Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2017

Makanisi na yo eyokani na oyo ya Yehova na likambo etali bosembo?

Makanisi na yo eyokani na oyo ya Yehova na likambo etali bosembo?

“Nakosakola nkombo ya Yehova . . . Nzambe moko ya bosembo, epai na ye kozanga bosembo ezali te.”KOLIMBOLA MIBEKO 32:3, 4.

NZEMBO: 110, 2

1, 2. (a) Likambo nini ya kozanga bosembo basalelaki Nabote ná bana na ye? (b) Bizaleli nini mibale tokolobela na lisolo oyo?

BATO mabe mibale bafundi mobali moko ete asali mbeba moko monene. Nzokande likambo oyo balobi ezali lokuta. Atako bongo, mobali yango amemi ngambo mpe asengeli kobomama. Kanisá mpasi oyo bato oyo balingaka bosembo bayokaki ntango bazalaki komona ndenge bato bazalaki kobamba mobali wana ná bana na ye ya mibali mabanga tii na liwa, atako basalaki likambo ya mabe te. Lisolo wana ezali lisapo te. Ezali likambo ya solo oyo ekómelaki Nabote, mosaleli ya sembo ya Yehova, oyo azalaki na bomoi ntango mokonzi Ahaba azalaki koyangela Yisraele.1 Bakonzi 21:11-13; 2 Bakonzi 9:26.

2 Na lisolo oyo, tokolobela likambo oyo ekómelaki Nabote. Tokolobela mpe libunga monene oyo nkulutu moko ya sembo na lisangá moko ya bokristo na siɛklɛ ya liboso asalaki. Bandakisa wana mibale ekomonisa biso ndenge oyo komikitisa mpe kondima kolimbisa ezali na ntina soki tolingi komekola ndenge oyo Yehova atalelaka bosembo.

 LIKAMBO YA KOZANGA BOSEMBO OYO EMEMAKI TII NA LIWA

3, 4. (a) Nabote azalaki moto ya ndenge nini? (b) Mpo na nini aboyaki kotɛkela mokonzi Ahaba elanga na ye ya vinyo?

3 Nabote azalaki sembo epai ya Yehova na ntango oyo Bayisraele mingi bazalaki kolanda ndakisa mabe ya mokonzi Ahaba ná mwasi na ye ya mabe Yezabele. Bazalaki kosambela Baala, nzambe ya lokuta, mpe bazalaki te kotosa Yehova mpe mibeko na ye. Kasi Nabote azalaki kozwa na motuya mingi boyokani na ye ná Yehova, koleka ata bomoi na ye moko.

4 Tángá 1 Bakonzi 21:1-3. Ntango Ahaba asɛngaki ete asomba elanga ya vinyo ya Nabote to apesa ye elanga ya vinyo ya kitoko koleka na esika ya oyo ya ye, Nabote aboyaki. Mpo na nini aboyaki? Na limemya nyonso, alimbolaki boye: “Nakoki kokanisa yango ata moke te, na kolanda likanisi ya Yehova, ete napesa yo libula ya bankɔkɔ na ngai.” Nabote aboyaki likambo oyo mokonzi Ahaba asɛngaki ye, mpo eyokanaki te na mobeko ya Yehova oyo ezalaki kopekisa Bayisraele kotɛka libula ya libota mpo na libela. (Balevi 25:23; Mitángo 36:7) Tomoni polele ete Nabote azalaki kotosa Yehova.

5. Yezabele asalaki nini mpo na kozwa elanga ya vinyo ya Nabote?

5 Ntango Nabote aboyaki kotɛka elanga na ye ya vinyo, mokonzi Ahaba ná mwasi na ye basalaki makambo ya nsɔmɔ. Mpo na kozwa elanga yango ya vinyo, mokonzi mwasi Yezabele atindaki mibali mibale bákosela Nabote makambo ete asali mbeba moko monene. Yango wana, babomaki Nabote ná bana na ye ya mibali. Yehova asalaki nini na likambo wana ya kozanga bosembo oyo ememaki tii na liwa?

BOSEMBO YA NZAMBE

6, 7. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki ete alingaka bosembo? (b) Mpo na nini yango ekokaki kobɔndisa bato ya libota ya Nabote mpe baninga na ye?

6 Mbala moko Yehova atindaki Eliya mpo akende kokutana na Ahaba. Eliya ayebisaki Ahaba ete azali mobomi mpe moyibi. Ekateli nini Yehova azwaki? Ahaba, mwasi na ye, mpe bana na ye ya mibali basengelaki kobomama, kaka ndenge bango basalaki Nabote ná bana na ye ya mibali.1 Bakonzi 21:17-25.

7 Bato ya libota ya Nabote mpe baninga na ye bazalaki na mawa makasi mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo Ahaba asalaki. Kasi Yehova amonaki likambo wana ya kozanga bosembo mpe asembolaki yango nokinoki. Kozanga ntembe, yango ebɔndisaki bango mingi. Kasi, ekoki kozala ete komikitisa na bango mpe elikya na bango epai ya Yehova emekamaki mpo na likambo oyo esalemaki na nsima.

8. (a) Ahaba asalaki nini ntango ayokaki nsango oyo Yehova atindelaki ye? (b) Makambo esukaki ndenge nini?

8 Ntango Ahaba ayokaki ekateli oyo Yehova azwaki mpo na ye, “apasolaki bilamba na ye mpe alataki ngɔtɔ na nzoto na ye; mpe akilaki bilei mpe azalaki se kolala na ngɔtɔ mpe kotambola, alɛmbi nzoto.” Ahaba amikitisaki! Makambo esukaki ndenge nini? Yehova ayebisaki Eliya: “Lokola amikitisi mpo na ngai, nakopesa mpasi yango na mikolo na ye te. Na mikolo ya mwana na ye nde nakopesa ndako na ye mpasi yango.” (1 Bakonzi 21:27-29; 2 Bakonzi 10:10, 11, 17) Yehova, “oyo atalaka mitema malamumalamu,” oyo akoki komona ndenge oyo tozali mpenza, amoniselaki Ahaba motema mawa.Masese 17:3.

KOMIKITISA EZALI LIBATELI

9. Mpo na nini komikitisa ekokaki kozala libateli mpo na bato ya libota ya Nabote mpe baninga na ye?

9 Ntango bato ya libota ya Nabote mpe baninga na ye bayokaki ete libota ya Ahaba ekozwa etumba kaka nsima ya liwa ya Ahaba, mbala mosusu kondima na bango epai ya Nzambe etyamaki na komekama. Kasi komikitisa ekokaki kosalisa bango bábatela kondima na bango. Mpo na nini? Soki bazalaki  na komikitisa, bakokaki kokoba kosambela Yehova, kondima ete ekoki kosalema te ete Nzambe azanga bosembo. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:3, 4.) Na mikolo ezali koya, bato ya libota ya Nabote bakozwa lipamboli ya komona lisusu Nabote ná bana na ye ntango bakosekwa. Yango ekozala bosembo ya kokoka mpo na Nabote mpe bana na ye. (Yobo 14:14, 15; Yoane 5:28, 29) Moto ya komikitisa ayebi ete “Nzambe ya solo ye moko akosambisa mosala ya ndenge nyonso mpe likambo nyonso oyo ebombami, soki ezali malamu to mabe.” (Mosakoli 12:14) Yehova atalelaka makambo mosusu oyo biso toyebi te. Na yango, komikitisa ebatelaka biso mpo tóbungisa te kondima epai ya Yehova.

10, 11. (a) Makambo nini ekoki kotya na komekama ndenge na biso ya kotalela bosembo? (b) Na ndenge nini komikitisa ekobatela biso?

10 Okosala nini soki bankulutu bazwi ekateli moko oyo okangi ntina na yango malamu te to osepeli na yango te? Na ndakisa, okosala nini soki yo moko to moto oyo olingaka abungisi mokumba moko oyo azalaki na yango na mosala ya Yehova? Okosala nini soki mwasi na yo, mobali na yo, mwana na yo, to moninga na yo ya motema alongolami na lisangá mpe yo osepeli te na ekateli oyo bankulutu bazwi? Okosala nini soki okanisi ete bankulutu basali libunga ndenge bamoniseli ndeko moko oyo asalaki lisumu motema mawa? Makambo wana ekoki kotya kondima na biso na  komekama mpe kotinda biso tókanisa ete makambo ezali kotambwisama malamu te na kati ya lisangá. Ndenge nini komikitisa ekobatela yo soki omekami na likambo moko ya ndenge wana? Tótalela ndenge mibale oyo ekoki kosalema.

Okosala nini soki bankulutu bapesi liyebisi moko oyo esepelisi yo te? (Talá paragrafe 10, 11)

11 Ya liboso, soki tozali na komikitisa, tokondima ete toyebi makambo nyonso te. Ata soki tokanisi ete toyebi makambo nyonso oyo esengeli koyeba mpo na likambo moko, kaka Yehova nde ayebi makambo oyo ezali na motema ya moto. (1 Samwele 16:7) Soki tomikundoli likambo yango, na komikitisa nyonso, tokondima ete toyebi makambo nyonso te mpe ete tosengeli kobongola makanisi na biso. Ya mibale, soki tomoni to tokutani na likambo ya kozanga bosembo, komikitisa ekosalisa biso tótosa mpe tómonisa motema molai mpe tózela ete Yehova asembola makambo. Biblia elobi ete: “Ekosukela baoyo babangaka Nzambe ya solo malamu.” Ebakisi mpe ete: “Kasi ekosukela moto mabe malamu te, mpe akoyeisa molai te mikolo na ye oyo ezali lokola elili, mpo azali kobanga Nzambe te.” (Mosakoli 8:12, 13) Soki tozali na komikitisa, biso moko tokozwa matomba, basusu mpe bakozwa matomba.Tángá 1 Petro 5:5.

LIKAMBO MOKO YA BOKOSI OYO ESALEMAKI NA KATI YA LISANGÁ

12. Lisolo nini tokotalela sikoyo, mpe mpo na nini?

12 Bakristo ya liboso na Antiokia ya Siri bakutanaki na likambo moko oyo etyaki komikitisa na bango mpe mposa na bango ya kolimbisa na komekama. Tótalela lisolo yango mpe tósalela yango mpo na koyeba ndenge oyo totalelaka likambo etali kolimbisa. Ekoki kosalisa biso tóyeba ntina oyo Yehova akoki kosalela bato ya kozanga kokoka, kozanga ete alɛmbisa mitinda na ye.

13, 14. (a) Mikumba nini ntoma Petro azwaki? (b) Ndenge nini amonisaki ete azalaki na mpiko?

13 Ntoma Petro azalaki nkulutu oyo bakristo mingi ya siɛklɛ ya liboso bayebaki malamu. Azalaki moninga ya motema ya Yesu mpe azwaki mikumba ya minene. (Matai 16:19) Na ndakisa, na mobu 36, ntoma Petro azwaki mokumba ya kokende kosakwela Korneyi ná bato nyonso ya ndako na ye. Mpo na nini yango ezalaki likambo ya sika? Mpamba te Korneyi azalaki Moyuda te; azalaki moto ya ekólo mosusu oyo akatami ngenga te. Ntango Korneyi ná bato ya ndako na ye bazwaki elimo santu, ntoma Petro asosolaki ete basengeli kozwa batisimo mpo na kokóma bakristo. Alobaki boye: “Moto akoki nde kopekisa mai mpo bato oyo bákoka te kobatisama bango bato bazwi elimo santu ndenge biso mpe tozwi?”Misala 10:47.

14 Na mobu 49, bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme basalaki likita mpo na kokata soki bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo basengeli kokatama ngenga. Na likita yango, ntoma Petro akundwelaki bandeko na mpiko nyonso ete amonaki na miso ndenge bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga te bazwaki elimo santu. Likambo oyo ntoma Petro akutanaki na yango nde esalisaki lisangani ya mikóló-bakambi ezwa ekateli. (Misala 15:6-11, 13, 14, 28, 29) Na ntembe te, bakristo nyonso, ezala Bayuda to bato ya bikólo mosusu bazalaki na botɔndi ndenge ntoma Petro ayebisaki bango na mpiko nyonso likambo oyo akutanaki na yango. Esengelaki kozala mpasi te mpo bakristo wana ya siɛklɛ ya liboso bátyela mobali wana ya sembo mpe ya makoki motema!Baebre 13:7.

15. Libunga nini ntoma Petro asalaki ntango azalaki na Antiokia ya Siri? (Talá elilingi ya ebandeli.)

15 Mwa moke nsima ya likita oyo esalemaki na Yerusaleme, ntoma Petro akendaki na Antiokia ya Siri. Ntango azalaki kuna, alekisaki ntango mingi elongo na bandeko ya bikólo mosusu. Kanisá ndenge oyo bandeko yango basepelaki mpo bazwaki boyebi mingi mpe bayekolaki makambo mingi epai ya ntoma Petro! Kasi, basengelaki kokamwa mpe koyoka mpasi mingi ntango ntoma Petro abendaki nzoto mpe atikaki kolya elongo na bango. Ntoma Petro atindaki mpe  bakristo mosusu oyo bazalaki Bayuda, ezala mpe Barnabasi, básala mpe bongo. Mpo na nini nkulutu wana oyo akɔmeli na elimo asalaki libunga monene ndenge wana, oyo ekokaki kosala ete lisangá ekabwana? Oyo eleki ntina, liteya nini tokoki kozwa na libunga ya ntoma Petro ntango nkulutu moko alobi to asali likambo moko oyo ezokisi biso?

16. (a) Ndenge nini ntoma Petro asembolamaki? (b) Yango ebimisi mituna nini?

16 Tángá Bagalatia 2:11-14. Ntoma Petro akweaki na motambo ya kobanga bato. (Masese 29:25) Ayebaki malamu ndenge oyo Yehova azalaki kotalela bato ya bikólo mosusu. Kasi, azalaki kobanga ete Bayuda oyo bakómaki bakristo mpe bakatamaki ngenga, oyo bautaki na Yerusaleme, bákanisela ye mabe ndenge asanganaki na bakristo wana oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu. Ntoma Paulo ayebisaki ntoma Petro ete azali mokosi. Mpo na nini? Mpamba te ntoma Paulo ayokaki ntango ntoma Petro azalaki kolobela bakristo ya bikólo mosusu na likita oyo esalemaki na Yerusaleme na mobu 49. (Misala 15:12; Bagalatia 2:13) Bakristo ya bikólo mosusu oyo ntoma Petro azokisaki bayokaki ndenge nini? Balingaki kotika ete likambo yango ebɛtisa bango libaku? Ntoma Petro alingaki nde kobungisa mikumba na ye mpo na libunga wana?

LIMBISÁKÁ

17. Ndenge nini Yehova alimbisaki ntoma Petro?

17 Ntoma Petro azalaki na komikitisa mpe andimaki ntango ntoma Paulo asembolaki ye. Biblia elobi te ete ntoma Petro abungisaki mikumba na ye. Kutu, na nsima, na lisalisi ya elimo santu, akomaki mikanda mibale ya Biblia. Mpe na mokanda na ye ya mibale, abengi ntoma Paulo “ndeko na biso ya bolingo.” (2 Petro 3:15) Kozanga ntembe, libunga oyo ntoma Petro asalaki esengelaki kopesa bakristo ya bikólo mosusu mpasi. Atako bongo, Yesu, oyo azali mokonzi ya lisangá, akobaki kosalela ye. (Baefese 1:22) Bandeko mibali mpe basi ya lisangá yango bazalaki na libaku ya kolimbisa ntoma Petro mpo na komekola Yesu mpe Tata na ye. Tozali kolikya ete moko te abɛtaki libaku mpo na libunga ya moto wana ya kozanga kokoka.

18. Ntango nini tosengeli komekola ndenge oyo Yehova atalelaka bosembo?

18 Na lisangá ya bokristo, ezala na siɛklɛ ya liboso to na ntango na biso, bankulutu nyonso bazali bato ya kozanga kokoka. Biblia elobi ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Koloba yango ezalaka pɛtɛɛ; kasi tosalaka nini soki tomoni ete ndeko moko asali libunga? Tokomekola ndenge oyo Yehova atalelaka bosembo? Na ndakisa, okosala nini soki nkulutu moko alobi likambo moko oyo emonani ete ebongi mpenza te? Soki nkulutu moko alobi likambo moko kozanga kokanisa mpe yango esali yo mpasi to ezokisi yo, okotika ete likambo yango ebɛtisa yo libaku? Na esika ya kokanisa nokinoki ete ndeko yango asengeli te kozala nkulutu, okotika makambo na mabɔkɔ ya Yesu, mokonzi ya lisangá? Na esika ya komona kaka libunga oyo asali, okokanisa ebele ya bambula oyo ndeko yango asaleli Yehova na bosembo? Soki ndeko moko oyo asaleli yo lisumu azali kokoba kozala nkulutu to ata kozwa mikumba mosusu, okosepela elongo na ye? Soki ozali kolimbisa, okomonisa ete ozali komekola ndenge oyo Yehova atalelaka bosembo.Tángá Matai 6:14, 15.

19. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?

19 Lokola tolingaka bosembo, tozali mpenza kozela mokolo oyo Yehova akosilisa kozanga bosembo nyonso oyo Satana mpe mokili na ye mabe babimisá. (Yisaya 65:17) Kasi liboso ete ntango yango ekóma, soki tokutani na likambo moko ya kozanga bosembo, na komikitisa nyonso, tóyeba ete mbala mosusu toyebi makambo nyonso te mpe tólimbisa na motema moko baoyo basaleli biso mabe. Soki tosali bongo, tokomekola ndenge oyo Yehova atalelaka bosembo.