Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2017

 LISOLO YA BOMOI

Nazali na ekateli ya kozala soda ya Kristo

Nazali na ekateli ya kozala soda ya Kristo

Ntango masasi ezalaki koleka pembeni na ngai, nazalaki kotombola mwa moke elamba ya mpɛmbɛ likoló. Basoda oyo bazalaki kobɛta masasi basɛngaki ngai nabima na esika oyo nabombanaki. Na ekɛngɛ nyonso, napusanaki pene na bango, kozanga koyeba soki nakobika to nakokufa. Ebandaki boni nakóma na esika wana ya likama?

NABOTAMAKI na mobu 1926, na Karítsa, mboka moko ya moke na Grèce. Nazalaki mwana ya 7 na libota moko ya bana 8. Baboti na ngai bazalaki kosala mosala makasi.

Mbula moko liboso nabotama, baboti na ngai bakutanaki na John Papparizos, mobali moko ya molende oyo ayebaki mpenza kosolola mpe azalaki Moyekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Ndenge oyo ndeko John asololaki na bango na lisalisi ya Biblia ekamwisaki bango mingi, yango wana babandaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia na mboka na biso. Mama azalaki na kondima makasi epai ya Yehova Nzambe, mpe atako ayebaki mokanda te, azalaki koyebisa basusu nsango malamu na libaku nyonso oyo emonani. Likambo ya mawa, tata azalaki kotala kaka mabunga ya bandeko, yango wana mokemoke atikaki koyangana na makita ya lisangá.

Ngai ná bandeko na ngai tozalaki komemya Biblia, kasi tolandaki bamposa ya bolenge ntango tozalaki kokola. Na nsima, na mobu 1939, Etumba ya mibale ya Mokili mobimba ebandaki na Mpoto, mpe likambo yango ebimisaki yikiyiki na mboka na biso. Nicolas Psarras, ndeko na biso ya libota oyo azalaki kofanda pene na biso mpe autaki kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova, bakɔtisaki ye na makasi na mosala ya soda. Atako Nicolas azalaki kaka na mbula 20, na mpiko nyonso, ayebisaki bakonzi ya basoda ete: “Nakoki kobunda bitumba te mpo nazali soda ya Kristo.” Basambisaki ye na tribinale moko ya basoda mpe bakatelaki ye etumbu ya mbula 10 ya bolɔkɔ. Tokamwaki mingi!

Likambo ya esengo, na ebandeli ya mobu 1941, basoda oyo basalaki boyokani bakɔtaki na Grèce mpo na mwa ntango, mpe Nicolas abimisamaki na bolɔkɔ. Ntango azongaki na Karítsa, Ilias, yaya na ngai ya mobali oyo azalaki kofanda kuna atunaki ye mituna ebele oyo etali Biblia. Nayokaki ye na likebi mpenza. Na nsima, ngai, Ilias, mpe leki na biso ya mwasi Efmorfia,  tobandaki koyekola Biblia mpe tozalaki koyangana mbala na mbala na makita ya Batatoli ya Yehova. Na mbula oyo elandaki, biso misato tomipesaki na Yehova mpe tozwaki batisimo. Na nsima, bandeko na biso mosusu minei bakómaki mpe Batatoli ya Yehova.

Na mobu 1942, lisangá ya Karítsa ezalaki na bilenge mibali mpe basi 9 oyo bazalaki na mbula kobanda 15 tii 25. Biso nyonso tozalaki koyeba ete komekama makasi ezalaki kozela biso. Yango wana, mpo na kolendisana, tozalaki kosangana esika moko mbala nyonso oyo tokokaki koyekola Biblia, koyemba banzembo ya Bokonzi, mpe kobondela. Yango wana, kondima na biso ekómaki makasi.

Demetrius elongo na baninga, na Karítsa

BITUMBA YA BANA-MBOKA

Ntango kaka Etumba ya mibale ya Mokili mobimba esilaki, bakoministe ya Grɛsi batombokelaki guvɛrnema ya Grɛsi, mpe yango ebimisaki bitumba ya bana-mboka. Basoda ya bakoministe bazalaki kotambolatambola mboka mobimba mpe kotinda bato ya mboka na makasi ete bákɔta na ngámbo na bango. Ntango bazwaki mboka na biso, bakangaki biso bilenge Batatoli misato: Ngai, Antonio Tsoukaris, mpe Ilias. Toyebisaki bango ete lokola tozali bakristo, tokɔtaka makambo ya mokili te; atako bongo batindaki biso na makasi tótambola na makolo tii na Ngomba Olympus; tosalaki ngonga 12 longwa na mboka na biso.

Mwa moke na nsima, mokonzi moko ya basoda ya bakoministe apesaki biso mitindo ete tókɔta na etuluku moko ya batɔmbɔki. Ntango tolimbolaki ete bakristo ya solo basimbaka mindoki te mpo na koboma bato, mokonzi yango ya basoda asilikaki mpe atindaki biso epai ya mokonzi mosusu ya basoda oyo aleki ye. Ntango tozongelaki kaka makambo oyo tolobaki liboso, mokonzi wana ya basoda apesaki mitindo boye: “Bózwa mpunda mpe bómema bato oyo bazokaki na etumba na lopitalo.”

Tozongisaki: “Bongo soki basoda ya guvɛrnema bakangi biso? Bakomona biso te lokola basoda?” Alobaki: “Boye bókende kotikela basoda oyo bazali na esika ya bitumba bilei.” Toyanolaki: “Bongo soki mokonzi moko ya basoda amoni biso na mpunda mpe apesi biso mitindo ete tómemela bango mindoki tii na esika ya bitumba?” Mokonzi ya basoda akanisaki ntango molai, na nsima alobaki: “Malamu, boye bokoki kokende kokɛngɛla bampate! Bótikala kuna na ngomba mpo na kokɛngɛla bampate.”

Ntango bitumba ya bana-mboka ezalaki kondongwana, lisosoli na biso misato epekisaki biso te tósala mosala ya kobatela bampate. Mbula moko na nsima, bapesaki yaya na biso Ilias nzela ete azonga na ndako mpo na kobatela mama na biso mpo tata akufaki. Antonio abɛlaki, yango wana babimisaki ye. Kasi ngai natikalaki na bolɔkɔ.

Kaka na ntango wana, basoda ya Grèce bazalaki kaka kopusana penepene na basoda ya bakoministe. Basoda oyo bakangaki ngai bakimaki na bangomba oyo ezalaki pene na Albanie, ekólo moko ya pembeni. Ntango tokómaki pene na ndelo ya mboka, na mbalakaka, tomonaki ete tozingami na basoda ya Grèce. Mobulungano ekɔtaki na kati ya batɔmbɔki mpe bakimaki. Nabombanaki nsima ya nzete moko oyo elalaki; yango nde esalaki ete nakutana na basoda oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo oyo.

Ntango nayebisaki basoda ya Grèce ete basoda ya bakoministe bakangaki ngai, bazwaki ngai mpo na kosambisa ngai na kaa moko ya basoda pene na Véroia, engumba oyo Biblia ebengi Beroya. Kuna, bapesaki ngai mosala ya kotimola mabulu ya kobombana mpo  na basoda. Ntango naboyaki, komanda ya basoda apesaki mitindo ete bátinda ngai na bolɔkɔ na esanga Makrónisos (Makronisi).

ESANGA OYO BOMOI EZALAKI MPASI

Makrónisos, esanga moko ya malili oyo etondi na mabanga mpe ezangá mai, ezali na Attica, na ntaka ya kilomɛtrɛ 50 na engumba Athènes. Esanga yango ezali kaka na bolai ya kilomɛtrɛ 13 mpe na bonene ya kilomɛtrɛ 2 na ndambo na esika oyo eleki monene. Nzokande, banda mobu 1947 tii 1958, bato ya bolɔkɔ koleka 100 000, ezala mpe bato ya koministe mpe bato mosusu bafundamaki ete bazali bakoministe, basoda oyo babundá kala, mpe ebele ya Batatoli ya Yehova ya sembo, batindamaki kuna.

Ntango nakómaki kuna na ebandeli ya mobu 1949, batyaki bato ya bolɔkɔ na ba kaa ndenge na ndenge. Batyaki ngai na kaa moko oyo bakɛngɛli bazalaki mingi te, elongo na bankama mosusu ya bato. Bato soki 40 kati na biso bazalaki kolala na nse, na hema moko oyo esalemá mpo na bato 10. Tozalaki komɛla mai oyo ezalaki pɛto te, mpe mbala mingi tozalaki kolya lantiye mpe sóló (aubergine). Putulu mpe mopɛpɛ oyo ezalaki kuna ezalaki kokómisa bomoi mpasi. Kasi, tozalaki te kotombola mabanga ya kilo mbala na mbala mpo mosala ya ndenge wana ekokaki konyokola nzoto mpe bɔɔngɔ na biso.

Elongo na Batatoli mosusu oyo batindamaki na esanga Makrónisos

Mokolo moko ntango nazalaki kotambola pembeni ya ebale, nakutanaki na ebele ya Batatoli oyo bautaki na kaa mosusu. Tosepelaki mingi kozala elongo! Lokola tozalaki mpenza kokeba ete báyeba biso te, tozalaki kokutana kaka soki likoki emonani. Na ndenge ya kobombana, tozalaki mpe kopesa bato mosusu ya bolɔkɔ litatoli mpe na nsima, basusu kati na bango bakómaki Batatoli ya Yehova. Makambo wana mpe mabondeli ya mozindo oyo tozalaki kosala esalisaki biso tózala makasi na elimo.

NA KATI YA MƆTƆ

Nsima ya sanza 10 ya mwa bonsomi na kati ya bolɔkɔ, basoda oyo bakangaki ngai bamonaki ete ntango ekoki mpo nalata bilamba ya basoda. Ntango naboyaki, bamemaki ngai liboso ya komanda ya kaa. Napesaki komanda yango papye moko oyo ezalaki na maloba oyo: “Nalingi kozala kaka soda ya Kristo.” Nsima ya konyokola ngai, komanda yango atindaki ngai epai ya komanda-molandi, oyo azalaki episkɔpɔ-mokonzi ya lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce mpe alataki molato ya basango. Ntango nayanolaki mituna na ye na mpiko nyonso na lisalisi ya Biblia, na nkanda makasi agangaki boye: “Bólongola ye na miso na ngai. Azali moto ya bindimandima.”

Na ntɔngɔ oyo elandaki, basoda bapesaki ngai lisusu mitindo ete nalata bilamba ya basoda. Ntango naboyaki, babɛtaki ngai makofi mpe fimbo. Na nsima, bamemaki ngai na lopitalo ya kaa mpo na kotala soki mikuwa na ngai ebukanaki, nsima na yango bazongisaki ngai na hema oyo nazalaki kolala. Basalaki ngai bongo mokolo na mokolo na boumeli ya sanza mibale.

Lokola nawanganaki kondima na ngai te, nsukansuka basoda yango bamekaki mayele mosusu. Bakangaki ngai mabɔkɔ na nsinga nsima ya mokɔngɔ, babɛtaki ngai na nse ya makolo na bansinga oyo ezalaki na bibende. Ntango nazalaki koyoka mpasi makasi, nakanisaki maloba oyo ya Yesu: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino . . . Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:11, 12) Nsukansuka, nsima ya minyoko oyo emonanaki lokola ekosila te, nazalaki lisusu komiyeba te.

Nalamuki na ndako ya bolɔkɔ ya malili makasi; nazalaki na bilei te, mai te, bolangiti te. Atako bongo, nazalaki motema mpiɔ. Ndenge Biblia elaki yango, “kimya ya Nzambe” ezalaki ‘kobatela motema na ngai mpe makanisi na ngai.’ (Bafilipi 4:7) Mokolo oyo elandaki, soda moko ya boboto apesaki ngai bilei, mai, mpe elamba ya malili. Na nsima, soda mosusu apesaki ngai bilei oyo bakabolelaka bango. Mokolo wana mpe mikolo mosusu mingi, namonaki mpenza lobɔkɔ ya Yehova.

Bakonzi bazalaki komona ngai lokola motɔmbɔki oyo akoki kobongwana te, yango wana bamemaki ngai na Athènes mpo na kosambisa ngai na tribinale ya basoda. Kuna, bakatelaki ngai etumbu ya mbula misato ya bolɔkɔ na Yíaros (Gyaros), esanga moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 50 na ɛsti ya Makrónisos.

“TOKOKI KOTYELA BINO MOTEMA”

Bolɔkɔ ya Yíaros ezalaki ndako monene ya makasi oyo etongami na babriki ya motane, epai bato ya politiki koleka 5 000 batindamaki. Ezalaki mpe na Batatoli ya Yehova 7; biso nyonso tokɔtaki bolɔkɔ mpo toboyaki kokɔta na makambo ya mokili mpo tozali bakristo. Atako epekisamaki, biso 7 tozalaki koyangana mpo na koyekola Biblia na ndenge ya kobombana. Kutu, bandeko bazalaki mbala na mbala kotindela  biso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tokomaki na mabɔkɔ mpo tósalela yango na boyekoli.

Mokolo moko, ntango tozalaki koyekola na kobombana, mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ akutaki biso tozali kosala likita mpe abɔtɔlaki mikanda na biso. Basambisaki biso na biro ya mokambi-molandi ya bolɔkɔ, mpe tozalaki kokanisa ete bakobakisela biso etumbu. Kasi, mokambi-molandi ya bolɔkɔ alobaki boye: “Toyebi bino malamu, mpe tomemyaka etɛlɛmɛlo na bino. Toyebi ete tokoki kotyela bino motema. Bózonga na mosala.” Kutu, apesaki basusu kati na biso misala ya pɛtɛɛ. Mitema na biso etondaki na botɔndi. Ata na kati ya bolɔkɔ, bosembo na biso bakristo ezalaki kokumisa Yehova.

Bosembo na biso ebimisaki mpe matomba mosusu. Nsima ya komona etamboli na biso ya malamu, moto moko ya bolɔkɔ oyo azalaki molakisi ya matematiki atunaki mpo na koyeba makambo oyo tondimaka. Ntango biso Batatoli ya Yehova tobimisamaki na bolɔkɔ na ebandeli ya mobu 1951, ye mpe abimisamaki. Na nsima, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova, na nsima na yango akɔtaki na mosala ya ntango nyonso.

TII LELO NAZALI SODA YA KRISTO

Elongo na mwasi na ngai Janette

Nsima ya kobimisama na bolɔkɔ, nazongaki esika libota na biso ezalaki, na Karítsa. Na nsima, elongo na bato mosusu ya ekólo na biso, nakendaki kofanda na engumba Melbourne, na ekólo Australie. Kuna, nakutanaki na Janette, ndeko mwasi moko ya bizaleli malamu, mpe tobalanaki. Tobotaki bana minei: moko ya mobali mpe misato ya basi. Tobɔkɔlaki bango nyonso na kati ya solo.

Lelo oyo, atako nazali na mbula koleka 90, nazali kaka nkulutu na lisangá. Mpo na minyoko oyo nakutaná na yango, ntango mosusu nayokaka nzoto mpe makolo mpasi, mingimingi ntango nazali na mosala ya kosakola. Atako bongo, nazali na ekateli ya kokoba kozala ‘soda ya Kristo.’2 Timote 2:3.