Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2017

“Mosambisi ya mabele mobimba” asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo

“Mosambisi ya mabele mobimba” asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo

“Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo.”KOLIMBOLA MIBEKO 32:4.

NZEMBO: 112, 89

1. Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azalaki kotya motema na bosembo ya Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

“MOSAMBISI ya mabele mobimba akosala nde oyo ezali sembo te?” (Ebandeli 18:25) Abrahama moto ya sembo atunaki motuna wana te mpo azalaki na ntembe. Motuna na ye emonisaki nde ete azalaki na kondima ete Yehova akosambisa engumba ya Sodoma mpe ya Gomora na bosembo nyonso. Andimisamaki ete Yehova akokaki soki moke te ‘koboma moyengebene elongo na moto mabe.’ Abrahama akokaki ‘kokanisa ata moke te’ likambo ya ndenge wana. Na nsima, Yehova alobaki boye mpo na ye moko: “Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka, mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te; azali moyengebene mpe sembo.”Kolimbola Mibeko 31:19; 32:4.

2. Mpo na nini ekoki kosalema ata moke te ete Yehova azanga bosembo?

2 Mpo na nini Abrahama azalaki na kondima ete Yehova akosala ntango nyonso oyo ezali sembo? Mpo Yehova azali ndakisa eleki  monene ya moto oyo amonisaka bosembo mpe boyengebene. Kutu, mbala mingi Makomami ya Ebre esalelaka liloba “bosembo” mpe “boyengebene” esika moko, mpamba te maloba yango mibale ezali na ndimbola moko. Yango wana, lokola mitinda ya Yehova ezalaka ntango nyonso sembo, akosambisa makambo ntango nyonso na bosembo. Biblia elobi ete: “Alingaka boyengebene mpe bosembo.”Nzembo 33:5.

3. Pesá ndakisa moko ya kozanga bosembo lelo oyo?

3 Koyeba ete Yehova azalaka ntango nyonso sembo ezali kokitisa biso mitema. Nzokande, mokili ya lelo etondi na makambo ya kozanga bosembo. Na ndakisa, bato mosusu bakɔtá bolɔkɔ mpo na makambo oyo basalá te. Nsima ya kosala basusu ekzamɛ ya makila (ADN), eyaki komonana ete basalaki likambo te; kasi bosolo eyaki koyebana kaka nsima ya kolekisa bambula mingi na bolɔkɔ. Makambo ya kozanga bosembo ndenge wana epesaka mpasi mpe nkanda. Kasi, ezali na lolenge mosusu ya kozanga bosembo oyo ekoki kozala mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Ezali nini?

MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO NA KATI YA LISANGÁ

4. Ndenge nini kondima ya mokristo ekoki komekama?

4 Bakristo bayebi ete bakoki kokutana na makambo ya kozanga bosembo libándá ya lisangá. Kasi, kondima na biso ekoki komekama soki tomoni to basaleli biso likambo moko oyo ezali komonana ete ezali sembo te na kati ya lisangá. Soki esalemi bongo, okosala nini? Okotika ete yango ebɛtisa yo libaku?

5. Mpo na nini tosengeli kokamwa te soki tomoni to tokutani na likambo ya kozanga bosembo na kati ya lisangá?

5 Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga, yango wana ekoki kosalema ete moto moko asalela biso makambo ya kozanga bosembo to biso moko tósalela moto mosusu likambo oyo ezali sembo te na kati ya lisangá. (1 Yoane 1:8) Atako esalemaka mingi te, bakristo ya sembo bakamwaka te to babɛtaka libaku te ntango makambo ya kozanga bosembo esalemi. Yehova apesaka biso toli ya malamu oyo euti na Biblia mpo na kosalisa biso totikala sembo soki ndeko mobali to ndeko mwasi moko asaleli biso likambo moko oyo ezali sembo te.Nzembo 55:12-14.

6, 7. (a) Likambo nini ya kozanga bosembo ndeko moko akutanaki na yango na kati ya lisangá? (b) Bizaleli nini esalisaki ye?

6 Tózwa ndakisa ya ndeko Willi Diehl. Kobanda na mobu 1931, ndeko Diehl asalaki na bosembo na Betele ya Berne, na Suisse. Na mobu 1946, akɔtaki na kelasi ya mbala ya 8 ya Eteyelo ya Gileade, na New York, na États-Unis. Nsima ya kozwa diplome na Gileade, batindaki ye mokɛngɛli ya zongazonga na Suisse. Na lisolo na ye ya bomoi, ndeko Diehl alobaki ete na sanza ya mitano ya mobu 1949, ayebisaki Betele ya Suisse ete azali kokana kobala. Bandeko oyo bazalaki kokamba mosala bayebisaki ye ete soki abali bakolongola ye mikumba nyonso. Akotikala kaka mobongisi-nzela. Ndeko Diehl alobaki boye: “Nazalaki ata na ndingisa ya kosala badiskur te. Bandeko mingi bazalaki kopesa ngai lisusu mbote te, bakómaki kotalela ngai lokola moto oyo alongolami na lisangá.”

7 Ndeko Diehl asalaki nini? Alobaki boye: “Kasi toyebaki ete Makomami epekisi kobala te; yango wana toyebisaki Yehova likambo yango na libondeli mpe totyelaki ye motema.” Atako na ntango wana bandeko mosusu basosolaki malamu te ndenge oyo Yehova atalelaka libala, nsima ya bambula, lolenge na bango ya kotalela likambo yango esembolamaki, mpe bazongiselaki ndeko Diehl mikumba na ye. Yehova apesaki ye  mbano mpo na bosembo na ye. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Tosengeli komituna boye: ‘Soki nakutanaki na likambo ya kozanga bosembo ndenge wana, nalingaki komonisa motema molai mpe kozela ete Yehova asembola makambo? To nalingaki nde komityela motema mpe koluka ngai moko kosilisa kozanga bosembo yango?’Masese 11:2; tángá Mika 7:7.

8. Mpo na nini tokoki kokanisa ete basaleli biso to basusu likambo ya kozanga bosembo, nzokande ezali bongo te?

8 Soki okanisi ete makambo ya kozanga bosembo ezali kosalema na kati ya lisangá, yebá ete mbala mosusu okoki komikosa. Mpo na nini? Tozali bato ya kozanga kokoka mpe ekoki kozala ete tososoli malamu te likambo moko boye. Ekoki mpe kozala ete toyebi makambo nyonso te. Kasi, ezala tokangi ntina ya likambo moko malamu to te, tosengeli kobondela Yehova mpo na likambo yango, kotyela ye motema, mpe kotikala sembo. Yango ekosala ete ‘tósilikela Yehova’ te.Tángá Masese 19:3.

9. Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokotalela ndakisa ya banani?

9 Tótalela bandakisa misato ya bato ya ntango ya kala oyo Biblia elobeli, oyo basalelaki bango makambo oyo ezali sembo te. Na lisolo oyo, tokolobela ndakisa ya Yozefe, nkɔkɔ ya Abrahama, mpe makambo oyo bandeko na ye basalelaki ye. Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela makambo oyo Yehova asalelaki mokonzi Ahaba mpe likambo oyo ntoma Petro akutanaki na yango na Antiokia ya Siri. Ntango tozali kotalela bandakisa wana, luká koyeba ndenge oyo okoki kotya makanisi nyonso epai ya Yehova mpe kobatela boyokani na yo ná ye, mingimingi ntango omoni ete basaleli yo makambo na bosembo te.

BASALELAKI YOZEFE MAKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO

10, 11. (a) Makambo nini ya kozanga bosembo Yozefe akutanaki na yango? (b) Libaku nini Yozefe azwaki ntango azalaki na bolɔkɔ?

10 Yozefe azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova oyo bato ya bamboka mosusu basalelaki makambo oyo ezalaki sembo te. Kasi likambo oyo esalaki ye mpasi koleka ezalaki kozanga bosembo oyo bandeko na ye moko bamoniselaki ye. Ntango Yozefe azalaki na mbula 17, bandeko na ye bayibaki ye koyiba mpe batɛkaki ye lokola moombo. Nsima na yango, Bayishimaele bamemaki ye na Ezipito. (Ebandeli 37:23-28; 42:21) Na nsima, kuna na Ezipito, bakoselaki Yozefe makambo ete alukaki kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya nkolo na ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ kozanga ete básambisa ye. (Ebandeli 39:17-20) Yozefe anyokwamaki lokola moombo mpe moto ya bolɔkɔ na boumeli ya mbula soki 13. Mateya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yozefe soki bandeko basaleli biso makambo ezangi bosembo?

11 Ntango Yozefe azalaki na bolɔkɔ, kapita ya bapesi-masanga ya mokonzi akɔtaki mpe bolɔkɔ. Mokolo moko na butu, kapita ya bapesi-masanga alɔtaki ndɔtɔ, mpe Yehova asalisaki Yozefe alimbola ndɔtɔ yango. Yozefe alimbolaki ete kapita ya bapesi-masanga akobimisama na bolɔkɔ mpe akosalela lisusu Farao. Na nsima, Yozefe asalelaki libaku yango mpo na koyebisa mobali yango mokakatano na ye. Tokoki kozwa mateya mingi na makambo oyo Yozefe alobaki mpe na oyo alobaki te.Ebandeli 40:5-13.

12, 13. (a) Ndenge nini toyebi ete Yozefe akangaki mabɔkɔ te na makambo ya kozanga bosembo oyo basalelaki ye? (b) Likambo nini Yozefe aboyaki koyebisa kapita ya bapesi-masanga?

12 Tángá Ebandeli 40:14, 15. Simbá ete Yozefe alobaki ‘bayibaki ye koyiba.’ Liloba  oyo Biblia esaleli awa ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela eloko oyo ‘bayibi.’ Emonani polele ete basalelaki ye makambo na kozanga bosembo. Yozefe alobaki mpe polele ete bakoselaki ye makambo. Yango wana, asɛngaki kapita ya bapesi-masanga alobela ye epai ya Farao. Mpo na nini asɛngaki bongo? Alobaki ete: “Osengeli kobimisa ngai na ndako oyo.”

13 Yozefe akangaki mabɔkɔ te; alukaki kosala mwa eloko mpo na kobongola makambo. Ayebaki ete basalelaki ye makambo mingi na kozanga bosembo. Yango wana ayebisaki kapita ya bapesi-masanga makambo na ye, mpe atyaki motema ete akosalisa ye. Kasi simbá likambo oyo: Ata esika moko te Biblia elobi ete Yozefe ayebisaki moto mosusu, ezala Farao, ete bandeko na ye nde batɛkaki ye. Kutu, ntango bandeko ya Yozefe bayaki na Ezipito mpe bayokanaki na ye, Farao ayambaki bango malamu mpe asɛngaki bango báya kofanda na Ezipito mpe básepela na “biloko ya malamu ya mokili nyonso ya Ezipito.”Ebandeli 45:16-20.

Bilobaloba ekoki kongalisa likambo (Talá paragrafe 14)

14. Nini ekosalisa biso tóloba mabe te soki tokutani na likambo moko ya kozanga bosembo na kati ya lisangá?

14 Soki tokanisi ete basaleli biso likambo moko ya kozanga bosembo na kati ya lisangá, tosengeli mpenza kokeba ete tólobaloba likambo yango te. Ezali solo ete tosengeli kosɛnga lisalisi epai ya bankulutu mpe koyebisa bango soki ndeko moko asali lisumu ya monene. (Balevi 5:1) Kasi, na makambo mingi oyo etali lisumu ya monene te, mbala mingi okoki kozala na likoki ya kozongisa kimya elongo na ndeko kozanga ete oyebisa bato mosusu, ata mpe bankulutu. (Tángá Matai 5:23, 24; 18:15.) Tosengeli kozala sembo mpe kosalela mitinda ya Biblia na makambo ya ndenge wana. Ntango mosusu, tokoki koya komona ete tokangaki malamu te ntina ya likambo moko mpe basalelaki biso mpenza te makambo na kozanga bosembo. Soki ezali bongo, tokomona ete tosalaki malamu ndenge toboyaki koloba mabe mpo na ndeko, mpo yango elingaki kaka kongalisa likambo yango! Kobosana likambo oyo te: ezala tozali na elonga to te,  koloba likambo moko oyo ekozokisa ebongisaka makambo te. Kozala sembo epai ya Yehova mpe epai ya bandeko ekopekisa biso tósala libunga ya ndenge wana. Mokomi ya nzembo alobelaki moto “oyo azali kotambola na mbeba te.” Moto ya ndenge wana “akoseli bato makambo na lolemo na ye te. Asaleli moninga na ye eloko moko ya mabe te.”Nzembo 15:2, 3; Yakobo 3:5.

KOBOSANA TE BOYOKANI ELEKI NTINA OYO OZALI NA YANGO

15. Na ndenge nini boyokani ya Yozefe ná Yehova ezalaki lipamboli?

15 Tokoki kozwa liteya mosusu ya ntina na ndakisa ya Yozefe. Na boumeli ya mbula 13 oyo Yozefe anyokwamaki na makambo ya kozanga bosembo, amonisaki ete azalaki kotalela makambo ndenge Yehova atalelaka yango. (Ebandeli 45:5-8) Apesaki Yehova foti soki moke te mpo na makambo oyo akutanaki na yango. Ezali solo ete Yozefe abosanaki te makambo ya kozanga bosembo oyo basalelaki ye; atako bongo akómaki nkandankanda te. Oyo eleki ntina, atikaki te ete kozanga kokoka mpe makambo mabe ya basusu ekabola ye na Yehova. Bosembo ya Yozefe epesaki ye libaku ya komona ndenge oyo Yehova asembolaki makambo ya kozanga bosembo mpe apambolaki ye ná libota na ye.

16. Mpo na nini tosengeli kopusana lisusu penepene na Yehova soki tokutani na makambo ya kozanga bosembo na kati ya lisangá?

16 Ndenge moko mpe, tosengeli kosepela na boyokani na biso ná Yehova mpe kobatela yango. Tosengeli soki moko te kotika ete kozanga kokoka ya bandeko ekabola biso na Nzambe na biso oyo tolingaka mpe tosambelaka. (Baroma 8:38, 39) Kasi, soki tokutani na makambo ya kozanga bosembo na kati ya lisangá, tómekola ndakisa ya Yozefe mpe tópusana lisusu penepene na Yehova. Tóluka kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Nsima ya kosala nyonso oyo esengeli mpo na kosalela mitinda ya Biblia mpo na kosilisa matata, tosengeli kotika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. Tosengeli kozala na kondima ete akosembola likambo yango na ntango mpe na ndenge oyo ye moko amoni malamu.

TYELÁ “MOSAMBISI YA MABELE MOBIMBA” MOTEMA

17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kotyela “Mosambisi ya mabele mobimba” motema?

17 Ntango nyonso oyo tokozala na bomoi na mokili oyo ya mabe, tosengeli koyeba ete tokoki kokutana na makambo ya kozanga bosembo. Ntango mosusu, yo moko to moto mosusu oyo oyebi bokoki komona to kokutana na likambo oyo ezali komonana lokola kozanga bosembo na kati ya lisangá. Soki ezali bongo, kobɛta libaku te. (Nzembo 119:165) Tikalá nde sembo epai ya Nzambe, bondelá ye asalisa yo, mpe tyelá ye motema. Kobosana te ete lokola ozali moto ya kozanga kokoka, ekoki kozala ete okangaki malamu te ntina ya likambo moko boye, to ekoki kozala ete oyebi makambo nyonso te. Landá ndakisa ya Yozefe mpe kobimisa maloba ya mabe te, mpo yango ekoki nde kongalisa likambo. Mpo na kosukisa, na esika ya komityela motema, zalá nde na ekateli ya kotikala sembo mpe zelá na motema molai ete Yehova asembola makambo. Soki osali bongo, Yehova akondima yo mpe akopambola yo, lokola Yozefe. Okoki kozala na kondima ete Yehova, “Mosambisi ya mabele mobimba,” akosala ntango nyonso oyo ezali sembo, “mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo.”Ebandeli 18:25; Kolimbola Mibeko 32:4.

18. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Na lisolo oyo elandi, tokolobela bandakisa mosusu mibale ya kozanga bosembo na kati ya basaleli ya Yehova na ntango ya kala. Bandakisa yango ekosalisa biso tómona ndenge oyo komikitisa mpe kolimbisa ekosalisa biso tómekola ndenge oyo Yehova atalelaka bosembo.

^ par. 7 Talá lisolo ya bomoi ya ndeko Willi Diehl, “Yehova azali Nzambe na ngai, oyo nakotyela motema,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/1991, na Lifalanse.