Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2017

Okotya motema na yo na makambo oyo ekomamá?

Okotya motema na yo na makambo oyo ekomamá?

“Makambo wana . . . ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.”1 BAKORINTI 10:11.

NZEMBO: 11, 61

1, 2. Mpo na nini tokotalela ndakisa ya bakonzi minei ya Yuda?

SOKI omoni moto moko auti kosɛlimwa na nzela moko ya mosɛlu mpe akwei, na ntembe te, yo mpe okozala ekɛngɛ ntango ozali kotambola na nzela yango. Ndenge moko mpe, kotalela mabunga oyo basusu basalaki na bomoi na bango ekoki kosalisa biso tósala te mabunga ya ndenge wana. Na ndakisa, tokoki kozwa mateya na mabunga ya bato oyo Biblia elobeli.

2 Bakonzi minei ya Yuda oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki basalelaki Yehova na motema mobimba. Atako bongo, basalaki mpe mabunga ya minene. Masolo na bango ekomamaki na Biblia mpo tókoka komanyola yango mpe kozwela yango mateya ya ntina mingi. Mateya nini tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki bango, mpe ndenge nini tokoki koboya kosala mabunga oyo basalaki?Tángá Baroma 15:4.

KOTYA MOTEMA NA BWANYA YA BATO EMEMAKA NA LIBEBI

3-5. (a) Atako motema ya Asa ezalaki mobimba epai ya Yehova, libunga nini asalaki? (b) Mpo na nini Asa atyelaki bato motema ntango abundaki na mokonzi Baasha?

3 Ya liboso, tótalela ndakisa ya Asa. Atyelaki Yehova motema ntango bato milio moko ya Etiopi bayaki kobundisa Yuda. Kasi, atyelaki Yehova motema te ntango abundaki na Baasha,  mokonzi ya Yisraele. Asa alingaki kopekisa Baasha akómisa makasi Rama, engumba moko monene na Yisraele oyo ezalaki pene na ndelo ya bokonzi ya Yuda. (2 Ntango 16:1-3) Asa amonaki malamu ete apesa mokonzi ya Siri kanyaka mpo asalisa ye. Ntango bato ya Siri babundisaki bingumba ya Yisraele, “na mbala moko [Baasha] atikaki kotonga Rama mpe atikaki mosala na ye.” (2 Ntango 16:5) Na ebandeli, ekoki kozala ete Asa asepelaki na ekateli oyo azwaki.

4 Kasi Yehova ayokaki ndenge nini? Yehova asepelaki te ndenge Asa aboyaki kotyela ye motema, yango wana atindaki mosakoli Hanani asembola Asa. (Tángá 2 Ntango 16:7-9.) Hanani ayebisaki Asa: “Kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.” Asa azwaki engumba ya Rama, kasi kobanda wana, bomoi na ye mobimba, ye ná bato ya ekólo na ye basengelaki kobunda bitumba mingi.

5 Na lisolo oyo eleki, tomonaki ete Yehova azalaki kosepela na Asa. Atako Asa azalaki moto ya kozanga kokoka, Yehova amonaki ete motema na ye ezalaki mobimba epai na ye. (1 Bakonzi 15:14) Kasi lokola Asa azwaki ekateli ya mabe, akokaki te kokima mbuma mabe ya ekateli yango. Mpo na nini amityelaki motema mpe atyelaki bato mosusu motema, kasi Yehova te? Ntango mosusu ezalaki mpo Asa akanisaki ete akokaki kosalela mayele oyo basoda basalelaka mpo na kolonga bitumba. To ekoki kozala ete alandaki toli ya mabe ya basusu.

6. Liteya nini tokoki kozwa na libunga oyo Asa asalaki? Pesá ndakisa.

6 Liteya nini tokoki kozwa na libunga ya Asa? Na makambo nyonso, tosengeli kotyela Yehova motema, kasi te kotya motema na makanisi na biso moko. Tosengeli kosɛnga ye asalisa biso, ezala tokutani na mikakatano ya minene to ya mike. Ezali malamu kokanisa likambo oyo: Tomityelaka nde motema ntango mosusu na koluka kosilisa mokakatano moko na ndenge oyo biso tokanisi ete ezali malamu? To tolukaka nde liboso oyo Biblia elobi, na nsima tosalelaka makanisi yango mpo na kosilisa mokakatano na biso? Na ndakisa, kanisá ete bato ya libota na yo bazali kopekisa yo oyangana na makita to na liyangani moko. Okosɛnga Yehova asalisa yo oyeba nini osengeli kosala na ntango wana? To ekoki kozala ete nsima ya kozanga mosala ntango molai, nsukansuka moto moko alingi kozwa yo na mosala. Okoyebisa ye ete ozali na makita oyo osengeli koyangana pɔsɔ na pɔsɔ, to okobanga koloba yango kaka mpo bázwa yo na mosala? Ezala likambo nini okutani na yango, osengeli kobosana te toli oyo ya mokomi ya nzembo: “Tikelá Yehova nzela na yo, mpe talelá ye, mpe ye moko akosala.”Nzembo 37:5.

NINI EKOKI KOSALEMA SOKI TOPONI KOSALA BONINGA YA MABE?

7, 8. Libunga nini Yehoshafate asalaki, mpe yango ebimisaki nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

7 Tótalela sikoyo ndakisa ya Yehoshafate, mwana ya Asa. Azalaki na bizaleli mingi ya malamu oyo Yehova azalaki kosepela na yango. Mpe ntango azalaki kotyela Yehova motema, asalaki makambo mingi ya malamu. Kasi azwaki mpe bikateli mosusu ya mabe. Na ndakisa, asalaki ete mwana na ye ya mobali abala mwana mwasi ya Ahaba, mokonzi mabe. Na nsima, Yehoshafate asanganaki na Ahaba mpo na kobundisa bato ya Siri, atako mosakoli Mikaya akebisaki ye ete asala yango te. Na etumba, bato ya Siri babundisaki Yehoshafate mpe balingaki koboma ye. (2 Ntango 18:1-32) Ntango azongaki na Yerusaleme, mosakoli Yehu atunaki ye: “Esengeli nde kosalisa moto mabe, mpe osengeli nde kolinga baoyo bazali koyina Yehova?”Tángá 2 Ntango 19:1-3.

8 Yehoshafate azwaki nde mateya na makambo oyo ekómelaki ye mpe na likebisi  ya mosakoli? Likambo ya mawa, azwaki te. Atako azalaki kaka kolinga Yehova mpe alingaki kosepelisa ye, Yehoshafate asalaki lisusu boninga na moto moko oyo azalaki te kosambela Yehova. Moto yango ezalaki mokonzi Ahazia, mwana ya Ahaba. Yehoshafate ná Ahazia batongaki bamasuwa elongo. Kasi bamasuwa oyo basalaki ebebaki liboso kutu ete básalela yango.2 Ntango 20:35-37.

9. Nini ekoki kosalema soki toponi kosala boninga ya mabe?

9 Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yehoshafate? Yehoshafate asalaki makambo ya malamu mpe “alukaki Yehova na motema na ye mobimba.” (2 Ntango 22:9) Atako bongo, aponaki kolekisa ntango mingi elongo na bato oyo bazalaki kolinga Yehova te, mpe yango ememelaki ye mikakatano ya minene na bomoi na ye. Kutu, etikalaki moke báboma ye. Kobosana te lisese oyo ya Biblia: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” (Masese 13:20) Tolingaka koyebisa basusu makambo ya Yehova. Atako bongo, ekoki kozala likama kosala boninga makasi na bato oyo basalelaka ye te.

10. (a) Soki tolingi kobala, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yehoshafate? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te?

10 Na ndakisa, soki tolingi kobala, liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yehoshafate? Ekoki kozala ete tokómi kosepela na moto moko oyo alingaka Yehova te. Tokoki kokanisa ete tokozwa te moto ya kobalana na ye na kati ya basaleli ya Yehova. To bandeko na biso mosusu ya libota bakoki koyebisa biso ete tosengeli kobala mpo bambula ebandi kopusana. Ezali solo ete Yehova akelá biso na mposa ya kolinga mpe na mposa ete basusu bálinga biso. Kasi, tosengeli kosala nini soki tozwi naino te moto oyo abongi ete tóbalana na ye? Komanyola likambo oyo ekómelaki Yehoshafate ezali moko ya makambo oyo ekoki kosalisa biso. Mbala na mbala, azalaki koluka litambwisi ya Yehova. (2 Ntango 18:4-6) Kasi ntango akómaki moninga ya Ahaba, oyo azalaki kolinga Yehova te, Yehoshafate abosanaki likebisi ya Yehova. Yehoshafate asengelaki komikundola ete ‘miso ya Yehova ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na  ye.’ (2 Ntango 16:9) Biso mpe tosengeli komikundola ete Yehova alingaka kosalisa biso. Ayebi makambo ya bomoi na biso mpe alingaka biso. Ondimaka ete Nzambe akokokisa bamposa na yo na likambo etali bolingo mpe boninga? Zalá na kondima ete nsukansuka, akokokisa yango!

Kosangana te na moto oyo asambelaka Yehova te (Talá paragrafe 10)

KOTIKA TE ETE MOTEMA NA YO EKÓMA NA LOLENDO

11, 12. (a) Likambo nini Hizikiya asalaki, oyo emonisaki makambo oyo ezalaki na motema na ye? (b) Mpo na nini Yehova alimbisaki Hizikiya?

11 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Hizikiya? Yehova asalisaki Hizikiya ayeba makambo oyo ezalaki mpenza na motema na ye. (Tángá 2 Ntango 32:31.) Ntango Hizikiya abɛlaki makasi, Nzambe ayebisaki ye ete akobikisa ye na maladi wana mpe apesaki ye elembo mpo na kondimisa ye. Yehova asalaki ete elili moko ebima na eskalye mpe ezonga nsima matambe zomi. Na nsima, emonanaki ete bankumu ya Babilone balingaki koyeba makambo mosusu mpo na elembo yango, mpe batindaki bato epai ya Hizikiya mpo na kotuna likambo yango. (2 Bakonzi 20:8-13; 2 Ntango 32:24) Yehova ayebisaki Hizikiya te ndenge ya koyanola bango. Biblia elobi ete Yehova ‘atikaki ye moko’ mpo amona nini akosala. Hizikiya alakisaki bato wana ya Babilone bozwi na ye nyonso. Yango emonisaki makambo oyo ezalaki na motema ya Hizikiya. Na ndenge nini?

12 Likambo ya mawa, Hizikiya akómaki na lolendo. Yango wana, ‘amonisaki botɔndi te na bolamu oyo basalelaki ye.’ Biblia eyebisi te ntina oyo makanisi na ye ebongwanaki. Mbala mosusu ezalaki mpo na kolonga oyo alongaki bato ya Asiri to mpo Yehova abikisaki ye na maladi. To ekoki kozala mpo akómaki na bozwi mpe na lokumu. Atako Hizikiya asalelaki Yehova na motema mobimba, mpo na mwa ntango, akómaki na lolendo mpe Yehova asepelaki na ye te. Kasi na nsima, “Hizikiya amikitisaki,” mpe Nzambe alimbisaki ye.2 Ntango 32:25-27; Nzembo 138:6.

13, 14. (a) Nini ekoki komonisa makambo oyo ezali na motema na biso? (b) Tosengeli kosala nini ntango basusu bakumisi biso?

13 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Hizikiya mpe libunga oyo asalaki? Kobosana te ete Hizikiya akómaki na lolendo mwa moke na nsima ntango Yehova asalisaki ye alonga bato ya Asiri mpe abikisaki ye na maladi. Na yango, soki tosali makambo ya malamu to soki basusu bakumisi biso, tokosala nini? Ndenge oyo tokosala ekoki komonisa makambo oyo ezali na motema na biso. Na ndakisa, ndeko moko akoki kosala milende mpo na kobongisa malamu diskur moko oyo akosala liboso ya bato ebele. Na nsima, bato mingi bakoki kokumisa ye mpo na diskur oyo asali. Akosala nini ntango bakumisi ye?

14 Tosengeli ntango nyonso kobosana te likambo oyo Yesu alobaki: “Ntango bosilisi kosala makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba ete: ‘Tozali baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’” (Luka 17:10) Kobosana te ete ntango Hizikiya akómaki na lolendo, azalaki na botɔndi te mpo na ndenge oyo Yehova asalisaki ye. Na yango, ntango basusu bakumisi biso mpo na diskur oyo tosalaki, nini ekosalisa biso tókoba kozala na komikitisa? Tokoki komanyola makambo oyo Yehova asalelá biso. Mpe tokoki koloba makambo oyo etali ye mpe ndenge oyo asalisaki biso. Kutu, ye moto apesá biso Biblia mpe apesaka biso elimo santu mpo tókoka kosala diskur yango.

 TIKÁ YEHOVA AKAMBA YO NTANGO OZALI KOZWA BIKATELI

15, 16. Likambo nini Yosiya asalaki, oyo ememaki ye na liwa?

15 Mpo na kosukisa, liteya nini tokoki kozwa epai ya Yosiya? Atako Yosiya azalaki mokonzi malamu, asalaki libunga oyo ememaki ye na liwa. (Tángá 2 Ntango 35:20-22.) Nini esalemaki? Yosiya abandisaki etumba na Neko, mokonzi ya Ezipito, atako ezalaki na ntina te asala bongo. Kutu, Neko ye moko ayebisaki Yosiya ete alingi kobunda na ye te. Biblia elobi ete maloba ya Neko “eutaki na monɔkɔ ya Nzambe.” Atako bongo, Yosiya akendaki na etumba yango mpe abomamaki. Kasi, mpo na nini abundisaki Neko? Biblia elobi yango te.

16 Yosiya asengelaki koluka koyeba soki likambo oyo Neko alobaki eutaki mpenza epai ya Yehova. Na ndenge nini? Akokaki kotuna Yirimia, mosakoli ya Yehova. (2 Ntango 35:23, 25) Lisusu, Yosiya asengelaki koluka koyeba likambo yango malamu. Neko azalaki nde kokende na Karakemishe mpo na kobundisa ekólo mosusu, kasi Yerusaleme te. Mpe Neko alukaki te kofinga Yehova to basaleli na ye. Yosiya akanisaki malamumalamu te makambo nyonso wana liboso ete azwa ekateli. Likambo yango eteyi biso nini? Soki tozali na likambo mpe tolingi kozwa ekateli, tosengeli libosoliboso koluka koyeba oyo Yehova akolinga ete tósala.

17. Ntango tozali na mikakatano, ndenge nini tokoki koboya kosala libunga lokola oyo Yosiya asalaki?

17 Soki tolingi kozwa ekateli moko, tosengeli liboso kokanisa na ndenge oyo mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso mpe ndenge oyo tokoki kosalela yango. Ntango mosusu, tokoki kosala bolukiluki na kati ya mikanda na biso to ata kosɛnga toli epai ya nkulutu moko. Akoki kosalisa biso tókanisa mitinda mosusu ya Biblia. Tózwa ndakisa oyo: Ndeko mwasi moko azali na mobali oyo azali Motatoli te. Mokolo moko, amibongisi mpo na kobima na mosala ya kosakola. (Misala 4:20) Kasi na mokolo yango, mobali na ye alingi te ete akende kosakola. Mobali yango ayebisi ye ete esali mwa mikolo bazali te kolekisa ntango mingi elongo, yango wana alingi ete bákende esika moko boye. Na yango, ndeko mwasi wana ataleli bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa ye azwa ekateli ya malamu. Ayebi ete asengeli kotosa Nzambe mpe ete Yesu apesaki biso etinda ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; Misala 5:29) Kasi, amikundoli mpe ete mwasi asengeli kotosa mobali na ye, mpe ete basaleli ya Nzambe basengeli kozala makambo makasimakasi te. (Baefese 5:22-24; Bafilipi 4:5) Mobali na ye azali nde kopekisa ye akende kosakola, to alingi kaka ete bálekisa ntango mingi elongo mokolo wana? Lokola tozali basaleli ya Yehova, tolingaka kozwa bikateli oyo ezali na bokatikati mpe oyo ekosepelisa ye.

KOBÁ KOSALELA YEHOVA NA MOTEMA MOBIMBA MPE OKOSEPELA

18. Liteya nini okoki kozwa soki omanyoli bandakisa ya bakonzi wana minei ya Yuda?

18 Ntango mosusu, biso mpe tokoki kosala moko ya mabunga oyo bakonzi minei wana ya Yuda basalaki. Tokoki (1) kotyela makanisi na biso moko motema, (2) kopona baninga ya mabe, (3) kozala na lolendo, to (4) kozwa bikateli kozanga koluka koyeba liboso oyo Nzambe alingi. Atako bongo, tosengeli te kokanisa ete tokoki soki moke te kosepelisa Yehova. Amonaka makambo ya malamu oyo ezali na motema na biso, kaka ndenge azalaki komona makambo ya malamu oyo ezalaki na mitema ya bakonzi wana minei. Yehova mpe amonaka ndenge oyo tolingaka ye mingi mpe ndenge oyo tolingaka kosalela ye na motema mobimba. Yango wana, apesá biso bandakisa oyo ekoki kosalisa biso mpo tósala te mabunga ya minene. Tiká ete tómanyola masolo wana ya Biblia mpe tópesa Yehova matɔndi ndenge akomisá yango mpo na biso!