Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2017

Ndenge oyo Gayusi asalisaki bandeko

Ndenge oyo Gayusi asalisaki bandeko

GAYUSI ná bakristo mosusu oyo bazalaki na bomoi pene na nsuka ya siɛklɛ ya liboso bakutanaki na mikakatano mingi. Bato oyo bazalaki kopalanganisa mateya ya lokuta bazalaki koluka kolɛmbisa masangá mpe kotya bokabwani kati na yango. (1 Yoane 2:18, 19; 2 Yoane 7) Mobali moko nkombo na ye Diotrefese azalaki “kolobaloba mabe” mpo na ntoma Yoane mpe bandeko mosusu, azalaki koboya koyamba bakristo oyo bazalaki kosala mibembo, mpe azalaki koluka kotinda basusu bámekola ye. (3 Yoane 9, 10) Makambo ezalaki ndenge wana ntango ntoma Yoane akomelaki Gayusi mokanda. Mokanda yango, oyo ekomamaki na mobu 98 T.B., eyebani na nkombo ya “Mokanda ya misato ya Yoane” na Makomami ya Grɛki ya bokristo.

Atako Gayusi akutanaki na mikakatano mingi, akobaki kosalela Yehova na bosembo. Ndenge nini amonisaki bosembo na ye? Mpo na nini tolingi kolanda ndakisa ya Gayusi lelo oyo? Ndenge nini mokanda ya Yoane ekoki kosalisa biso tósala yango?

MOKANDA EPAI YA MONINGA MOKO YA MOTEMA

Mokomi ya mokanda ya misato ya Yoane amibengi “mokóló.” Komibenga ndenge wana esalisaki Gayusi, mwana na ye ya elimo oyo azalaki kolinga mingi, ayeba ete mokanda yango eutaki epai ya ntoma Yoane. Ntoma Yoane abengaki Gayusi “ndeko ya bolingo, oyo nalingaka mpenza.” Na nsima, alobaki ete azalaki na elikya ete Gayusi azalaki nzoto kolɔngɔnɔ, kaka ndenge azalaki makasi na elimo. Oyo nde maloba kitoko ya kopesa longonya!​—3 Yoane 1, 2, 4.

Ekoki kozala ete Gayusi azalaki nkulutu na lisangá, kasi mokanda yango emonisi yango polele te. Ntoma Yoane akumisaki Gayusi mpo na ndenge oyo azalaki koyamba bandeko na ndako na ye, atako ayebaki bango te. Ntoma Yoane amonaki yango lokola elembeteli oyo emonisaki ete Gayusi azalaki sembo, mpamba te koyamba bapaya ezali elembo oyo ekesenisaka basaleli ya Nzambe ná bato mosusu.​—Ebandeli 18:1-8; 1 Timote 3:2; 3 Yoane 5.

Ndenge oyo ntoma Yoane akumisaki Gayusi mpo na ezaleli na ye ya koyamba bapaya emonisi ete bakristo bazalaki mbala na mbala kosala mibembo kolongwa na esika oyo ntoma Yoane azalaki tii na masangá mosusu. Na ntembe te, bandeko wana oyo bazalaki kosala mibembo bayebisaki Yoane makambo oyo bakutanaki na yango. Ekoki kozala na nzela wana nde ntoma Yoane azwaki nsango ya masangá yango.

Kozanga ntembe, bakristo oyo bazalaki kosala mibembo bazalaki kolinga kofanda elongo na bandeko na bango bakristo. Bandako ya koyamba bapaya ezalaki na lokumu malamu te, bazalaki koyamba bato malamu kuna te, mpe eyebanaki ete ezali bisika ya bato ya pite mpe ya ekobo. Yango wana, soki likoki ezali, bato ya  mobembo oyo bazalaki na bwanya bazalaki kofanda epai ya baninga na bango; bakristo oyo bazalaki kosala mibembo bazalaki kofanda epai ya bakristo mosusu.

“BABIMI NDE NA NKOMBO NA YE”

Ntoma Yoane alendisaki Gayusi amonisa lisusu ezaleli ya koyamba bapaya, mpo asɛngaki ye ete “[bakristo oyo bazalaki kosala mibembo] bákende na ndenge oyo ebongi na Nzambe.” Awa, kotika bapaya bákende na ndenge oyo ebongi elimbolaki kopesa bango eloko nyonso oyo basengelaki na yango mpo na mobembo na bango mobimba. Emonani ete Gayusi azalaki kosala bongo mpo na bapaya oyo ayambaki liboso, mpamba te bamemelaki ntoma Yoane nsango ete Gayusi azalaki na kondima mpe na bolingo.​—3 Yoane 3, 6.

Bapaya yango bakokaki kozala bamisionɛrɛ, to bandeko oyo ntoma Yoane azalaki kotinda, to bakɛngɛli-batamboli. Ezala ndenge nini, bazalaki kosala mibembo mpo na nsango malamu. Ntoma Yoane alobaki: “Babimi nde na nkombo na ye.” (3 Yoane 7) Ntoma Yoane autaki kolobela Nzambe (talá vɛrsɛ 6), yango wana ekoki kozala ete maloba “na nkombo na ye” emonisi nkombo ya Yehova. Lokola bandeko yango bazalaki na lisangá ya bokristo, esengelaki koyamba bango malamu. Ezali ndenge ntoma Yoane akomaki: “Tosengeli koyamba bato ya ndenge wana malamu, mpo tókóma baninga ya mosala na kati ya solo.”​—3 Yoane 8.

LISALISI MPO NA LIKAMBO MOKO YA MPASI

Ntoma Yoane akomelaki Gayusi te kaka mpo na kotɔnda ye. Ntoma Yoane alingaki mpe kosalisa ye abundisa likambo moko ya monene. Mpo na ntina oyo eyebani te, Diotrefese, oyo azalaki na lisangá ya bokristo, azalaki koboya koyamba bakristo oyo bazalaki kosala mibembo. Azalaki ata koluka kopekisa bandeko mosusu báyamba bapaya.​—3 Yoane 9, 10.

Na ntembe te, bakristo ya sembo bazalaki kosepela te kofanda elongo na Diotrefese, ata soki libaku emonani. Azalaki kolinga kozwa esika ya liboso na kati ya lisangá, azalaki koyamba na limemya ata eloko moko te oyo euti epai ya ntoma Yoane, mpe azalaki kolobaloba mabe mpo na ntoma wana mpe bandeko mosusu. Ntoma Yoane abengaki ye moteyi ya lokuta ata mokolo moko te. Atako bongo, Diotrefese azalaki kotɛmɛla bokonzi na ye. Mposa ya lokumu oyo Diotrefese azalaki na yango mpe ezaleli na ye oyo bakristo basengeli kozala na yango te etyaki bosembo na ye na komekama. Ndakisa ya Diotrefese emonisi ete bato oyo balukaka lokumu mpe bato ya lolendo bakoki kosala ete bokabwani ekɔta na lisangá. Yango wana, ntoma Yoane ayebisaki Gayusi, ezala mpe mokomoko na biso, ete: “Zalá momekoli, ya makambo ya mabe te.”​—3 Yoane 11.

NTINA MONENE YA KOSALA MALAMU

Na kokesana na Diotrefese, ntoma Yoane alobelaki mokristo moko na nkombo Demetriusi, oyo azalaki ndakisa malamu. Ntoma Yoane akomaki: “Bapesi litatoli [ya malamu] mpo na Demetriusi . . . Ɛɛ, biso mpe tozali kopesa litatoli, mpe oyebi ete litatoli oyo biso tozali kopesa ezali solo.” (3 Yoane 12) Ekoki kozala ete Demetriusi azalaki na mposa ete Gayusi asalisa ye, mpe mbala mosusu mokanda ya Yoane ya misato ezalaki mokanda oyo ntoma yango akomaki mpo na koyebisa mpe kolobela makambo na ye. Ntango mosusu, Demetriusi ye moko nde amemaki mokanda yango epai ya Gayusi. Lokola Demetriusi azalaki moko ya batindami ya ntoma Yoane, to ntango mosusu mokɛngɛli-motamboli, ekoki kozala ete alimbolaki lisusu makambo oyo ntoma Yoane akomaki.

Mpo na nini ntoma Yoane alendisaki Gayusi akoba komonisa ezaleli ya koyamba bapaya, atako liboso azalaki kosala yango? Ntoma Yoane amonaki nde ete esengeli kolendisa Gayusi akoba kozala na mpiko? Ntoma Yoane azalaki nde kobanga ete Gayusi akakatana mpo Diotrefese azalaki koluka kobwaka libándá ya lisangá bakristo oyo bazalaki koyamba bapaya? Ezala ndenge nini, ntoma Yoane akitisaki Gayusi motema ntango alobaki: “Moto oyo asalaka malamu auti na Nzambe.” (3 Yoane 11) Yango ezali ntina monene ya kosala malamu mpe kokoba kosala bongo.

Mokanda ya Yoane elendisaki nde Gayusi akoba kozala moyambi ya bapaya? Ndenge oyo mokanda ya Yoane ya misato ebatelami na liste ya solo ya mikanda ya Biblia mpe tii lelo oyo ezali kolendisa basusu ‘bázala bamekoli ya oyo ezali malamu,’ emonisi ete mokanda yango ekokisaki mokano yango.

 MATEYA OYO TOZWI NA MOKANDA YA MISATO YA YOANE

Toyebi makambo mosusu te mpo na Gayusi, ndeko na biso ya bolingo ya ntango ya kala. Atako bongo, ndenge oyo totaleli na mokuse bomoi na ye ekoki koteya biso makambo mingi.

Ndenge nini tokoki ‘kozala na ezaleli ya koyamba bapaya’?

Ya liboso, mbala mosusu, soki mingi na biso lelo toyebi solo ezali na nzela ya bato ya sembo oyo bazalaki kosala mibembo mpo na kosalisa biso tóyeba solo. Ezali solo ete na lisangá ya bokristo lelo oyo, bakristo nyonso te nde basalaka mibembo ya mosika mpo na nsango malamu. Kasi, lokola Gayusi, tokoki kopesa mabɔkɔ na lolenge mosusu mpe kolendisa bandeko oyo basalaka mibembo ya ndenge wana, na ndakisa bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango. To mpe tokoki kosalisa bandeko mibali mpe basi oyo bakendaka kofanda na bisika mosusu kaka na ekólo oyo tozali, to ata na mboka mopaya, mpo na kosakola na esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. Yango wana, tiká ete ‘tózalaka na ezaleli ya koyamba bapaya.’​—Baroma 12:13; 1 Timote 5:9, 10.

Ya mibale, atako esalemaka mingi te, tosengeli kokamwa te soki bandeko mosusu bazali koboya kotosa bato oyo bazali na bokonzi na kati ya lisangá lelo oyo. Bandeko mosusu bazalaki koboya kotosa bokonzi ya ntoma Yoane; basusu bazalaki mpe koboya kotosa bokonzi ya ntoma Paulo. (2 Bakorinti 10:7-12; 12:11-13) Kasi, tosengeli kosala nini soki tokutani na likambo ya ndenge wana na lisangá? Ntoma Paulo apesaki Timote toli oyo: “Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso, moto oyo ayebi koteya, oyo amipekisaka na ntango basali ye mabe, oyo ateyaka na boboto baoyo bazali na ezaleli ebongi te.” Soki tokobi kozala na boboto ata ntango batumoli biso, bato mosusu oyo balobaka mabe mpo na biso bakoki mokemoke kobongola makanisi na bango. Na nsima, “mbala mosusu [Yehova] akopesa bango nzela bábongola motema mpo bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”​—2 Timote 2:24, 25.

Ya misato, tosengeli komitya na esika ya bandeko na biso bakristo oyo bazali kosalela Yehova na bosembo atako bazali kokutana na botɛmɛli mpe tosengeli kopesa bango longonya mpo na bosembo na bango. Ntoma Yoane alendisaki mpenza Gayusi mpe akitisaki ye motema ete azalaki kosala oyo ezali malamu. Ndenge moko mpe, lelo oyo bankulutu basengeli kolanda ndakisa ya ntoma Yoane mpe kolendisa bandeko na bango mpo ‘básila makasi te.’​—Yisaya 40:31; 1 Batesaloniki 5:11.

Mokanda ya ntoma Yoane epai ya Gayusi ezali mokanda oyo eleki mokuse na mikanda ya Biblia; na makomi ya Grɛki ya ebandeli ezali kaka na maloba 219. Atako bongo, ezali na motuya monene mpo na bakristo lelo oyo.