Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2017

Tósalisa ‘bato oyo bafandi bapaya básalela Yehova na esengo’

Tósalisa ‘bato oyo bafandi bapaya básalela Yehova na esengo’

“Yehova abatelaka bato oyo bafandi bapaya.”​—NZEMBO 146:9.

NZEMBO: 84, 73

1, 2. (a) Mikakatano nini bandeko mibali mpe basi mosusu bazali kokutana na yango? (b) Yango ebimisi mituna nini?

NDEKO mobali moko nkombo na ye Lije alobi boye: “Ntango bitumba ya bana-mboka ebandaki na Burundi, biso nyonso libota mobimba tozalaki na liyangani. Tomonaki bato bazali kokima mpe masasi ezalaki kobɛtama. Mpo na komibatela, ngai ná baboti na ngai mpe bandeko na ngai 11 tokimaki, kaka na bilamba oyo tozalaki na yango na nzoto. Nsukansuka, bato mosusu ya libota na biso bakendaki kofanda na kaa ya bato oyo bakimá mboka na Malawi, nsima ya kosala mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 1 600. Biso oyo totikalaki tokimaki na bamboka mosusu.”

2 Na mokili mobimba, bato koleka milio 65 bakimá mboka na bango mpo na bitumba to mpo na minyoko. Ezali mbala ya liboso ete motángo ya bato oyo bakimá mboka ekóma mingi ndenge wana. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bankóto ya bato yango oyo bakimá mboka bazali Batatoli ya Yehova. Mingi na bango babungisá bato oyo bazalaki kolinga mingi mpe biloko na bango nyonso. Mikakatano nini mosusu bakutanaki na yango? Ndenge nini tokoki kosalisa  bandeko mibali mpe basi básalela Yehova mpe bábatela esengo na bango ntango bakutani na mikakatano ya ndenge wana? (Nzembo 100:2) Mpe wapi lolenge eleki malamu ya kosakwela bato oyo bakimá mboka, oyo bayebi naino Yehova te?

BOMOI YA BATO OYO BAKIMÁ MBOKA

3. Ndenge nini Yesu mpe bayekoli na ye mingi bakómaki bato oyo bakimá mboka?

3 Yesu ná baboti na ye bakimaki mboka na bango mpe bakendaki na Ezipito mpo anzelu ya Yehova akebisaki Yozefe ete mokonzi Erode alingi koboma Yesu. Bafandaki na Ezipito tii ntango Erode akufaki. (Matai 2:13, 14, 19-21) Bambula mingi na nsima, bayekoli ya Yesu “bapanzanaki na bitúká ya Yudea mpe ya Samaria” mpo na minyoko. (Misala 8:1) Yesu ayebaki ete minyoko ekotinda bayekoli na ye mingi bákima mboka na bango. Alobaki: “Ntango bakonyokola bino na engumba moko, bókima na engumba mosusu.” (Matai 10:23) Kokima mboka, ezala mpo na ntina nini, ezalaka pɛtɛɛ te.

4, 5. Makama nini bato oyo bakimá mboka bakutanaka na yango (a) ntango bazali kokima? (b) ntango bazali kofanda na kaa ya bato oyo bakimá mboka?

4 Ntango bato bakimi mboka na bango to bazali kofanda na kaa ya bato oyo bakimá mboka, bakutanaka na makama ndenge na ndenge. Ndeko Gad, leki ya ndeko Lije, alobi: “Totambolaki na makolo bapɔsɔ mingi, mpe nzelanzela tomonaki bankama ya bibembe. Nazalaki na mbula 12. Makolo na ngai evimbaki makasi, yango wana nayebisaki bato ya libota na ngai ete bákoba mobembo, ngai natikala. Lokola tata alingaki te kosundola ngai epai ya basoda batɔmbɔki, amemaki ngai na mokɔngɔ. Mpo na kobika, mokolo na mokolo, tozalaki ntango mosusu kolya kaka manga oyo tozalaki kobuka nzelanzela; kasi tozalaki kobondela Yehova mpe kotyela ye motema.”​—Bafilipi 4:12, 13.

5 Bato mingi ya libota ya Lije balekisaki bambula ebele na bakaa oyo ONU etyá mpo na bato oyo bakimá mboka. Kasi ata kuna, makama mpe ezalaki. Ndeko Lije, oyo azali sikoyo mokɛngɛli ya zongazonga, alobi: “Bato mingi bazalaki na mosala te. Bazalaki komipesa na bilobaloba, komɛla masanga, kobɛta masano ya mbongo, koyiba, kosala pite mpe ekobo.” Mpo bámibatela mpe bálanda makambo wana ya mabe te, Batatoli ya Yehova basengelaki kokoba kozala na makambo mingi ya kosala na lisangá. (Baebre 6:11, 12; 10:24, 25) Bazalaki kosalela ntango na bango na bwanya mpo bákoba kozala makasi na elimo, mpe mingi na bango bakómaki babongisi-nzela. Bazalaki kobosana te ete bakotikala libela te na kaa ya bato oyo bakimá mboka, kaka ndenge Bayisraele batikalaki libela te na esobe. Yango esalisaki bango bákoba kozala na makanisi ya malamu.​—2 Bakorinti 4:18.

MONISÁ ETE OLINGAKA BATO OYO BAKIMÁ MBOKA

6, 7. (a) “Bolingo ya Nzambe” etindaka biso tósalela bandeko makambo ndenge nini? (b) Pesá ndakisa.

6 “Bolingo ya Nzambe” etindaka biso tómonisa ete tolingaka bandeko na biso, mingimingi ntango bazali na mikakatano. (Tángá 1 Yoane 3:17, 18.) Na ndakisa, ntango bakristo ya siɛklɛ ya liboso na Yudea basengelaki na bilei mpo na nzala oyo ezalaki na mboka, lisangá ezwaki bibongiseli mpo na kosalisa bango. (Misala 11:28, 29) Ntoma Paulo ná ntoma Petro balendisaki mpe bakristo bázala na ezaleli ya koyamba bapaya. (Baroma 12:13; 1 Petro 4:9) Lokola biso bakristo tolendisamaka ete tómoniselaka bandeko oyo bauti na bisika mosusu boboto, tosengeli mpe komonisela bandeko oyo bazali na likama to oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango boboto! * (Maloba na nse ya lokasa.)​—Tángá Masese 3:27.

7 Na mikolo euti koleka, bankóto ya Batatoli ya Yehova batikaki bandako na bango mpo na bitumba mpe minyoko oyo ezalaki na ɛsti ya Ukraine. Likambo ya mawa, basusu kati na bango babomamaki. Kasi na bisika mosusu na Ukraine mpe na Russie, bandeko bayambaki na bandako na bango bandeko mibali mpe basi mingi oyo bazalaki kokima. Na bikólo wana mibale, bandeko baboyaki kokɔta na makambo ya mokili, bamonisaki ete bazali “bato ya mokili te,” mpe bakobaki kosakola “nsango malamu ya liloba” na molende.​—Yoane 15:19; Misala 8:4.

 SALISÁ BATO OYO BAKIMÁ MBOKA BÁKÓMISA KONDIMA NA BANGO MAKASI

8, 9. (a) Mikakatano nini bato oyo bakimá mboka bakoki kokutana na yango na ekólo oyo bakómi? (b) Mpo na nini tosengeli komonisa motema molai ntango tozali kosalisa bango?

8 Bato mosusu oyo bakimá mboka bakendaka kofanda na esika mosusu, kaka na ekólo na bango. Kasi, mingi na bango bakendaka kofanda na ekólo mosusu, oyo bameseni na yango te. Toboyi te, baguvɛrnema ekoki kopesa bato oyo bakimá mboka bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda; atako bongo mikakatano ezangaka te. Na ndakisa, bilei ekoki kozala oyo ekeseni mpenza na oyo bamesaná na yango. Ekoki kozala ete bato mosusu oyo bakimá mboka, oyo bautaki na bikólo ya molunge, bayebi mpenza te kolata bilamba ya eleko ya malili. Ekoki kozala ete basusu basengeli koyekola kosalela, mpo na mbala ya liboso, bamasini to baaparɛyi ya mikolo oyo.

9 Baguvɛrnema mosusu ezalaka na bibongiseli ya kosalisa bato oyo bakimá mboka mpo bámesana na bomoi na ekólo ya sika. Kasi mbala mingi, esɛngaka ete nsima ya mwa basanza, bato oyo bakimá mboka báluka bango moko ndenge ya kobikela. Yango ekoki kozala mpasi mingi. Kanisá makambo oyo basengeli koyekola na mbala moko: monɔkɔ ya sika, mimeseno ya sika, mibeko ya sika mpo na makambo lokola kofuta bafaktire mpe mpako, kokɔta kelasi, ata mpe kopesa bana disiplini! Zalá na motema molai mpe na limemya ntango ozali kosalisa bandeko mibali mpe basi oyo bazali na mikakatano ya ndenge wana.​—Bafilipi 2:3, 4.

10. Ndenge nini tokoki kokómisa makasi kondima ya bandeko oyo bakimá mboka ntango bakómi na mboka na biso? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Ntango mosusu bakonzi ya Leta basalaka nyonso mpo bandeko oyo bakimá mboka bákutana te na bandeko ya lisangá na ekólo oyo bakómi. Bibongiseli mosusu ya guvɛrnema elukaka koboya kosalisa bandeko na biso. Bakoki koboya kopesa bango ndingisa ya kofanda na ekólo soki baboyi kondima mosala oyo ekopekisa bango báyanganaka na makita. Lokola babangaka mpe bamonaka lokola ete bazangi lisalisi, basusu bandimaki misala yango. Yango wana, tosengeli nokinoki koluka kokutana na bandeko na biso oyo bakimá mboka, soki kaka bakómi na mboka oyo tozali. Basengeli komona ete tozali kotyela bango likebi. Kotyela bango likebi ndenge wana mpe kosalisa bango ekoki kokómisa kondima na bango makasi.​—Masese 12:25; 17:17.

SALISÁ BATO OYO BAKIMÁ MBOKA NA NDENGE OYO EBONGI

11. (a) Biloko nini bato oyo bakimá mboka basengeli na yango liboso? (b) Ndenge nini bato oyo bakimá mboka bakoki komonisa botɔndi?

11 Liboso, ekoki kosɛnga ete tópesa bandeko na biso bilei, bilamba, to biloko mosusu ya ntina. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ata mwa likabo ya moke, na ndakisa kopesa ndeko mobali kravati, ekoki koloba mingi. Ya solo, bato oyo bakimá mboka basengeli te kozela ete básalisaka bango kaka; basengeli nde komonisa botɔndi mpo na oyo basusu bazali kosalela bango. Yango ekosala ete bandeko oyo bazali kokabela bango bázala na esengo. Kutu, nsukansuka, esɛngaka kaka ete bato oyo bakimá mboka báluka bango moko kokokisa bamposa na bango. Kosala bongo ekosala ete bámipesa nzoto kilo mpe bázala na boyokani malamu na bandeko. (2 Batesaloniki 3:7-10) Atako bongo, tosengeli kosalisa bato oyo bakimá mboka na ndenge oyo ebongi.

Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bandeko mibali mpe basi oyo bakimá mboka? (Talá paragrafe 11-13)

12, 13. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo bakimá mboka na ndenge oyo ebongi? (b) Pesá ndakisa.

12 Esɛngi kaka te kozala na mbongo mingi mpo na kosalisa bato oyo bakimá mboka. Oyo basengeli na yango mingi ezali nde ntango mpe bolingo. Na ndakisa, okoki kolakisa bango bisika ya kozela bisi to engbunduka mpe ndenge ya kofuta mbongo to bisika ya kosomba bilei oyo etongaka nzoto na ntalo moke. Okoki mpe kolakisa bango ndenge ya kozwa biloko lokola masini ya kotonga bilamba to masini ya kokata matiti, mpo básalela yango mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela. Oyo eleki ntina, okoki kosalisa bango bámesana na lisangá na bango ya sika. Soki likoki ezali, okoki komema bango na  motuka to kofutela bango tike mpo bákende na makita. Okoki mpe kolimbolela bango lolenge oyo eleki malamu ya kosakwela bato ya teritware na bino, mpe okoki kobima na bango na mosala ya kosakola.

13 Ntango bilenge minei oyo bakimá mboka bakómaki na lisangá moko, bankulutu mingi basalisaki bango na ndenge oyo ebongi. Balakisaki bango kotambwisa motuka, kokoma mikanda na masini, mpe ndenge ya koluka mosala. Balakisaki mpe bango ndenge ya kokabola ntango na bango malamu mpo na kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso. (Bagalatia 6:10) Eumelaki te, bango nyonso minei bakómaki babongisi-nzela. Lokola bankulutu wana basalisaki bango mpe bango moko basalaki milende mpo na komityela mikano na mosala ya Yehova, bakendaki liboso na elimo mpe baboyaki komikɔtisa na mokili ya Satana.

14. (a) Motambo nini bato oyo bakimá mboka basengeli kokima? (b) Pesá ndakisa.

14 Lokola bakristo mosusu nyonso, bato oyo bakimá mboka basengeli mpe kokima motambo ya kotika biloko ya mokili ezwa esika ya boyokani na bango na Yehova. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ndeko Lije oyo tolobelaki liboso, ná bandeko na ye, babosanaka te mateya ya ntina mingi oyo etali kondima, oyo tata na bango azalaki koteya bango nzelanzela ntango bazalaki kokima. Balobi boye: “Na biloko oyo tozalaki komema, tata azalaki kobwaka oyo ezalaki na ntina mingi te, moko nsima ya mosusu. Nsukansuka, ntango sakosi etikalaki mpamba, atombolaki yango mpe alobaki boye na mwa kosɛka: ‘Bómoni? Kaka oyo nde bosengeli na yango!’”​—Tángá 1 Timote 6:8.

KOKISÁ MPOSA OYO ELEKI MONENE YA BATO OYO BAKIMÁ MBOKA

15, 16. (a) Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso bákóma na kondima makasi? (b) Ndenge nini tokoki kobɔndisa bango?

15 Bato oyo bakimá mboka basengeli kaka na bilei ná bilamba te. Bazali mpenza na mposa makasi ya libɔndisi mpe bilendiseli oyo euti na Biblia. (Matai 4:4) Bankulutu bakoki kosalisa bato oyo bakimá mboka soki balukeli bango mikanda na monɔkɔ na bango mpe basalisi bango bákutana na bandeko oyo balobaka monɔkɔ ya mboka na bango. Yango ezali na ntina mingi mpo bato mingi oyo bakimá mboka batiká biloko nyonso oyo bamesanaki na yango liboso. Batiká mosika mabota na bango, bato ya mboka na bango, mpe masangá na bango. Bazali na mposa ya komona bolingo mpe motema mawa ya Yehova epai ya bandeko na bango bakristo. Soki bamoni yango te, bakoki kokende koluka lisalisi epai ya bato mosusu ya ekólo oyo bautá, oyo bazali Batatoli ya Yehova te. (1 Bakorinti 15:33) Soki tosalisi bango bámesana na lisangá, tozali kosala elongo  na Yehova mpo na kobatela “bato oyo bafandi bapaya.”​—Nzembo 146:9.

16 Yesu ná bato ya libota na ye bakokaki te kozonga na mboka na bango ntango bato oyo bazalaki konyokola bango bazalaki naino koyangela. Mpo na bantina ya ndenge wana, ekoki kozala ete lelo oyo, bato mosusu oyo bakimá mboka bazali te na likoki ya kozonga na mboka na bango. Nzokande, basusu bakoki te kosepela kozonga na mboka na bango. Ndeko Lije alobi ete baboti mingi oyo bamonaki ndenge oyo bato ya mobulu basangisaki nzoto na makasi na bato ya libota na bango mpe babomaki bango, balingaka te kozonga na bana na bango na ekólo oyo bautaki. Mpo na kosalisa bandeko na biso, tosengeli komonisa ete tozali ‘komitya na esika na bango, tozali na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mpenza, bato ya komikitisa.’ (1 Petro 3:8) Minyoko etindaki bato mosusu oyo bakimá mboka báboya kolekisa ntango mingi elongo na basusu, mpe bakoki koyoka nsɔni kolobela mpasi oyo bamoná, mingimingi soki bana na bango bazali wana. Omituna boye: ‘Soki ngai nde namoná mpasi ya ndenge wana, nakolinga básalela ngai makambo ndenge nini?’​—Matai 7:12.

NTANGO TOZALI KOSAKWELA BATO OYO BAKIMÁ MBOKA

17. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola ezali kokitisa mitema ya bato oyo bakimá mboka?

17 Lelo oyo, bato mingi oyo bakimá mboka bautá na bikólo oyo mosala na biso ya kosakola epekisami. Na lisalisi ya Batatoli ya molende, bankóto ya bato oyo bakimá mboka bazwi libaku ya koyoka “liloba ya bokonzi” mpo na mbala ya liboso. (Matai 13:19, 23) Mingi na bango, oyo bazali “kokumba mikumba,” bazali kobɔndisama mpe kokitisama mitema na makita na biso mpe nokinoki bazali koloba ete: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.”​—Matai 11:28-30; 1 Bakorinti 14:25.

18, 19. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na bwanya ntango tozali kosakwela bato oyo bakimá mboka?

18 Ntango tozali kosakwela bato oyo bakimá mboka, tosengeli kozala “ekɛngɛ” mpe na bwanya. (Matai 10:16; Masese 22:3) Zalá na motema molai ntango ozali kosolola na bato oyo bakimá mboka, kasi kosolola na bango masolo ya politiki te. Tosengeli kolanda malako oyo tozwaka na biro ya filiale mpe epai ya bakonzi ya mboka mpo biso moko tómitya na likama te, tótya mpe basusu na likama te. Lokola bato oyo bakimá mboka bautá na mangomba mpe mimeseno ndenge na ndenge, tosengeli koluka koyeba mayoki mpe makanisi na bango, mpe komemya yango. Na ndakisa, bato oyo bautá na mikili mosusu bazwaka na lisɛki te likambo etali molato ya basi. Na yango, ntango tozali kosakola epai na bango, ekozala malamu ete tólata na ndenge oyo ekozokisa bango te.

19 Tolingi kosalisa bato oyo bazali konyokwama, ata baoyo basalelaka Yehova te. Ntango tozali kosala bongo, tozali kolanda ndakisa malamu ya Mosamaria oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye. (Luka 10:33-37) Lolenge eleki malamu ya kosalisa bato ezali koyebisa bango nsango malamu. Nkulutu moko oyo asalisá bato mingi oyo bakimá mboka alobaki ete ezali na ntina mingi koyebisa bango mbala moko ete tozali Batatoli ya Yehova. Tosengeli kosalisa bango bámona ete toyei libosoliboso mpo na kosalisa bango báyeba elikya kitoko oyo Biblia ezali kopesa, kasi te kaka mpo na kosalisa bango na mosuni.

MATOMBA OYO EMONANI

20, 21. (a) Matomba nini emonanaka soki tozali komonisela bato oyo bakimá mboka bolingo ya solosolo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Ntango tomoniselaka “bato oyo bafandi bapaya” bolingo ya solosolo, matomba emonanaka. Ndeko mwasi moko alobaki ete libota na ye ekimaki minyoko oyo ezalaki na ekólo Érythrée. Na nsima, bana na ye minei basalaki mobembo ya mikolo 8 mpo na kokatisa esobe. Nsukansuka, nsima ya mobembo moko ya mpasi, bakómaki na ekólo Soudan. Alobi boye: “Bandeko bazwaki bango mpenza lokola bato ya mabota na bango, bapesaki bango bilei, bilamba, esika ya kolala, mpe bazalaki komema bango na motuka to kofutela bango tike.” Abakisi: “Nani mosusu akoki kondima koyamba bapaya na ndako na ye kaka mpo basambelaka na lingomba moko? Kaka Batatoli ya Yehova!”​—Tángá Yoane 13:35.

21 Tokoloba nini mpo na ebele ya bana oyo bayaka elongo na baboti na bango? Na lisolo oyo elandi, tokoyekola ndenge oyo biso nyonso tokoki kosalisa mabota wana esambela Yehova na esengo.

^ par. 2 Na lisolo oyo, maloba “bato oyo bakimá mboka” elimboli bato oyo bakimá mboka na bango mpo na bitumba, minyoko, to makama lokola koningana ya mabele, mpela, to mopɛpɛ makasi. Bakoki kokima mpo na kokende kofanda na ekólo mosusu, to na esika mosusu kaka na ekólo na bango. Ebongiseli ya ONU mpo na bato oyo bakimá mboka (HCR) emonisi ete na mokili mobimba, soki tozwi bato 113, moto 1 akimá mboka na ye.

^ par. 6 Talá lisolo “Bóbosana te ezaleli ya koyamba bapaya,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2016, nkasa 8-12.

^ par. 11 Ntango kaka ndeko moko oyo akimá mboka akómi na lisangá, bankulutu basengeli kolanda malako oyo ezali na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 8, paragrafe 30. Mpo na kokomela lisangá oyo ndeko yango auti, na ekólo na ye, bankulutu bakoki kokomela biro ya filiale ya ekólo oyo bazali, na nzela ya jw.org. Longola yango, na mayele, bakoki kotuna mwa mituna mpo na koyeba lisangá oyo ndeko yango auti mpe mosala na ye ya kosakola, mpo na koyeba soki azali makasi na elimo to te.

^ par. 14 Talá lisolo “Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale” mpe lisolo “Zalá na mpiko​—Yehova azali Mosungi na yo!” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2014, nkasa 17-26.