Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2017

Tiká ete elimo na yo ya komipesa ekumisa Yehova!

Tiká ete elimo na yo ya komipesa ekumisa Yehova!

“Lokola bato bamipesi bango moko, bópambola Yehova.”BASAMBISI 5:2.

NZEMBO: 150, 10

1, 2. (a) Elifaze ná Biledade balobaki nini mpo na ndenge oyo Nzambe atalelaka mosala na biso? (b) Yehova alobaki nini na likambo yango?

ELEKI bambula mingi, mibali misato bakendaki kosolola na Yobo, mosaleli ya sembo ya Nzambe. Moko na bango, Elifaze Motemane, atunaki Yobo mituna mingi ya ntina: “Mobali makasi akoki nde kozala na ntina epai ya Nzambe, mpo moto oyo azali na mayele ya kososola azala na ntina epai na ye? Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali nde kosepela mpo yo ozali moyengebene, to kozwa litomba mpo ozali kosala ete nzela na yo ezanga mbeba?” (Yobo 22:1-3) Mpo na Elifaze, eyano ezalaki polele ete ekoki kosalema te. Mobali ya mibale, Biledade Moshua, abakisaki ete ekoki kosalema te ete moto amonana sembo na miso ya Nzambe.Tángá Yobo 25:4.

2 Elifaze ná Biledade balingaki kondimisa Yobo ete milende oyo azalaki kosala mpo na kosalela Yehova ezalaki mpamba. Mibali yango balingaki kotinda Yobo akanisa ete tozali na motuya te na miso ya Nzambe koleka nyama mike lokola mbombo, nkusu, to mosɔpi. (Yobo 4:19; 25:6) Bazalaki nde koloba bongo mpo bazalaki na komikitisa? (Yobo 22:29) Ezali solo ete Yehova azali Nzambe oyo aleki likoló mpe biso tozali mpenza moke na miso na ye. Soki tozali likoló ya ngomba to tozali na kati ya mpɛpɔ mpe totali na lininisa, tokomona ete tozali mpenza moke mpe tokomimona mpamba. Kasi ezali ndenge wana nde Yehova atalelaka milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye mpe mosala makasi oyo tosalaka mpo na Bokonzi? Te!  Yehova ayebisaki Elifaze, Biledade, mpe mobali ya misato Zofare ete makambo oyo balobaki ezalaki lokuta. Na nsima, Nzambe alobaki ete azalaki kosepela na Yobo mpe abengaki ye “mosaleli na ngai.” (Yobo 42:7, 8) Na yango, tokoki kozala na kondima ete bato ya kozanga kokoka bakoki “kozala na ntina epai ya Nzambe.”

“ELOKO NINI OKOPESA YE?”

3. (a) Elihu alobaki nini mpo na milende oyo tosalaka mpo na kosalela Yehova? (b) Alingaki koloba nini?

3 Elenge mobali moko nkombo na ye Elihu azalaki kolanda lisolo ya Yobo ná mibali wana misato. Ntango lisolo na bango esilaki, Elihu atunaki Yobo mpo na Yehova boye: “Soki ozali mpenza na elonga, eloko nini okopesa ye, to eloko nini akozwa na lobɔkɔ na yo?” (Yobo 35:7) Elihu alingaki nde koloba mpe ete milende oyo tosalaka mpo na kosalela Nzambe ezali mpamba? Te. Yehova asembolaki Elihu te, ndenge asalaki yango mpo na mibali wana mosusu. Elihu azalaki kolobela likambo mosusu. Azalaki koloba ete ata soki tosambeli Yehova te, akozanga eloko te. Yehova akoká na nyonso. Ezali na eloko moko te oyo tokoki kosala mpo na kokómisa ye mozwi to makasi koleka. Kutu, bizaleli malamu to makoki nyonso oyo tozali na yango eutaka nde epai ya Nzambe, mpe amonaka ndenge oyo tosalelaka yango.

4. Yehova ayokaka ndenge nini ntango tomoniselaka basusu boboto?

4 Ntango tomoniselaka bato oyo basambelaka Yehova bolingo ya sembo, atalelaka yango lokola tozali nde kosalela ye. Masese 19:17 elobi ete: “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.” Yehova amonaka ntango nyonso makambo oyo tosalaka mpo na komonisela basusu motema mawa. Atako Yehova azali Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, atalelaka makambo yango lokola nyongo, oyo afutaka ndenge apesaka biso ebele ya makabo kitoko. Yesu, Mwana ya Nzambe, andimaki likambo yango.Tángá Luka 14:13, 14.

5. Mituna nini tokotalela sikoyo?

5 Na ntango ya kala, Yehova asɛngaki mosakoli Yisaya azala momonisi na ye mpe asalela ye na ndenge oyo ekeseni na bato mosusu. (Yisaya 6:8-10) Yisaya andimaki libyangi yango mpe alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.” Lelo oyo mpe, Yehova azali kopesa bato ya sembo libaku ya kosala mosala na ye. Bankóto ya basaleli ya Yehova bazali komonisa ete bazali na elimo lokola oyo ya Yisaya. Bazali kondima kosalela Yehova misala ndenge na ndenge na bisika ndenge na ndenge, mpe koyika mpiko na bampasi mpe mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Kasi moto akoki koloba na nse ya motema: ‘Nasepelaka na libaku ya komipesa na mosala ya Yehova, kasi mosala oyo nasalaka ezali mpenza na ntina? Ata soki ngai nazali te, Yehova akoki te kosala ete mosala na ye esalema?’ Osilá kokanisa bongo? Tótalela ndenge oyo makambo mosusu ya bomoi ya Debora mpe Barake, basaleli mibale ya Yehova ya ntango ya kala, ekoki kosalisa biso tóyanola na mituna wana.

NZAMBE ASALAKI ETE KOBANGA NA BANGO EKÓMA MPIKO

6. Mpo na nini ezalaki komonana lokola ete limpinga ya basoda ya Yabine ekokaki kolonga Bayisraele kozanga mpasi?

6 Barake azalaki mobundi-bitumba na Yisraele, mpe Debora azalaki mosakoli mwasi. Na boumeli ya mbula 20, Yabine, mokonzi moko ya Kanana “anyokolaki” Bayisraele makasi. Limpinga ya basoda ya Yabine ezalaki mpenza nkanza mpe ezalaki kobikisa te, yango wana Bayisraele oyo bazalaki kofanda na bamboka bazalaki kobanga kobima ata libándá ya bandako na bango. Limpinga ya basoda ya Yabine ezalaki na makalo 900 ya bitumba oyo ezalaki na makwangola, kasi Bayisraele bazalaki na bibundeli ya malonga te mpo na kobunda to komibatela.Basambisi 4:1-3, 13; 5:6-8. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

7, 8. (a) Malako nini ya liboso Yehova apesaki Barake? (b) Ndenge nini Yisraele elongaki limpinga ya basoda ya Yabine? (Talá elilingi ya ebandeli.)

 7 Soki tokokanisi Bayisraele na limpinga ya basoda ya Yabine, ekoki komonana lokola ete Bayisraele bazali makasi te mpe bakoki kolonga bango kozanga mpasi. Kasi na nzela ya mosakoli mwasi Debora, Yehova apesaki Barake mitindo oyo: “Kende mpe palanganá na Ngomba Tabore, mpe osengeli kokamata mibali nkóto zomi (10 000) elongo na yo na kati ya bana ya Nafatali mpe na kati ya bana ya Zebulone. Mpe ya solo, ngai nakobenda epai na yo Sisera mokonzi ya basoda ya Yabine ná makalo na ye ya bitumba mpe ebele na ye ya bato na lobwaku ya mokɛli ya Kishone, mpe nakopesa ye mpenza na lobɔkɔ na yo.”Basambisi 4:4-7.

8 Ntango balukaki bato oyo bandimi komipesa bango moko, mibali 10 000 bayanganaki na ngomba Tabore. Na nsima, Barake ná bato na ye bakendaki kobundisa limpinga ya basoda ya banguna na esika oyo ebengami Taanake. (Tángá Basambisi 4:14-16.) Yehova asalisaki Bayisraele? Ɛɛ. Mbula moko ya mabanga ebɛtaki na mbalakaka mpe esika ya bitumba ekómaki pɔtɔpɔtɔ. Yango ezalaki mpo na litomba ya Bayisraele. Barake abenganaki limpinga ya basoda ya Sisera tii na ntaka ya bakilomɛtrɛ 24 tii na esika oyo ebengami Haroshete. Na nzela, likalo ya Sisera ekangamaki na pɔtɔpɔtɔ. Ntango amonaki bongo, akitaki mpe akimaki mbangu tii na Zaananime, oyo ekoki kozala pene na Kadeshe. Kuna, Sisera akendaki komibomba na hema ya mwasi moko nkombo na ye Yaele. Sisera alɛmbaki mingi mpe alalaki mpɔngi mozindo. Ntango azalaki na nse ya mpɔngi, na mpiko nyonso, Yaele abomaki ye. (Basambisi 4:17-21) Na ndenge yango, Yehova asalisaki Bayisraele bálonga banguna na bango! * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

BOKESENI NA LIKAMBO ETALI ELIMO YA KOMIPESA

9. Liteya nini tozwi na Basambisi 5:20, 21 na oyo etali etumba oyo Bayisraele babundisaki Sisera?

9 Tokoyekola makambo mingi na masolo oyo ezali na Basambisi mokapo 4 soki totángi mokapo oyo elandi, elingi koloba mokapo ya 5. Basambisi 5:20, 21 eyebisi biso boye: “Uta na likoló, minzoto ebundaki, uta na banzela na yango, ebundaki na Sisera. Mokɛli ya Kishone ekɔmbɔlaki bango.” Elingi koloba ete baanzelu to mbula ya mabanga nde esalaki ete Bayisraele bálonga etumba yango? Biblia elobi yango te. Kasi tokoki kokanisa ete Yehova abikisaki bato na ye ntango anokisaki mbula makasi na esika mpe na ntango oyo ebongi, yango wana, makalo 900 ekokaki kotambola te. Na Basambisi 4:14, 15, tozali kotánga mbala misato ete Yehova nde azalaki kosala ete Bayisraele bálonga. Moto moko te kati na Bayisraele 10 000 oyo bamipesaki bango moko akokaki koloba ete ye nde asali ete bálonga.

10, 11. (a) Meroze ezalaki nini? (b) Mpo na nini elakelamaki mabe?

10 Sikoyo tótalela likambo moko ya ntina mingi. Ntango Bayisraele balongaki etumba, Debora ná Barake bakumisaki Yehova na nzembo. Bayembaki boye: “‘Bólakela Meroze mabe, bótika te kolakela bato oyo bafandi kuna mabe, mpamba te bayaki te kopesa Yehova mabɔkɔ, bayaki na bilombe na bango te mpo na kopesa Yehova mabɔkɔ.’”Basambisi 5:23.

11 Meroze ezalaki mpenza nini? Toyebi mpenza te. Kasi elakeli mabe ya Mezore esalaki ete emonana lisusu te. Ekoki kozala ete Meroze ezalaki engumba oyo bafandi na yango baboyaki kopesa Barake mabɔkɔ na etumba. Ntango bato 10000 bapesaki mabɔkɔ mpo na kobundisa Bakanana, basɛngaki mpe bato ya Meroze bápesa mabɔkɔ. To Meroze ekokaki kozala engumba oyo Sisera akatisaki ntango azalaki kokima Barake. Mbala mosusu bato ya Meroze bazalaki na libaku ya kokanga Sisera kasi basalaki yango te. Kanisá ndenge oyo bazalaki komona elombe ya bitumba oyo azalaki  kokatisa na babalabala na bango! Bakokaki kosala likambo moko ya ntina mpo na kokokisa mokano ya Yehova. Soki básalaka yango, Yehova alingaki kopesa bango mbano. Kasi ntango bazalaki na libaku ya kosala likambo moko mpo na Yehova, basalaki yango te. Emonani ete bato ya Meroze bakesanaki makasi na Yaele, oyo amonisaki mpiko.Basambisi 5:24-27.

12. (a) Bokeseni nini emonanaki epai ya bato oyo balobelami na Basambisi 5:9, 10? (b) Likambo yango etaleli mpe biso na nini?

12 Na Basambisi 5:9, 10, tozali komona ete ezaleli ya bato 10 000 oyo bamipesaki bango moko ekesanaki mpenza na ezaleli ya bato oyo baboyaki komipesa. Debora ná Barake bakumisaki “bakomanda ya Yisraele, baoyo bamipesaki bango moko kati na bato.” Bakesanaki makasi na “batambwisi ya bampunda-basi ya langi ya mwa mosaka,” oyo bazalaki komimona ete bazali na ntina mingi mpo na mosala ya komipesa. Balobeli bato yango lokola ‘baoyo bazali kofanda na tapi ya ntalo’ mpe ‘baoyo bazali kotambola na nzela,’ oyo bazali na bomoi ya malamu. Na kokesana na bango, bato oyo bamipesaki bango moko bandimaki kokende elongo na Barake mpo na kobunda na ngomba ya mabangamabanga ya Tabore mpe lobwaku ya mokɛli ya Kishone oyo ezalaki pɔtɔpɔtɔ. Bato oyo balingaki kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ bazalaki koloba: “Bókanisa malamu!” Nzokande, basengelaki kotya likebi mpe kokanisa mabaku oyo babungisaki ndenge baboyaki komipesa na mosala ya Yehova. Lelo oyo, biso mpe tosengeli koluka koyeba ndenge oyo totalelaka mosala ya Nzambe.

13. Ndenge nini ezaleli ya bato ya libota ya Rubene, ya Dani, mpe ya Ashere ekesanaki na oyo ya bato ya libota ya Zebulone mpe ya Nafatali?

13 Bato 10 000 oyo bamipesaki bango moko bazalaki na libaku ya komona na miso ndenge oyo Yehova asalaka lokola Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Bakokaki koyebisa basusu likambo yango ntango bazalaki kolobela “misala ya boyengebene ya Yehova.” (Basambisi 5:11) Bakesanaki na bato ya libota ya Rubene, ya Dani, mpe ya Ashere oyo bazalaki komipesa mingi na bozwi na bango, na ndakisa: bitonga na bango, bamasuwa na bango, mpe mabongo na bango ya kosɛma, koleka misala oyo bazalaki kosalela Yehova. (Basambisi 5:15-17) Atako bongo, mabota nyonso te esalaki bongo. Libota ya Zebulone mpe ya Nafatali “batyaki milimo na bango moko na likama ya liwa” mpo na kopesa Debora ná Barake mabɔkɔ. (Basambisi 5:18) Bizaleli wana oyo ekeseni ekoki kopesa biso liteya moko ya ntina mingi na oyo etali komipesa.

 “BÓPAMBOLA YEHOVA”

14. Lelo oyo, ndenge nini tomonisaka ete topesaka boyangeli ya Yehova mabɔkɔ?

14 Lelo oyo, tobundaka etumba te mpo na kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ. Kasi, topesaka mabɔkɔ ntango tosakolaka na mpiko mpe na molende. Koleka ndenge ezalaki liboso, mosala ya Yehova ezali na bosɛnga ya bato oyo bamipesaka bango moko. Bamilio ya bandeko mibali, basi mpe bilenge bazali komipesa na mosala ya ntango nyonso. Na ndakisa, mingi na bango bazali babongisi-nzela, basalaka na Betele, batongaka Bandako ya Bokonzi, mpe bapesaka mabɔkɔ na misala oyo esalemaka na mayangani ya mike mpe ya minene. Bankulutu mosusu basalaka na Komite mpo na boyokani na minganga mpe babongisaka mayangani. Tokoki kondimisama ete Yehova asepelaka na ndenge oyo tondimaka kosalela ye, ezala na lolenge nini, mpe akobosana te milende na biso.Baebre 6:10.

Liboso ya kozwa ekateli moko, luká koyeba ndenge oyo bato ya libota na yo mpe bandeko ya lisangá bakomiyoka (Talá paragrafe 15)

15. Ndenge nini tokoki kondimisama ete tozali kobatela esengo na biso na mosala ya Yehova?

15 Tosengeli koluka koyeba ndenge oyo totalelaka mosala ya komipesa. Tokoki komituna boye: ‘Nazali kotika basusu básala misala mingi? Namipesaka mingi mpo na kozwa biloko ya kobikela na esika ya kosalela Yehova? To nazali komekola kondima mpe mpiko ya Barake, Debora, Yaele, mpe bato 10 000 oyo bamipesaki bango moko, mpe nasalelaka bozwi na ngai mpo na kosalela Yehova? Nazali kokanisa kokende na mboka mopaya to na engumba mosusu mpo na koluka mbongo mingi mpe kozala na bomoi ya malamu? Soki ezali bongo, nazali kobondela Yehova mpo na oyo ekokómela bato ya libota na ngai mpe bandeko ya lisangá?’ * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

16. Atako Yehova azali na nyonso, eloko nini tokoki kopesa ye?

16 Yehova apesi biso lokumu monene na ndenge tozwi libaku ya kopesa boyangeli na ye mabɔkɔ. Kobanda na mikolo ya Adama ná Eva, Zabolo azali koluka kotinda bato bápesa Yehova mokɔngɔ. Kasi ntango topesaka boyangeli ya Yehova mabɔkɔ, tomonisaka Satana polele na ngámbo nini tozali. Kondima mpe bosembo na biso etindaka biso tómipesa na mosala ya Yehova, mpe yango esepelisaka ye mingi. (Masese 23:15, 16) Nzambe na biso akoki kosalela bosembo mpe botosi na biso mpo na koyanola Satana oyo atumolaka ye. (Masese 27:11) Botosi na biso ezali eloko oyo tokoki kopesa Yehova mpe ezali na motuya mingi epai na ye mpe epesaka ye esengo mingi.

17. Basambisi 5:31 elobi nini mpo na oyo ekosalema na mikolo ezali koya?

17 Mosika te moto nyonso awa na mabele akosepela kaka na boyangeli ya Yehova. Tozali mpenza kozela ntango wana na mposa makasi! Tozali komiyoka lokola Debora ná Barake, oyo bayembaki: “Tiká ete banguna na yo nyonso básila bongo, Ee Yehova, mpe tiká bato oyo balingaka yo bázala lokola moi ntango ebimaka na nguya na yango.” (Basambisi 5:31) Likambo yango ekosalema ntango Yehova akoboma mokili mabe ya Satana. Ntango etumba ya Armagedone ekobanda, Yehova akozala na mposa te ete bato básalisa ye mpo na koboma banguna. Kutu, ‘tokotɛlɛma’ mpe ‘tokomona lobiko ya Yehova.’ (2 Ntango 20:17) Liboso ete ntango yango ekoka, tozali na libaku malamu ya kopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ na mpiko mpe na molende.

18. Ndenge nini basusu bakoki kozwa litomba na ezaleli na yo ya komipesa?

18 Debora ná Barake babandaki koyemba loyembo ya elonga mpo na kokumisa Yehova, kasi bato te. Bayembaki boye: “Lokola bato bamipesi bango moko, bópambola Yehova.” (Basambisi 5:1, 2) Ndenge moko mpe, ntango tozali kosalela Yehova, ezala na lolenge nini, yango ekoki mpe kolendisa basusu ‘bápambola Yehova!’

^ par. 6 Likwangola ezali mbeli moko ya molai oyo bapelisi malamumalamu mpe egumbamá mwa moke. Bazalaki kokangisa makwangola na makalo ya bitumba, ntango mosusu libándá ya akse. Yango ezalaki kosala ete makalo ebebisa biloko ntango ezali kotambola.

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali masolo yango, talá lisolo “‘Natɛlɛmaki lokola mama na Yisraele’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2015.

^ par. 15 Talá lisolo “Mitungisi mpo na mbongo” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2015.