Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2017

Tósalisa bana ya “bato oyo bafandi bapaya”

Tósalisa bana ya “bato oyo bafandi bapaya”

“Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”​—3 YOANE 4.

NZEMBO: 88, 41

1, 2. (a) Mokakatano nini bana mingi oyo bafandi na mboka mopaya bazali na yango? (b) Lisolo oyo ekoyanola na mituna nini?

NDEKO Joshua alobi boye: “Banda bomwana, nazalaki koloba monɔkɔ ya mboka ya baboti na ngai, ezala na ndako to na lisangá. Kasi ntango nakɔtaki kelasi, nakómaki kosepela mingi nde na monɔkɔ ya ekólo oyo tozalaki kofanda. Nsima ya mwa bambula, nakómaki koloba kaka monɔkɔ ya ekólo oyo tozalaki kofanda. Nazalaki lisusu te kokanga ntina ya makambo oyo ezalaki kolobama na makita, mpe nabosanaki mimeseno nyonso ya bonkɔkɔ ya baboti na ngai.” Likambo oyo ekómelaki ndeko Joshua ezali kokómela bato mingi lelo.

2 Lelo oyo, bato koleka 240 000 000 bafandaka te na bikólo oyo babotamaki. Soki ozali moboti oyo afandi na mboka mopaya, ndenge nini okoki kopesa bana na yo libaku oyo eleki malamu ya koyekola kolinga Yehova mpe “kokoba kotambola na kati ya solo”? (3 Yoane 4) Mpe ndenge nini basusu bakoki kosalisa?

BABOTI, BÓZALA NDAKISA MALAMU

3, 4. (a) Ndenge nini baboti bakoki kozala ndakisa malamu mpo na bana na bango? (b) Nini baboti basengeli kozela te epai ya bana na bango?

3 Baboti, ndakisa na bino ezali na ntina mingi soki bolingi ete bana na bino bázala na boyokani malamu ná Yehova mpe bázwa bomoi  ya seko. Soki bana na yo bazali komona yo ozali “koluka liboso bokonzi,” bakoyekola kotyela Yehova motema ete akokokisa bamposa na bango ya mokolo na mokolo. (Matai 6:33, 34) Salá ete mosala ya Yehova ezwa esika ya liboso; kotika te ete mposa ya koluka ebele ya biloko ya mokili ezwa esika na yango. Zalá na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpe boyá banyongo. Luká komibombela ‘biloko ya motuya na likoló,’ na esika ya koluka mbongo mingi to “nkembo ya bato.”​—Tángá Marko 10:21, 22; Yoane 12:43.

4 Ata soki ozali na makambo mingi ya kosala, osengeli kolekisaka ntango mingi elongo na bana na yo. Monisá ete osepelaka na bango mingi mpamba te na esika ya koluka lokumu to mbongo mpo na bango moko to mpo na yo, batyaka nde Yehova na esika ya liboso. Boyá makanisi ya libunga oyo bato mingi bazalaka na yango ete bana basengeli koluka mpo na kosalisa baboti na bango mpo bázala na bomoi ya malamu. Kobosana te ete “ezali bana te nde basengeli kobomba biloko mpo na baboti na bango, kasi baboti mpo na bana na bango.”​—2 Bakorinti 12:14.

BABOTI, BÓSALA MAKASI MPO NA KOLONGA MIKAKATANO OYO ETALI MONƆKƆ

5. Mpo na nini baboti basengeli kosololaka na bana na bango makambo ya Yehova mbala na mbala?

5 Kaka ndenge Biblia esakolaki yango, bato “ya minɔkɔ nyonso ya bikólo” bazali koya na ebongiseli ya Yehova. (Zekaria 8:23) Kasi soki bana na yo bayebi monɔkɔ na yo malamu te, ekoki kozala mpasi oteya bango mateya ya solo. Bana na yo bazali bayekoli na yo ya Biblia ya libosoliboso, mpe soki ‘bayekoli koyeba’ Yehova, bakozwa bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Mpo bana na yo báyekola mateya ya Yehova, osengeli ‘kolobelaka yango’ mbala na mbala.​—Tángá Kolimbola Mibeko 6:6, 7.

6. Matomba nini bana na yo bakozwa soki bayekoli monɔkɔ ya mboka na yo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Ekoki kozala ete bana na yo bazali koyekola monɔkɔ ya ekólo oyo bofandi na kelasi to epai ya bato mosusu. Kasi bakoyekola monɔkɔ ya mboka na yo kaka soki ozali kosolola na bango mbala na mbala. Soki bana na yo bazali koloba monɔkɔ ya mboka na yo, ekozala mpasi te mpo báyebisa yo ndenge oyo bazali komiyoka. Kasi yango ezali na matomba mosusu. Soki bana na yo bazali koloba minɔkɔ ebele, yango ekokolisa makoki na bango ya kokanisa mpe ekosalisa bango báyeba ndenge oyo bato mosusu batalelaka makambo. Ekoki mpe kopesa bango mabaku ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Ndeko Carolina, oyo baboti na ye bafandi na mboka mopaya, alobi ete “kozala na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya esepelisaka mingi. Ezalaka esengo kopesa mabɔkɔ na esika oyo mposa ezali mingi.”

7. Okoki kosala nini soki monɔkɔ ekómi mokakatano na libota na yo?

7 Ntango bana ya bato oyo bafandi na mboka mopaya bazali koyekola monɔkɔ ya ekólo oyo bafandi, basusu bakoki kobungisa mposa to makoki na bango ya koloba monɔkɔ ya mboka ya baboti na bango. Baboti, soki bomoni ete bana na bino bakómi bongo, mpo na nini te koyekola monɔkɔ ya ekólo oyo bofandi, ata mwa moke? Ekozala mpasi te kobɔkɔla bana na nzela ya bokristo soki bozali koyoka masolo na bango, koyeba masano oyo esepelisaka bango, makambo oyo bayekolaka na kelasi, mpe soki bino moko bozali na likoki ya kosolola na balakisi na bango. Ya solo, koyekola monɔkɔ ya sika esɛngaka ntango, milende, mpe komikitisa. Kasi yango ezali na matomba mingi. Na ndakisa, soki mwana na yo azali baba, na ntembe te okoyekola mpe elobeli ya bajɛstɛ mpo osololaka na ye. Ndenge moko mpe, soki mwana na yo ayebi malamu nde monɔkɔ ya bapaya, osengeli mpe kotyela ye likebi ya ndenge wana. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

8. Ndenge nini okoki kosalisa bana na yo soki ozali te koloba malamu monɔkɔ ya ekólo oyo bofandi?

8 Ekoki kozala mpasi mingi mpo ete baboti mosusu oyo bafandi na mboka mopaya báyeba koloba malamu monɔkɔ oyo bana na  bango bayekoli. Yango ekoki kosala ete baboti bázala na mokakatano ya kosalisa bana na bango bákanga ntina ya “makomi mosantu.” (2 Timote 3:15) Soki likambo yango ekómeli libota na yo, okoki kokoba kosalisa bana na yo báyeba Yehova mpe bálinga ye. Ndeko Shan, oyo azali nkulutu, alobi boye: “Mama na biso azalaki koyeba malamu te monɔkɔ ya ekólo oyo tozalaki kofanda, mpe ngai ná bandeko na ngai ya basi toyebaki malamu te koloba monɔkɔ ya mboka na ye. Kasi ntango tozalaki komona ye azali koyekola, kobondela, mpe kosala nyonso mpo na kotambwisa losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, tososolaki ete koluka koyeba Yehova ezalaki likambo oyo eleki ntina.”

9. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango oyo basengeli koyekola na minɔkɔ mibale?

9 Ekoki kosɛnga ete bana mosusu báyekola makambo oyo etali Yehova na minɔkɔ mibale. Mpo na nini? Mpamba te na kelasi balobaka monɔkɔ mosusu, kasi na ndako balobaka monɔkɔ mosusu. Mpo na ntina wana, baboti mosusu basalelaka mikanda, ba CD mpe bavideo na minɔkɔ yango nyonso mibale. Tomoni polele ete baboti oyo bafandi na mboka mopaya basengeli kosala makasi mpo na kosalisa bana na bango bápusana penepene na Yehova.

LISANGÁ YA MONƆKƆ NINI BOSENGELI KOZALA?

10. (a) Nani asengeli kozwa ekateli ya kopona lisangá ya monɔkɔ oyo libota esengeli koyangana? (b) Tata ya libota asengeli kosala nini liboso ya kozwa ekateli?

10 Soki “bato oyo bafandi bapaya” bazali mosika na Batatoli mosusu oyo balobaka monɔkɔ ya mboka na bango, bakoki koyangana na lisangá moko ya monɔkɔ ya ekólo oyo bafandi. (Nzembo 146:9) Kasi soki lisangá moko ya monɔkɔ ya mboka na bango ezali pene, tata ya libota asengeli kopona lisangá ya monɔkɔ nini libota na bango ekoyangana. Liboso ya kozwa ekateli yango, asengeli kokanisa malamu mpe kobondela mpo na likambo yango. Asengeli mpe kosolola na mwasi na ye mpe bana na ye. (1 Bakorinti 11:3) Makambo nini asengeli kotalela? Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa ye azwa ekateli ya malamu?

11, 12. (a) Ndenge nini monɔkɔ esalisaka bana bázwa matomba mingi na makita? (b) Mpo na nini bana mosusu balingaka te koyekola monɔkɔ ya mboka ya baboti na bango?

11 Baboti basengeli koluka koyeba makambo oyo bana na bango basengeli na yango mpenza. Mpo bana bákanga malamu ntina ya mateya ya solo ya Biblia, basengeli kosuka kaka te na mwa bangonga moke ya mateya ya Biblia oyo epesamaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita. Kasi simbá likambo oyo: Soki bana bazali kokɔta na makita na monɔkɔ oyo bayebi malamu, bakoki kozwa matomba mingi, kaka te mpo bazali na makita, kasi mpo bakoki koyekola makambo mingi koleka oyo baboti na bango bakoki kokanisa. Nzokande, soki bana bayebi monɔkɔ malamu te, ekoki kosalema bongo te. (Tángá 1 Bakorinti 14:9, 11.) Ezali kaka te monɔkɔ oyo mwana abotamá na yango nde ekoki kosimba motema na ye mpe mayoki na ye. Kutu, bana mosusu bakoki koyekola kopesa biyano to kosala bilakiseli mpe masolo na monɔkɔ ya mboka ya baboti na bango, kozanga ete bábimisa mpenza makanisi mpe mayoki na bango.

12 Longola yango, kaka monɔkɔ te nde esimbaka motema ya mwana. Ezalaki bongo mpo na ndeko Joshua oyo tolobelaki na ebandeli. Ndeko na ye ya mwasi Esther alobi boye: “Mpo na bana mike, monɔkɔ ya mboka ya baboti, mimeseno ya bonkɔkɔ na bango, mpe lingomba na bango etambolaka nzela moko.” Soki bana bazali komona ete mimeseno ya bonkɔkɔ ya baboti na bango etali bango te, bakoki mpe te kolinga koyekola monɔkɔ ya mboka na bango mpe kosambela na lingomba na bango. Baboti oyo bafandi na mboka mopaya bakoki kosala nini?

13, 14. (a) Mpo na nini ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bafandi na mboka mopaya bamemaki bana na bango na lisangá ya monɔkɔ ya ekólo oyo bafandi? (b) Baboti basalaki nini mpo boyokani na bango moko ná Yehova ekoba kozala makasi?

13 Baboti bakristo batyaka bamposa ya bana na bango liboso ya bamposa na bango  moko. (1 Bakorinti 10:24) Ndeko Samuel, tata ya Joshua ná Esther, alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosalaki nyonso tóyeba bana na biso malamu mpo na koyeba na monɔkɔ nini mateya ya solo ezalaki kosimba mitema na bango, mpe tobondelaki mpo Yehova apesa biso bwanya. Eyano oyo apesaki ezalaki te oyo biso tozalaki kokanisa. Kasi ntango tomonaki ete bazalaki kozwa matomba mingi te na makita ya monɔkɔ ya mboka na biso, tozwaki ekateli ya kokende na lisangá ya monɔkɔ ya ekólo oyo tozalaki kofanda. Mbala na mbala, tozalaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola elongo na bango. Tozalaki mpe kobengisa bandeko ya ekólo oyo tozalaki kofanda mpo na kolya mpe kobima mpo na kozwa mopɛpɛ. Nyonso wana esalisaki bana na biso báyeba bandeko mpe báyeba Yehova lokola Nzambe na bango, Tata na bango, mpe moninga na bango. Tomonaki ete kosala bongo ezalaki na ntina mingi mpo na bango koleka koyeba malamu monɔkɔ ya mboka na biso.”

14 Ndeko Samuel abakisi boye: “Mpo biso moko tókoba kozala makasi na elimo, ngai ná mwasi na ngai tozalaki mpe koyangana na makita ya monɔkɔ ya mboka na biso. Tozalaki na makambo mingi ya kosala, mpe yango ezalaki kolɛmbisa biso. Kasi totɔndaka Yehova ndenge apamboli milende na biso mpe elimo na biso ya komipimela. Tii lelo, bana na biso misato bazali kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso.”

OYO BILENGE BAKOKI KOSALA

15. Mpo na nini ndeko mwasi moko na nkombo Kristina amonaki ete kozala na lisangá ya monɔkɔ oyo bazalaki koloba na kelasi ezalaki malamu koleka?

15 Ntango bana bakoli, bakoki komona ete bakoki kosalela Yehova malamu koleka na lisangá ya monɔkɔ oyo bayebi malamu. Soki esalemi bongo, baboti basengeli te komona ete bana basundoli bango. Ndeko Kristina alobi: “Nayebaki mwa moke monɔkɔ ya mboka ya baboti na ngai, kasi elobeli oyo bazalaki kosalela na makita ezalaki mpasi mpo na ngai. Ntango nazalaki na mbula 12, nakɔtaki na liyangani moko na monɔkɔ oyo tozalaki koloba na kelasi. Ezalaki mbala ya liboso nakanga ntina ete makambo oyo nazalaki koyoka ezali mateya ya solo! Litomba mosusu emonanaki ntango nabandaki kobondela na monɔkɔ oyo tozalaki koloba na kelasi. Nazalaki koyebisa Yehova makambo oyo euti na motema na ngai!” (Misala 2:11, 41) Ntango Kristina akokisaki mbula 18, asololaki na baboti na ye mpe azwaki ekateli ya kokende na lisangá moko ya monɔkɔ ya ekólo oyo bazalaki kofanda. Alobi boye: “Koyekola makambo ya Yehova na monɔkɔ oyo tozalaki koloba na kelasi esalisaki ngai nakende liboso.” Eumelaki te, Kristina akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe azali na esengo mingi.

16. Mpo na nini Nadia azali na esengo ndenge atikalaki na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya?

16 Elenge, okanisi ete ekozala malamu okende na lisangá moko ya monɔkɔ ya ekólo oyo ofandi? Soki ezali bongo, osengeli koluka koyeba ntina oyo olingi kokende kuna. Kokende na lisangá yango ekosalisa yo opusana lisusu penepene na Yehova? (Yakobo 4:8) Ezali mpo olingi te baboti na yo bálandelaka makambo nyonso oyo ozali kosala to mpo olingi te kosala milende? Ndeko Nadia, oyo azali sikoyo kosala na Betele alobi boye: “Ntango ngai ná bandeko na ngai tokómaki bilenge, tozalaki na mposa ete tókende na lisangá ya monɔkɔ ya ekólo oyo tozalaki kofanda. Kasi baboti na biso bayebaki ete kokende na lisangá ya monɔkɔ mosusu elingaki kozala malamu te mpo na boyokani na biso ná Yehova. Sikoyo, tozali na botɔndi mpo baboti na biso basalaki makasi mpo na koteya biso monɔkɔ ya mboka na bango kasi batikaki biso tózala na lisangá ya monɔkɔ ya bapaya. Yango ebakisaki mapamboli mosusu na bomoi na biso mpe efungolelaki biso nzela ya kozwa mabaku ya kosalisa bato mosusu báyeba Yehova.”

NDENGE OYO BASUSU BAKOKI KOSALISA

17. (a) Banani oyo Yehova apesi mokumba ya kobɔkɔla bana? (b) Ndenge nini baboti bakoki kozwa lisalisi mpo na koteya bana na bango mateya ya solo?

17 Yehova apesá baboti mokumba ya koteya bana na bango mateya ya solo. Apesá  mokumba yango te epai ya bankɔkɔ to bato mosusu. (Tángá Masese 1:8; 31:10, 27, 28.) Atako bongo, baboti oyo bayebi te monɔkɔ ya ekólo oyo bafandi bakoki kozala na mposa ete básalisa bango mpo básimba mitema ya bana na bango. Soki baboti basɛngi lisalisi, yango elingi koloba te ete balingi kosundola mokumba na bango ya kobɔkɔla bana. Yango ekoki mpe kozala lolenge mosusu ya kobɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Na ndakisa, baboti bakoki kosɛnga bankulutu ya lisangá bápesa bango makanisi mpo na ndenge ya kotambwisa losambo na kati ya libota mpe ndenge ya kosalisa bana na bango bápona baninga ya malamu.

Bana mpe baboti bazwaka matomba ntango bazali elongo na bandeko ya lisangá (Talá paragrafe 18, 19)

18, 19. (a) Ndenge nini bakristo mosusu bakoki kosalisa bilenge? (b) Baboti basengeli kokoba kosala nini?

18 Mpo na kosalisa bana na bango, baboti bakoki ntango mosusu kobengisa mabota mosusu eya kosangana na bango na losambo na kati ya libota. Longola yango, bilenge mingi bayekolaka makambo mingi epai ya bakristo mosusu ntango babimi na bango na mosala ya kosakola mpe ntango bazali kosala makambo mosusu elongo. (Masese 27:17) Ndeko Shan oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Nabosanaka te bandeko oyo bazalaki kosunga ngai. Ntango bazalaki kosalisa ngai nabongisa masolo oyo nakosala na makita, yango ezalaki kosalisa ngai nayekola makambo mingi. Nazalaki mpe kosepela mingi na makambo oyo tozalaki kosala elongo mpo na kominanola.”

19 Bandeko oyo baboti baponi mpo na kosalisa bana na bango basengeli ntango nyonso kolendisa bana yango bátosaka baboti na bango. Bakoki kosala yango soki bazali koloba malamu mpo na baboti yango mpe soki bazali te kobɔtɔla mokumba ya baboti ya kobɔkɔla bana na bango. Longola yango, bandeko yango basengeli koboya etamboli nyonso oyo ekoki kotinda bato mosusu na kati ya lisangá to libándá ya lisangá bákanisela bango mabe. (1 Petro 2:12) Atako baboti bakoki kosɛnga lisalisi ya basusu, mokumba ya koteya bana mateya ya solo ezali nde ya bango. Yango wana, basengeli kolandela lisalisi oyo bakristo mosusu bazali kopesa.

20. Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango básalela Yehova na bosembo?

20 Baboti, bóbondela Yehova asalisa bino mpe bósala nyonso oyo bokoki. (Tángá 2 Ntango 15:7.) Bótya boninga ya bana na bino ná Yehova na esika ya liboso, kasi te bamposa na bino moko. Bósala nyonso oyo bokoki mpo na kondimisama ete Liloba ya Nzambe ezali kosimba mitema ya bana na bino. Bótika soki moke te kokanisa ete mokolo mosusu bana na bino bakokóma basaleli ya Yehova. Ntango bana na bino bazali kolanda Liloba ya Nzambe mpe ndakisa na bino ya malamu, bokoyoka ndenge ntoma Yoane ayokaki mpo na bana na ye ya elimo: “Nazali na ntina mosusu ya botɔndi te koleka makambo oyo: nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”​—3 Yoane 4.

^ par. 7 Talá lisolo “Okoki koyekola monɔkɔ mosusu” na Lamuká! ya 03/2007, nkasa 10-12, na Lifalanse.