasi mpe bazangaki kondima.

8 Lelo oyo, tokómi mpenza pene na mokili ya sika, mpe kondima na biso ezali komekama. Yango wana, tosengeli koluka koyeba soki kondima na biso ezali makasi to te. Ndenge nini tokoki koyeba soki ezali makasi? Soki totaleli maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33. Omituna boye: ‘Mikano na ngai mpe bikateli na ngai emonisaka ete nandimaka mpenza maloba wana ya Yesu? Nazangisaka makita to mosala ya kosakola mpo na koluka kozala na mbongo mingi? Nakosala nini soki mosala na ngai ekómi kozwa ngai ntango mingi mpe kosilisa ngai makasi? Nakotika ete mokili oyo ebebisa ngai mpe etinda ngai natika kosalela Yehova?’

9. Mpo na nini tosengeli ‘kokoba komimeka’ mpo na komona soki tozali na kati ya kondima, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

9 Soki tozali te kolanda oyo Biblia elobi mpo na baninga mabe, bato oyo balongolamá na lisangá, kominanola, motema na biso ekoki kokóma makasi. Osengeli kosala nini soki likambo ya ndenge wana ebandi kokómela yo? Osengeli kotalela kondima na yo nokinoki! Biblia elobi: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Bakorinti 13:5) Koluka komilongisa te, mpe saleláká Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpo na kosembola makanisi na yo.

KOBÁ KOZALA LOKOLA MABELE YA LIMA YA PƐTƐPƐTƐ

10. Nini ekoki kosalisa biso tózala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ na mabɔkɔ ya Yehova?

10 Mpo na kosalisa biso tókoba kozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ, Nzambe  apesi biso Liloba na ye, lisangá ya bokristo, mpe mosala ya kosakola. Ntango totángaka Biblia mpe tomanyolaka yango mokolo na mokolo, esalisaka biso tókóma lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ na mabɔkɔ ya Yehova mpe totikaka ete abongisa biso. Yehova asɛngaki bakonzi ya Yisraele bákoma mpo na bango moko na buku mosusu Mibeko ya Nzambe mpe bátángaka yango mokolo na mokolo. (Kolimbola Mibeko 17:18, 19) Bantoma bayebaki ete kotánga Makomami mpe komanyola yango ezalaki na ntina mingi mpo na mosala na bango ya kosakola. Na mikanda na bango, bazongelaki Makomami ya Ebre mbala mingi, mpe ntango bazalaki kosakola, bazalaki kolendisa bato básalelaka mpe Makomami yango. (Misala 17:11) Ndenge moko mpe, biso mpe tomonaka ete kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola yango ezali na ntina mingi. (1 Timote 4:15) Yango esalisaka biso tókoba kozala na komikitisa; na ndenge yango, Yehova akokoba kobongisa biso.

Salelá bibongiseli oyo Nzambe azali kozwa mpo esalisa yo ozala lokola mabele ya lima ya pɛtɛpɛtɛ (Talá paragrafe 10-13)

11, 12. Ndenge nini Yehova akoki kosalela lisangá ya bokristo mpo na kobongisa biso na kotalela mposa ya mokomoko na biso? Pesá ndakisa.

11 Yehova ayebi mposa ya mokomoko na biso, mpe asalelaka lisangá ya bokristo mpo abongisa biso. Ndeko Jim, oyo tolobelaki liboso, abandaki kobongola makanisi na ye ntango nkulutu moko atyelaki ye likebi. Alobi boye: “Ata mokolo moko te nkulutu yango apamelaki ngai to alobelaki ngai mabe mpo na likambo yango. Azalaki nde na makanisi malamu mpe amonisaki ete azalaki mpenza na mposa ya kosalisa ngai.” Nsima ya sanza soki misato, nkulutu yango abengisaki ndeko Jim na makita.  Ndeko Jim alobi ete bandeko ya lisangá bayambaki ye na boboto mpe ete bolingo na bango esalisaki ye abongola makanisi na ye. Abandaki komona ete mayoki na ye ezalaki te likambo oyo eleki ntina. Bankulutu ya lisangá mpe mwasi na ye balendisaki ye, mpe mokemoke azongelaki kosalela Yehova. Azwaki mpe matomba ntango atángaki masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/1992, oyo elobaki “Tokoki kopamela Jéhovah te” mpe “Tósalela Jéhovah na bosembo nyonso.”

12 Nsukansuka, ndeko Jim akómaki lisusu nkulutu. Banda wana, asalisaka bandeko mosusu básilisa mikakatano ya ndenge wana mpe bákómisa kondima na bango makasi. Alobi ete azalaki kokanisa ete azalaki na boyokani malamu na Yehova, nzokande azalaki na yango te! Ayokaka mawa ndenge atikaki ete lolendo etinda ye atya makanisi nyonso kaka na mabunga ya basusu, na esika ya kotya makanisi na makambo oyo eleki ntina.1 Bakorinti 10:12.

Soki tomekoli Kristo, bato bakosepela na nsango na biso mpe bakoki kobongola ndenge na bango ya kotalela biso

13. Bizaleli nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa biso tólona, mpe matomba nini tokozwa?

13 Mosala ya kosakola ekoki mpe kobongisa biso mpe kosalisa biso tókóma bato malamu. Na ndenge nini? Ntango tosakolaka nsango malamu, tosengeli komonisa bizaleli lokola komikitisa mpe bizaleli ndenge na ndenge ya mbuma ya elimo ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23) Kanisá bizaleli malamu oyo mosala ya kosakola esalisá yo olona. Soki tomekoli Kristo, bato bakosepela na nsango na biso mpe bakoki kobongola ndenge na bango ya kotalela biso. Na ndakisa, batatoli mibale na Australie bamekaki kopesa mwasi moko litatoli na ndako na ye, kasi asilikaki makasi mpe amoniselaki bango limemya te. Kasi, batatoli yango bayokaki ye na limemya mpenza. Na nsima, mwasi yango ayokaki mpasi na motema ndenge asilikelaki bango, mpe akomelaki biro ya filiale mokanda. Asɛngaki bolimbisi mpo na ezaleli oyo amonisaki. Alobaki boye: “Namimonaki zoba ndenge nabimaki mpo na kobengana bato mibale oyo bazalaki kosakola Liloba ya Nzambe.” Likambo oyo eteyi biso ete ezali na ntina mingi komonisa boboto ntango tozali kosakola. Ya solo, mosala na biso ya kosakola esalisaka basusu; esalisaka mpe biso moko tóbongisa bomoto na biso.

BÓSALA ELONGO NA NZAMBE MPO NA KOBONGISA BANA NA BINO

14. Baboti basengeli kosala nini soki balingi ete bálonga na mosala ya kobongisa bana na bango?

14 Mbala mingi, bana mike bazalaka na komikitisa mpe bazalaka na mposa ya koyekola. (Matai 18:1-4) Yango wana, ezali likambo ya bwanya ete baboti básalisa bana na bango báyekola solo mpe bálinga yango ntango bazali naino bilenge. (2 Timote 3:14, 15) Mpo baboti bálonga, bango moko basengeli kolinga solo mpe kosalela makambo oyo Biblia elobi na bomoi na bango. Soki baboti basali bongo, ekozala mpasi te mpo bana bálinga solo. Lisusu, bana bakoyeba ete baboti na bango bapesaka bango disiplini mpo balingaka bango mpe Yehova alingaka bango.

15, 16. Ndenge nini baboti basengeli komonisa ete batyelaka Nzambe motema soki mwana na bango alongolami na lisangá?

 15 Ata soki baboti bateyi bana na bango solo, bana mosusu batikaka Yehova to balongolamaka na lisangá. Soki esalemi bongo, libota mobimba enyokwamaka mingi. Ndeko mwasi moko na Afrika ya Sudi alobaki: “Ntango ndeko na ngai ya mobali alongolamaki na lisangá, ezalaki lokola nde akufi. Nayokaki mpasi mingi na motema!” Kasi ndeko mwasi yango ná baboti na ye basalaki nini? Batosaki malako oyo ezali na Biblia. (Tángá 1 Bakorinti 5:11, 13.) Baboti bayebaki ete kotosa toli ya Nzambe ekomemela moto nyonso matomba. Mpe bayebaki ete kolongola moto na lisangá ezali disiplini ya bolingo oyo euti na Yehova. Na yango, bazalaki kosolola na mwana na bango kaka soki ezali mpenza na ntina mpo na mombongo ya libota.

16 Mwana yango azalaki komiyoka ndenge nini? Na nsima alobaki boye: “Nayebaki ete libota na ngai eyinaki ngai te; bazalaki nde kotosa Yehova mpe ebongiseli na ye.” Alobaki mpe ete: “Ntango omoni ete osengeli kaka kosɛnga Yehova asalisa yo mpe alimbisa yo, okomona ete ozali mpenza na mposa na ye.” Kanisá esengo oyo libota wana ezalaki na yango ntango elenge yango azongelaki Yehova! Ya solo, tokosepela mpe tokolonga soki tozali ntango nyonso kotosa Nzambe.Masese 3:5, 6; 28:26.

Soki tozali na komikitisa mpe tozali kotosa Yehova ntango nyonso, tokokóma na motuya mingi na miso na ye

17. Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo komikitisa liboso ya Yehova ekóma lolenge na biso ya bomoi, mpe matomba nini tokozwa soki tosali bongo?

17 Yisaya asakolaki ete Bayuda oyo bazalaki na Babilone basengelaki kobongola motema mpe koloba: “Ee Yehova, yo nde Tata na biso. Biso tozali mabele ya lima, mpe yo nde Moyemi na biso; mpe biso nyonso tozali mosala ya lobɔkɔ na yo.” Basengelaki mpe kosɛnga Yehova ete: “Kokanisa libunga na biso libela te. Talá, sikoyo, tobondeli yo: tozali biso nyonso bato na yo.” (Yisaya 64:8, 9) Soki tozali na komikitisa mpe tozali kotosa Yehova ntango nyonso, tokokóma na motuya mingi na miso na ye, ndenge Danyele azalaki. Yehova akokoba kobongisa biso na nzela ya Liloba na ye, elimo na ye, mpe ebongiseli na ye mpo ete na mikolo ezali koya tókóma “bana ya Nzambe” oyo bakozala bato ya kokoka.Baroma 8:21.