Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2017

Yehova akambaka basaleli na ye

Yehova akambaka basaleli na ye

“Yehova akokamba yo mpenza ntango nyonso.”YISAYA 58:11.

NZEMBO: 152, 22

1, 2. (a) Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bakeseni na mangomba mosusu? (b) Tokoyekola nini na lisolo oyo mpe na lisolo oyo elandi?

MBALA mingi, bato batunaka Batatoli ya Yehova: “Nani azali mokambi na bino?” Batunaka bongo mpo mangomba mingi ezalaka na mobali to mwasi moko oyo azali mokambi na yango. Kasi, biso tozali na esengo ya koloba ete Mokambi na biso ezali te moto moko ya kozanga kokoka. Mokambi na biso ezali nde Yesu Kristo! Ye mpe atosaka Yehova, Tata na ye, oyo azali mpe Mokambi na ye.Matai 23:10.

2 Ezali mpe na “moombo ya sembo mpe ya mayele,” etuluku moko ya bato oyo bazali kokamba basaleli ya Nzambe awa na mabele lelo oyo. (Matai 24:45) Kasi ndenge nini toyebi ete Yehova nde azali kokamba biso na nzela ya Mwana na ye? Tokomona ntina misato oyo endimisi biso likambo yango. Longola yango, atako Yehova asalelaki bato mosusu mpo na kokamba basaleli na ye, tokomona polele ete Yehova ye moko nde azalaki Mokambi ya basaleli na ye na ntango ya kala mpe azali Mokambi ya basaleli na ye lelo oyo.Yisaya 58:11.

ELIMO SANTU EPESAKI BANGO NGUYA

3. Nini epesaki Moize nguya ya kokamba Yisraele?

3 Elimo santu epesaki bamonisi ya Nzambe nguya. Nzambe aponaki Moize mpo azala mokambi ya Bayisraele. Nini esalisaki ye akokisa malamu mokumba wana ya ntina mingi? Yehova apesaki Moize “elimo santu na Ye.” (Tángá Yisaya 63:11-14.)  Na yango, Yehova ye moko nde azalaki kokamba basaleli na ye, mpo elimo na ye nde ezalaki kosalisa Moize.

4. Nini emonisaki ete Moize azalaki na elimo ya Nzambe? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Bato bakokaki nde komona ete Moize azalaki na elimo ya Nzambe? Ɛɛ! Elimo santu ya Yehova epesaki Moize nguya ya kosala makamwisi mpe ya koyebisa nkombo ya Nzambe epai ya Farao, mokonzi ya nguya mingi ya Ezipito. (Kobima 7:1-3) Elimo santu esalisaki mpe Moize azala mokambi ya bolingo mpe ya motema molai. Akesanaki mosika na bakambi ya bikólo mosusu, oyo bazalaki makambo makasimakasi mpe bazalaki koluka matomba na bango moko! (Kobima 5:2, 6-9) Ezali polele ete Yehova aponaki Moize mpo azala mokambi ya basaleli na ye.

5. Banani mosusu Yehova apesaki elimo santu mpo na kokamba basaleli na ye?

5 Banani mosusu Yehova apesaki elimo santu mpo na kokamba basaleli na ye? Biblia elobi: “Yosua mwana ya Nunu atondaki na elimo ya bwanya.” (Kolimbola Mibeko 34:9) “Elimo ya Yehova ekɔtelaki Gideone.” (Basambisi 6:34) Mpe “elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi.” (1 Samwele 16:13) Mibali wana nyonso batyelaki elimo ya Nzambe motema mpo esalisa bango básala makambo oyo bakokaki kosala te na makasi na bango moko. (Yosua 11:16, 17; Basambisi 7:7, 22; 1 Samwele 17:37, 50) Tomoni polele ete Yehova nde apesaki bango nguya ya kosala makambo minene, yango wana, kaka ye nde abongi kozwa lokumu.

6. Mpo na nini Nzambe alingaki ete bato bátosa bakambi ya Yisraele?

6 Bayisraele basengelaki kosala nini ntango bamonaki ete elimo santu ya Nzambe epesaki Moize, Yosua, Gideone, mpe Davidi nguya? Basengelaki kotosa bango. Ntango bato baimaimaki mpo na Moize, Yehova atunaki boye: “Kino ntango nini bato oyo bakozanga limemya epai na ngai?” (Mitángo 14:2, 11) Ezali polele ete Yehova nde aponaki mibali wana mpo bákamba basaleli na ye. Ntango bato bazalaki kotosa bango, bazalaki nde kolanda litambwisi ya Yehova, Mokambi na bango.

BAANZELU BASALISAKI BANGO

7. Ndenge nini baanzelu basalisaki Moize?

7 Baanzelu basalisaki bamonisi ya Nzambe. (Tángá Baebre 1:7, 14.) Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kokamba Moize. Ya liboso, ‘anzelu moko abimelaki ye na mwa nzete ya nzubɛ’ mpe apesaki ye mokumba ya kobimisa Bayisraele na boombo mpe kokamba bango. (Misala 7:35) Ya mibale, Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kopesa Moize Mibeko, oyo esengelaki koteya bana ya Yisraele. (Bagalatia 3:19) Ya misato, Yehova ayebisaki ye: “Kambá bato esika oyo nalobaki na yo. Talá! Anzelu na ngai akotambola liboso na yo.” (Kobima 32:34) Biblia elobi te ete Bayisraele bamonaki anzelu moko azali kotambola liboso na bango. Kasi, kotala ndenge oyo Moize azalaki koteya bato mpe kokamba bango emonisaki polele ete baanzelu basalisaki ye.

8. Ndenge nini baanzelu basalisaki Yosua mpe Hizikiya?

8 Banani mosusu baanzelu basalisaki? Biblia elobi ete “mokonzi ya limpinga ya Yehova,” elingi koloba anzelu moko, asalisaki Yosua alonga bato ya Kanana na etumba. (Yosua 5:13-15; 6:2, 21) Na nsima, ntango mokonzi Hizikiya azalaki kokamba basaleli ya Nzambe, limpinga monene ya basoda ya Asiri elingaki kobebisa Yerusaleme. Kasi, na butu moko mpamba, “anzelu ya Yehova abimaki mpe abomaki bato nkóto nkama moko na ntuku mwambe na mitano (185 000).”2 Bakonzi 19:35.

9. Atako bamonisi ya Nzambe bazalaki bato ya kozanga kokoka, Bayisraele basengelaki kosala nini?

9 Baanzelu bazali bikelamu ya kokoka.  Kasi, bato oyo bango basalisaki bazalaki bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, mokolo moko Moize apesaki Yehova nkembo te. (Mitángo 20:12) Yosua atunaki Nzambe te nini asengelaki kosala ntango bato ya Gibeone basɛngaki ete básala na ye kondimana. (Yosua 9:14, 15) Na eleko moko boye, Hizikiya akómaki na lolendo. (2 Ntango 32:25, 26) Atako mibali wana bazalaki bato ya kozanga kokoka, Bayisraele basengelaki kolanda litambwisi na bango. Bayisraele bakokaki komona ete Yehova azalaki kosalela baanzelu mpo na kosunga mibali yango. Ezali polele ete Yehova nde azalaki kokamba basaleli na ye.

LILOBA YA NZAMBE ETAMBWISAKI BANGO

10. Na ndenge nini Mibeko ya Nzambe ezalaki mpe kotambwisa Moize?

10 Liloba ya Nzambe etambwisaki bamonisi na ye. Biblia ebengi Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele “mobeko ya Moize.” (1 Bakonzi 2:3) Kasi Biblia emonisi polele ete Yehova nde apesaki Yisraele Mibeko yango. Moize mpe asengelaki kotosa yango. (2 Ntango 34:14) Na ndakisa, ntango Yehova ayebisaki Moize atonga tabernakle, “Moize abandaki kosala na kolandáká mitindo nyonso oyo Yehova apesaki ye. Asalaki kaka bongo.”Kobima 40:1-16.

11, 12. (a) Yosua mpe bakonzi oyo bayangelaki ekólo ya Nzambe basengelaki kosala nini? (b) Ndenge nini Liloba ya Nzambe etambwisaki bato oyo bazalaki kokamba?

11 Ntango Yosua akómaki mokambi, azalaki na Liloba ya Nzambe atako ezalaki mobimba te, mpe Yehova ayebisaki ye: “Osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango.” (Yosua 1:8) Bakonzi oyo bayangelaki ekólo ya Nzambe na nsima basengelaki kotánga Mibeko mokolo na mokolo, kosala kopi na yango, mpe kotosa “maloba nyonso ya mobeko oyo mpe malako oyo, na kosaleláká yango.”Tángá Kolimbola Mibeko 17:18-20.

12 Ndenge nini Liloba ya Nzambe ezalaki kotambwisa bato oyo bazalaki kokamba? Tózwa ndakisa ya mokonzi Yosiya. Ntango bazwaki mokanda oyo ezalaki na Mibeko ya Moize, sɛkrɛtɛrɛ ya Yosiya abandaki kotángela ye yango. * “Ntango kaka mokonzi ayokaki maloba ya buku yango ya mobeko, na mbala moko apasolaki bilamba na ye.” Na nsima, Liloba ya Nzambe etindaki Yosiya alongola bikeko nyonso na ekólo mobimba mpe abongisa fɛti ya Elekeli oyo elekaki monene. (2 Bakonzi 22:11; 23:1-23) Yosiya mpe bakambi mosusu ya sembo balandaki Liloba ya Nzambe, yango wana bandimaki kobongola makambo mosusu na ndenge ya kokamba basaleli ya Nzambe. Mbongwana yango esalisaki basaleli ya Nzambe bátosa ye.

13. Na ndenge nini bakambi ya ekólo ya Nzambe bakesanaki na bakambi ya bikólo mosusu?

13 Bakambi ya bikólo mosusu bazalaki kotambwisama na bwanya ya bato oyo ezali na ndelo. Na ndakisa, bakambi ya Bakanana mpe bato ya ekólo yango bazalaki kosala makambo ya mbindo, na ndakisa kosangisa nzoto na kati ya bato ya libota moko, kosangisa nzoto mibali na mibali, basi na basi, to na banyama, kopesa bana na bango mbeka, mpe kosambela bikeko. (Balevi 18:6, 21-25) Longola yango, bakambi ya Babilone mpe ya Ezipito bazalaki te na malako mpo na bopɛto ndenge ekólo ya Nzambe ezalaki na yango. (Mitángo 19:13) Nzokande, bato ya ekólo ya Nzambe bakokaki komona ndenge oyo bakambi na bango ya sembo bazalaki kolendisa bango bábatela losambo na bango pɛto, bázala pɛto na nzoto, mpe báboya komikómisa mbindo na makambo  ya kosangisa nzoto. Tomoni polele ete Yehova azalaki kokamba bango.

14. Mpo na nini Yehova apesaki bakambi mosusu ya ekólo na ye disiplini?

14 Bakonzi mosusu oyo bayangelaki ekólo ya Nzambe balandaki malako na ye te. Bakonzi yango, oyo bazalaki sembo te, baboyaki kolanda litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, ya baanzelu na ye, mpe ya Liloba na ye. Na mabaku mosusu, Yehova apesaki bakambi yango disiplini to alongolaki bango mpe atyaki bakambi mosusu. (1 Samwele 13:13, 14) Na nsima, Yehova atyaki mokambi moko ya kokoka.

YEHOVA ATYE MOKAMBI MOKO YA KOKOKA

15. (a) Ndenge nini basakoli bamonisaki ete mokambi moko ya kokoka akoya? (b) Nani azalaki mokambi ya kokoka?

15 Banda bankama ya bambula, Yehova alakaki ete akotya mokambi moko ya kokoka mpo na basaleli na ye. Na ndakisa, Moize ayebisaki Bayisraele: “Mosakoli moko oyo akouta epai na yo mpenza, oyo akouta na kati na bandeko na yo, lokola ngai, ye nde Yehova Nzambe na yo akotɛlɛmisela yo—ye nde bokoyoka.” (Kolimbola Mibeko 18:15) Yisaya alobaki ete Mosakoli yango asengelaki kokóma “mokambi mpe komanda.” (Yisaya 55:4) Lisusu, Danyele akomaki mpo na Masiya oyo asengelaki kokóma “Mokambi.” (Danyele 9:25) Nsukansuka, Yesu Kristo ye moko amonisaki ete azali “Mokambi” ya basaleli ya Nzambe. (Tángá Matai 23:10.) Bayekoli ya Yesu bandimaki kolanda ye, mpe bazalaki kondima ete Yehova nde aponaki ye. (Yoane 6:68, 69) Nini endimisaki bango ete Yesu Kristo azalaki moto oyo Yehova asalelaki mpo na kokamba basaleli na ye?

16. Nini emonisi ete elimo santu ezalaki kosala epai ya Yesu?

16 Elimo santu epesaki Yesu nguya. Ntango Yesu azwaki batisimo, Yoane amonaki “likoló ezali kofungwama, mpe elimo ezali kokitela ye lokola ebenga.” Mwa moke na nsima, “elimo epusaki ye akende na esobe.” (Marko 1:10-12) Na boumeli ya mosala ya Yesu awa na mabele, elimo santu ya Nzambe epesaki ye nguya ya koteya mpe kosala makamwisi. (Misala 10:38) Longola yango, elimo santu esalisaki Yesu amonisa bizaleli lokola bolingo, esengo, mpe kondima makasi. (Yoane 15:9; Baebre 12:2) Mokambi mosusu te asalaki makambo ya ndenge wana oyo emonisaki ete azalaki na elimo santu ya Nzambe. Ezali polele ete Yehova aponaki Yesu mpo azala Mokambi.

Ndenge nini baanzelu basalisaki Yesu nsima ya batisimo na ye? (Talá paragrafe 17)

17. Baanzelu basalaki nini mpo na kosalisa Yesu?

17 Baanzelu basalisaki Yesu. Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, “baanzelu bayaki mpe babandaki kosalela ye.” (Matai 4:11) Mwa bangonga liboso ya liwa na ye, ‘anzelu moko autaki na likoló abimelaki ye mpe alendisaki ye.’ (Luka 22:43) Yesu ayebaki ete Yehova akokaki kotinda baanzelu básalisa ye ntango  nyonso oyo asengelaki na lisalisi.Matai 26:53.

18, 19. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ezalaki kotambwisa Yesu mpe mateya na ye?

18 Liloba ya Nzambe etambwisaki Yesu. Banda ebandeli ya mosala ya Yesu tii liwa na ye likoló ya nzete ya mpasi, atikaki ete Makomami etambwisa ye. Ata ntango etikalaki moke akufa, alobelaki bisakweli oyo etali Masiya. (Matai 4:4; 27:46; Luka 23:46) Kasi, bakambi ya mangomba ya ntango wana bakesanaki mosika na Yesu. Bazalaki koboya kolanda Liloba ya Nzambe ntango nyonso oyo eyokani te na mateya na bango. Yesu azongelaki maloba oyo ezali na Liloba ya Nzambe ntango alobaki mpo na bango: “Bato oyo bakumisi ngai na mbɛbu na bango, kasi motema na bango ezali mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.” (Matai 15:7-9) Yehova akokaki soki moke te kopona bato oyo bazalaki te kolanda Liloba na ye mpo bákamba basaleli na ye.

19 Yesu asalelaki mpe Liloba ya Nzambe ntango azalaki koteya basusu. Ntango bakonzi ya mangomba batyelaki ye ntembe, asalelaki te bwanya na ye moko to makambo oyo ayebaki mpo na koyanola bango. Ateyaki bato nde makambo oyo euti na Makomami. (Matai 22:33-40) Longola yango, Yesu akokaki kobɛtela bato masolo mingi oyo etali bomoi na likoló to bozalisi ya molɔ́ngɔ́, kaka mpo na kokamwisa bango. Kasi, lokola azalaki kolinga Liloba ya Nzambe, azalaki kosepela mingi koteya bato Liloba yango, mpe ‘mitema ya bato ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki kolimbolela bango Makomami polelepolele.’Luka 24:32, 45.

20. (a) Ndenge nini Yesu apesaki Yehova nkembo? (b) Ndenge nini ezaleli oyo Yesu amonisaki ekesanaki na oyo Erode Agripa I amonisaki?

20 Atako bayoki ya Yesu bazalaki kokamwa na ndenge na ye ya koteya, azalaki ntango nyonso kopesa lokumu na Moteyi na ye, Yehova. (Luka 4:22) Ntango mozwi moko abengaki Yesu “Moteyi Malamu” mpo na kopesa ye lokumu mingi, Yesu alobaki na komikitisa nyonso: “Mpo na nini ozali kobenga ngai malamu? Moto malamu azali te, longola kaka moko, Nzambe.” (Marko 10:17, 18) Kasi, Erode Agripa I, oyo akómaki mokambi ya Yudea mbula soki 8 na nsima, azalaki na ezaleli oyo ekeseni mosika na oyo ya Yesu. Mokolo moko, na likita moko monene, mokonzi Erode alataki bilamba ya kitoko mingi mpe ya ntalo mingi. Ntango bato bamonaki ye mpe bayokaki diskur oyo asalaki, bagangaki: “Mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” Erode azalaki moto oyo alingá lokumu. Kasi, likambo nini esalemaki na nsima? “Na mbala moko anzelu ya Yehova abɛtaki ye, mpo apesaki Nzambe nkembo te; mpe nkusu elyaki ye mpe akataki motema.” (Misala 12:21-23) Emonani polele ete Yehova aponaki Erode te mpo azala mokambi. Nzokande, Yesu amonisaki ete Nzambe aponaki ye, mpe azalaki ntango nyonso kokumisa Yehova, oyo azali Mokambi Monene ya basaleli na ye.

21. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

21 Yehova alingaki ete Yesu azala Mokambi kaka mpo na mwa bambula te. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” Abakisaki: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:18-20) Kasi ndenge nini Yesu akoki kokamba basaleli ya Nzambe awa na mabele nzokande nde ye azali na likoló mpe amonanaka te? Nani oyo Yehova asengelaki kosalela mpo na kozala momonisi ya Yesu awa na mabele? Mpe ndenge nini bakristo bakokaki koyeba bamonisi ya Nzambe? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna wana.

^ par. 12 Yango ekoki kozala makomi ya ebandeli oyo Moize akomaki