Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2017

Kotika te ete bolingo na yo ekita

Kotika te ete bolingo na yo ekita

“Lokola makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi, bolingo ya bato mingi ekokita.”​—MATAI 24:12.

NZEMBO: 60, 135

1, 2. (a) Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 24:12 etalelaki libosoliboso banani? (b) Ndenge nini mokanda ya Misala emonisi ete bakristo mingi ya siɛklɛ ya liboso bakobaki kozala na bolingo makasi? (Talá elilingi ya ebandeli.)

NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, alimbolaki ndenge oyo bato bakokaki koyeba “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Na makambo oyo atángaki, asakolaki mpe ete: “Bolingo ya bato mingi ekokita.” (Matai 24:3, 12) Bayuda ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kobɛta ntolo ete bazali basaleli ya Nzambe, nzokande batikaki ete bolingo oyo bazalaki kolinga Nzambe ekita.

2 Kasi, bakristo mingi na ntango wana bazalaki na makanisi oyo ekesanaki na oyo ya bango. Bazalaki kosakola na molende “nsango malamu oyo etali Kristo” mpe komonisa ete bazalaki kolinga Nzambe, kolinga bandeko na bango bandimi, ata mpe kolinga bato oyo bayebaki naino solo te. Bakristo wana batikaki te ete bolingo oyo bazalaki kolinga Nzambe ekita. (Misala 2:44-47; 5:42) Kasi likambo ya mawa, bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso batikaki ete bolingo na bango ekita. Ndenge nini toyebi yango?

3. Mbala mosusu nini esalaki ete bolingo ya bakristo mosusu ekita?

 3 Yesu ayebisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso ya Efese ete: ‘Botiki bolingo oyo bozalaki na yango liboso.’ (Emoniseli 2:4) Ekoki kozala ete bakristo ya Efese balandaki mimeseno ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango, oyo bazalaki koluka libosoliboso komisepelisa bango moko. (Baefese 2:2, 3) Efese ezalaki engumba moko ya bozwi mingi, esika oyo bato bazalaki komipesa mingi na koluka bomɛngo mpe bomoi ya malamu koleka makambo mosusu nyonso. Bato mingi na Efese bazalaki mpe komipesa na bomoi ya mbindo mpe bazalaki te kotosa mibeko ya Nzambe. Bazalaki koluka kaka bisengo na bango moko, na esika ya kolinga Nzambe mpe bato mosusu.

4. (a) Ndenge nini bolingo ezali kokita na mikolo na biso? (b) Na makambo nini misato bolingo na biso esengeli kokoba kozala makasi?

4 Likambo oyo Yesu alobaki ete bolingo ya bato mingi ekokita etaleli mpe biso lelo. Lelo oyo, bato mingi balingaka lisusu Nzambe te. Na esika ya kotyela Nzambe motema ete akosilisa mikakatano oyo ezali na mokili, bamilio ya bato bazali nde kotya motema na bibongiseli ya bato. Bolingo na bango ezali kokita se kokita. Ata mpe bolingo ya basaleli ya Yehova ekoki kokita, kaka ndenge bolingo ya lisangá ya Efese ekitaki. Yango wana, tótalela makambo misato oyo bolingo na biso esengeli kokoba kozala makasi: (1) kolinga Yehova, (2) kolinga mateya ya Biblia, mpe (3) kolinga bandeko.

KOLINGA YEHOVA

5. Mpo na nini tosengeli kolinga Nzambe?

5 Nani oyo tosengeli kolinga mingi koleka? Yesu alobaki ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.” (Matai 22:37, 38) Bolingo oyo tolingaka Nzambe esalisaka biso tótosa mibeko na ye, tóyika mpiko, mpe tóyina makambo ya mabe. (Tángá Nzembo 97:10.) Kasi Satana mpe mokili na ye bazali koluka kokitisa mpe kosilisa bolingo oyo tolingaka Nzambe.

6. Nini ekómaka soki bato bazali kolinga Nzambe lisusu te?

6 Mokili etalelaka bolingo na lolenge oyo ebongi te. Na esika ya kolinga Nzambe, bato mingi “bamilingaka” nde bango moko. (2 Timote 3:2) Batyaka makanisi na bango nyonso kaka na “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.” (1 Yoane 2:16) Ntoma Paulo akebisaki biso mpo na likama oyo ekoki kobima soki tozali koluka libosoliboso komisepelisa biso moko. Alobaki boye: “Kokanisa bamposa ya nzoto elakisi liwa.” Mpo na nini? Mpamba te bato oyo basalaka bongo bakómaka nde banguna ya Nzambe. (Baroma 8:6, 7) Bato oyo balekisaka bomoi na bango kaka na koluka mbongo to na koluka kaka kokokisa bamposa na bango ya kosangisa nzoto basukaka mabe.​—1 Bakorinti 6:18; 1 Timote 6:9, 10.

7. Makanisi nini ya libunga bakristo bakoki kolanda lelo oyo?

7 Bato mingi oyo bandimaka liteya ya evolisyo, mpe baoyo balobaka ete Nzambe azali te, to baoyo balobaka ete ezali mpasi mpo na koyeba Nzambe, balukaka kotinda basusu bákanisa ete esengeli kolinga Nzambe te to ata kondima te ete azali. Balingaka komonisa ete kaka bazoba to bato oyo batángá kelasi te nde bakoki kondima ete Mozalisi azali. Longola yango, ebele ya bato bapesaka bato ya siansi limemya mingi koleka Mozalisi. (Baroma 1:25) Ekoki kokóma ete mokristo akanisa mpe bongo. Boyokani na biso na Yehova ekoki kolɛmba, mpe bolingo oyo tolingaka ye ekoki kokita.​—Baebre 3:12.

8. (a) Makambo nini ekoki kolɛmbisa basaleli ya Yehova? (b) Ndenge nini Nzembo 136 ezali kobɔndisa biso?

8 Lokola tofandi na mokili mabe oyo ya Satana, ezali na makambo mingi oyo ekoki  kolɛmbisa biso nzoto na bantango mosusu. (1 Yoane 5:19) Kasi soki totiki ete kolɛmba nzoto yango eleka ndelo, kondima na biso ekoki kolɛmba mpe bolingo oyo tolingaka Nzambe ekoki kokita. Na ndakisa, bobange, maladi, to kozanga mbongo ekoki kobimisela biso mikakatano mingi. To mpe tokoki kokóma mawamawa mpo tozali kokoka te kosala likambo moko malamu ndenge tokanaki. Tokoki kolɛmba nzoto mpo makambo mosusu na bomoi na biso esalemi te ndenge tokanisaki. Kasi, ezala tokutani na mikakatano ya ndenge nini, tosengeli soki moke te kokanisa ete Yehova asundoli biso. Kanisá maloba ya kobɔndisa oyo ezali na Nzembo 136:23: “Akanisaki biso lisusu ntango tokitisamaki: mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.” Tokoki kozala na kondima ete Yehova ayokaka ‘malɔmbɔ na biso’ mpe akoyanola yango.​—Nzembo 116:1; 136:24-26.

9. Nini epesaki ntoma Paulo makasi mpo akoba kolinga Nzambe mingi?

9 Ntoma Paulo azalaki mosaleli ya Nzambe oyo azalaki kokanisa na mozindo ndenge oyo Yehova asungaki ye; yango esalisaki ye atikala makasi na elimo. Akomaki boye: “Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?” (Baebre 13:6) Ndenge oyo ntoma Paulo azalaki kotyela Yehova motema esalisaki ye ayikela mikakatano ya bomoi mpiko. Ata ntango ntoma Paulo akutanaki na mikakatano, akobaki kaka kotyela Yehova motema. Ezala ntango azalaki na bolɔkɔ, asalisaki bandeko na ye bakristo na ndenge azalaki kokomela masangá mikanda ya kolendisa. (Baefese 4:1; Bafilipi 1:7; Filemo 1) Ezala mokakatano nini ntoma Paulo akutanaki na yango, akobaki kolinga Yehova mingi. Atyaki motema epai ya “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4) Ndenge nini tokoki komekola ntoma Paulo?

Monisá ete olingaka Yehova (Talá paragrafe 10)

10. Nini tokoki kosala mpo bolingo oyo tolingaka Yehova ekóma lisusu makasi?

10 Ntoma Paulo ayebisaki likambo moko oyo tokoki kosala mpo bolingo oyo tolingaka Nzambe ekóma lisusu makasi ntango akomaki ete: “Bóbondelaka ntango nyonso.” Na nsima, akomaki ete: “Bótingama na mabondeli.” (1 Batesaloniki 5:17; Baroma 12:12) Na ndenge nini libondeli ekómisaka biso penepene na Nzambe? Ntango tobondelaka, tosololaka na Yehova. Yango esalisaka biso tózala na boyokani malamu ná ye. (Nzembo 86:3) Ntango toyebisaka Tata na biso ya likoló makanisi ya motema na biso mpe mayoki na biso, topusanaka lisusu penepene na ye. (Nzembo 65:2) Longola yango, ntango Yehova ayanolaka na mabondeli na biso, bolingo oyo tolingaka ye ekómaka lisusu makasi. Tozali na kondima ete “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.” (Nzembo 145:18) Kondima ete Yehova alingaka biso mpe asungaka biso ekosalisa biso tólonga mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango sikoyo mpe na mikolo ezali koya.

KOLINGA MATEYA YA BIBLIA

11, 12. Tokoki kosala nini mpo tólinga mateya ya Biblia lisusu mingi?

11 Biso bakristo tolingaka mateya ya solo. Solo yango ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Yesu ayebisaki Tata na ye ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Mpo na kolinga mateya ya solo, tosengeli koyeba makambo oyo ezali na Biblia. (Bakolose 1:10) Kasi esuki wana te. Talá ndenge oyo mokomi ya Nzembo 119 asalisi biso tóyeba oyo tosengeli kosala. (Tángá Nzembo 119:97-100.) Mokolo mobimba, tosengeli komanyola to kokanisa na mozindo makambo oyo totángi na Biblia. Soki tozali komanyola na matomba oyo tokozwa soki tosaleli mateya ya Biblia na bomoi na biso moko, tokolinga yango lisusu mingi.

12 Mokomi ya nzembo alobaki mpe ete: “Maloba na yo ezali sukali mpenza na edáda  na ngai, koleka mafuta ya nzoi na monɔkɔ na ngai!” (Nzembo 119:103) Mikanda oyo elimbolaka Biblia, oyo ebongiseli ya Nzambe ebimisaka, ezali lokola bilei ya elɛngi. Ntango tolyaka bilei oyo tolingaka, tolyaka yango mbangumbangu te, tozwaka ntango mingi. Ndenge moko mpe, tosengeli kozwaka ntango mingi mpo na koyekola. Na ndenge yango, tokosepela mpenza na “maloba ya kitoko” ya solo, mpe ekozala mpasi te tómikundola makambo oyo totángaki mpe tósalela yango mpo na kosalisa basusu.​—Mosakoli 12:10.

13. (a) Nini esalisaki Yirimia alinga maloba ya Nzambe? (b) Yango etindaki ye asala nini?

13 Mosakoli Yirimia azalaki kolinga maloba ya Nzambe. Alobaki boye: “Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango; mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga.” (Yirimia 15:16) Yirimia azalaki kokanisa na mozindo maloba kitoko ya Nzambe mpe azalaki kolinga yango. Azalaki kosepela mingi na libaku ya kozala momonisi ya Yehova mpe kosakola nsango na ye. Soki tozali kolinga mateya ya Biblia, tokomona ete kozala Batatoli ya Yehova mpe kosakola nsango ya Bokonzi na mikolo oyo ya nsuka ezali mpenza libaku malamu.

Monisá ete olingaka mateya ya Biblia (Talá paragrafe 14)

14. Nini mosusu tokoki kosala mpo tólinga mateya ya Biblia lisusu mingi?

14 Nini mosusu ekoki kosalisa biso tólinga mateya ya Biblia lisusu mingi? Tosengeli koyanganaka mbala na mbala na makita ya lisangá, esika oyo Yehova ateyaka biso. Boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na lisalisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali moko ya banzela ya libosoliboso oyo toteyamaka. Soki tolingi kozwa matomba mingi na boyekoli yango, tosengeli komibongisaka liboso ya koya na makita. Na ndakisa, tokoki kotánga bavɛrsɛ ya Biblia oyo maloba na yango etyami te na paragrafe. Lelo oyo, ezali mpasi te ete bandeko mingi bátánga to bázwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na baaparɛyi na bango mpo ezali kobimisama na minɔkɔ ebele na site Internet jw.org mpe na programɛ JW Library. Baaparɛyi mosusu esalisaka biso tótánga mbala moko bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te na paragrafe. Nzokande, koyekola lisolo mokomoko, kotánga bavɛrsɛ na likebi mpe komanyola yango,  esalisaka biso tólinga mateya ya Biblia lisusu mingi.​—Tángá Nzembo 1:2.

KOLINGA BANDEKO NA BISO

15, 16. (a) Na kotalela Yoane 13:34, 35, mobeko nini Yesu apesaki biso? (b) Boyokani nini ezali kati na bolingo oyo tolingaka Nzambe, ndenge oyo tolingaka Biblia, mpe bolingo oyo tolingaka bandeko na biso?

15 Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

16 Kolinga bandeko na biso ya mibali mpe basi ezali na boyokani na kolinga Yehova. Soki tolingaka Nzambe te, tokoki kolinga bandeko na biso te. Mpe soki tolingaka bandeko na biso te, tokoki kolinga Nzambe te. Ntoma Yoane akomaki boye: “Moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki kolinga Nzambe te, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 4:20) Bolingo oyo tolingaka Yehova mpe bandeko na biso ezali mpe na boyokani na kolinga Biblia. Mpo na nini? Mpamba te soki tolingaka makambo oyo toyekolaka na Biblia, tokolinga kotosa mibeko oyo tozali kokuta kuna, oyo ya kolinga Nzambe mpe ya kolinga bandeko na biso.​—1 Petro 1:22; 1 Yoane 4:21.

Monisá ete olingaka bandeko (Talá paragrafe 17)

17. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingaka bandeko?

17 Tángá 1 Batesaloniki 4:9, 10. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingaka bandeko na biso ya lisangá? Ndeko mobali to ndeko mwasi moko ya mobange akoki kozala na mposa ete tókende kotika ye na makita ya lisangá mpe tózongisa ye na ndako. Ndeko mwasi moko oyo mobali na ye akufá akoki kozala na mposa ya lisalisi mpo na kobongisa eloko moko na ndako na ye. (Yakobo 1:27) Bandeko mibali mpe basi oyo balɛmbi nzoto mpe baoyo bazali konyokwama na makanisi to baoyo bazali kokutana na mikakatano mosusu bazali na mposa ete tótyelaka bango likebi, tólendisaka bango, mpe tóbɔndisaka bango. (Masese 12:25; Bakolose 4:11) Tomonisaka ete tolingaka “baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima” na makambo oyo tolobaka mpe tosalaka.​—Bagalatia 6:10.

18. Nini ekosalisa biso tóbongisa makambo ntango tozwani matata na bandeko na biso?

18 Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mabe, bato mingi bakozala bato oyo bamilingaka mpe bato ya lokoso. (2 Timote 3:1, 2) Lokola tozali bakristo, tosengeli kosala makasi mpo bolingo oyo tolingaka Yehova, ndenge oyo tolingaka Liloba na ye, mpe bolingo oyo tolingaka bandeko na biso, ekoba kokola. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ntango mosusu tokoki kozwana matata na bandeko na biso. Kasi lokola tolinganaka, tokosala makasi tósilisa matata yango na ndenge ya boboto mpe nokinoki. (Baefese 4:32; Bakolose 3:14) Tótika soki moke te ete bolingo na biso ekita! Tókoba nde kolinga Yehova, kolinga Biblia, mpe kolinga bandeko na biso lisusu mingi.