Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2017

“Olingaka ngai koleka oyo?”

“Olingaka ngai koleka oyo?”

“Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai koleka oyo?”​—YOANE 21:15.

NZEMBO: 128, 45

1, 2. Nsima ya kolekisa butu mobimba na kolɔba mbisi, liteya nini Petro azwaki?

BAYEKOLI ya Yesu 7 balekisaki butu mobimba bazali kolɔba mbisi na Mbu ya Galile. Kasi, bakangaki ata mbisi moko te. Na ntɔngɔ, bamonaki Yesu oyo asilaki kosekwisama atɛlɛmi na libongo, azali kotala bango. Na nsima, alobaki na bango ete: “‘Bóbwaka monyama na lobɔkɔ ya mobali ya masuwa mpe bokozwa.’ Bongo babwakaki yango, kasi bakokaki lisusu te kobenda yango mpamba te bambisi ezalaki ebele.”​—Yoane 21:1-6.

2 Yesu apesaki bayekoli na ye mampa ná mbisi mpo na bilei ya ntɔngɔ. Na nsima, abalukaki epai ya Simo Petro mpe atunaki ye boye: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai koleka oyo?” Yesu ayebaki ete Petro azalaki kolinga mosala ya kolɔba mbisi. Ekoki kozala ete Yesu azalaki kotuna Petro soki azalaki kolinga ye mpe makambo oyo ateyaki ye, koleka ndenge oyo azalaki kolinga mosala na ye ya kolɔba mbisi. Petro ayanolaki Yesu boye: “Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” (Yoane 21:15) Kobanda mokolo wana, Petro amonisaki ete akokisaki likambo oyo alobaki. Amonisaki ete alingaka Kristo na ndenge akobaki komipesa na mosala ya kosakola, mpe akómaki na mikumba mingi na lisangá ya bokristo.

3. Bakristo basengeli kokeba na likambo nini?

 3 Maloba oyo Yesu ayebisaki Petro ekoki koteya biso nini? Tosengeli kokeba ete bolingo oyo tolingaka Kristo ekita te. Yesu ayebaki ete bomoi na mokili oyo ekozala na mitungisi mingi mpe ete tokokutana na mikakatano mpe bampasi. Na ndakisa ya moloni oyo Yesu apesaki, alobaki ete bato mosusu bakondima “liloba ya bokonzi” mpe na ebandeli bakozala na molende. Kasi na nsima, ‘mitungisi ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo ekotya liloba nkaka,’ mpe bato yango bakobungisa molende oyo bazalaki na yango. (Matai 13:19-22; Marko 4:19) Soki tokebi te, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo ekoki kopekisa biso tósalela Yehova. Yango wana, Yesu akebisaki bayekoli na ye boye: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi.”​—Luka 21:34.

4. Nini ekosalisa biso tóyeba soki bolingo oyo tolingaka Kristo ezali kaka makasi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Lokola Petro, tokoki komonisa ete tolingaka Kristo soki tozali kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na biso. Ndenge nini tokoki kondimisama ete tozali kokoba kosala bongo? Tokoki komituna boye: ‘Na bomoi na ngai, nini oyo nalingaka mingi koleka? Nayokaka esengo mingi ntango nazali na mosala ya Yehova to ntango nazali kosala makambo mosusu?’ Mpo na kosalisa biso tóyanola na mituna wana, tótalela makambo misato ya bomoi na biso oyo ekoki kokitisa bolingo na biso mpo na Kristo. Makambo yango ezali: mosala ya mosuni, kominanola, mpe biloko ya mosuni.

KOBÁ KOTYA MOSALA YA MOSUNI NA ESIKA NA YANGO

5. Mokumba nini batata ya mabota bazali na yango?

5 Mpo na Petro, kolɔba mbisi ezalaki kaka te mosala oyo azalaki kosepela na yango. Ezalaki mosala oyo ezalaki kosalisa ye aleisa libota na ye. Lelo oyo mpe, Yehova apesi batata ya mabota mokumba ya koleisa mabota na bango. (1 Timote 5:8) Basengeli kosala mosala makasi mpo na kokokisa mokumba yango. Kasi, na mikolo oyo ya nsuka, mosala ya mosuni ekoki komema mitungisi mingi.

6. Mpo na nini mosala ya mosuni ekoki kozala motungisi?

6 Bato oyo bazali koluka misala bazali mingi, kasi misala ezali komonana mingi te. Mpo na ntina wana, bato bazali kowelana mpo na kozwa mosala. Bato mingi bazali komona ete basengeli kosala nsima ya bangonga ya mosala, mbala mingi mpo bazali kofuta bango mbongo moke. Koleka ndenge ezalaki liboso, bakompanyi ya mombongo ezali koluka kozala na basali moke, kasi kobimisa biloko ebele. Yango ezali kosala ete basali bákóma na mitungisi, básila makasi, to bábɛlaka mingi. Mpo bábungisa misala na bango te, bato mingi bazali kosala nyonso oyo bapatrɔ na bango bazali kosɛnga.

7, 8. (a) Epai ya nani tosengeli kozala sembo libosoliboso? (b) Liteya nini ya ntina ndeko mobali moko na Thaïlande azwaki?

7 Biso bakristo tolingaka kozala sembo epai ya Yehova koleka epai ya moto mosusu nyonso, ezala patrɔ na biso. (Luka 10:27) Mosala na biso ya mosuni esalisaka biso tókokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo mpe tópesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. Kasi, soki tokebi te, mosala na biso ya mosuni ekoki kobebisa programɛ na biso ya makambo ya elimo. Ndakisa ya ndeko mobali moko na Thaïlande ekoki koteya biso mingi. Alobi boye: “Mosala na ngai ya kobongisa baordinatɛrɛ ezalaki mosala moko ya malamu, kasi ezalaki kozwa ngai ntango mingi. Nsukansuka, nazalaki lisusu na ntango te mpo na makambo ya elimo. Yango wana, namonaki ete mpo na kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, esengelaki natika mosala yango mpe naluka mosala mosusu.” Ndeko yango asalaki nini?

8 Alimboli boye: “Nsima ya komibongisa  pene na mbula mobimba, nazwaki ekateli ya kotɛka krɛmɛ nzelanzela. Na ebandeli, yango ezalaki kopesa ngai mbongo mingi te mpe nakómaki kolɛmba nzoto. Ntango nazalaki kokutana na baninga na ngai ya mosala ya kala, bazalaki kosɛka ngai mpe kotuna ngai mpo na nini nakanisi ete kotɛka krɛmɛ ezali mosala malamu koleka kobongisa baordinatɛrɛ na esika ya malili. Nabondelaki Yehova mpe nasɛngaki ye asalisa ngai nalonga mokakatano yango mpe nakokisa mokano oyo namityelaki ya kozala na ntango mingi mpo na makambo ya elimo. Eumelaki te, makambo ebandaki kobongwana. Nayebaki malamu lolenge ya krɛmɛ oyo bakiliya na ngai bazalaki kosepela na yango mpe nakómaki kosala krɛmɛ ya malamu mpenza. Mosika te, nakómaki kotɛka krɛmɛ nyonso oyo nasali na mokolo moko. Kutu, mosala na ngai ya kotɛka krɛmɛ ezali kopesa ngai mbongo mingi koleka mosala ya kobongisa baordinatɛrɛ. Nakómá na esengo mingi mpo namitungisaka lisusu te lokola na mosala na ngai ya kala. Oyo eleki ntina, namonaka ete sikoyo nazali pene na Yehova.”​—Tángá Matai 5:3, 6.

9. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki tozali na bokatikati na ndenge na biso ya kotalela mosala ya mosuni?

9 Yehova asepelaka mingi ntango tozali kosala mosala makasi. Mosala makasi ezangaka lifuti te. (Masese 12:14) Kasi tosengeli kokeba ete mosala na biso ya mosuni ekóma te na ntina mingi koleka mosala na biso mpo na Yehova. Mpo na bamposa na biso ya mokolo na mokolo, Yesu alobaki: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” (Matai 6:33) Kasi ndenge nini tokoki koyeba soki tozali na bokatikati na ndenge ya kotalela mosala ya mosuni? Tokoki komituna boye: ‘Namonaka ete mosala na ngai ya mosuni esepelisaka ngai mingi mpe epesaka ngai esengo mingi, kasi natalelaka mosala ya Nzambe kaka bongobongo to namonaka ete elɛmbisaka ngai?’ Kokanisa na motuna wana ekoki kosalisa biso tóyeba mpenza mosala oyo tolingaka mingi.

10. Liteya nini ya ntina mingi Yesu ateyaki?

10 Yesu ateyaki biso makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso. Mokolo moko, akendaki kotala bandeko basi mibale: Maria ná Marta. Mbala moko, Marta abandaki kolamba bilei mpo na Yesu, kasi Maria afandaki pene na Yesu mpo na koyoka mateya na ye. Marta amilelaki ete Maria azali kosalisa ye te. Kasi Yesu alobaki na Marta ete: “Maria ye aponi eloko oyo ezali malamu, mpe bakobɔtɔla ye yango te.” (Luka 10:38-42) Na maloba wana, Yesu ateyaki liteya moko ya ntina mingi. Soki tolingi te ete bamposa na biso moko elongola likebi na biso na makambo oyo eleki ntina mpe tolingi komonisa ete tolingaka Kristo, tosengeli kopona “eloko oyo ezali malamu.” Yango elimboli ete boyokani na biso na Yehova esengeli ntango nyonso kozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso.

NDENGE YA KOTALELA MASANO MPE KOMINANOLA

11. Biblia elobi nini na likambo etali kopema mpe kozwa mopɛpɛ?

11 Bomoi na biso etondi na makambo mingi ya kosala, yango wana ntango mosusu tozalaka na mposa ya kopema mpe kozwa mwa mopɛpɛ. Biblia elobi ete: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.” (Mosakoli 2:24) Yesu ayebaki ete kopema ezalaki na ntina mpo na bayekoli na ye. Na ndakisa, nsima ya kosala mosala makasi na mosala ya kosakola, ayebisaki bango: “Bóya, kaka bino moko, na esika oyo bato bazali te mpe bópema mwa moke.”​—Marko 6:31, 32.

12. Mpo na nini tosengeli kokeba na masano mpe kominanola? Pesá ndakisa.

12 Masano mpe kominanola ekoki kosalisa biso tópema mpe tózwa mopɛpɛ. Kasi tosengeli kokeba ete komisepelisa ekóma te likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Na siɛklɛ ya liboso, bato mingi bazalaki na ezaleli wana; bazalaki koloba: “Tólya mpe tómɛla,  mpo lobi tokokufa.” (1 Bakorinti 15:32) Ezaleli yango ezali mpe komonana mingi lelo oyo. Na ndakisa, elenge mobali moko na Mpoto ya ɛsti abandaki koyangana na makita ya lisangá. Kasi lokola azalaki kolinga kominanola mingi, atikaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Na nsima, ayaki komona ete ndenge oyo amipesaki na kominanola ebimiselaki ye mikakatano mingi. Azongelaki koyekola Biblia, na nsima, abandaki kosakola nsango malamu. Nsima ya batisimo na ye, alobaki boye: “Eloko kaka moko oyo ezali kopesa ngai mawa ezali ndenge nalekisaki ntango mingi liboso ya koyeba ete kosalela Yehova epesaka esengo mingi koleka bisengo ya kominanola oyo mokili ezali kopesa.”

13. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo kolekisa ntango mingi na masano mpe kominanola ezali malamu te. (b) Nini ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati na ndenge ya kotalela masano mpe kominanola?

13 Masano mpe kominanola esengeli kosalisa biso tózwa mopɛpɛ mpe tózwa lisusu makasi. Kasi, ntango boni tosengeli kolekisa na masano mpe kominanola? Mpo na kosalisa biso tóyanola na motuna wana, tózwa ndakisa oyo: Bato mingi balingaka kolya gato mpe biloko mosusu ya sukali. Kasi toyebi ete soki tozali kolya bilei ya ndenge wana ntango nyonso, ekoki komemela biso maladi. Soki tolingi kozala nzoto kolɔngɔnɔ, tosengeli kolyaka bilei oyo ezali malamu mpo na biso. Ndenge moko mpe, soki tozali kolekisa ntango na biso mingi na masano mpe kominanola, yango ekoki kozala likama mpo na boyokani na biso na Yehova. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba soki totalelaka masano mpe kominanola na bokatikati to te? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kopona pɔsɔ moko mpe kokoma motángo ya ngonga oyo tolekisi na makambo oyo ezali na boyokani na mosala ya Yehova, na ndakisa makita ya lisangá, mosala ya kosakola, mpe boyekoli ya Biblia. Na nsima, tokoki kokoma motángo ya ngonga oyo tolekisi kaka na pɔsɔ yango na masano mpe kominanola, na ndakisa, kosala ngalasisi, kotala televizyo, to kobɛta masano ya video. Nsima ya kokokanisa mitángo yango mibale, liteya nini tozwi? Tomoni ete tosengeli kobongola makambo mosusu?​—Tángá Baefese 5:15, 16.

14. Nini ekoki kosalisa biso tópona masano mpe kominanola ya malamu?

14 Yehova atiki biso moko tópona masano oyo tolingi, mpe batata ya mabota bakoki kopona masano mpe kominanola mpo na mabota na bango. Na kati ya Biblia, Yehova apesi biso mitinda oyo emonisi ndenge oyo ye atalelaka makambo. Mitinda yango esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Masano mpe kominanola ya malamu ezali “likabo ya Nzambe.” (Mosakoli 3:12, 13) Toboyi te, moto na moto azali na lisano to kominanola oyo esepelisaka ye. (Bagalatia 6:4, 5) Kasi, ezala lisano to kominanola nini toponi, tosengeli kozala ekɛngɛ. Yesu alobaki ete: “Epai eloko na yo ya motuya ezali, motema na yo ekozala mpe kuna.” (Matai 6:21) Bolingo oyo tolingaka Mokonzi na biso Yesu etindaka biso tókanisaka, tólobaka, mpe tósalaka makambo na ndenge oyo emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na biso koleka makambo mosusu nyonso.​—Bafilipi 1:9, 10.

TOSENGELI KOBUNDISA MPOSA YA KONDUKA BILOKO YA MOKILI

15, 16. (a) Ndenge nini mposa ya konduka biloko ya mokili ekoki kokóma motambo mpo na biso? (b) Toli nini ya bwanya Yesu apesaki mpo na biloko ya mosuni?

15 Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete basengeli kozala na bilamba oyo ebimi mikolo oyo, batelefone, baordinatɛrɛ, to biloko mosusu nyonso oyo ebimi mikolo oyo. Bato wana nyonso basilá kokwea na motambo ya konduka biloko ya mokili, elingi koloba kozala na bomoi oyo emonisi ete biloko ya mosuni mpe mbongo ezali na ntina mingi koleka makambo mosusu nyonso. Lokola ozali mokristo, nini eleki ntina mpo na yo?  Omituna boye: ‘Nalekisaka ntango mingi na kokanisa vuatire oyo ebimi sika to biloko mosusu oyo ebimi mikolo oyo, koleka ntango oyo nalekisaka mpo na kobongisa makita ya lisangá? Nazalaka na makambo mingi ya kosala mokolo na mokolo mpe yango esalaka ete nazala na ntango mingi te mpo na kobondela mpe kotánga Biblia?’ Soki tokebi te, kolinga biloko ya mosuni ekoki kokóma na ntina mingi epai na biso koleka bolingo oyo tolingaka Kristo. Tosengeli kokanisa maloba oyo ya Yesu: “Bókeba na motindo nyonso ya bilulela.” (Luka 12:15) Mpo na nini alobaki bongo?

16 Yesu abandaki na maloba oyo: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale.” Na nsima, abakisaki ete: “Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” Ekoki kosalema te ete tópesa Yehova oyo tozali na yango ya malamu koleka, mpe kaka na ntango yango, tótya makanisi na biso nyonso na biloko ya mosuni. Yesu alimbolaki boye: ‘To tokoyina oyo mpe tokolinga mosusu, to tokokangama na oyo mpe tokotyola mosusu.’ (Matai 6:24) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kokoba kobundisa “bamposa ya nzoto na biso,” ezala mpe mposa ya konduka biloko ya mokili.​—Baefese 2:3.

17. (a) Mpo na nini bato mosusu bamonaka ete ezali mpasi kotalela biloko ya mosuni na bokatikati? (b) Nini esalisaka biso tóbundisa mposa ya konduka biloko ya mokili?

17 Bato mingi batyaka makanisi na bango nyonso kaka na bamposa mpe bisengo na bango moko, yango wana bamonaka ete ezali mpasi kotalela biloko ya mosuni na bokatikati. (Tángá 1 Bakorinti 2:14.) Lokola lolenge na bango ya kokanisa ezali lisusu malamu te, ekoki kozala mpasi mpo báyeba kokesenisa malamu ná mabe. (Baebre 5:11-14) Mposa na bango ya biloko ya mosuni ekoki kokóma lisusu makasi koleka. Mpe ata soki bazwi biloko mingi, batondaka yango te. (Mosakoli 5:10) Kasi ezali na eloko moko oyo biso tokoki kosala mpo na kobundisa makanisi wana. Kotánga Liloba ya Nzambe mbala na mbala ekopesa biso makasi mpo tóbundisa mposa ya konduka biloko ya mokili. (1 Petro 2:2) Yesu amanyolaki na bwanya ya Yehova, mpe yango esalisaki ye atɛmɛla masɛnginya ya Zabolo. (Matai 4:8-10) Lelo oyo mpe, soki tolingi kokima motambo ya konduka biloko ya mokili, tosengeli kosalela bwanya ya Yehova na bomoi na biso. Soki tosali bongo, Yesu akomona ete tolingaka ye mingi koleka biloko ya mosuni.

Nini eleki ntina na bomoi na yo? (Talá paragrafe 18)

18. Ozali na ekateli ya kosala nini?

18 Ntango Yesu atunaki Petro: “Olingaka ngai koleka oyo?” azalaki koteya Petro ete mosala ya Yehova esengelaki kozala na esika ya liboso na bomoi na ye. Kutu, nkombo Petro elimboli “Libanga.” Bizaleli malamu ya Petro, bakokanisi yango na libanga. (Misala 4:5-20) Lelo oyo, biso mpe tolingi ete bolingo oyo tolingaka Kristo ezala makasi. Yango wana, tosalaka makasi ete mosala na biso ya mosuni, masano mpe kominanola, mpe biloko ya mosuni ezala te na esika ya liboso na bomoi na biso. Soki tosali bongo, tokoloba lokola Petro ete: “Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.”

^ par. 14 Talá lisolo “Oponaka kominanola oyo ebongi?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2011, nkasa 9-12, paragrafe 6-15.