Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2017

Asa, Yehoshafate, Hizikiya, Yosiya

Salelá Yehova na motema mobimba!

Salelá Yehova na motema mobimba!

“Ee Yehova, nabondeli yo, kobosana te ete natamboli liboso na yo na bosolo mpe na motema mobimba.”2 BAKONZI 20:3.

NZEMBO: 52, 65

1-3. “Kosalela Yehova na motema mobimba” elimboli nini? Pesá ndakisa.

BISO nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Kasi tozali na botɔndi ndenge Yehova apesaki lisiko mpe andimaka kolimbisa biso. Na yango, soki tozali na komikitisa mpe tobongoli motema, tokoki kosɛnga ye alimbisa biso. Tokoki kondima ete Yehova akosalela biso makambo te “na kolanda masumu na biso.” (Nzembo 103:10) Atako bongo, tosengeli ‘kosalela ye na motema mobimba.’ (1 Ntango 28:9) Ndenge nini tokoki kosala bongo atako tozali bato ya kozanga kokoka?

2 Mpo na kosalisa biso, tókokanisa bomoi ya mokonzi Asa na oyo ya mokonzi Amazia. Bango nyonso mibale basalaki makambo ya malamu, kasi basalaki mpe mabunga mpo bazalaki bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Biblia elobi ete “motema ya Asa ezalaki mobimba mikolo nyonso ya bomoi na ye.” (2 Ntango 15:16, 17; 25:1, 2; Masese 17:3) Azalaki ntango nyonso koluka kosepelisa Yehova mpe ‘asalelaki ye na motema mobimba.’ (1 Ntango 28:9) Kasi, Amazia asalelaki Yehova te na “motema mobimba.” Ntango alongaki banguna ya Nzambe na etumba, amemaki bikeko na bango mpe abandaki kosambela yango.2 Ntango 25:11-16.

 3 Moto oyo asalelaka Yehova Nzambe na “motema mobimba” alingaka ye mingi mpe alingaka kosambela ye libela na libela. Na Biblia, mbala mingi liloba “motema” emonisaka bomoto na biso ya kati. Esangisi makambo oyo tokanisaka, oyo tolingaka, oyo tolingaka kosala na bomoi, mpe ntina oyo tosalaka makambo yango. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kosambela Yehova na motema mobimba. Tosalelaka ye mpo tolingaka kosala yango, kasi kaka te mpo tosengeli kosala yango to mpo tomesaná kosala yango.2 Ntango 19:9.

4. Tokotalela nini sikoyo?

4 Tokoyeba malamumalamu ndimbola ya kosalela Nzambe na motema mobimba soki totaleli bomoi ya Asa mpe oyo ya bakonzi mosusu ya sembo misato ya Yuda. Bakonzi yango bango oyo: Yehoshafate, Hizikiya, mpe Yosiya. Atako bakonzi wana minei basalaki mabunga, bazalaki kaka kosepelisa Yehova. Amonaki ete bazalaki kosalela ye na motema mobimba. Mpo na nini Nzambe azalaki kotalela bango ndenge wana, mpe ndenge nini tokoki komekola bango?

MOTEMA YA ASA ‘EZALAKI MOBIMBA EPAI YA YEHOVA’

5. Asa asalaki nini ntango akómaki mokonzi?

5 Asa azalaki mokonzi ya misato ya Yuda ntango ekólo yango ekabwanaki na bikólo mibale: bokonzi ya Yisraele mpe bokonzi ya Yuda. Ntango Asa akómaki mokonzi ya Yuda, azalaki na ekateli ya kolongola losambo ya lokuta mpe kosilisa etamboli ya mbindo na bokonzi na ye. Abebisaki bikeko oyo bato bazalaki kosambela mpe abenganaki bato oyo bazalaki kosala kindumba na tempelo. Asa alongolaki ata nkɔkɔ na ye “na ebonga ya mwasi ya lokumu, mpamba te asalaki ekeko moko ya nsɔmɔ.” (1 Bakonzi 15:11-13) Asa alendisaki mpe bato “báluka Yehova” mpe bátosa ‘mibeko mpe mitindo’ na ye. Asa asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa basusu básambela Yehova.2 Ntango 14:4.

6. Asa asalaki nini ntango bato ya Etiopi bayaki kobundisa Yuda?

6 Na boumeli ya mbula zomi ya liboso ya boyangeli ya Asa, bitumba ezalaki te na bokonzi ya Yuda. Na nsima, bato ya Etiopi bayaki kobundisa Yuda mpe bazalaki basoda milio moko mpe makalo nkama misato. (2 Ntango 14:1, 6, 9, 10) Asa asalaki nini? Atyaki ntembe te ete Yehova akosalisa basaleli na ye. Yango wana, abondelaki Yehova asalisa bango bálonga etumba yango. (Tángá 2 Ntango 14:11.) Ntango mosusu, Yehova asalaki ete bato ya ekólo na ye bálonga banguna na bango, ata ntango bakonzi bazalaki sembo te epai na ye. Asalaki bongo mpo na komonisa ete azali Nzambe ya solo. (1 Bakonzi 20:13, 26-30) Kasi na mbala oyo, Yehova asalisaki basaleli na ye mpo Asa atyelaki ye motema. Yehova ayanolaki na libondeli ya Asa, mpe balongaki etumba yango. (2 Ntango 14:12, 13) Na nsima, Asa asalaki libunga monene na ndenge asɛngaki lisalisi epai ya mokonzi ya Siri, na esika ya koluka lisalisi epai ya Yehova. (1 Bakonzi 15:16-22) Atako bongo, Yehova amonaki ete Asa azalaki kaka kolinga ye. Motema na ye “ezalaki mobimba epai ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye.” Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa malamu ya Asa?1 Bakonzi 15:14.

7, 8. Ndenge nini okoki komekola Asa?

7 Ndenge nini tokoyeba soki tomipesi mobimba epai ya Yehova? Tokoki komituna boye: “Nakotosa Yehova ata soki ekómi mpasi kotosa ye? Nazali na ekateli makasi ya kobatela lisangá na ye pɛto?” Kanisá mpiko oyo Asa asengelaki kozala na yango mpo na kolongola nkɔkɔ na ye na esika ya lokumu oyo azalaki na yango! Ntango mosusu, ekoki kosɛnga ete ozala na mpiko lokola Asa. Na ndakisa, okosala  nini soki ndeko moko ya libota na yo to moninga moko ya motema asali lisumu kasi abongoli motema te, mpe asengeli kolongolama na lisangá? Okozala na ekateli ya koboya kosangana na moto yango? Motema na yo ekotinda yo osala nini?

8 Lokola Asa, ntango mosusu, tokoki komona ete moto nyonso akómi monguna na biso. Mbala mosusu, baninga na yo ya kelasi, to balakisi na yo bakoki kosɛka yo mpo ozali Motatoli ya Yehova. To ntango mosusu baninga na yo ya mosala bakoki kokanisa ete ozali zoba mpo ozwi konje na mosala mpo na kokende na liyangani to mpo oboyi kosala bangonga mosusu nsima ya mosala. Na ntango wana, tyelá Nzambe motema, kaka ndenge Asa asalaki. Bondelá Yehova, zalá na mpiko, mpe kobá kosala malamu. Kobosana te ete Nzambe apesaki Asa makasi, akopesa mpe yo makasi.

9. Ndenge nini tokoki kosepelisa Yehova ntango tozali kosakola?

9 Asa azalaki koluka kaka matomba na ye moko te; alendisaki basusu “báluka Yehova.” Biso mpe tosalisaka bato básambela Yehova. Amonaka ntango toyebisaka bato mosusu makambo oyo etali ye. Kanisá esengo oyo azalaka na yango ntango amonaka ete tozali kosala bongo mpo tolingaka ye mpe mpo totyelaka basusu likebi mpe tolukaka bolamu na bango ya mikolo ezali koya!

YEHOSHAFATE ALUKAKI YEHOVA

10, 11. Ndenge nini tokoki komekola Yehoshafate?

10 Yehoshafate, mwana ya Asa, “azalaki se kotambola na nzela ya tata na ye Asa.” (2 Ntango 20:31, 32) Na ndenge nini? Lokola tata na ye, Yehoshafate alendisaki bato bákoba kosambela Yehova. Atindaki mibali na bingumba ya Yuda mpo bákende koteya bato “buku ya mobeko ya Yehova.” (2 Ntango 17:7-10) Kutu, akendaki na teritware ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele, epai ya bato oyo bazalaki na bangomba ya Efraime, “mpo azongisa bango epai ya Yehova.” (2 Ntango 19:4) Yehoshafate azalaki mokonzi “oyo alukaki Yehova na motema na ye mobimba.”2 Ntango 22:9.

11 Lelo oyo, Yehova alingi ete na mokili mobimba bato báteyama mpo na koyeba ye, mpe biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Yo mpe ozalaka na mokano ya kosakola sanza na sanza? Okosepela koteya basusu Biblia mpo bango mpe bábanda kosambela Yehova? Obondelaka mpo na likambo yango? Soki osali milende, Yehova akoki kosalisa yo ozwa moto ya koyekola na ye Biblia. Okondima koyekola na moto Biblia ata soki ekoki kosɛnga ete oyekola na moto yango ntango oyo osengeli kopema? Kaka ndenge Yehoshafate asalaki makasi asalisa bato bázongela kosalela Yehova, biso mpe tokoki komeka kosalisa bandeko oyo batiká kosakola. Lisusu, bankulutu ya lisangá bazwaka bibongiseli mpo na kokende kotala mpe kosalisa bato oyo balongolamá na lisangá, oyo bafandi na teritware ya lisangá na bango, mpo na koluka koyeba soki batiká masumu na bango ya kala.

12, 13. (a) Ntango Yehoshafate abangaki, asalaki nini? (b) Mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa ya Yehoshafate?

12 Lokola tata na ye Asa, Yehoshafate atyelaki Yehova motema ntango limpinga moko monene ya basoda eyaki kobundisa Yuda. (Tángá 2 Ntango 20:2-4.) Azalaki kobanga mpe asɛngaki Yehova asalisa ye. Na libondeli, andimaki ete bakokoka te kolonga banguna na bango. Alobaki mpe ete ye ná bato na ye bayebaki te eloko ya kosala. Yehoshafate atyaki ntembe te ete Yehova akosalisa bango. Alobaki: “Miso na biso etali epai na yo.”2 Ntango 20:12.

13 Lokola Yehoshafate, mbala mosusu tokoki koyeba te eloko ya kosala ntango tokutani na likambo moko boye, mpe tokoki  ata kobanga. (2 Bakorinti 4:8, 9) Kasi, tóbosana te likambo oyo Yehoshafate asalaki. Na miso ya bato nyonso, abondelaki Yehova mpe ayebisaki ye ndenge oyo bazalaki komiyoka ete bakokoka te. (2 Ntango 20:5) Batata ya mabota bakoki kolanda ndakisa ya Yehoshafate. Sɛngá Yehova asalisa yo mpe libota na yo mpo bólonga mokakatano yango mpe oyeba ndenge ya kosala. Koyoka nsɔni te mpo bato ya libota na yo bakoyoka ndenge ozali kosala libondeli ya ndenge wana. Bakomona ete otyelaka mpenza Yehova motema. Asalisaki Yehoshafate, akosalisa mpe yo.

HIZIKIYA AKOBAKI KOSALA OYO EZALI SEMBO

14, 15. Ndenge nini Hizikiya atyelaki Nzambe motema mobimba?

14 Mokonzi mosusu oyo “akangamaki se na Yehova” ezalaki Hizikiya. Asalaki bongo atako tata na ye azalaki ndakisa malamu te mpe azalaki kosambela bikeko. Hizikiya “alongolaki bisika oyo etombwaná mpe abukabukaki makonzí ya losambo mpe akatakataki nzete ya losambo mpe abukabukaki nyoka ya motako oyo Moize asalaki,” asalaki bongo mpo Bayisraele bazalaki kosambela yango. Hizikiya amipesaki mobimba epai ya Yehova. ‘Akobaki kotosa mitindo oyo Yehova apesaki Moize.’2 Bakonzi 18:1-6.

15 Ntango Hizikiya azalaki mokonzi, basoda ya Asiri, oyo bazalaki na nguya mingi, bayaki kobundisa Yuda mpe balingaki kobebisa Yerusaleme. Senakeribe, mokonzi ya Asiri azalaki kotyola Yehova mpe alukaki kokanga Hizikiya. Na ntango wana ya likama, Hizikiya atyelaki Yehova motema mobimba mpe abondelaki ye asalisa ye. Ayebaki ete Nzambe azali na nguya mingi koleka bato ya Asiri mpe akoki kosikola bato na ye. (Tángá Yisaya 37:15-20.) Nzambe ayanolaki na libondeli na ye na ndenge atindaki anzelu moko aboma basoda ya Asiri 185 000.Yisaya 37:36, 37.

16, 17. Ndenge nini tokoki komekola Hizikiya?

16 Na nsima, Hizikiya abɛlaki makasi mpe etikalaki moke akufa. Na ntango wana ya mpasi, asɛngaki Yehova akanisa bosembo na ye mpe asalisa ye. (Tángá 2 Bakonzi 20:1-3.) Yehova ayokaki libondeli ya Hizikiya mpe abikisaki ye. Toyebi ete Biblia elobi te ete tokoki kozela ete Nzambe asala likamwisi mpo na kobikisa biso na maladi to mpo na kokómisa bomoi na biso molai. Kasi, lokola Hizikiya, tokoki kotyela Yehova motema mpo asalisa biso. Tokoki koyebisa ye boye: “Nabondeli yo, ee Yehova, nabondeli yo, kobosana te ete natamboli liboso na yo na bosolo mpe na motema mobimba.” Ondimaka ete Yehova akosalisa yo ntango nyonso, ata ntango ozali kobɛla?Nzembo 41:3.

17 Ndenge nini tokoki lisusu komekola Hizikiya? Mbala mosusu likambo moko ezali kozwa esika na boyokani na biso na Yehova to ezali kozwa biso ntango ya kosalela ye. Na ndakisa, bato mingi lelo bakómisaka bato mosusu lokola banzambe na bango. Bakumisaka bato oyo bayebani mingi mpe bato mosusu oyo bango bayebi te. Mingi na bango balekisaka ntango mingi mpo na kotánga makambo etali bato yango mpe kotala bafɔtɔ na bango. To mbala mingi basalelaka basite ya Internet to bisaleli mosusu mpo na kosolola na baninga. Ya solo, ezali mabe te kosolola na bandeko na biso ya libota to baninga na biso ya motema na nzela ya bisaleli yango. Kasi, tóbosana te ete kosalela Internet mingi ekoki kolya biso ntango mingi. Tokoki ata kokóma na lolendo soki bato mingi bamonisi ete basepeli na bafɔtɔ to bakomantɛrɛ oyo totyaki na Internet. To soki toyebi ete basusu batiki kotala bafɔtɔ yango, tokoki ata kokóma nkandankanda. Tokoki nde kozwa mateya mingi na ndakisa ya ntoma Paulo, Akila mpe Prisile. Okanisi ete bazalaki kolekisa ntango mingi mokolo na mokolo  mpo na koyeba makambo nyonso ya mikemike oyo bato bazalaki kosala, mingimingi bato oyo bazalaki kosalela Yehova te? Biblia elobi ete ntoma Paulo azalaki “komipesa mingi na mosala oyo etali liloba.” Mpe Prisile ná Akila bazalaki kolekisa ntango na bango na kosakola mpe komonisa basusu polele “nzela ya Nzambe na ndenge ya malamu lisusu koleka.” (Misala 18:4, 5, 26) Tokoki komituna boye: ‘Nakebaka ete nakómisa te bato mosusu lokoka banzambe? Naboyaka kolekisa ntango mingi na kosala makambo oyo ezali mpenza na ntina te?’Tángá Baefese 5:15, 16.

YOSIYA ATOSAKI MITINDO YA YEHOVA

18, 19. Ndenge nini tokoki kozala lokola Yosiya?

18 Mokonzi Yosiya mpe atosaki mitindo ya Yehova “na motema na ye mobimba.” (2 Ntango 34:31) Yosiya azalaki nkɔkɔ ya Hizikiya. Ntango azalaki naino elenge, ‘abandaki koluka Nzambe ya Davidi.’ Mpe ntango azalaki na mbula 20, abandaki kolongola losambo ya bikeko na Yuda. (Tángá 2 Ntango 34:1-3.) Yosiya asalaki makasi mpo na kosepelisa Yehova koleka bakonzi mosusu mingi ya Yuda. Na nsima, mokolo moko, nganga-nzambe monene azwaki buku ya Mibeko ya Nzambe na tempelo. Mbala mosusu ekokaki kozala buku oyo Moize ye moko akomaki! Ntango sɛkrɛtɛrɛ atángelaki ye yango, Yosiya amonaki ete asengeli kosala lisusu mingi mpo na kosalela Yehova na motema mobimba. Alendisaki mpe basusu básala bongo. Yango wana, bato “batikaki te kolanda Yehova Nzambe” ntango nyonso oyo Yosiya azalaki na bomoi.2 Ntango 34:27, 33.

19 Soki ozali elenge, okoki komekola Yosiya mpe koluka koyeba Yehova malamumalamu. Mbala mosusu Yosiya ayekolaki epai ya nkɔkɔ na ye, mokonzi Manase oyo abongolaki motema, ete Yehova andimaka kolimbisa. Yo mpe okoki koyekola makambo mingi epai ya mikóló, na libota mpe na lisangá. Bakoki koyebisa yo makambo mingi ya malamu oyo Yehova asalá mpo na bango. Lisusu, kobosana te ndenge oyo Yosiya asalaki ntango ayokaki oyo makomami elobi. Azalaki na mposa makasi ya kosepelisa Yehova mpe abongwanaki mbala moko. Yo mpe okoki kozwa ekateli makasi ya kotosa Yehova soki ozali kotánga Biblia. Yango ekosala ete boyokani na yo na Yehova ekóma makasi mpe okóma na esengo mingi. Na nsima, okosepela koyebisa basusu makambo ya Yehova. (Tángá 2 Ntango 34:18, 19.) Soki ozali koyekola Biblia, okoki mpe komona ete ezali na makambo oyo osengeli kobongisa na mosala ya Nzambe. Soki ezali bongo, salá nyonso oyo okoki mpo na kobongola makambo yango, kaka ndenge Yosiya asalaki.

SALELÁ YEHOVA NA MOTEMA MOBIMBA!

20, 21. (a) Bakonzi minei oyo touti kolobela, bakokanaki na nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Mateya nini tokoki kozwa na bakonzi minei wana ya Yuda oyo basalelaki Yehova na motema mobimba? Mibali wana bazalaki na ekateli ya kosepelisa Yehova mpe kosambela ye bomoi na bango mobimba. Batyelaki ye motema ntango banguna ya nguya babundisaki bango. Likambo eleki ntina, basalelaki Yehova mpo bazalaki kolinga ye.

21 Atako bakonzi minei wana bazalaki bato ya kozanga kokoka mpe basalaki mabunga, Yehova azalaki kosepela na bango. Amonaki makambo oyo ezalaki na mitema na bango mpe ayebaki ete bazalaki kolinga ye mingi. Biso mpe tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga. Kasi, Yehova akosepela na biso soki amoni ete tozali kosalela ye na motema mobimba. Na lisolo oyo elandi, tokolobela mateya oyo tokoki kozwa na mabunga ya bakonzi wana.