Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2017

 LISOLO YA BOMOI

Kotambola na bato ya bwanya ememeli ngai mapamboli mingi

Kotambola na bato ya bwanya ememeli ngai mapamboli mingi

ELEKI bambula mingi, nabosanaka te mokolo moko ya malili makasi na ntɔngɔ, na engumba Brookings, na etúká ya Dakota du Sud, na États-Unis. Nazalaki komona ndenge oyo mosika te nakolɛnga na malili. Nazalaki na kati ya ndako moko ya malili elongo na mwa ndambo ya bato, mpe biso nyonso tozalaki kolɛnga na malili. Totɛlɛmaki pene na tɔnɔ moko ya monene oyo etondi na mai, mpe mai yango ezalaki mpenza malili! Sikoyo, tiká nabɛtɛla bino lisolo ya bomoi na ngai mpo bóyeba mpo na nini tozalaki na esika wana.

LIBOTA NA BISO

Tata-leki Alfred mpe tata na ngai

Nabotamaki mokolo ya 07/03/1936. Tozalaki libota ya bana minei; ngai nazalaki mwana ya nsuka. Tozalaki kofanda na ferme moko ya moke na ɛsti ya etúká ya Dakota du Sud. Mosala ya ferme ezalaki na esika monene na bomoi na biso ya libota, kasi ezalaki te mosala oyo elekaki ntina. Baboti na ngai bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova na mobu 1934. Bapesaki bomoi na bango epai ya Yehova, yango wana, kosala mokano na ye ezalaki likambo oyo elekaki ntina mpo na bango. Tata na ngai, Clarence, azalaki mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokambi-misala ya bankulutu) na lisangá na biso oyo ezalaki na basakoli mingi te, na Conde, na etúká ya Dakota du Sud; na nsima tata-leki na ngai Alfred, azwaki mokumba yango.

Biso nyonso libota mobimba elongo tozalaki mbala na mbala koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ndako na ndako, mpo na koyebisa basusu elikya kitoko oyo Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya. Ndakisa ya baboti na ngai mpe formasyo oyo bapesaki biso esalisaki biso tólinga Yehova. Ngai ná ndeko na ngai ya mwasi Dorothy tokómaki basakoli ya Bokonzi ntango tozalaki na mbula 6. Na mobu 1943, nakomisaki nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, oyo eutaki kofungwama.

Mobongisi-nzela na 1952

Mayangani, ezala ya minene to ya mike, ezalaki na ntina mingi na bomoi na biso. Nabosanaka te  liyangani moko ya monene oyo esalemaki na engumba Sioux Falls, na etúká ya Dakota du Sud, na mobu 1949. Ndeko Grant Suiter asalaki diskur moko oyo ezalaki na motó ya likambo: “Ntango eleki mpenza na ndenge oyo ozali kokanisa te!” Na diskur yango, amonisaki ete bakristo nyonso oyo bamipesi na Yehova basengeli kosalela bomoi na bango mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nsima na yango, namipesaki epai ya Yehova. Nazwaki batisimo na liyangani ya zongazonga oyo elandaki, na engumba Brookings, mokolo ya 12/11/1949. Yango wana, nazalaki na kati ya ndako wana ya malili makasi, oyo nalobelaki na ebandeli. Ngai ná bandeko mosusu misato tozalaki kozela ete tózwa batisimo na kati ya tɔnɔ moko ya monene oyo esalami na ebende.

Na nsima, nazwaki ekateli ya kokóma mobongisi-nzela. Nabandaki mosala yango na mokolo ya 01/01/1952, ntango nazalaki na mbula 15. Biblia elobi ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” Lokola na libota na biso bato ya bwanya bazalaki mingi, balendisaki ngai na ekateli oyo nazwaki ya kokóma mobongisi-nzela. (Masese 13:20) Mbala na mbala, nazalaki kobima na mosala ya kosakola elongo na tata-leki na ngai Julius, oyo azalaki na mbula 60. Atako azalaki na mbula mingi koleka ngai, ngai ná ye tozalaki kosepela mingi kobima elongo na mosala ya kosakola. Nayekolaki makambo mingi epai na ye mpo ayebaki makambo mingi ya bomoi. Eumelaki te, Dorothy mpe akómaki mobongisi-nzela.

BAKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA BASALISAKI NGAI

Ntango nazalaki elenge, baboti na ngai bazalaki kobengisa bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango baya kofanda epai na biso. Ndeko mobali moko na nkombo Jesse Cantwell ná mwasi na ye Lynn basalisaki ngai mingi. Bazalaki kosalisa ngai mpe kolendisa ngai. Ntango bazalaki kotala masangá zingazinga na biso, mbala mosusu bazalaki kobenga ngai nabima elongo na bango na mosala ya kosakola. Nasepelaki mingi na ntango oyo nalekisaki elongo na bango! Lokola bango, nazalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova mpe kokóma mobongisi-nzela.

Mokɛngɛli na biso ya zongazonga oyo ayaki na nsima ezalaki ndeko Bud Miller. Ntango ye ná mwasi na ye Joan bayaki kotala lisangá na biso, nazalaki na mbula 18. Na ntango wana, nasengelaki kokende kosamba na biro ya basoda oyo ezalaki kokata soki moto asengeli kokende na mosala ya soda to te. Balingaki ete nasala mosala oyo eyokani te na etinda oyo Yesu apesaki, ya koboya kokɔta na makambo ya politiki. Kasi, nazalaki na mposa ya kosakola nsango  malamu ya Bokonzi. (Yoane 15:19) Yango wana, nasɛngaki ete bátalela ngai lokola moteyi ya Liloba ya Nzambe.

Nasepelaki mingi ntango ndeko Miller ayebisaki ngai ete akokende elongo na ngai na biro ya basoda yango. Azalaki moto ya bibangabanga te, mpe moto akokaki kobangisa ye te. Ayebaki mpe Biblia malamu. Kozala elongo na ye epesaki ngai mpiko mpenza! Na mobu 1954, na nsuka ya eleko ya molunge, biro yango ya basoda endimaki kotalela ngai lokola moteyi ya Liloba ya Nzambe. Banda wana, nazalaki na bonsomi ya kosala mingi mpo na Yehova.

Nakɔti sika na Betele, natɛlɛmi pene ya motuka ya ferme

Mwa moke na nsima, babengisaki ngai nakende kosala na Betele, na ferme ya Watchtower, na Staten Island, na etúká ya New York. Nasalaki kuna mbula soki misato. Nakutanaki na makambo mingi ya malamu kuna mpo nasalaki elongo na ebele ya bandeko mibali mpe basi ya bwanya.

MOSALA YA BETELE

Na radio WBBR, ná ndeko Franz

Radio WBBR ezalaki mpe na ferme, na Staten Island. Batatoli ya Yehova basalelaki radio yango kobanda mobu 1924 tii na mobu 1957. Bandeko soki 15 tii 20 ya libota ya Betele bazalaki kosala na ferme yango. Mingi na biso tozalaki bilenge mpe toyebaki naino makambo mingi te. Kasi ndeko moko ya mokóló, oyo azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo, azalaki kosala elongo na biso. Azalaki lokola tata na biso mpe ateyaki biso makambo mingi. Ntango mosusu soki matata ebimi kati na biso, ndeko Woodworth azalaki koloba boye: “Yehova azali kosala makambo ya kokamwa, atako bato oyo azali kosalela bazali bato ya kozanga kokoka.”

Ndeko Harry Peterson azalaki na molende na mosala ya kosakola

Tozalaki mpe na ndeko Frederick Franz, oyo azalaki kosalisa biso mingi. Azalaki moto ya bwanya mpe ayebaki Biblia malamu. Azalaki mpe kotyela mokomoko na biso likebi. Ndeko Harry Peterson nde azalaki kolambela biso bilei. Ezalaki pɛtɛɛ tóbengaka ye na nkombo wana, na esika ya kobenga ye na nkombo na ye mpenza Papargyropoulos. Ye mpe azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo, mpe azalaki kolinga mosala ya kosakola mingi. Ndeko Peterson azalaki kokokisa malamu mosala na ye na Betele, kasi azalaki mpe komipesa mingi na mosala ya kosakola. Azalaki kokabola bankama ya bazulunalo sanza na sanza. Ayebaki mpe Biblia malamu mpe azalaki koyanola na ebele ya mituna oyo tozalaki kotuna.

NAYEKOLAKI EPAI YA BANDEKO BASI YA BWANYA

Na ferme, tozalaki kobongisa mbuma ebele mpe ndunda mpe kotya yango na kati ya manzanza. Na  mbula moko, tozalaki kotya bakitunga soki 45 000 ya mbuma mpe ya ndunda na manzanza mpo na libota ya Betele. Nazalaki kosala elongo na Etta Huth, ndeko mwasi moko ya bwanya mingi. Alakisaki biso biloko oyo batyaka na manzanza mpo mbuma mpe ndunda ebeba te. Bandeko basi ya masangá ya zingazinga bazalaki koya kosala elongo na biso, mpe ndeko Etta nde azalaki kotambwisa mosala na bango. Atako ndeko Etta ayebaki makambo mingi oyo etali mosala ya kotya biloko na manzanza, azalaki ntango nyonso komemya bandeko mibali oyo bazalaki bakɛngɛli na ferme. Atikelá biso nyonso ndakisa malamu.

Ngai ná Angela, mpe ndeko Etta Huth

Ndeko Angela (Angie) Romano azalaki moko ya bilenge basi oyo bazalaki koya kosala na ferme. Ndeko Etta asalisaki ye mingi ntango akómaki Motatoli. Ngai ná Angie tobalanaki na sanza ya minei na mobu 1958, mpe tozali na esengo ndenge tosaleli Yehova elongo mbula 58. Na boumeli ya bambula, bosembo ya Angie epai ya Yehova ekómisaki libala na biso makasi. Azali na bwanya, mpe nakoki mpenza kotyela ye motema, ezala tokutani na mikakatano nini.

MOSALA YA MISIONƐRƐ MPE MOSALA YA ZONGAZONGA

Na mobu 1957, ntango bandeko batɛkaki bandako oyo shɛni na biso ya radio WBBR ezalaki, na Staten Island, nasalaki na Betele ya Brooklyn mpo na mwa ntango. Na nsima, ngai ná Angie tobalanaki, yango wana nabimaki na Betele. Tosalaki mosala ya mobongisi-nzela na Staten Island mbula misato. Kutu, mpo na mwa ntango, nasalaki epai ya bato oyo basombaki shɛni na biso ya radio, oyo ekómaki kobengama WPOW.

Ngai ná Angie tosalaki makasi tókoba kozala na bomoi ya pɛpɛlɛ mpo eloko moko te epekisa biso tókende esika nyonso oyo mposa ezalaki. Yango wana, na mobu 1961, tondimaki kokóma babongisi-nzela monene na engumba Falls City, na etúká ya Nebraska, esika batindaki biso. Kasi mwa moke nsima ya kokóma kuna, basɛngaki biso tókende na South Lansing, na etúká ya New York, mpo na kokɔta na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Tosepelaki mingi na formasyo oyo tozwaki, mpe tokanisaki ete nsima ya eteyelo, tokozonga na etúká ya Nebraska. Yango wana tokamwaki mingi ntango batindaki biso na mboka mosusu. Batindaki biso bamisionɛrɛ na ekólo Cambodge! Na ekólo wana kitoko na sudi-ɛsti ya Azia, tomonaki, toyokaki, mpe tomekaki biloko ya sika. Tozalaki mpenza na mposa ya koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi na ekólo yango.

Kasi na nsima, makambo ya politiki ebongwanaki na Cambodge, yango wana tolongwaki kuna mpe tokendaki na Vietnam du Sud. Likambo ya mawa, nsima ya mbula mibale, nabɛlaki makasi, yango wana tozongaki na États-Unis. Esɛngaki mwa ntango mpo namiyoka malamu. Ntango namiyokaki malamu, tozongelaki mosala ya mobongisi-nzela.

Ngai ná Angela na 1975, liboso bátuna biso mituna na televizyo

Na sanza ya misato 1965, tobandaki kotala masangá na mosala ya zongazonga. Na boumeli ya mbula 33, ngai ná Angie tosepelaki mingi na mosala ya zongazonga mpe ya etúká, mpe tozalaki kopesa mabɔkɔ na mayangani. Nazalaki kolinga mosala yango mingi, mpo nasepelaka mingi na mayangani ya minene. Na boumeli ya mwa bambula, tozalaki kotala masangá na engumba New York mpe zingazinga na yango, mpe mayangani mingi ya minene ezalaki kosalema na Yankee Stadium.

TOZONGI LISUSU NA BETELE MPE NAZWI MOKUMBA NA BITEYELO YA TEOKRASI

Na boumeli ya bambula ebele, ngai ná Angie tozwaki mikumba ndenge na ndenge oyo ezalaki pɛtɛɛ te. Na mobu 1995, basɛngaki ngai napesa mateya na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Mbula misato  na nsima, babengisaki biso mpo tósala na Betele. Nsima ya mbula 40, nasepelaki ndenge nazongaki lisusu na Betele, esika oyo nabandaki mosala ya ntango nyonso. Mpo na mwa ntango, nasalaki na Departema ya mosala mpe nazalaki molakisi na biteyelo mingi ya Teokrasi. Na mobu 2007, Lisangani ya Mikóló-Bakambi efungolaki Departema ya biteyelo ya Teokrasi mpo na kobongisa biteyelo nyonso oyo esalelamaka na Betele, mpe na boumeli ya mwa bambula, nazalaki mokɛngɛli ya departema yango.

Na bambula euti koleka, makambo mingi ebongwanaki na biteyelo mingi na Betele. Eteyelo mpo na bankulutu ya masangá ebandaki na mobu 2008. Na mbula mibale oyo elandaki, bankulutu koleka 12 000 balandaki mateya ya eteyelo yango na Patterson mpe na Betele ya Brooklyn. Sikoyo, eteyelo yango ezali kokoba na bisika mosusu mingi. Na mobu 2010, Eteyelo mpo na kobongisa basungi ekómaki kobengama Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba, mpe eteyelo mosusu ya sika efungwamaki, nkombo na yango ezalaki Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá.

Na sanza ya libwa 2014, biteyelo wana mibale esanganaki mpe ekómaki Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Bana-kelasi bakoki kozala bandeko oyo babalá, bandeko mibali minzemba, to bandeko basi minzemba. Bandeko mingi na mokili mobimba basepelaki mingi koyoka ete eteyelo yango ekosalema mpe na ekólo na bango. Ezali esengo komona ete bandeko mosusu mingi bakozwa libaku ya kokɔta na biteyelo yango. Nazalaka na botɔndi mingi ndenge nazali na libaku ya koyebana na bandeko ebele oyo babongolaki makambo mingi na bomoi na bango mpo na kozwa formasyo wana.

Soki nakanisi bomoi na ngai liboso ya kozwa batisimo tii lelo, napesaka Yehova matɔndi mingi mpo na bato ya bwanya oyo nakutaná na bango. Basalisaki ngai nayeba ye malamu mpe nasalela ye malamu koleka. Basusu bazalaki baleki na ngai mpe basusu mikóló na ngai. Mpe mingi bazalaki na mimeseno oyo ekeseni na oyo ya ngai. Kasi na misala mpe makanisi na bango, namonaki ete balingaka Yehova mingi. Nazali na botɔndi mingi ndenge nazwá ebele ya baninga ya bwanya oyo bazali basaleli ya Yehova mpe nakoki koyekola epai na bango.

Nasepelaka kokutana na bana-kelasi oyo bautaka bipai na bipai na mokili