Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2016

Moto oyo azali na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ azali elilingi ya Yesu Kristo. Ye nde azali kotya elembo na baoyo bakobika

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na emonaneli ya Ezekiele, moto oyo azali na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ mpe mibali motoba oyo basimbi bibundeli mpo na kobukabuka bazali elilingi ya banani?

Bazali elilingi ya mampinga ya likoló oyo ebebisaki Yerusaleme mpe ekobebisa mokili mabe ya Satana na Armagedone. Oyo ezali ndimbola ya sika. Mpo na nini ndimbola yango ebongi?

Liboso ya mobu 607 L.T.B., Yehova alakisaki Ezekiele emonaneli ya makambo oyo ekosalema na Yerusaleme liboso ete ebebisama. Na emonaneli yango, Ezekiele amonaki makambo mingi ya mabe ezali kosalema kuna. Na nsima, amonaki mibali motoba, mokomoko na bango asimbi na “lobɔkɔ na ye ebundeli na ye mpo na kobukabuka.” Ezalaki mpe na mobali mosusu elongo na bango oyo ‘alataki elamba ya lini’ mpe azalaki na “etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ.” (Ezekiele 8:6-12; 9:2, 3) Bayebisaki mobali yango atambola na kati ya engumba mpo na “kotya elembo na bilongi ya bato oyo bazali kokimela mpe kolelalela mpo na makambo nyonso oyo eyinamá oyo ezali kosalema na kati na yango.” Na nsima, bayebisaki mibali motoba oyo basimbaki bibundeli báboma bato nyonso ya engumba oyo bazali na elembo te. (Ezekiele 9:4-7) Liteya nini tokoki kozwa na emonaneli yango, mpe moto oyo azali na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ azali elilingi ya nani?

Mosakoli Ezekiele azwaki emonaneli wana na mobu 612 L.T.B. Esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso mbula mitano na nsima, ntango Yehova atikaki nzela ete mampinga ya Babilone ebebisa Yerusaleme. Na ndenge yango, Yehova asalelaki bato ya Babilone mpo na kopesa etumbu na libota na ye oyo ezangaki botosi. (Yirimia 25:9, 15-18) Kasi tokoloba nini mpo na Bayuda ya sembo  oyo basepelaki te na makambo mabe nyonso oyo ezalaki kosalema na engumba yango? Yehova abikisaki bango.

Na emonaneli yango, Ezekiele atyaki moto moko te elembo ya solosolo to asanganaki te na kobebisa engumba. Baanzelu nde batambwisaki makambo mpo Yerusaleme ebebisama. Na yango, esakweli yango epesi biso libaku ya komona makambo oyo ezali kosalema na likoló. Yehova ayebisaki baanzelu na ye bátambwisa makambo mpo na kobebisa bato mabe mpe bándimisama ete bato ya sembo bakobika. *

Esakweli yango ekokokisama lisusu na mikolo ezali koya. Liboso, tozalaki koloba ete moto oyo azali na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ azali elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino na bomoi awa na mabele. Tozalaki mpe koloba ete bato batyamaka elembo mpo na lobiko ntango bayokaka mpe bandimaka nsango malamu oyo tosakolaka. Kasi na mikolo euti koleka, emonanaki polele ete tosengelaki kotalela lisusu ndimbola ya esakweli yango. Matai 25:31-33 emonisi ete Yesu moto akosambisa bato. Akosala yango na mikolo ezali koya na boumeli ya bolɔzi monene. Na ntango wana, baoyo akomona ete bazali bampate bakobika, mpe baoyo akomona ete bazali bantaba bakobomama.

Mateya nini tozwi na emonaneli ya Ezekiele? Tozwi mateya mitano:

  1.  Liboso ete Yerusaleme ebebisama, Ezekiele, Yirimia mpe Yisaya bakebisaki bato mpo na makambo oyo esengelaki kokómela engumba yango. Bazalaki lokola basinzili. Lelo oyo, Yehova azali kosalela mwa etuluku ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpo na koteya bato na ye mpe kokebisa basusu liboso ete bolɔzi monene ebanda. Kutu, basaleli nyonso ya Nzambe, elingi koloba, basali ya ndako ya Kristo, bazali kosangana na mosala wana ya kokebisa bato.Matai 24:45-47.

  2.  Ezekiele atyaki te bato oyo basengelaki kobika elembo. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe mpe basalaka bongo te. Basakwelaka kaka bato mpe bakebisaka bango mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Mosala wana ya kosakola na mokili mobimba ezali kosalema na lisalisi ya baanzelu.Emoniseli 14:6.

  3.  Baoyo babikaki na ntango ya Ezekiele bazalaki te na elembo ya solo na bilongi na bango. Lelo oyo baoyo bakobika bakozala te na elembo ya solo na bilongi na bango. Bato basengeli kosala nini mpo na kobika na bolɔzi monene? Soki bayoki likebisi, basengeli kolanda ndakisa ya Kristo, komipesa na Nzambe, mpe kosalisa bandeko ya Kristo na mosala ya kosakola nsango malamu. (Matai 25:35-40) Na boumeli ya bolɔzi monene, bato yango bakotyama elembo, elingi koloba, bakoponama mpo na kobika.

  4.  Moto oyo azali na etyelo ya mai ya mokanda azali elilingi ya Yesu. Na boumeli ya bolɔzi monene, Yesu akotya ebele mpenza ya bato elembo ntango akotalela bango lokola bampate nsima ya kosambisa bango. Na nsima, bakozala na libaku ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele.Matai 25:34, 46. *

  5.  Lelo oyo, mibali motoba oyo basimbi bibundeli na bango mpo na kobukabuka bazali elilingi ya mampinga ya likoló, oyo Yesu azali kokamba. Mosika te, ekobebisa bikólo mpe ekosilisa mabe nyonso.Ezekiele 10:2, 6, 7; Emoniseli 19:11-21.

Mateya oyo tozwi na emonaneli yango esalisi biso tóndima mpenza ete Yehova akoboma te bato ya sembo elongo na bato mabe. (2 Petro 2:9; 3:9) Mateya oyo tozwi ekundweli mpe biso ete mosala ya kosakola na ntango na biso ezali na ntina mingi. Moto nyonso asengeli koyoka likebisi liboso ete nsuka eya!Matai 24:14.

^ par. 6 Baoyo babikaki, na ndakisa Baruke (sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia), Ebede-meleke moto ya Etiopi, mpe Barekabe, bazalaki te na bilembo ya solosolo na bilongi na bango. (Yirimia 35:1-19; 39:15-18; 45:1-5) Elembo wana ya elilingi ezalaki kaka komonisa ete bakobika.

^ par. 12 Bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bakozala na mposa ya elembo wana te mpo na kobika. Bango bakozwa nde elembo ya nsuka, liboso ete bákufa to liboso ete bolɔzi monene ebanda.Emoniseli 7:1, 3.