Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2017

Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!

Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!

‘Kobá kosɛnga na kondima, kobɛta ntembe ata moke te.’YAKOBO 1:6.

NZEMBO: 81, 70

1. Nini etindaki Kaina azwa ekateli ya mabe, mpe yango ebimisaki nini?

KAINA asengelaki kozwa ekateli moko ya monene. Akokaki kopona kopekisa mposa na ye ya kosala lisumu, mpe yango elingaki kobimisa matomba; to kotika ete mposa yango ezala na bokonzi likoló na ye, mpe ebimisa mbuma mabe. Nzokande, Biblia eyebisi biso ete Kaina azwaki ekateli ya mabe. Ekateli na ye etindaki ye aboma ndeko na ye Abele mpe ebebisaki boyokani na ye na Mozalisi na ye.Ebandeli 4:3-16.

2. Mpo na nini ezali na ntina kozwa bikateli ya malamu?

2 Ndenge moko mpe lelo oyo, biso nyonso tosengeli kozwa bikateli na bomoi na biso. Bikateli mosusu ezalaka ya minene, kasi mosusu ezalaka ya mike. Atako bongo, bikateli mingi oyo tozwaka ekoki mpenza kobongola bomoi na biso. Soki tozali kozwa bikateli ya malamu, tokozala na mikakatano mingi te mpe tokozala na bomoi ya kimya. Kasi soki tozali kozwa bikateli ya mabe, bomoi na biso ekoki kotonda na mikakatano mpe tokoki kolɛmba nzoto.Masese 14:8.

3. (a) Mpo na kozwa bikateli ya malamu, tosengeli kondima nini? (b) Mituna nini tokotalela?

3 Nini ekosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu? Tosengeli kondimela Nzambe, kotya motema ete alingi kosalisa biso mpe akopesa biso bwanya oyo tosengeli na yango mpo na kozwa  bikateli ya malamu. Tosengeli mpe kondima Liloba na ye, kotyela toli na ye motema. (Tángá Yakobo 1:5-8.) Soki tozali kopusana penepene na Yehova mpe kolinga Liloba na ye lisusu mingi, yango ekosalisa biso tóndima ete ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Na nsima, tokotalela Liloba na ye liboso ya kozwa bikateli. Kasi ndenge nini tokoki kokolisa makoki na biso ya kozwa bikateli ya malamu? Mpe tokoki nde kobongola bikateli oyo tozwaki?

BISO NYONSO TOSENGELI KOZWA BIKATELI

4. Ekateli nini Adama asengelaki kozwa, mpe yango ebimisaki nini?

4 Banda mokili ebandá, bato bazwaka bikateli ya minene. Adama, mobali ya liboso asengelaki kozwa ekateli ya koyokela Yehova Mozalisi na ye to koyokela mwasi na ye Eva. Adama aponaki koyokela Eva, oyo atindaki ye azwa ekateli ya mabe mpenza. Yango wana, Yehova abenganaki Adama na elanga ya Edene, na nsima Adama akufaki. Lelo oyo, soki tozali konyokwama, ezali mpo na ekateli ya mabe oyo Adama azwaki.

5. Ndenge nini tosengeli kotalela mokumba na biso ya kozwa bikateli?

5 Bato mosusu bakoki kokanisa ete bomoi elingaki kozala mpasi te soki bázwaka bikateli te. Mbala mosusu yo mpe okanisaka bongo. Kasi ezali malamu tóbosana te ete Yehova akelaki moto te lokola masini to robo oyo ekoki te kokanisa to kozwa bikateli. Apesá biso Liloba na ye, oyo eteyaka biso ndenge ya kozwa bikateli ya malamu. Yehova alingaka ete tózwaka bikateli, mpe mokumba yango ekoki kosalisa biso. Talelá bandakisa oyo elandi.

6, 7. Ekateli nini Bayisraele basengelaki kozwa, mpe mpo na nini ezalaki mpasi bázwa yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Ntango Bayisraele bazalaki kofanda na Mokili ya Ndaka, basengelaki kopona soki bakosambela Yehova to bakosalela banzambe mosusu. (Tángá Yosua 24:15.) Yango ekokaki komonana lokola ekateli moko ya moke. Nzokande, ekateli na bango ekokaki kolimbola bomoi to liwa. Na ntango ya bazuzi, Bayisraele bakobaki kozwa bikateli ya mabe. Batikaki kosambela Yehova mpe babandaki kosambela banzambe ya lokuta. (Basambisi 2:3, 11-23) Na nsima, na eleko ya mosakoli Eliya, basaleli ya Nzambe basengelaki kopona soki bakosalela Yehova to bakosalela Baala nzambe ya lokuta. (1 Bakonzi 18:21) Yango ekokaki komonana lokola ekateli moko ya pɛtɛɛ, mpamba te kosalela Yehova ezalaka ntango nyonso malamu. Moto ya bwanya akoki te kondima kosalela nzambe oyo azali na bomoi te. Kasi Bayisraele bazalaki kokoka kozwa ekateli te. Biblia elobi ete Bayisraele bazalaki ‘kokakatana na makanisi.’ Na bwanya nyonso, mosakoli Eliya alendisaki bango bápona kosambela Yehova, Nzambe ya solo.

7 Mpo na nini ezalaki mpasi mpo Bayisraele bázwa ekateli ya bwanya? Ya liboso, bazalaki kondimela Yehova te, mpe baboyaki koyokela ye. Batyelaki Yehova motema te, mpe bazalaki kozwa ntango te mpo na koyekola makambo na ye mpe koluka bwanya na ye. Soki básalaka yango, makambo oyo bazalaki koyekola elingaki kosalisa bango bázwa bikateli ya malamu. (Nzembo 25:12) Ya mibale, Bayisraele bakómaki kolanda makanisi ya bato ya bikólo mosusu. Bapaya wana batindaki Bayisraele bábongola makanisi na bango mpe bazalaki kozwa bikateli na esika na bango. Yango wana, Bayisraele bakómaki kolanda bapaya wana mpe kosambela banzambe na bango ya lokuta. Nzokande, bambula mingi liboso, Yehova akebisaki Bayisraele mpo na likambo yango.Kobima 23:2.

 BASUSU BASENGELI KOZWA BIKATELI MPO NA BISO?

8. Liteya nini ya ntina mingi tozwi na ndakisa ya Bayisraele?

8 Ndakisa ya Bayisraele eteyi biso ete soki tolingi kozwa bikateli ya malamu, tosengeli kosalela Liloba ya Nzambe. Bagalatia 6:5 ekundweli biso ete moto na moto asengeli komema mokumba na ye na ekateli oyo azwi. Emonani polele ete tosengeli te kopesa moto mosusu mokumba ya kozwa bikateli mpo na biso. Mokomoko na biso asengeli nde koluka koyeba oyo Nzambe alobi ete ezali malamu mpe kopona kosala yango.

9. Mpo na nini ezali likama kotika ete basusu bázwa bikateli mpo na biso?

9 Ndenge nini tokoki kotika ete basusu bázwa bikateli mpo na biso? Soki totiki bango bátya biso mbamba mpo tózwa bikateli ya mabe. (Masese 1:10, 15) Yango ezali likama. Kolanda lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia ezali mokumba na biso moko. Soki totiki ete basusu bázwa bikateli mpo na biso, yango ekomonisa ete tokómi kolanda makanisi na bango. Ekateli wana ekoki komema na libebi.

10. Likebisi nini ntoma Paulo apesaki Bagalatia?

10 Ntoma Paulo akebisaki Bagalatia ete bátika te basusu bázwaka bikateli mpo na bango. (Tángá Bagalatia 4:17.) Bandeko mosusu na Galatia bazalaki koluka kozwa ekateli na esika ya basusu na lisangá. Nini ezalaki kotinda bango básala bongo? Bandeko wana, oyo bazalaki koluka matomba na bango moko, balingaki ete bandeko mosusu bálanda bango, na esika ya kolanda bantoma. Bazalaki na komikitisa te, mpe bazalaki te kotosa lotomo ya bandeko ya kozwa bikateli bango moko.

11. Ndenge nini tokoki kosalisa basusu ntango balingi kozwa bikateli?

11 Biso nyonso tokoki kozwa liteya na ndakisa ya ntoma Paulo. Ayebaki ete bandeko bazalaki na lotomo ya kozwa bikateli bango moko, mpe azalaki komemya lotomo yango. (Tángá 2 Bakorinti 1:24.) Lelo oyo, bankulutu bakoki kolanda ndakisa na ye ntango bazali kopesa toli na makambo oyo moto ye moko asengeli kozwa ekateli. Basepelaka mingi kopesa bandeko toli oyo euti na Liloba ya Nzambe. Kasi, bankulutu bakebaka  ete bátika mokristo mokomoko azwa bikateli ye moko mpamba te ye moko nde akomema mokumba ya bikateli oyo azwi. Liteya ya ntina yango oyo: Tokoki kosalisa basusu bákanga ntina ya toli ya Biblia oyo eyokani na likambo oyo bakutani na yango na bomoi. Atako bongo, bandeko bazali na lotomo mpe mokumba ya kozwa bikateli bango moko. Soki bazwi bikateli ya malamu, yango ememelaka bango matomba. Tomoni polele ete tosengeli soki moke te kokanisa ete tozali na bokonzi ya koponela bandeko makambo oyo basengeli kosala.

Bankulutu ya bolingo basalisaka basusu báyeba kozwa bikateli bango moko (Talá paragrafe 11)

KANISÁKÁ MALAMUMALAMU LIBOSO YA KOZWA BIKATELI

12, 13. Mpo na nini ezalaka likama kozwa ekateli ntango tozali na nkanda to tolɛmbi nzoto?

12 Lelo oyo, bato mingi balandaka motema na bango ntango balingi kozwa ekateli. Kasi yango ekoki kozala likama. Biblia ekebisi biso ete tólanda te motema na biso ya kozanga kokoka to mayoki na biso mpo na kozwa bikateli. (Masese 28:26) Tosengeli te kondimela motema na biso mpo “motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.” (Yirimia 17:9) Ezali na bandakisa mingi na Biblia oyo emonisi ete kondimela motema na biso ya kozanga kokoka epesaka matomba te. (1 Bakonzi 11:9; Yirimia 3:17; 13:10) Yango wana, nini ekoki kosalema soki tondimeli motema na biso ntango tozali kozwa bikateli?

13 Yehova asɛngi biso tólinga ye na motema na biso mobimba mpe tólinga mozalani na biso ndenge tomilingaka. (Matai 22:37-39) Kasi, tosengeli kokeba. Bavɛrsɛ oyo ezali na paragrafe oyo ezali likoló emonisi ete ezali likama kotika mayoki na biso etambwisa makambo mpe makanisi na biso. Na ndakisa, ezalaka mpasi mpo moto oyo azali na nkanda azwa ekateli ya malamu. (Masese 14:17; 29:22) Ezalaka mpe mpasi mpo moto oyo alɛmbi nzoto azwa ekateli ya malamu. (Mitángo 32:6-12; Masese 24:10) Tosengeli kotika Mibeko ya Nzambe etambwisa makanisi na biso. (Baroma 7:25) Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, tosengeli te kotika ete mayoki na biso etambwisa biso.

NTANGO YA KOBONGOLA BIKATELI OYO OZWAKI

14. Ndenge nini toyebi ete ezali mabe te kobongola bikateli mosusu?

14 Tosengeli kozwa bikateli ya malamu. Atako bongo, moto ya bwanya ayebaka ete na bantango mosusu akoki kotalela lisusu ekateli oyo azwaki liboso mpe mbala mosusu kobongola yango. Yehova Nzambe apesi biso ndakisa malamu na likambo yango. Yoká oyo asalaki mpo na bato ya Ninive na mikolo ya Yona: “Nzambe ya solo amonaki misala na bango, amonaki ete babongwani na nzela na bango ya mabe; bongo Nzambe ya solo ayokaki mawa mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.” (Yona 3:10) Ntango Yehova amonaki ete bato ya Ninive babongwanaki mpe batikaki kosala mabe, abongolaki ekateli na ye. Yango emonisaki ete azali na makambo makasimakasi te, azali na komikitisa, mpe na motema mawa. Na kokesana na bato mingi, Yehova azwaka te bikateli kozanga kokanisa, ata ntango asiliki.

15. Mpo na nini ntango mosusu ekoki kosɛnga kobongola ekateli moko?

15 Mbala mosusu ekoki kozala malamu tótalela lisusu ekateli moko oyo tozwaki, ntango mosusu mpo makambo ebongwani. Kobosana te ete ntango mosusu ata Yehova abongolaki bikateli na ye. (1 Bakonzi 21:20, 21, 27-29; 2 Bakonzi 20:1-5) Ntango mosusu oyo ekoki kosɛnga ete tóbongola ekateli moko ezali ntango toyebi makambo mosusu oyo toyebaki  liboso te. Tótalela ndakisa ya mokonzi Davidi. Azwaki ekateli na likambo etali Mefiboshete, nkɔkɔ ya Saulo, na kotalela makambo ya lokuta oyo bayebisaki ye. Na nsima, ntango bayebisaki ye makambo ya solo, abongolaki ekateli na ye. (2 Samwele 19:24-29) Ntango mosusu, ekoki kozala likambo ya bwanya biso mpe tósala bongo.

16. (a) Makanisi nini ekoki kosalisa biso ntango tozali kozwa bikateli? (b) Mpo na nini tosengeli kotalela lisusu bikateli oyo tozwaki kala? (c) Ndenge nini tokoki kosala yango?

16 Biblia elobi ete tosengeli te kozwaka bikateli ya minene mbangumbangu. (Masese 21:5) Tosengeli kozwa ntango ya kokanisa makambo nyonso malamumalamu mpo tózwa ekateli ya bwanya. (1 Batesaloniki 5:21) Liboso ya kozwa ekateli moko, tata ya libota asengeli kozwa ntango ya kolukaluka na Biblia mpe na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Ekozala mpe malamu koyoka makanisi ya bato mosusu ya libota. Kobosana te ete Nzambe asɛngaki Abrahama ayokela mwasi na ye. (Ebandeli 21:9-12) Bankulutu mpe basengeli kozwaka ntango ya kosala bolukiluki. Soki bayebi makambo ya sika oyo emonisi ete esengeli kobongola bikateli oyo bazwaki, basengeli te kokanisa ete soki babongoli yango, bandeko bakomemya bango lisusu te. Bankulutu ya komikitisa mpe ya makambo makasimakasi te bandimaka kobongola makanisi na bango mpe bikateli na bango soki esengeli. Mpe ekozala malamu ete biso nyonso tólanda ndakisa na bango. Yango ekosala ete lisangá ezala na kimya mpe ekoba kozala na bomoko.Misala 6:1-4.

SALÁ OYO OKANAKI KOSALA

17. Nini ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu?

17 Bikateli mosusu ezalaka ya minene koleka mosusu. Na ndakisa, kozwa ekateli ya kobala to kopona nani okobalana na ye ezali ekateli moko ya monene. Ekateli mosusu ya monene ezali kopona ntango ya kobanda mosala ya ntango nyonso. Liboso ya kozwa bikateli ya minene ndenge wana, tosengeli kokanisa malamumalamu makambo ya bomoi na biso mpe kobondela Yehova asalisa biso. Yango ekoki kozwa ntango, kasi soki tolingi kozwa ekateli ya malamu, tosengeli kotyela Yehova motema, kolanda malako na ye, mpe kondima litambwisi na ye. (Masese 1:5) Yehova apesá biso toli oyo eleki malamu na nzela ya Liloba na ye. Yango wana, ezali na ntina mingi ete tósalaka bolukiluki mpe tóbondela Yehova atambwisa biso. Akoki kosalisa biso tómonisa bizaleli oyo tosengeli na yango mpo na kozwa bikateli oyo eyokani na mokano na ye. Liboso ya kozwa bikateli ya minene, tosengeli ntango nyonso komituna boye: ‘Ekateli oyo nalingi kozwa ekomonisa ete nalingaka Yehova? Ekosalisa libota na ngai ezala na esengo mpe na kimya? Ekomonisa ete nazali na motema molai mpe na boboto?’

18. Mpo na nini Yehova azelaka ete tózwaka bikateli biso moko?

18 Yehova atindaka biso te na makasi tólinga ye mpe tósalela ye. Kutu, apesá biso bonsomi ya kopona soki tokolinga ye to tokosalela ye. Amemyaka ekateli oyo tozwi mpe lotomo na biso ya kopona kosalela ye to te. (Yosua 24:15; Mosakoli 5:4) Kasi azelaka ete tókokisa likambo oyo tokanaki kosala na kolanda Liloba na ye. Soki tondimi litambwisi ya Yehova mpe tosaleli mitinda oyo apesá biso, tokoki kozwa bikateli ya malamu. Mpe tokomonisa ete topikami makasi na banzela na biso nyonso.Yakobo 1:5-8; 4:8.