Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2017

 LISOLO YA BOMOI

Tomonaki boboto monene ya Nzambe na ndenge mingi

Tomonaki boboto monene ya Nzambe na ndenge mingi

NTANGO tata na ngai Arthur azalaki elenge, azalaki kolinga Nzambe mingi mpe azalaki na mposa ya kokóma pastɛrɛ ya Lingomba ya Méthodiste. Kasi abongolaki makanisi na ye ntango atángaki mikanda ya Bayekoli ya Biblia mpe abandaki koyangana na makita na bango. Na 1914, ntango azalaki na mbula 17, azwaki batisimo. Na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, batindaki ye na makasi na mosala ya soda, kasi aboyaki kobunda. Yango wana, bakatelaki ye etumbu ya sanza zomi na bolɔkɔ ya Kingston, na etúká ya Ontario, na Canada. Ntango abimaki na bolɔkɔ, akómaki colporteur, ndenge bazalaki kobenga babongisi-nzela na ntango wana.

Na 1926, tata ná mama babalanaki. Nkombo ya mama Hazel Wilkinson. Mama na ye ayambaki solo na 1908. Ngai nabotamaki mokolo ya 24/04/1931. Nazalaki mwana ya mibale na libota ya bana minei. Tata azalaki kolinga Biblia mingi mpe komemya yango. Ateyaki mpe biso kaka bongo. Losambo ya Yehova ezalaki likambo oyo elekaki ntina na bomoi na biso. Mbala na mbala, tozalaki kosakola ndako na ndako libota mobimba elongo.Misala 20:20.

LOKOLA TATA, NABOYAKI KOKƆTA NA MAKAMBO YA MOKILI MPE NAKÓMAKI MOBONGISI-NZELA

Na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Na mbula oyo elandaki, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Canada. Bazalaki kosɛnga bana-kelasi bápesa bendele losako mpe báyemba loyembo ya ekólo na kati ya kelasi. Mbala mingi, balakisi bazalaki kotika ngai ná ndeko na ngai ya mwasi Dorothy tóbima ntango bazali kosala milulu wana na kati ya kelasi. Kasi mokolo moko, mpo na koyokisa ngai nsɔni, molakisi na ngai alobaki ete nazali moto ya bibangabanga. Nsima ya kelasi, bana-kelasi mingi balandaki ngai, batindikaki ngai mpe bakweisaki ngai na nse. Kasi nyonso wana ebakisaki kaka ekateli na ngai ya “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”Misala 5:29.

Na sanza ya nsambo 1942, ntango nazalaki na mbula 11, nazwaki batisimo na kati ya tɔnɔ moko ya monene, na ferme. Soki tozwi konje na kelasi, nazalaki kosɛnga mosala ya pionnier de vacances. Lelo oyo tobengaka yango mosala ya mobongisi-nzela  mosungi. Mbula moko, nazwaki libaku ya kokende elongo na bandeko mosusu misato na nɔrdi ya Ontario, mpe kuna topesaki litatoli epai ya bakati-nzete.

Na mokolo ya 01/05/1949, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Nsima na yango, babengaki ngai napesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Betele ya Canada, na nsima nakómaki kosala na Betele ya Canada. Nazalaki kosala na esika ya konyata mikanda, epai nayekolaki ndenge ya kosalela masini ya konyata mikanda. Nabosanaka te ndenge oyo nazalaki kosala butubutu na boumeli na bapɔsɔ mingi mpo na konyata trakte oyo elobelaki minyoko oyo bazalaki konyokola basaleli ya Yehova na Canada.

Na nsima, nasalaki na Departema ya mosala. Nazalaki na mokumba ya kosolola na babongisi-nzela oyo bazalaki na mposa ya kokende kosakola na Québec, esika oyo bazalaki konyokola Batatoli ya Yehova mingi koleka. Moko ya babongisi-nzela yango ezalaki Mary Zazula, oyo autaki na Edmonton, na etúká ya Alberta. Baboti na ye bazalaki bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Ntango Mary ná yaya na ye ya mobali baboyaki kotika koyekola Biblia, baboti na bango babenganaki bango na ndako. Mary ná yaya na ye bazwaki batisimo na sanza ya motoba 1951, mpe sanza motoba na nsima bakómaki babongisi-nzela. Ntango nazalaki kosolola na ye, namonaki ete Mary azalaki kolinga Yehova mingi. Namonaki ete azali mwasi oyo nasengeli kobala. Sanza libwa na nsima, ngai ná ye tobalanaki, mokolo ya 30/01/1954. Pɔsɔ moko nsima ya libala na biso, basɛngaki ngai nazwa formasyo mpo na kokóma mokɛngɛli ya zongazonga. Na mbula mibale oyo elandaki, tosalaki mosala ya zongazonga na nɔrdi ya Ontario.

Lokola mosala ya kosakola na mokili mobimba ezalaki se kokola, ebongiseli ya Yehova ezalaki na mposa ya bamisionɛrɛ mosusu mingi. Na yango, ngai ná Mary tokanisaki boye: lokola tokangaka motema na malili makasi na eleko ya malili na Canada mpe na ngungi na eleko ya molunge, tokoki mpe kokanga motema soki tofandi ata na mboka nini. Tokɔtaki na kelasi ya mbala ya 27 ya Eteyelo ya Gileade, mpe tozwaki badiplome na sanza ya nsambo 1956. Na sanza ya zomi na moko, tokómaki na mboka na biso ya sika: Brésil.

MOSALA YA MISIONƐRƐ NA BRÉSIL

Ntango tokómaki na Brésil, tobandaki koyekola monɔkɔ ya Portugais. Liboso, toyekolaki lolenge ya pɛtɛɛ ya kobanda lisolo. Na nsima, tokangaki na motó maloba mokuse mpo na kolakisa bazulunalo. Nsima na yango, tobimaki na mosala ya kosakola mpe tokutanaki na mwasi moko oyo asepelaki na nsango malamu. Tozalaki na ekateli ete soki moto amonisi ete asepeli, tosengeli kotángela ye vɛrsɛ moko ya Biblia oyo elobeli bomoi na Bokonzi ya Nzambe. Na yango, natángaki Emoniseli 21:3, 4, na nsima nakangamaki mpo molunge elekaki! Namesanaki te na molunge oyo ezalaki kuna. Molunge ekobaki kozala mokakatano monene mpo na ngai.

Teritware oyo bapesaki biso na mosala ya misionɛrɛ ezalaki engumba Campos. Lelo oyo, masangá ezali 15 na engumba yango! Kasi, ntango tokómaki, ezalaki  kaka na etuluku moko na engumba mobimba; mpe na ndako ya bamisionɛrɛ, tokutaki bandeko basi minei: Esther Tracy, Ramona Bauer, Luiza Schwarz, mpe Lorraine Brookes (lelo oyo Wallen). Na ndako ya bamisionɛrɛ, nazalaki na mokumba ya kosukola bilamba na masini mpe koluka nkoni mpo na kolamba. Mokolo moko ya yambo na mpokwa, nsima ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Mary azalaki kolala na kiti ya divan mpe atyaki motó na kusɛ. Tozalaki kosolola ndenge oyo mokolo elekaki. Ntango Mary atɛlɛmaki, nyoka moko ebimaki na nse ya kusɛ oyo atyaki motó! Biso nyonso tokómaki mitema likoló ndenge nyoka ekɔtelaki biso na ndako; kasi nsukansuka nabomaki yango.

Nsima ya koyekola monɔkɔ ya Portugais mbula moko, tobandaki mosala ya zongazonga. Tozalaki kotala masangá na teritware oyo kura ezalaki te. Tozalaki kolala na litɔkɔ mpe kosala mibembo na mpunda mpe shario. Na libaku moko, tosalaki mobembo na engbunduka tii na engumba moko oyo ezalaki likoló ya bangomba mpo tózwa likoki ya kosakola na teritware moko ya mosika. Tofutelaki shambre moko kuna. Biro ya filiale etindelaki biso bazulunalo 800 mpo tókabola yango na mosala ya kosakola. Esɛngaki ete tókenda mbala na mbala na biro ya posita mpo na kozwa bakɛsi oyo ezalaki na bazulunalo yango.

Na 1962, Eteyelo ya mosala ya Bokonzi esalemaki na bisika ndenge na ndenge na Brésil. Na boumeli ya sanza motoba, batindaki ngai nakenda kobongisa eteyelo mokomoko. Napesaki mateya ya eteyelo yango na Manaus, Belém, Fortaleza, Recife, mpe Salvador. Ntango nazalaki na Manaus, nabongisaki liyangani moko ya etúká na ndako moko monene ya masano. Lokola mbula ezalaki kobɛta mingi mikolo wana, mai ya pɛto mpo na komɛla ezalaki mingi te, mpe bisika malamu mpo bandeko báfanda mpo na kolya na ntango ya bopemi na liyangani ezalaki te. Na yango, nasololaki na mokonzi moko ya basoda mpe nayebisaki ye mokakatano na biso. Azwaki bibongiseli mpo na kopesa biso mai mingi ya komɛla mpo na liyangani mobimba. Atindaki mpe basoda bátya kapo mibale na esika oyo bandeko basengelaki kolamba bilei mpe kolya.

Ntango nazalaki na mobembo moko, Mary apesaki litatoli na teritware moko ya mombongo, epai ata moto moko te azalaki kosepela na masolo ya Biblia. Bato ya teritware yango bautá Portugal mpe bayaki kofanda na Brésil mpo na koluka mbongo. Mary alɛmbaki nzoto mpo na likambo yango mpe ayebisaki baninga na ye mosusu: “Mboka oyo nakoki soki moke te kondima kofanda na mokili ezali Portugal.” Kasi, mwa moke na nsima, tozwaki mokanda moko ya biro. Na mokanda yango, batindaki biso bamisionɛrɛ na Portugal, epai mosala na biso epekisamaki. Nsango wana epesaki Mary mpasi mingi! Kasi, tondimaki mpe tosimbaki nzela tokendaki na Portugal.

MOSALA NA BISO NA PORTUGAL

Tokómaki na engumba Lisbonne, na Portugal, na sanza ya mwambe 1964. Bapolisi ya sireté bazalaki konyokola bandeko mingi kuna. Yango wana, ezalaki likambo ya bwanya ete na ebandeli tóluka naino te kokutana na Batatoli ya ekólo yango. Na ebandeli, tofandaki na shambre moko oyo tozalaki kofutela.  Na nsima, ntango tozwaki baviza, tokómaki kofutela mwa ndako ya monene. Nsima ya sanza mitano, emonanaki ete ezalaki lisusu likama te koluka kokutana na bandeko na biro ya filiale. Tosepelaki mingi ntango tozwaki lisusu likoki ya koyangana na makita!

Lokola mosala na biso epekisamaki, bakangaki Bandako ya Bokonzi mpe makita ya lisangá ezalaki kosalema na bandako ya bandeko. Kasi bapolisi bazalaki mbala na mbala koluka bandako ya bandeko. Bazalaki kokanga bankama ya bandeko mibali mpe basi mpe komema bango na biro ya polisi mpo na kotuna bango mituna. Bapolisi bazalaki konyokola bango mpe koluka kotinda bango na makasi báyebisa bankombo ya bandeko oyo bazalaki kotambwisa masangá. Yango wana, mpo na kobatelana, bandeko batikaki kobengana na bankombo na bango ya mboka mpe bakómaki kobengana kaka na bankombo na bango ya bokristo.

Mokano na biso ya libosoliboso ezalaki ya kosala nyonso mpo bandeko bázanga te mikanda oyo ekokaki kosalisa bango báyika mpiko. Mary azalaki kobɛta na masini masolo ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu, na papye ya ndenge mosusu. Na nsima, tozalaki kosalela papye yango mpo na kosala bakopi mpo na bandeko mosusu.

KOSAMBA NA TRIBINALE MPO NA KOLONGISA NSANGO MALAMU

Na sanza ya motoba 1966, likambo moko ya monene efundamaki na Lisbonne. Bafundaki bandeko 49 ya lisangá ya Feijó ete bazali kosala likita oyo mibeko epekisi na ndako ya moto moko. Mpo na kosalisa bandeko bámibongisa mpo na kosamba likambo yango, nasalaki lokola nde nazali zuzi oyo azali kosambisa bango. Atako toyebaki ete tokolonga te na likambo yango, toyebaki ete litatoli monene ekopesama. Bandeko mibali mpe basi yango 49 bakɔtaki bolɔkɔ ntango molai, kobanda mikolo 45 tii na sanza mitano na ndambo. Kasi kosamba likambo yango epesaki litatoli monene. Kutu, na ntango ya kosamba, avoka na biso azongelaki maloba ya Gamaliele oyo ezali na Biblia. (Misala 5:33-39) Na nsima, bapanzi-nsango balobelaki likambo yango mingi. Tosepelaki mingi ntango avoka na biso abandaki koyekola Biblia elongo na biso mpe koyangana na makita.

Na sanza ya zomi na mibale 1966, nakómaki mokɛngɛli ya filiale mpe nakómaki kolekisa ntango mingi na makambo etali mibeko. Tosalaki nyonso oyo tokokaki mpo na koyeba mibeko oyo ezalaki kopesa Batatoli ya Yehova na Portugal bonsomi ya losambo. (Bafilipi 1:7) Nsukansuka, na mokolo ya 18/12/1974, mosala na biso endimamaki na Leta. Ndeko Nathan Knorr mpe ndeko Frederick Franz oyo bautaki na biro monene bayaki mpo na kosepela elongo na biso. Tosalaki likita moko oyo etiká nsango na Oporto mpe na Lisbonne, mpe bato soki 46 870 bayanganaki.

Yehova mpe asalaki ete mosala ya kosakola ekola mingi na bisanga oyo bato balobaka monɔkɔ ya Portugais, na ndakisa Açores, Cap-Vert, Madère, mpe São Tomé et Príncipe. Lokola motángo ya Batatoli na bamboka wana ezalaki se komata, tosengelaki na Betele ya monene. Ntango basilisaki kotonga Betele  yango, ndeko Milton Henschel asalaki diskur ya bofungoli na mokolo ya 23/04/1988. Bayangani bazalaki 45 522, kati na bango ezalaki mpe na bandeko 20 oyo bazalaki bamisionɛrɛ na Portugal mpe babengisamaki mpo na molulu ya kofungola Betele.

TOYEKOLAKI MAKAMBO MINGI EPAI YA BANDEKO MOSUSU YA SEMBO

Na boumeli ya bambula, ngai ná Mary toyekolaki makambo mingi epai ya bandeko mosusu ya sembo. Na ndakisa, ntango nasalaki elongo na ndeko Theodore Jaracz lokola bakɛngɛli ya zone mpo na kokende kolendisa bandeko na bafiliale mosusu, nazwaki liteya moko monene. Filiale oyo tokendaki kotala ezalaki na likambo moko ya monene, mpe Komite ya filiale esalaki nyonso mpo na kosilisa likambo yango, kasi ezalaki kosimba te. Bandeko yango balɛmbaki nzoto mpo bamonaki ete makasi na bango esuki. Yango wana, ndeko Jaracz abɔndisaki bango na maloba oyo: “Sikoyo, ezali ntango ya kotika elimo santu esala mosala na yango.” Nabosanaka mpe te likambo moko oyo ndeko Franz alobaki esili koleka bambula mingi ntango ngai ná Mary tokendaki na Brooklyn. Elongo na bandeko mosusu, tosɛngaki ye toli, mpe alobaki na biso boye: “Toli oyo nakoki kopesa bino yango oyo: Bótikala na kati ya ebongiseli ya Yehova, ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo. Yango ezali ebongiseli kaka moko oyo ezali kosala mosala oyo Yesu atikelá bayekoli na ye: kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe!”

Kolanda toli wana esalisaki ngai ná Mary tózala na esengo mingi. Tobosanaka mpe te ntango ya esengo oyo tolekisaki ntango tozalaki kokende kotala bafiliale ndenge na ndenge na mokili mobimba. Tozalaki kosepela mingi kokutana na basaleli ya Yehova, ezala bilenge to mikóló, mpe kosalisa bango báyeba ete Yehova asepelaka mingi na mosala oyo basalelaka ye. Tozalaki ntango nyonso kolendisa bango bákoba kosalela ye.

Bambula mingi esili koleka, mpe sikoyo biso nyonso mibale tokómi na mbula koleka 80. Mary azali na mikakatano mingi ya nzoto. (2 Bakorinti 12:9) Tokutanaki mpe na mikakatano mosusu mingi. Kasi mikakatano yango ekómisaki kondima na biso makasi mpe ebakisaki ekateli na biso ya kotikala sembo epai ya Yehova. Soki tozongisi makanisi nsima mpe totali ebele ya bambula oyo tolekisi na mosala ya Yehova, tomonaka ete apamboli biso mingi mpe amoniseli biso boboto monene na ndenge mingi. *

^ par. 29 Ntango lisolo oyo ezalaki kobongisama, ndeko Douglas Guest akufaki mokolo ya 25/10/2015; azalaki sembo epai ya Yehova.