Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2016

Kotika te ete mabunga ya basusu ebɛtisa yo libaku

Kotika te ete mabunga ya basusu ebɛtisa yo libaku

“Bókoba . . . kolimbisana na motema moko.”BAKOLOSE 3:13.

NZEMBO: 121, 75

1, 2. Ndenge nini Biblia esakolaki bokoli ya basaleli ya Yehova?

NA MABELE mobimba, ezali na ebongiseli moko oyo esalemi na bato oyo balingaka Yehova mpe balingi kosalela ye. Bato yango ezali Batatoli ya Yehova. Atako bazali mpe na bolɛmbu mpe basalaka mabunga, Yehova atambwisaka basaleli na ye na nzela ya elimo santu. Tótalela ndenge oyo apambolaki bango.

2 Na 1914, kaka bato moke nde bazalaki kosambela Yehova. Kasi Yehova apambolaki mosala ya kosakola. Yango wana, bamilio ya bato bayekolaki mateya ya solo ya Biblia mpe bakómaki Batatoli na ye. Yehova amonisaki bokoli yango ya kokamwa na maloba oyo: “Oyo ya moke akokóma nkóto moko (1 000), mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya. Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.” (Yisaya 60:22) Lelo oyo, tokoki komona polele ete esakweli yango ezali kokokisama. Basaleli ya Yehova bazali lokola ekólo moko monene. Kutu, ezali na bikólo mingi na mokili mobimba oyo ezali na bato moke koleka motángo mobimba ya basaleli ya Yehova.

3. Ndenge nini basaleli ya Nzambe bamonisaki bolingo?

 3 Na mikolo oyo ya nsuka, Yehova azali kosalisa basaleli na ye mpo bálingana lisusu makasi. “Nzambe azali bolingo,” mpe bamekolaka ye. (1 Yoane 4:8) Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ete ‘bálinganaka.’ Ayebisaki mpe bango boye: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) Na bambula eleki, basaleli ya Yehova bamonisaki ete bazali na bolingo yango ata ntango bikólo ezalaki kobunda. Na ndakisa, na etumba ya mibale ya mokili mobimba, bato soki milio 55 babomamaki. Kasi basaleli ya Yehova babomaki ata moto moko te na etumba yango. (Tángá Mika 4:1, 3.) Yango esalisaki bango bázala “pɛto na makila ya bato nyonso.”Misala 20:26.

4. Mpo na nini bokoli ya basaleli ya Yehova ezali kokamwisa?

4 Basaleli ya Nzambe bazali kokoba kokóma mingi, atako bazali na monguna moko ya nguya, Satana. Azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakorinti 4:4) Satana nde azali kotambwisa bibongiseli ya politiki ya mokili oyo, ezala mpe bansango na radio, na televizyo, na bazunalo, na Internet, mpe asalelaka yango mpo na koluka kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu. Kasi akoki kopekisa mosala yango te. Nzokande, Satana ayebi ete atikali kaka na ntango mokuse, yango wana azali kokoba koluka kopekisa biso tósambela Yehova.Emoniseli 12:12.

OKOZALA SEMBO NTANGO BASUSU BASALI MABUNGA?

5. Mpo na nini na bantango mosusu bandeko mosusu bakoki kozokisa biso? (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Basaleli ya Nzambe bayebi ete kolinga Nzambe mpe basusu ezali na ntina mingi. Yesu alobaki ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Yango ezali mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Matai 22:35-39) Kasi, Biblia emonisi ete bato nyonso babotamaka bato ya kozanga kokoka mpo na lisumu ya Adama. (Tángá Baroma 5:12, 19.) Yango wana, na bantango mosusu bandeko mosusu na lisangá bakoki koloba to kosala likambo moko oyo ekozokisa biso. Soki esalemi bongo, tokosala nini? Bolingo oyo tolingaka Yehova ekokoba kaka kozala makasi? Tokozala sembo epai na ye mpe epai ya basaleli na ye? Biblia eyebisi biso basaleli mosusu ya Nzambe oyo balobaki to basalaki makambo oyo ezokisaki basusu. Tótala mateya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki bango.

Soki ozalaki na Yisraele na ntango ya nganga-nzambe monene Eli mpe bana na ye, olingaki kosala nini? (Talá paragrafe 6)

6. Na ndimbola nini Eli azalaki kopesa bana na ye disiplini te?

6 Na ndakisa, Eli azalaki nganga-nzambe monene na Yisraele, kasi bana na ye ya mibali bazalaki te kotosa mibeko ya Yehova. Biblia elobi: “Bana mibali ya Eli bazalaki bato mpamba; bazalaki koyeba kotya Yehova na esika na ye te.” (1 Samwele 2:12) Eli ayebaki ete bana na ye bazalaki kosala makambo ya mabe mingi. Atako bongo, azalaki mpenza kopesa bango disiplini te. Nsukansuka, Yehova apesaki Eli ná bana na ye mibale etumbu. Na nsima, andimaki lisusu te ete bakitani ya Eli bázala banganga-nzambe minene. (1 Samwele 3:10-14) Soki ozalaki na mikolo ya Eli mpe oyebaki ete atikaki bana na ye básala makambo ya mabe, olingaki kobɛta libaku? Likambo yango elingaki  kolɛmbisa kondima na yo epai ya Yehova, mpe kotinda yo otika kosalela ye?

7. Masumu nini ya minene Davidi asalaki, mpe Nzambe asalaki nini mpo na yango?

7 Mokonzi Davidi azalaki na bizaleli malamu, yango wana Yehova alingaki ye mingi. (1 Samwele 13:13, 14; Misala 13:22) Kasi, Davidi asalaki likambo moko ya mabe mpenza. Ntango Uria azalaki mosika, na etumba, Davidi asangisaki nzoto na mwasi na ye, Bate-sheba, mpe azwaki zemi. Davidi alingaki te ete moto moko ayeba likambo oyo asalaki. Yango wana, apesaki mitindo ete Uria aya komona ye, na nsima alukaki kondimisa ye akende kolala na ndako na ye. Davidi akanisaki ete Uria akosangisa nzoto na Bete-sheba mpo bato bákanisa ete Uria nde azali tata ya mwana oyo akobotama. Kasi Uria andimaki kozonga na ndako te. Yango wana, Davidi asalaki nyonso mpo Uria abomama na etumba. Mpo na masumu minene oyo asalaki, Davidi ná libota na ye banyokwamaki mingi. (2 Samwele 12:9-12) Atako bongo, Yehova ayokelaki ye mawa mpe alimbisaki ye. Ayebaki ete Davidi azalaki na mposa ya kosala makambo ya malamu. (1 Bakonzi 9:4) Soki ozalaki na ntango wana, ndenge nini olingaki kotalela makambo oyo Davidi asalaki? Olingaki kotika kosalela Yehova?

8. (a) Ndenge nini ntoma Petro akokisaki maloba na ye te? (b) Mpo na nini Yehova akobaki kosalela Petro, atako asalaki libunga?

8 Ndakisa mosusu oyo euti na Biblia ezali ya ntoma Petro. Yesu aponaki ye mpo azala ntoma na ye. Atako bongo, mbala na mbala Petro alobaki to asalaki makambo oyo ezalaki malamu te. Na ndakisa, ntoma Petro alobaki ete ye akokaki  soki moke te kosundola Yesu ata soki bato mosusu nyonso basali yango. (Marko 14:27-31, 50) Kasi, ntango bakangaki Yesu, bantoma nyonso, ezala mpe Petro, basundolaki ye. Na nsima, mbala misato mobimba, Petro alobaki ete ayebi Yesu te. (Marko 14:53, 54, 66-72) Nzokande, Petro ayokaki mpasi mingi na motema mpo na likambo oyo asalaki. Yango wana, Yehova alimbisaki ye mpe akobaki kosalela ye. Soki ozalaki moyekoli na ntango wana mpe oyebaki likambo oyo Petro asalaki, olingaki kokoba kotyela Yehova motema?

Tokoki kondimisama ete Yehova akosala ntango nyonso makambo oyo ezali sembo mpe oyo ebongi

9. Mpo na nini ondimaka ete Nzambe azalaka ntango nyonso sembo?

9 Bandakisa wana esalisi biso tómona ete basaleli mosusu ya Yehova basalaki makambo ya mabe mpe bazokisaki basusu. Soki esalemi bongo lelo oyo, okosala nini? Okotika koyangana na makita to ata koboya mpenza Yehova mpe basaleli na ye? To okomona ete Yehova azali na motema mawa mpe akoki kotikela moto ntango ya kobongola motema? Kasi ekoki kozala ete na bantango mosusu moto asali masumu minene kasi azali koyoka mawa te to komitungisa te mpo na makambo oyo asali. Okozala na elikya ete Yehova ayebi likambo yango mpe akosembola makambo na ntango oyo ebongi? Akoki ata kolongola moto yango na lisangá soki esengeli. Ondimaka ete Yehova akosala ntango nyonso makambo oyo ezali sembo mpe oyo ebongi?

KOBÁ KOZALA SEMBO

10. Ndenge nini Yesu atalelaki lisumu ya Yudasi Mokeriota mpe oyo ya Petro?

10 Na Biblia, totángaka masolo ya bato mingi oyo batikalaki sembo epai ya Yehova mpe epai ya basaleli na ye, atako basusu zingazinga na bango bazalaki kosala mabunga minene. Yesu azali ndakisa oyo eleki malamu. Nsima ya kolekisa butu mobimba mpo na kosɛnga lisalisi ya Tata na ye, aponaki bantoma 12. Kasi na nsima, moko na bango, Yudasi Mokeriota, atɛkaki ye. Lisusu, ntoma Petro alobaki ete ayebi Yesu te. (Luka 6:12-16; 22:2-6, 31, 32) Yesu apesaki Yehova foti te, apesaki mpe bayekoli na ye foti te ntango basusu kati na bango bayokisaki ye mpasi na motema. Kutu, Yesu akómaki nde na boyokani ya makasi ná Tata na ye mpe akobaki kosalela ye na bosembo. Yango wana, Yehova apesaki ye mbano na ndenge asekwisaki ye mpe na nsima akómisaki ye Mokonzi ya Bokonzi ya likoló.Matai 28:7, 18-20.

11. Biblia esakolaki nini mpo na basaleli ya Yehova na ntango na biso?

11 Ndakisa ya Yesu eteyi biso ete tosengeli kozala sembo epai ya Yehova mpe epai ya basaleli na ye. Mpe tozali na bantina ya kosala bongo. Tokoki komona ete Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na ntango oyo ya nsuka. Azali kosalisa bango básakola solo na mokili mobimba, mpe ezali kaka bango nde bazali kosala mosala yango. Bazali mpenza na bomoko mpe na esengo mpo na makambo nyonso oyo Yehova azali koteya bango. Yehova  amonisaki yango ntango alobaki ete: “Talá! Basaleli na ngai bakoganga na esengo na ndenge bakoyoka malamu na motema.”Yisaya 65:14.

Ekozala likambo ya bwanya te mpe ya bosembo te kotika Yehova mpe basaleli na ye kaka mpo moto moko asali libunga

12. Ndenge nini tosengeli kotalela mabunga ya basusu?

12 Tozali mpenza na esengo mpo Yehova azali kotambwisa biso mpe kosalisa biso tósala makambo mingi ya malamu. Tokeseni mpenza na bato oyo bazali na mokili ya Satana, oyo bazali na esengo te mpe bazali na elikya ya solosolo te mpo na mikolo ezali koya. Ekozala likambo ya bwanya te mpe ya bosembo te kotika Yehova mpe basaleli na ye kaka mpo moto moko na lisangá asali to alobi likambo moko oyo ebongi te! Tosengeli nde kokoba kozala sembo epai ya Yehova mpe kolanda litambwisi na ye. Tosengeli mpe kobongisa ndenge oyo totalelaka mabunga ya basusu mpe tosalaka ntango basusu basali mabunga.

OSENGELI KOSALA NINI?

13, 14. (a) Mpo na nini tosengeli komoniselana motema molai? (b) Elaka nini tosengeli kobosana te?

13 Osengeli kosala nini soki ndeko moko alobi to asali likambo moko oyo ezokisi yo? Biblia epesi toli oyo: “Elimo na yo esilika nokinoki te, mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.” (Mosakoli 7:9) Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Na yango, tokoki te kozela ete bandeko na biso báloba to básala ntango nyonso makambo ya malamu. Mpe ekozala malamu te tókoba kokanisa mabunga ya basusu. Soki tosali bongo, tokozala lisusu na esengo te ntango tozali kosalela Yehova. Likambo ya mabe koleka, kondima na biso epai na ye ekoki kolɛmba, mpe tokoki kotika ebongiseli ya Yehova. Na nsima, tokoki te kosalela Yehova to kozala na elikya ya kofanda na mokili na ye ya sika.

14 Na yango, nini ekoki kosalisa yo okoba kosalela Yehova na esengo ntango basusu basali likambo moko oyo ebulunganisi yo? Kanisáká ntango nyonso elaka oyo ya kobɔndisa: “Talá nazali kozalisa likoló ya sika mpe mabele ya sika; mpe makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” (Yisaya 65:17; 2 Petro 3:13) Yehova akopesa yo mapamboli wana soki otikali sembo epai na ye.

15. Likambo nini Yesu alobaki ete tosengeli kosala ntango basusu basali mabunga?

15 Ya solo, tokɔti naino na mokili ya sika te. Yango wana, soki moto moko azokisi biso, tosengeli komanyola na makambo oyo Yehova alingi ete tósala. Na ndakisa, Yesu alobaki ete: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino; kasi soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.” Lisusu, ntango Petro atunaki Yesu soki tosengeli kolimbisa “tii mbala nsambo,” Yesu ayanolaki ete: “Nalobi na yo te: Tii mbala nsambo, kasi: Tii mbala ntuku nsambo na nsambo (77).” Yesu  ateyaki biso ete tosengeli ntango nyonso kondima kolimbisa basusu.Matai 6:14, 15; 18:21, 22.

16. Ndakisa nini ya malamu Yozefe atikelá biso?

16 Ndakisa ya Yozefe eteyi biso ndenge ya kosala ntango basusu bayokisi biso motema mpasi. Kaka Yozefe ná leki na ye nde bazalaki bana oyo Yakobo abotaki na Rashele. Yakobo azalaki na bana mibali mosusu zomi, kasi azalaki kolinga Yozefe mingi koleka bango nyonso. Yango esalaki ete báyina Yozefe makasi. Kutu, bayinaki ye makasi yango wana batɛkaki ye lokola moombo, mpe amemamaki na Ezipito. Nsima ya bambula mingi, mokonzi ya Ezipito akómisaki Yozefe moto ya mibale oyo aleki na nguya na ekólo yango mpo asepelaki na mosala ya malamu oyo Yozefe asalaki. Na nsima, bandeko ya Yozefe bayaki na Ezipito mpo na kosomba bilei ntango nzala ekɔtaki na mboka na bango. Ntango bamonaki Yozefe, bayebaki ye te, kasi ye ayebaki bango. Atako bango basalaki ye mabe, apesaki bango etumbu te. Amekaki nde bango mpo na koyeba soki babongwani mpenza. Ntango Yozefe amonaki ete babongwani, ayebisaki bango ete azali ndeko na bango. Na nsima, abɔndisaki bango mpe alobaki na bango: “Bóbanga te. Ngai moko nakokoba kopesa bino mpe bana na bino ya mike bilei.”Ebandeli 50:21.

17. Okolinga kosala nini ntango basusu basali mabunga?

17 Kobosana likambo oyo te: Lokola moto nyonso asalaka mabunga, yo mpe ozokisaka basusu. Yango wana, soki omoni ete oyokisi moto moko mpasi na motema, landá toli ya Biblia. Sɛngá ye alimbisa yo, mpe luká kotya kimya ná moto yango. (Tángá Matai 5:23, 24.) Tosepelaka ntango basusu balimbisi biso. Yango wana, biso mpe tosengeli kolimbisa basusu. Bakolose 3:13 elobi ete: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” Soki tolingaka mpenza bandeko na biso, tokokangela bango nkanda te mpo na likambo moko oyo basalá biso kala. (1 Bakorinti 13:5) Lisusu, soki tolimbisaka basusu, Yehova mpe akolimbisa biso. Na yango, ntango basusu basali mabunga, tómonisela bango motema mawa, kaka ndenge Tata na biso, Yehova, amoniselaka biso motema mawa.Tángá Nzembo 103:12-14.