Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2017

Kobatela boninga ntango boninga yango ezali na likama

Kobatela boninga ntango boninga yango ezali na likama

Gianni ná Maurizio bazali baninga esali sikoyo mbula soki 50. Kasi, na ntango moko boye, boninga na bango ezalaki na likama. Maurizio alobi boye: “Na eleko moko ya mpasi, nasalaki mabunga ya minene oyo esalaki ete tózala lisusu baninga te.” Gianni abakisi boye: “Maurizio moto ayekolaki na ngai Biblia. Akómaki lokola mopesi-toli na ngai. Yango wana, nazalaki kondima te ete akokaki kosala likambo ya ndenge wana. Namonaki lokola nde mokili esuki mpo na ngai, mpo nayebaki ete boninga na ngai ná ye esili. Namonaki ete nasundolami.”

KOZALA na baninga ya motema ezali lipamboli, mpe mpo boninga eumela esɛngaka kosala milende. Soki boninga ezali na likama, nini ekoki kosalisa biso tóbatela yango? Tokoki kozwa mateya na masolo ya bato mosusu oyo Biblia elobeli oyo bazalaki baninga ya motema, na nsima, boninga na bango ekómaki na likama.

NTANGO MONINGA ASALI LIBUNGA

Kozanga ntembe, Davidi oyo azalaki mobateli ya mpate mpe mokonzi azalaki na baninga ya malamu. Na baninga yango, mbala mosusu nkombo ya Yonatane nde eyeli yo na makanisi. (1 Samwele 18:1) Kasi, Davidi azalaki mpe na baninga mosusu, na ndakisa mosakoli Natane. Biblia eyebisi te ntango nini boninga na bango ebandaki. Atako bongo, na ntango moko boye, Davidi afungolelaki Natane motema na ye, kaka ndenge okoki kosala epai ya moninga na yo. Mokonzi Davidi azalaki na mposa ya kotongela Yehova ndako. Kozanga ntembe, andimaki likanisi ya Natane, oyo azalaki moninga na ye mpe moto oyo azalaki na elimo ya Yehova.2 Samwele 7:2, 3.

Kasi likambo moko esalemaki, oyo elingaki kobebisa boninga na bango. Mokonzi Davidi asalaki ekobo na Bate-sheba, na nsima abomisaki  mobali na ye, Uria. (2 Samwele 11:2-21) Na boumeli ya bambula mingi, Davidi azalaki sembo epai ya Yehova mpe azalaki kolinga boyengebene. Kasi na nsima asalaki lisumu wana monene! Nini ekómelaki mokonzi wana ya malamu? Akokaki nde komona bonene ya lisumu oyo asalaki? To akanisaki nde kobombela Nzambe lisumu yango?

Natane asengelaki kosala nini? Akokaki nde kotika moto mosusu aya komonisa mokonzi yango lisumu na ye? Bato mosusu mpe bayebaki makambo oyo Davidi asalaki mpo na kobomisa Uria. Na yango, mpo na nini Natane akɔtaki na likambo, mpe andimaki kotya na likama boninga na bango oyo eumelaki? Koloba likambo yango ekokaki ata kotya bomoi na ye na likama. Kutu, Davidi asilaki kobomisa Uria, oyo asalaki eloko te.

Kasi Natane azalaki molobeli ya Nzambe. Mosakoli yango ayebaki ete soki afandi nyɛɛ, boninga na ye ná Davidi ekozala lisusu te lokola liboso, mpe lisosoli na ye ekokoba kotungisama. Moninga na ye Davidi asalaki likambo oyo esalaki ete Yehova andima ye lisusu te. Mokonzi yango asengelaki na lisalisi mpo azongisa boyokani malamu na Yehova. Ya solo, Davidi asengelaki na moninga ya solosolo. Natane azalaki moninga ya ndenge wana. Amonaki malamu abanda lisolo yango na ndakisa moko oyo ekokaki kosimba motema ya Davidi, oyo liboso azalaki mobateli ya mpate. Natane ayebisaki Davidi nsango ya Nzambe na ndenge oyo esalisaki ye amona bonene ya masumu oyo asalaki mpe abongola motema.2 Samwele 12:1-14.

Olingaki kosala nini soki ozalaki na moninga moko oyo asali libunga moko monene to lisumu moko monene? Mbala mosusu olingaki kokanisa ete koyebisa mabe oyo asali ekobebisa boninga na bino. To okokaki kokanisa ete koyebisa lisumu na ye epai ya bankulutu, oyo bakokaki kosalisa ye na elimo, elingaki kozala lokola kotɛka moninga. Olingaki kosala nini?

Gianni, oyo tolobeli mwa liboso, alobi boye: “Namonaki ete tozalaki lisusu te ndenge tozalaki liboso. Maurizio azalaki lisusu te kosolola na ngai polele ndenge tozalaki liboso. Nazwaki ekateli ya kotuna ye, atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo nasala bongo. Nazalaki komituna boye: ‘Likambo nini nakoki koyebisa ye, oyo ayebi te? Ntango mosusu akosilika makasi soki natuni ye!’ Kasi ntango nakanisaki makambo nyonso oyo ngai ná ye toyekolaki, nazwaki makasi ya kosolola na ye. Maurizio asalisaki ngai ntango nazalaki na mposa ya lisalisi. Nalingaki te kobebisa boninga na biso, kasi nalingaki kosalisa ye mpo nazalaki kotyela ye likebi.”

Maurizio abakisi boye: “Gianni ayebisaki ngai makambo polele; alobaki solo. Nayebaki ete mbuma mabe ya bikateli mabe oyo nazwaki ezalaki foti na ye te, ezalaki mpe foti ya Yehova te. Yango wana, nandimaki disiplini yango, mpe nsukansuka nazongelaki boyokani malamu na Yehova.”

NTANGO MONINGA AZALI NA MPASI

Davidi azalaki na baninga mosusu oyo bakangamaki na ye na ntango ya mpasi. Moko na bango ezalaki Hushai, oyo Biblia ebengi “moninga ya Davidi.” (2 Samwele 16:16; 1 Ntango 27:33) Ekoki kozala ete azalaki kapita na ndako ya mokonzi, moninga na ye, mpe moto oyo azalaki kotambola na ye, oyo na ntango mosusu azalaki kosala makambo ya nkuku oyo etali mokonzi.

Ntango Abisalome, mwana ya Davidi, alingaki kobɔtɔla tata na ye bokonzi, Bayisraele mingi bazalaki na ngámbo na ye, kasi Hushai te. Ntango Davidi azalaki kokima, Hushai alandaki ye. Davidi ayokaki mpasi na motema ndenge mwana na ye moko mpe bato mosusu oyo azalaki kotyela motema batɛkaki ye. Kasi, Hushai atikalaki sembo, andimaki kutu kotya bomoi na ye na likama mpe akokisaki mokumba oyo ezalaki na mokano ya kobebisa mwango wana ya mabe. Hushai asalaki yango te kaka mpo ezalaki mokumba na ye lokola azalaki kapita na ndako ya mokonzi. Amonisaki nde ete azali moninga ya sembo.2 Samwele 15:13-17, 32-37; 16:15–17:16.

Lelo oyo, ezali esengo komona ndenge bandeko mibali mpe basi bazali na bomoko kozanga kolanda mikumba oyo bazali na yango na lisangá. Na misala na bango ezali lokola bazali  koloba ete: “Soki nazali moninga na yo, ezali te mpo nabongi kozala moninga na yo, kasi ezali nde mpo ozali na ntina mingi na miso na ngai.”

Likambo yango ekómelaki ndeko mobali moko na nkombo Federico. Na lisalisi ya Antonio, moninga na ye ya motema, abimaki na mpasi oyo akutanaki na yango na bomoi. Ndeko Federico alobi: “Ntango ndeko Antonio ayaki na lisangá na biso, eumelaki te tokómaki baninga. Biso mibale tozalaki basaleli na misala mpe tozalaki kosepela kosala elongo. Mwa moke na nsima, akómaki nkulutu. Azalaki kaka moninga na ngai te, kasi azalaki mpe ndakisa mpo na ngai na makambo ya elimo.” Na nsima, Federico asalaki mbeba moko. Azwaki lisalisi na elimo mbala moko, kasi abongaki lisusu te kozala mobongisi-nzela mpe mosaleli na misala. Ndeko Antonio asalaki nini?

Ntango Federico akutanaki na mpasi, moninga na ye Antonio ayokaki ye mpe alendisaki ye

Federico alobi: “Nakokaki komona ete Antonio amityaki na esika na ngai. Asalaki nyonso mpo na kosalisa ngai nazala na kimya na motema. Asalisaki ngai mingi mpo nazongela boyokani ya malamu na Nzambe mpe asundolaki ngai te. Alendisaki ngai nakóma lisusu makasi na elimo mpe nalɛmba te.” Antonio alobi boye: “Nazalaki kolekisa ntango mingi elongo na Federico. Nalingaki ete akakatana te koyebisa ngai likambo nyonso, ata bampasi na ye.” Likambo ya esengo, nsukansuka Federico azongaki lisusu makasi na elimo mpe akómaki lisusu mobongisi-nzela mpe mosaleli na misala. Antonio asukisi boye: “Atako sikoyo tozali lisusu lisangá moko te, boninga na biso ekóma lisusu makasi koleka.”

OKOMIYOKA ETE OTƐKAMI?

Okomiyoka ndenge nini soki moninga moko ya motema apesi yo mokɔngɔ na ntango oyo ozali mpenza na mposa ya lisalisi na ye? Ekosala yo mpasi mingi na motema. Okolimbisa ye? Boninga na bino ekozala kaka makasi ndenge ezalaki liboso?

Kanisá likambo oyo ekómelaki Yesu na mikolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Alekisaki ntango mingi elongo na bantoma na ye ya sembo. Bazalaki mpenza na boyokani makasi, yango wana, Yesu abengaki bango baninga na ye. (Yoane 15:15) Kasi, nini esalemaki ntango bakangaki Yesu? Bantoma bakimaki.  Ntoma Petro alobaki polele ete akosundola Nkolo na ye ata mokolo moko te, kasi kaka na butu yango, Petro alobaki ete ayebi Yesu te!Matai 26:31-33, 56, 69-75.

Yesu ayebaki ete etikali moke akutana na komekama ya nsuka. Atako bongo, ezali likambo ya kokamwa te soki alɛmbaki nzoto, ata mpe ayokaki mpasi na motema. Kasi lisolo oyo asololaki na bayekoli na ye mwa mikolo nsima ya lisekwa na ye, emonisi te ete Yesu alɛmbaki nzoto, azalaki na nkanda, to ayokaki mawa na motema. Yesu amonaki te ete ezalaki na ntina atánga libunga mokomoko oyo bayekoli na ye basalaki, ata oyo basalaki na butu oyo bakangaki ye.

Kutu, Yesu akitisaki nde Petro ná bantoma mosusu motema. Amonisaki ete azalaki kaka kotyela bango motema na ndenge apesaki bango malako mpo na mosala ya koteya oyo eleki ntina na lisolo ya bato. Mpo na Yesu, bantoma yango bazalaki kaka baninga na ye. Bolingo oyo alingaki bango esimbaki mpenza mitema na bango. Basengelaki kosala nyonso mpo básundola lisusu Nkolo na bango te. Ya solo, balongaki kokokisa mokumba oyo apesaki bango.Misala 1:8; Bakolose 1:23.

Ndeko mwasi moko na nkombo Elvira azali kokanisa lisusu ntango azalaki na matata na Giuliana moninga na ye ya motema, alobi boye: “Ntango ayebisaki ngai ete nazokisaki ye na likambo oyo nasalaki, nayokaki mpenza mabe. Azalaki mpenza na ntina ya kosilika. Kasi likambo ekamwisaki ngai ezali ete azalaki komitungisa mingi nde mpo na ngai mpe oyo ekokómela ngai mpo na likambo oyo nasalaki. Nasepelaka mingi ndenge atyaki te likebi na ye na mabe oyo nasalelaki ye, kasi nde na mabe oyo ngai moko nazalaki komisalela. Natɔndaki Yehova ndenge apesaki ngai moninga oyo atyaka bolamu na ngai liboso ya mayoki na ye moko.”

Na yango, moninga malamu akosala nini ntango boninga ezali na likama? Akosepela kosolola na ye na boboto kasi na ndenge ya polele soki esengeli. Moninga ya ndenge wana azali lokola Natane mpe Hushai, oyo batikalaki sembo ata na ntango ya mpasi, mpe lokola Yesu, oyo andimaki kolimbisa. Ozali moninga ya ndenge wana?