Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2017

Pesáká lokumu na baoyo babongi na yango

Pesáká lokumu na baoyo babongi na yango

“Na Oyo afandi na kiti ya bokonzi mpe na Mwana-Mpate lipamboli mpe lokumu mpe nkembo mpe nguya ezala libela na libela.”EMONISELI 5:13.

NZEMBO: 9, 108

1. (a) Mpo na nini bato mosusu babongi na lokumu? (b) Tokomona nini na lisolo oyo?

NDENGE nini topesaka bato lokumu? Tosalaka yango ntango totyelaka bango likebi ya ndenge mosusu mpe tomemyaka bango. Mbala mingi, topesaka lokumu na bato oyo basali likambo moko oyo ebongi na lokumu, to baoyo bazali na mokumba moko monene to na bokonzi. Na lisolo oyo, tokomona banani tosengeli kopesa lokumu mpe mpo na nini.

2, 3. (a) Mpo na nini Yehova abongi mpenza kozwa lokumu? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Mwana-Mpate oyo Emoniseli 5:13 elobeli ezali nani, mpe mpo na nini tosengeli kokumisa ye?

2 Emoniseli 5:13 elobi ete: “Oyo afandi na kiti ya bokonzi” mpe “Mwana-Mpate” babongi kozwa lokumu. “Oyo afandi na kiti ya bokonzi” ezali Yehova. Na Emoniseli mokapo 4, bikelamu ya likoló bamonisi biso ntina moko oyo Yehova, “Oyo azali na bomoi libela na libela,” abongi kozwa lokumu. Balobi: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.”Emoniseli 4:9-11.

3 “Mwana-Mpate” oyo Emoniseli 5:13 elobeli ezali Yesu Kristo.  Ndenge nini toyebi yango? Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abengamaki “Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili.” (Yoane 1:29) Mokonzi mosusu nani andimaki kokufela bato na ye lokola mbeka? Yango ezali mpenza ntina oyo ebongi ete azwa lokumu. Yesu abongi kozwa lokumu mpo azali “Mokonzi ya baoyo bazali bakonzi mpe Nkolo ya baoyo bazali bankolo.” (1 Timote 6:14-16) Mbala mosusu yo mpe omiyokaka lokola bikelamu ya likoló oyo bayembaki ete: “Mwana-Mpate oyo abomamaki abongi kozwa nguya ná bomɛngo ná bwanya ná makasi ná lokumu ná nkembo ná lipamboli.”Emoniseli 5:12.

4. Mpo na nini ezali likambo ya bwanya tókumisa Yehova mpe Kristo?

4 Yoane 5:22, 23 elobi ete Yehova akómisi Kristo mosambisi ya bato nyonso. Yango ezali ntina ya libosoliboso oyo tosengeli kokumisa Yesu. Ntango tokumisaka ye, tokumisaka mpe Yehova. Soki tondimi kopesa Yesu mpe Tata na ye lokumu, tokoki kozwa bomoi ya seko.Tángá Nzembo 2:11, 12.

5. Mpo na nini tosengeli kopesa bato nyonso lokumu mpe limemya?

5 Bato bakelamá “na elilingi ya Nzambe.” (Ebandeli 1:27) Yango elimboli ete bato mingi bazali na likoki ya komonisa bizaleli oyo Nzambe azali na yango. Na ndakisa, bato bakoki komonisa bolingo, boboto, mpe motema mawa. Bato bakelamá mpe na lisosoli, likoki oyo moto nyonso azalaka na yango ya kokesenisa malamu ná mabe, bosembo ná kozanga bosembo, likambo oyo ebongi ná oyo ebongi te. (Baroma 2:14, 15) Bato mingi balingaka biloko oyo ezali pɛto mpe kitoko mpe balingaka kozala na kimya elongo na basusu. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te Yehova azali Nzambe ya mobulu te, kasi ya kimya. Emonani polele ete bato nyonso bakelamá na likoki ya komekola Yehova na makambo ndenge na ndenge. Mpo na ntina wana, tosengeli kopesa bango lokumu mpe limemya.Nzembo 8:5.

PESÁKÁ BATO LOKUMU OYO EBONGI

6, 7. Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bakeseni na bato mosusu na likambo etali kopesa bato lokumu?

6 Toyebi ete bato mosusu basengeli na lokumu. Kasi ntango mosusu ekoki kozala mpasi tóyeba lokumu ya ndenge nini tosengeli kopesa bango, mpe esika nini lokumu yango esengeli kosuka. Ezali bongo mpamba te bato mingi ya kozanga kokoka balandaka makanisi ya mokili ya Satana. Bato mingi bakómisaka mibali to basi mosusu lokola banzambe na bango. Na esika ya kopesa bango lokumu mpe limemya na ndenge oyo Yehova alingi, bato bapesaka baninga na bango bato lokumu mingi koleka, mpe bakómisaka bango lokola banzambe. Bamekolaka elateli, etamboli, mpe bizaleli ya bakonzi ya politiki, bakonzi ya mangomba, bato ya masano, bato ya filme mpe bato mosusu oyo bayebani mingi.

7 Bakristo ya solo bayebi ete ezali mabe kokumisa bato ndenge wana. Na bato nyonso oyo bazalaki na bomoi awa na mabele, kaka Yesu nde atiká ndakisa ya kokoka oyo tosengeli kolanda. (1 Petro 2:21) Tosengeli koyeba ete “bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te.” (Baroma 3:23) Moto moko te abongi ete básambela ye. Soki topesi bato lokumu oyo eleki ndelo, Yehova akosepela soki moke te.

8, 9. (a) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka bakonzi ya Leta? (b) Ntango nini totosaka bakonzi ya Leta te?

8 Ezali na bato mosusu oyo tosengeli kopesa lokumu to limemya mpo na mikumba to bokonzi oyo bazali na yango. Na ndakisa, kanisá bakonzi ya Leta mpe makambo oyo basalelaka yo. Basalisaka mpo kimya ezala na bisika tofandi mpe  basalaka makambo mosusu mpo na bolamu ya bana-mboka. Mosala na bango ebimisaka matomba mingi. Ntoma Paulo alobaki ete tosengeli kotalela bakonzi wana ya Leta lokola “bakonzi oyo bazali liboso.” Alobaki mpe ete tosengeli kotosa mibeko na bango, ntango alobaki: “Bózongisela bango nyonso oyo esengeli na bango: oyo asɛngi mpako, mpako,” mpe “oyo asɛngi lokumu, lokumu.”Baroma 13:1, 7.

9 Biso Batatoli ya Yehova tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na komonisa bakonzi ya Leta ete tomemyaka bango. Ya solo, ekólo na ekólo ezalaka na mimeseno na yango, yango wana makambo oyo bakonzi ya ekólo moko bakoki komizela ete tósala na esika moko ekoki kokesana na oyo ya esika mosusu. Atako bongo, totosaka bakonzi ya Leta ntango bazali kosala mosala na bango. Nzokande, soki basɛngi biso tósala likambo moko oyo ekotinda biso tótika kotosa Yehova, tokosala yango te. Na ntango wana, totosaka Yehova mpe tokumisaka ye, na esika ya kotosa bato.Tángá 1 Petro 2:13-17.

10. Ndenge nini basaleli ya Yehova na ntango ya kala batiká ndakisa malamu mpo na biso lelo?

10 Tokoki kozwa mateya na ndakisa ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala, oyo bazalaki kotosa baguvɛrnema mpe bakonzi ya Leta. Yozefe ná Maria batiká ndakisa malamu. Ntango Baroma balingaki koyeba motángo ya bato oyo bazalaki kofanda na ekólo na bango, Yozefe ná Maria basalaki mobembo tii na Beteleme mpo na kokomisa nkombo, atako Maria akómaki pene na kobota. (Luka 2:1-5) Moto mosusu oyo atiká ndakisa malamu ya kotosa bakonzi ezali ntoma Paulo. Ntango bafundaki ye ete asali likambo moko ya mabe, na limemya nyonso, akendaki kosamba liboso ya mokonzi Erode Agripa mpe liboso ya Festusi, guvɛrnɛrɛ Moroma ya etúká ya Yudea.Misala 25:1-12; 26:1-3.

11, 12. (a) Mpo na nini topesaka te bakonzi ya mangomba lokumu ya ndenge mosusu? (b) Nini esalemaki ntango Motatoli moko na Autriche apesaki moto moko ya politiki lokumu?

11 Tokoloba nini mpo na bakonzi ya mangomba? Tosengeli nde kopesa bango lokumu ya ndenge mosusu? Topesaka bango kaka lokumu oyo topesaka moto nyonso. Kasi tosengeli te kopesa bango lokumu ya ndenge mosusu, ata soki bazali kozela yango. Mpo na nini? Mpo mangomba ya lokuta eteyaka solo te mpo na Nzambe mpe mpo na Liloba na ye, Biblia. Yesu atɔndɔlaki lokuta ya bakonzi ya mangomba mpe abengaki bango bakosi mpe bakambi ya mabe. (Matai 23:23, 24) Nzokande, ezali mabe te komonisela bakonzi ya Leta limemya ya ndenge mosusu mpe kopesa bango lokumu. Ntango tosalaka bongo, mbala mosusu basalisaka biso.

12 Heinrich Gleissner, moto moko ya politiki na ekólo Autriche, asalaki ndenge wana. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Banazi bakangaki ye. Na kati ya engbunduka oyo batyaki ye mpo na komema ye na kaa ya bakangami, akutanaki na ndeko Leopold Engleitner, Motatoli moko ya molende na Autriche. Ndeko Engleitner asololaki na Gleissner na limemya nyonso mpe alimbolelaki ye bindimeli na ye. Ayokaki ye na likebi. Ntango etumba esilaki, mbala na mbala, Gleissner asalelaki bokonzi oyo azalaki na yango mpo na kosalisa Batatoli ya Yehova. Mbala mosusu, oyebi makambo mosusu ya malamu oyo basalelaki biso mpo bakristo mosusu bapesaki bakonzi ya Leta limemya.

PESÁKÁ BASUSU LOKUMU

13. Mingimingi banani babongi ete tópesaka bango lokumu mpe limemya, mpe mpo na nini?

13 Bandeko basi mpe mibali babongi ete tópesaka bango lokumu mpe limemya. Ezali na ntina tósalaka yango mingimingi mpo na bandeko oyo bazali kokamba biso, na ndakisa bankulutu, bakɛngɛli  ya zongazonga, bandeko ya Komite ya filiale, mpe bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (Tángá 1 Timote 5:17.) Bango nyonso bakokisaka bamposa ya basaleli ya Nzambe, mpe Biblia ebengi bango “makabo oyo ezali bato.” (Baefese 4:8) Yango wana, ebongi mpenza ete tópesaka bango lokumu mpe limemya, ata soki bazali bato ya ekólo nini, batángá kelasi mingi to te, bazali na bomoi ya ndenge nini, bazali bazwi to babola. Bakristo ya liboso batikelá biso ndakisa malamu na likambo yango. Bazalaki kopesa mibali oyo bazalaki kokamba lisangá lokumu; biso mpe tosengeli kosala kaka bongo lelo oyo. Ntango tozali elongo na mibali yango, tosengeli te kotalela bango lokola baanzelu, elingi koloba, kokanisa ete bazali te lokola bato mosusu. Kasi, totosaka bango mpe topesaka bango lokumu mpo na mosala makasi oyo basalaka mpe mpo na komikitisa na bango.Tángá 2 Bakorinti 1:24; Emoniseli 19:10.

14, 15. Ndenge nini bankulutu bakristo bakeseni na bakonzi mingi ya mangomba?

14 Bankulutu yango bazali lokola babateli ya mpate oyo bazali na komikitisa. Balingaka te ete básalela bango makambo lokola bato oyo bayebani mingi. Yango wana, bakeseni mpenza na bakonzi ya mangomba ya lelo, oyo bazali lokola bakonzi ya mangomba ya mikolo ya Yesu. Yesu alobaki boye mpo na bango: “Balingaka esika ya lokumu mingi na ntango ya bilei ya mpokwa mpe bakiti ya liboso na basinagoga, mpe bambote na bazando.”Matai 23:6, 7.

15 Bankulutu bakristo batosaka maloba oyo ya Yesu: “Bóbengama Rabi te, mpo moto moko kaka nde azali moteyi na bino, kasi bino nyonso bozali bandeko. Lisusu, bóbenga moto moko te tata na bino awa na mabele, mpo moto moko kaka nde azali Tata na bino, Oyo azali na likoló. Bóbengama mpe te ‘bakambi,’ mpo Mokambi na bino azali kaka moko, Kristo. Kasi oyo aleki monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino. Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.” (Matai 23:8-12) Soki bankulutu na masangá nyonso na mokili mobimba bazali na komikitisa mpe batosi maloba oyo ya Yesu, bandeko basi mpe mibali bakolinga bango, bakomemya bango mpe bakopesa bango lokumu.

Soki bankulutu bazali kosala na komikitisa, bandeko bakolinga bango, bakomemya bango, mpe bakopesa bango lokumu (Talá paragrafe 13-15)

16. Mpo na nini tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kopesa basusu lokumu?

16 Ekoki kosɛnga ntango mingi mpo tóyekola ndenge ya kopesa basusu lokumu. Ezalaki mpe bongo mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso. (Misala 10:22-26; 3 Yoane 9, 10) Kasi ebongi mpenza kosala yango. Soki tozali kopesa basusu lokumu na ndenge oyo Yehova alingi ete tósala yango, tokozwa mapamboli mingi.

 MATOMBA YA KOPESA BASUSU LOKUMU

17. Matomba nini mosusu emonanaka soki tozali kopesa bato oyo bazali na bokonzi lokumu?

17 Soki tozali kopesa bato oyo bazali na bokonzi na esika tofandi lokumu mpe limemya, bakoki kokɔtela biso mpo tózwa bonsomi ya kosakola. Bakoki ata kotalela mosala na biso ya kosakola na ndenge ya malamu. Eleki bambula mingi, likambo yango esalemaki na Allemagne, ntango Birgit ndeko mwasi moko mobongisi-nzela, akendaki mokolo oyo bapesaka bana-kelasi certificat na eteyelo oyo mwana na ye ya mwasi azalaki kotánga. Balakisi bayebisaki Birgit ete basepelaki mingi kozala na bana ya Batatoli ya Yehova na eteyelo na bango na boumeli ya bambula mingi. Bamonaki ete bana ya Batatoli basalaki ete eteyelo ezala esika moko ya malamu. Ndeko Birgit ayebisaki bango boye: “Bana na biso bateyamaka mpo na kolanda mitinda ya Nzambe oyo etali etamboli malamu; moko ya mitinda yango ezali mpe kopesa balakisi limemya mpe lokumu.” Molakisi moko alobaki ete soki bana-kelasi nyonso bazalaki lokola bana ya Batatoli ya Yehova, mosala ya koteya elingaki kozala mpasi te. Bazalaki kosepela mingi na bana ya Batatoli, yango wana, bapɔsɔ mingi na nsima, molakisi moko akendaki na liyangani moko.

18, 19. Nini tosengeli kobosana te ntango tozali kopesa bankulutu lokumu?

18 Mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kopesa bankulutu ya lisangá lokumu. (Tángá Baebre 13:7, 17.) Tosengeli kopesaka bango longonya mpo na mosala na bango ya makasi. Soki tozali kolanda malako oyo bankulutu bapesaka biso, yango ekosalisa bango básala na esengo. Biblia elobi ete tosengeli mpe komekola kondima na bango. Kasi, yango elingi koloba te ete tosengeli koluka komekola ndenge oyo nkulutu moko oyo “ayebani mingi” alataka, alobaka, mpe ateyaka. Soki tosali bongo, ekozala lokola nde tozali kolanda bato, na esika ya kolanda Kristo. Tosengeli kobosana te ete bankulutu mpe bazali bato ya kozanga kokoka lokola biso.

19 Soki tozali kopesa bankulutu lokumu mpe komemya bango, kasi te kotalela bango lokola bato oyo bayebani mingi, yango ekosalisa bango. Na ndenge nini? Ekozala mpasi te mpo bákoba kozala na komikitisa mpe báboya kokanisa ete bazali bato malamu koleka basusu, mpe ete makambo nyonso oyo basalaka ezalaka kaka malamu.

20. Matomba nini tozwaka ntango topesaka basusu lokumu?

20 Kopesa basusu lokumu esalisaka biso tókóma te bato oyo balukaka kaka matomba na bango moko mpe esalisaka biso tókoba kozala na komikitisa ntango basusu batyeli biso likebi ya ndenge mosusu. Yango ezali mpe libateli mpo esalisaka biso tóbɛta libaku te soki moto moko oyo tomemyaka asali likambo moko oyo ezokisi biso. Litomba mosusu ezali ete esalisaka biso tókoba kosala na bomoko na ebongiseli ya Yehova. Ebongiseli ya Yehova epesaka moto te lokumu oyo eleki ndelo, azala mondimi to te.

21. Wapi litomba eleki monene ya kopesa basusu lokumu?

21 Litomba eleki monene ya kopesa basusu lokumu ezali ete ntango tozali kosala bongo tosepelisaka Nzambe. Tokokoba kosala oyo alingi tósala mpe tokotikala sembo epai na ye. Na ndenge yango, Yehova akopesa eyano na Satana, oyo alobaki ete moto moko te akoki kotikala sembo. (Masese 27:11) Bato mingi na mokili bayebi te ndenge oyo ebongi ya kopesa basusu lokumu. Tozali mpenza na botɔndi mpo toyebi ndenge ya kopesa basusu lokumu na ndenge oyo Yehova alingi.