Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2017

“Elako oyo osali, kokisá yango”

“Elako oyo osali, kokisá yango”

“Osengeli kokokisa bilako oyo osaleli Yehova.”MATAI 5:33.

NZEMBO: 63, 59

1. (a) Yefeta mpe Hana basalaki nini? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mituna nini tokozwa biyano na yango na lisolo oyo?

YEFETA azalaki mokambi moko ya mpiko mpe elombe ya bitumba. Hana azalaki mwasi moko ya komikitisa oyo azalaki kobatela malamu mobali na ye mpe ndako na ye. Bango nyonso mibale bazalaki kosambela Yehova. Kasi ezalaki na likambo mosusu oyo bango mibale basalaki. Ezala Yefeta to Hana basalelaki Yehova elako mpe bakokisaki bilako na bango na bosembo nyonso. Bazali mpenza ndakisa malamu mpo na mibali mpe basi oyo bandimaka kosalela Yehova elako lelo oyo. Tótalela sikoyo biyano na mituna oyo misato: Elako ezali nini? Mpo na nini tosengeli kozwa na lisɛki te elako oyo tosaleli Nzambe? Ndakisa ya Yefeta mpe Hana eteyi biso nini?

2, 3. (a) Elako ezali nini? (b) Makomami elobi nini na likambo etali kosalela Nzambe bilako?

2 Na Biblia, elako ezali elaka ya ntina mingi oyo moto asaleli Nzambe. Na ndakisa, moto akoki kolaka Yehova ete akosala likambo moko mpo na ye, kopesa likabo, kosala motindo moko ya mosala, to koboya kosala makambo mosusu. Moto ye moko nde aponaka kosala elako, kozanga ete bátindika ye na makasi. Kasi soki moto aponi kosala elako, Yehova atalelaka yango lokola likambo ya kozwa na lisɛki te, mpe azelaka ete moto yango atosa elako na ye mpe akokisa yango. Na Biblia, elako etalelamaka lokola ndai. Ndai ezali maloba oyo moto alobi mpo na kolapa ete akosala to akosala te likambo moko boye. (Ebandeli 14:22, 23; Baebre 6:16, 17)  Biblia elobi nini mpo na ndenge oyo tosengeli kozwa na lisɛki te bilako oyo tosalelaka Nzambe?

3 Mibeko ya Moize ezalaki koloba ete soki moto asaleli Yehova elako, “azanga kokokisa liloba na ye te. Akosala engebene nyonso oyo ebimi na monɔkɔ na ye.” (Mitángo 30:2) Na nsima, Salomo akomaki boye: ‘Ntango nyonso oyo osaleli Nzambe elako, kokakatana te mpo na kokokisa yango, mpo asepelaka na bazoba te. Elako oyo osali, kokisá yango.’ (Mosakoli 5:4) Yesu ateyaki ete kosalela Nzambe elako ezali likambo ya kozwa na lisɛki te ntango akomaki ete: “Balobaki na bato ya ntango ya kala ete, ‘Osengeli te kolapa ndai bongo okokisa yango te, kasi osengeli kokokisa bilako oyo osaleli Yehova.’”Matai 5:33.

4. (a) Mpo na nini esengeli kozwa na lisɛki te elako oyo tosaleli Nzambe? (b) Makambo nini tokoyekola na ndakisa ya Yefeta mpe Hana?

4 Ezali polele ete tosengeli kozwa na lisɛki te bilaka nyonso oyo tosalelaka Yehova. Ndenge oyo tokokisaka bilako na biso etaleli mpe boyokani na biso elongo na ye. Davidi amonisaki likambo yango polele ntango atunaki boye: “Nani akoki komata na ngomba ya Yehova, mpe nani akoki kotɛlɛma na esika na ye mosantu?” Na nsima, ayanolaki ntango alobaki ete Yehova andimaka kaka moto oyo “alapi ndai na bokosi te.” (Nzembo 24:3, 4) Bilako nini Yefeta mpe Hana basalaki? Ezalaki pɛtɛɛ mpo bákokisa bilako yango?

BAKOKISAKI BILAKO NA BANGO EPAI YA NZAMBE

5. Elako nini Yefeta asalaki, mpe esukaki ndenge nini?

5 Yefeta asalelaki Yehova elako liboso ya kobunda na bana ya Amone. Bato ya ekólo wana bazalaki banguna ya libota ya Nzambe. (Basambisi 10:7-9) Yefeta asɛngaki Yehova asalisa ye alonga bango, mpe asalaki elako oyo: “Soki mpenza opesi bana ya Amone na lobɔkɔ na ngai, ekosalema mpenza ete moto oyo akobima, oyo akouta na baporte ya ndako na ngai mpo na kokutana na ngai ntango nakouta epai ya bana ya Amone mpe nakozonga na kimya, moto yango asengeli kokóma moto ya Yehova.” Nzambe ayanolaki na libondeli ya Yefeta mpe asalisaki ye alonga etumba. Ntango Yefeta azongaki na ndako, mwana na ye ya mwasi nde ayaki koyamba ye. Ye nde asengelaki “kokóma moto ya Yehova.” (Basambisi 11:30-34) Yango elimbolaki nini mpo na mwana yango?

6. (a) Ezalaki pɛtɛɛ ete Yefeta ná mwana na ye bákokisa elako oyo Yefeta asalelaki Nzambe? (b) Kolimbola Mibeko 23:21, 23 mpe Nzembo 15:4 eteyi biso nini na likambo etali kosala bilako?

6 Mpo na kokokisa elako ya tata na ye, mwana ya Yefeta asengelaki kokende kofanda na tabernakle mpo na kosalela Yehova bomoi na ye mobimba. Yefeta asalaki elako wana kozanga ete akanisa? Te. Kutu, ekoki kozala ete Yefeta akanisaki ete mwana na ye nde akozala moto ya liboso oyo akobima mpo na koyamba ye. Ezala ayebaki yango to te, kokokisa elako wana ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na Yefeta mpe mwana na ye. Ntango Yefeta amonaki ye, alobaki ete ayokaki mpasi na motema. Na nsima, mwana na ye akendaki ‘kolela bongɔndɔ na ye.’ Mpo na nini? Mpo Yefeta azalaki na mwana mobali te. Azalaki kaka na mwana moko ya mwasi. Sikoyo, mwana yango asengelaki kobala te mpe kobota te. Yango elingi koloba ete nkombo ya libota ya Yefeta esengelaki kolimwa. Kasi, ezala Yefeta to mwana na ye bamonaki ete likambo moko ezalaki na ntina mingi koleka mayoki na bango. Yefeta alobaki boye: “Ngai nafungolaki monɔkɔ na ngai epai ya Yehova, mpe nakoki kozonga nsima te.” Mwana na ye mpe alobaki ete: “Salá ngai na ndenge oyo ekokani na maloba oyo ebimaki na monɔkɔ na yo.” (Basambisi 11:35-39) Yefeta mpe mwana na ye bazalaki bato ya sembo oyo bakokaki ata moke te kozwa likanisi ya koboya kokokisa elako oyo basalelaki Nzambe, atako ezalaki mpenza mpasi mpo bákokisa yango.Tángá Kolimbola Mibeko 23:21, 23; Nzembo 15:4.

7. (a) Elako nini Hana asalaki, mpe mpo na nini asalaki yango? (b) Makambo esukaki ndenge nini mpo na ye? (c) Elako oyo Hana asalaki elimbolaki nini mpo na Samwele? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

 7 Hana mpe asalelaki Yehova elako ntango oyo azalaki na likambo moko oyo ezalaki kotungisa ye mingi. Azalaki mawamawa mpo azalaki kobota te, mpe mbanda na ye azalaki kotyola ye mpe kotumola ye mpo na likambo yango. (1 Samwele 1:4-7, 10, 16) Ayebisaki Yehova ndenge oyo azalaki komiyoka, mpe alakaki ye boye: “Ee Yehova ya mampinga, soki okotala mpenza mpasi ya moombo na yo mpe ya solo okokanisa ngai, mpe soki okobosana te moombo na yo mpe ya solo okopesa moombo na yo mwana ya mobali, nakopesa ye epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe razware ekoleka na motó na ye te.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (1 Samwele 1:11) Yehova ayanolaki libondeli ya Hana, mpe na mbula oyo elandaki abotaki mwana mobali, nkombo na ye Samwele. Hana asepelaki mingi! Kasi abosanaki te elako oyo asalelaki Nzambe. Ntango abotaki mwana mobali, alobaki boye: “Nasɛngaki ye nde na Yehova.”1 Samwele 1:20.

8. (a) Ezalaki pɛtɛɛ mpo Hana akokisa elako na ye? (b) Ndenge nini Nzembo 61 ekundweli yo ndakisa malamu ya Hana?

8 Ntango Samwele akómaki na mbula soki 3, Hana asalaki kaka ndenge alakaki Yehova. Amemaki Samwele epai ya nganga-nzambe monene Eli na tabernakle na Shilo mpe alobaki boye: “Ezalaki mpo na mwana mobali oyo nde nabondelaki Yehova ete akokisela ngai lilɔmbɔ na ngai, oyo nasɛngaki ye. Bongo ngai sikoyo, nadefisi ye na Yehova. Mikolo nyonso oyo ye akozala na bomoi, akozala moto oyo bapesá Yehova.” (1 Samwele 1:24-28) Banda mokolo wana, Samwele akómaki kofanda na tabernakle. Biblia elobi ete “elenge Samwele azalaki se kokola liboso ya Yehova.” (1 Samwele 2:21) Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na Hana kokokisa elako na ye. Yango elimbolaki ete akokaki te kolekisa ntango mingi mokolo na mokolo elongo na mwana na ye oyo azalaki kolinga mingi. Akokaki te komona ndenge oyo mwana na ye azalaki kokola. Hana azwaki na lisɛki te elako oyo asalelaki Yehova. Andimaki komipimela makambo oyo ezalaki na ntina mingi epai na ye mpo na kokokisa elaka oyo asalelaki Nzambe.1 Samwele 2:1, 2; Tángá Nzembo 61:1, 5, 8.

Ozali kokokisa bilako oyo osaleli Yehova?

9. Tokotalela nini sikoyo?

9 Sikoyo lokola tomoni ete kosalela Yehova elako ezali likambo ya kozwa na lisɛki te, tótalela mituna oyo: Bilako nini tokoki kosala lelo oyo? Ekateli nini tosengeli kozala na yango mpo na kokokisa bilako yango?

ELAKO YA KOMIPESA NA NZAMBE

Elako ya komipesa na Nzambe (Talá paragrafe 10)

10. (a) Elako nini eleki ntina moto akoki kosala? (b) Elako yango elimbolaka nini?

10 Elako eleki ntina mpo na mokristo ezali elako oyo tosalaka ntango tomipesaka epai ya Yehova. Na libondeli oyo moto asalaka ye moko, ayebisaka Nzambe ete akosalela ye bomoi na ye mobimba mpo na libela, ata soki likambo nini ekómeli ye. Yesu alobaki ete ‘tosengeli komiboya,’ elingi koloba kolaka Yehova ete tokotya ye na esika ya liboso, biso na nsima. (Matai 16:24) Kobanda mokolo wana, tokómaka “bato ya Yehova.” (Baroma 14:8) Tozwaka komipesa na biso epai ya Nzambe na lisɛki te. Tomiyokaka lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Nakofuta Yehova eloko nini mpo na bolamu na ye nyonso oyo asalelá ngai? Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova, Ɛɛ, liboso ya bato na ye nyonso.”Nzembo 116:12, 14.

11. Nini esalemaki mokolo oyo ozwaki batisimo?

11 Osilá komipesa epai ya Yehova mpe ozwá batisimo na mai mpo na komonisa yango? Soki osalá yango, osalá likambo moko ya malamu! Ozali koyeba lisusu ntango ndeko oyo asalaki diskur ya batisimo atunaki  soki omipesaki na Yehova mpe okangaki ntina ete “komipesa na yo mpe kozwa batisimo ekómisi yo Motatoli ya Yehova”? Ntango oyanolaki ɛɛ, bato nyonso oyo bazalaki wana bayebaki ete osilaki komipesa na Yehova mpe obongi kozwa batisimo mpo na kokóma ministre na ye. Kozanga ntembe, osepelisaki Yehova mingi!

12. (a) Mituna nini tosengeli komituna? (b) Bizaleli nini ntoma Petro alendisi biso tókolisa?

12 Ntango ozwaki batisimo, olakaki Yehova ete okosalela ye bomoi na yo mobimba mpe okosala nyonso oyo esengeli mpo na kotosa mitinda na ye. Kasi batisimo ezali kaka ebandeli. Lokola mikolo ezali koleka, biso nyonso tosengeli kokoba komitalela malamu. Tokoki komituna boye: ‘Banda nazwá batisimo tii lelo, boyokani na ngai na Yehova ezali kokóma makasi? Nazali kaka kosalela ye na motema na ngai mobimba? (Bakolose 3:23) Nabondelaka mbala na mbala? Natángaka Biblia mokolo na mokolo? Nayanganaka na makita ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ? Nabimaka na mosala ya kosakola mbala na mbala? To nasilá nde kobungisa esengo na ngai na makambo wana nyonso?’ Ntoma Petro akebisaki biso ete ezali likama kozala bato oyo basalaka mosala te na mosala ya Yehova. Tokoki kokima likama yango soki tozali kosala milende mpo na kokóma na kondima makasi, kokóma  na boyebi mingi, kokoba koyika mpiko mpe kokangama na Nzambe.Tángá 2 Petro 1:5-8.

13. Mokristo oyo amipesi mpe azwi batisimo asengeli koyeba nini?

13 Soki tosilá kosala elako mpo na kosalela Yehova, tosengeli te kozonga nsima. Ata soki moto alɛmbi kosalela Yehova to azali lisusu te na bomoi ya mokristo, akoki te na nsima koloba ete amipesaki mpenza te epai ya Nzambe mpe ete batisimo na ye ezali lisusu na ntina te. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Soki moto oyo amipesi na Yehova mpe na nsima asali lisumu moko monene, asengeli kozongisa monɔkɔ epai ya Yehova mpe na lisangá. (Baroma 14:12) Tolingi ata moke te kozala lokola bato oyo Yesu alobaki mpo na bango ete: “Otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.” Kasi tolingi nde aloba na biso ete: “Nayebi makambo oyo osalaka, mpe bolingo na yo mpe kondima na yo mpe mosala na yo mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, nayebi mpe ete makambo oyo ozali kosala sikoyo ezali mingi koleka oyo ya kala.” (Emoniseli 2:4, 19) Soki tozali kosala makambo oyo eyokani na komipesa na biso, tokosepelisa Yehova.

ELAKO YA LIBALA

Elako ya libala (Talá paragrafe 14)

14. (a) Elako nini ya mibale eleki ntina moto akoki kosala? (b) Mpo na nini elako yango ezali na ntina mingi?

14 Elako ya mibale oyo eleki ntina, oyo moto akoki kosala ezali elako ya libala. Libala ezali mosantu. Yehova amonaka ete elako ya libala ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Ntango mwasi ná mobali bazali kosala elako, basalaka yango nde na miso ya Yehova mpe ya bato oyo bazali wana. Mbala mingi, molongani mokomoko asalaka elako ya kolinga moninga, kosepela na ye, mpe komonisela ye limemya ntango nyonso oyo bakozala na bomoi elongo awa na mabele kati na ebongiseli ya libala ndenge Nzambe abandisaki yango. Atako basusu bakoki te kosalela kaka maloba wana, basalaka kaka elako na miso ya Nzambe. Ntango basalaka elako wana, bakómaka mwasi ná mobali oyo babalani. Libala esalemá mpo esangisa bato mibale bomoi na bango mobimba. (Ebandeli 2:24; 1 Bakorinti 7:39) Yesu alobaki boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” Mwasi ná mobali oyo bazali kobalana basengeli te kokanisa ete soki makambo esimbi te na libala na bango, bakoki kaka koboma libala.Marko 10:9.

15. Mpo na nini bakristo basengeli te kotalela libala ndenge mokili etalelaka yango?

15 Na mokili oyo, moto ya kokoka azali te. Ndenge moko mpe libala ya kokoka ezalaka te. Yango wana, Biblia eyebisi biso ete, na bantango mosusu, bato oyo babali “bakozwa bolɔzi.” (1 Bakorinti 7:28) Lelo oyo na mokili, bato mingi bazwaka lisusu libala na kilo te. Bamonaka ete soki makambo esimbi te, bakoki kaka koboma libala. Kasi, basi mpe mibali oyo bazali bakristo batalelaka libala ndenge wana te. Bayebaka ete basalaki elako ya libala na miso ya Nzambe. Soki bakokisi elako yango te, ezali lokola bazali kokosa Nzambe, nzokande Nzambe ayinaka bato ya lokuta. (Balevi 19:12; Masese 6:16-19) Bakristo oyo babalá basengeli kokanisaka maloba oyo ya ntoma Paulo: “Okangami na mwasi? Tiká koluka kofungwama.” (1 Bakorinti 7:27) Ntoma Paulo alobaki bongo mpo ayebaki ete Yehova mpe ayinaka koboma libala.Malaki 2:13-16.

16. Biblia elobi nini mpo na koboma libala mpe kokabwana?

16 Yesu alobaki ete ntina kaka moko oyo Biblia epesi nzela mpo na koboma libala ezali soki mobalani moko asali ekobo mpe mobalani oyo asali likambo te aboyi kolimbisa ye. (Matai 19:9; Baebre 13:4) Kasi, tokoloba nini na likambo etali kokabwana na molongani? Biblia elobeli mpe likambo yango polele. (Tángá 1 Bakorinti 7:10, 11.) Kasi,  Biblia elobeli te ntina oyo babalani basengeli kokabwana. Atako bongo, na bantango mosusu, ekoki kozala na makambo ya minene oyo ekoki kotinda mokristo akabwana na molongani na ye. Na ndakisa, ndeko mobali to ndeko mwasi akoki komona ete bomoi na ye to boyokani na ye na Yehova ezali mpenza na likama soki akobi kofanda esika moko na molongani oyo azali kotya bomoi na ye na likama to kopekisa ye losambo ya solo. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

17. Bakristo oyo babalá basengeli kosala nini mpo libala na bango eumela?

17 Soki babalani baluki toli epai ya bankulutu mpo na kobongisa libala na bango, bankulutu bakoki kotuna bango soki basilá kotala video Bolingo ya solosolo ezali nini? mpe koyekola mwa buku Okoki kozala na libota ya esengo. Bisaleli wana ezali na mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa mwasi ná mobali bázala na boyokani malamu na libala na bango. Mobali moko ná mwasi na ye balobaki boye: “Bandá tozali koyekola mwa buku wana, tokómi na esengo mingi na libala na biso.” Ndeko mwasi moko oyo asali mbula 22 na libala amonaki ete libala na ye elingaki kokufa. Kasi nsima ya kotala video wana, alobaki boye: “Biso nyonso mibale tozwá batisimo, kasi tozalaki kotalela makambo ndenge moko te. Video yango eyaki mpenza na ntango oyo ebongi! Sikoyo, tozali na boyokani malamu na libala na biso.” Tomoni polele ete soki mwasi ná mobali bazali kosalela mitinda ya Yehova na libala na bango, bakozala na esengo mingi mpe bakoyokana malamu.

ELAKO YA BANDEKO OYO BAMIPESÁ KAKA NA MOSALA YA NTANGO NYONSO

18, 19. (a) Baboti bakristo mingi basilá kosala nini? (b) Tokoki koloba nini mpo na bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso?

18 Na ebandeli tolobelaki bilako oyo Yefeta mpe Hana basalaki. Bilako wana esalaki ete mwana ya Yefeta mpe mwana ya Hana básalela Yehova bomoi na bango mobimba na ndenge oyo ekesani na basusu. Lelo oyo, baboti bakristo mingi balendisaka bana na bango bákɔta na mosala ya ntango nyonso mpe bámipesa na mosala ya Nzambe bomoi na bango mobimba. Biso nyonso tokoki kolendisa bilenge yango mpo bákoba na mosala na bango.Basambisi 11:40; Nzembo 110:3.

Elako ya bandeko oyo bamipesá kaka na mosala ya ntango nyonso (Talá paragrafe 19)

19 Lelo oyo na mokili mobimba, ezali na Batatoli ya Yehova soki 67 000 oyo bamipesá kaka na mosala ya ntango nyonso. Basusu basalaka na Betele, basusu na mosala ya botongi, basusu na mosala ya zongazonga. Basusu basalaka mosala makasi lokola balakisi na biteyelo ya Teokrasi, babongisi-nzela monene, bamisionɛrɛ, basaleli na Bandako ya mayangani, to basaleli na bandako ya biteyelo ya Biblia. Bandeko wana nyonso basalaka “elako ya kotosa mpe kondima bomoi oyo ezangi mindɔndɔ.” Na elako yango, balakaka ete bakosala mosala makasi na mokumba nyonso oyo bakopesa bango na mosala ya Yehova, bakozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ, mpe bakosala te mosala ya mosuni kozanga ete bázwa ndingisa. Bandeko yango bazali lokola bandeko mosusu nyonso, kasi mikumba oyo bazali na yango nde ezali na ntina mingi. Bazalaka na komikitisa mpe bazali na ekateli ya kokoba kokokisa elako na bango ntango nyonso oyo bakozala na mosala ya ntango nyonso.

20. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela bilako oyo tosaleli Nzambe? (b) Mpo na nini tosengeli kotalela yango bongo?

20 Na lisolo oyo, tolobeli bilako misato oyo tokoki kosalela Nzambe. Mbala mosusu osilá kosala elako moko na bilako yango. Toyebi ete elako na biso esengeli kozala likambo ya kozwa na lisɛki te mpe tosengeli kosala nyonso mpo na kokokisa yango. (Masese 20:25) Soki tokokisi te elako oyo tosaleli Yehova, yango ekoki kobimisa makama mingi. (Mosakoli 5:6) Yango wana, tózala lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki na Yehova ete: “Nakobɛtɛla nkombo na yo mondule mpo na seko, mpo nakokisa bilako na ngai mokolo na mokolo.”Nzembo 61:8.

^ par. 7 Hana alakaki Yehova ete soki aboti mwana mobali, mwana yango akozala Monaziri bomoi na ye mobimba. Yango elimbolaki ete mwana yango asengelaki kopesama mpe kotyama pembeni mpo na mosala ya Yehova.Mitángo 6:2, 5, 8.

^ par. 13 Lokola bankulutu batalelaka makambo mingi elongo na moto mpo na koluka koyeba soki akokisi masɛngami mpo na kozwa batisimo, esalemaka mingi te ete batisimo ya ndeko moko endimama lisusu te.

^ par. 16 Talá na Apɛndisi, lisolo “Likanisi ya Biblia na likambo etali koboma libala mpe kokabwana” na buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.