Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2017

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ntoma Paulo akomaki ete Yehova “akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema.” (1 Bakorinti 10:13) Yango elingi nde koloba ete Yehova abongisaka liboso makambo oyo tokoki koyikela mpiko, na nsima aponaka komekama oyo tokokutana na yango?

Soki ezalaki bongo, kanisá ndenge oyo bomoi na biso elingaki kozala. Na ndakisa, mwana ya ndeko moko amibomaki. Likambo yango eyokisaki tata na ye mpasi mingi na motema. Amitunaki soki Yehova ayebaki liboso likambo oyo esalemi, mpe abongisaki ete ye ná mwasi na ye báyikela mokakatano yango mpiko. Na mokili oyo, mingi na biso tokutanaka na makambo ya mpasi. Na yango, tosengeli nde kokanisa ete Yehova atambwisaka likambo nyonso oyo ekómelaka biso na bomoi?

Ntango tozali kotalela 1 Bakorinti 10:13, tokomona ete Biblia endimaka te likanisi oyo elobi ete Yehova ayebaka liboso makambo oyo tokoki koyikela mpiko, na nsima aponaka komekama oyo tokokutana na yango. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Tótalela ntina minei.

Ya liboso, Yehova apesá bato bonsomi ya kopona, likoki ya kozwa bikateli bango moko. Alingaka ete tózwaka bikateli biso moko. (Kolimbola Mibeko 30:19, 20; Yosua 24:15) Soki tozwi bikateli oyo esepelisaka Yehova, tokoki kotyela ye motema ete akotambwisa biso. (Masese 16:9) Kasi, soki tozwi bikateli ya mabe, tokobuka mbuma mabe ya bikateli yango. (Bagalatia 6:7) Na yango, soki Yehova aponaka liboso komekama oyo tokokutana na yango, tolingaki mpenza kozala na bonsomi ya kopona?

Ya mibale, Yehova abatelaka biso te na “makambo oyo ekanami te.” (Mosakoli 9:11) Moto akoki kokutana na likama kaka mpo azalaki na esika ya mabe na ntango ya mabe. Yesu alobelaki likama moko oyo ebomaki bato 18 ntango linɔ́ngi moko ekwelaki bango. Amonisaki polele ete Nzambe te nde asalaki ete bato wana bábomama. (Luka 13:1-5) Tosengeli te kokanisa ete liboso likama moko esalema, Nzambe aponaka liboso bato oyo bakobika to bato oyo bakokufa.

Ya misato, mokomoko na biso asengeli kotikala sembo epai ya Yehova. Satana alobaki ete basaleli ya Yehova basalelaka ye mpo na biloko oyo apesaka bango. Satana abɛtaki ntolo ete  tokotikala sembo te epai ya Yehova soki tomekami. (Yobo 1:9-11; 2:4; Emoniseli 12:10) Soki Yehova azalaki kobatela biso na komekama mosusu, ekoki komonana lokola ete Satana alobaki solo.

Ya minei, Yehova aponaka te koyeba liboso likambo nyonso oyo ekokómela biso. Ya solo, Yehova akoki koyeba oyo ekosalema na mikolo ezali koya, soki alingi. (Yisaya 46:10) Kasi, Biblia emonisi ete aponaka te koyeba liboso likambo nyonso. (Ebandeli 18:20, 21; 22:12) Yehova azali bolingo mpe sembo, yango wana, atikaka biso tózwa bikateli biso moko.Kolimbola Mibeko 32:4; 2 Bakorinti 3:17.

Na yango, ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango alobaki ete Yehova “akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema”? Awa, ntoma Paulo azalaki kolobela oyo Yehova asalaka na ntango ya komekama, kasi te liboso na yango. * Soki totyeli Yehova motema, akosalisa biso na komekama nyonso oyo tokokutana na yango na bomoi. (Nzembo 55:22) Tótalela sikoyo ntina mibale oyo etindaki ntoma Paulo aloba bongo.

Ntina ya liboso ezali ete komekama oyo tokutanaka na yango “ekómelaka bato nyonso.” Lokola tozali na mokili ya Satana, biso nyonso tokokutana na mikakatano, ntango mosusu likambo moko ya mpasi. Kasi, soki totyeli Yehova motema, tokoki koyikela komekama yango mpiko mpe kotikala sembo. (1 Petro 5:8, 9) Na ebandeli ya 1 Bakorinti mokapo 10, ntoma Paulo akomaki mpo na komekama mosusu oyo Bayisraele bakutanaki na yango na esobe. (1 Bakorinti 10:6-11) Baoyo batyelaki Yehova motema bayikelaki mikakatano yango mpiko. Kasi, Bayisraele mosusu baboyaki kotosa Yehova. Batikalaki sembo te mpo batyelaki ye motema te.

Ntina ya mibale ezali ete “Nzambe azali sembo.” Yango elimboli nini? Soki totaleli ndenge oyo Yehova asalisaki basaleli na ye banda kala, tokomona ete na bosembo nyonso asalisaka “baoyo balingaka ye mpe baoyo babatelaka mitindo na ye.” (Kolimbola Mibeko 7:9) Tomoni ete Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Yosua 23:14) Tokoki mpenza kondima ete (1) Yehova akotika te ete komekama moko ekóma mpasi mingi mpo tókoka te koyikela yango mpiko, mpe (2) ‘akobongisela biso nzela ya kobima.’

Yehova “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso”

Ndenge nini Yehova ‘abongisaka nzela ya kobima’ mpo na baoyo batyelaka ye motema? Na ntembe te, akoki kolongola komekama. Kasi kobosana te, ntoma Paulo alobaki ete Yehova “akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” Na yango, mbala mingi Yehova abongiselaka biso nzela ya kobima na ndenge apesaka biso nguya mpo tókoka kotikala sembo. Tótalela banzela mosusu oyo asalelaka.

  • Yehova “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4) Akoki kolendisa makanisi mpe mayoki na biso; kokitisa biso motema, na nzela ya Biblia, ya elimo santu na ye, mpe ya moombo ya sembo.Matai 24:45; Yoane 14:16; Baroma 15:4.

  • Yehova akoki kosalela elimo santu na ye mpo na kotambwisa biso. (Yoane 14:26) Elimo santu ekoki kosalisa biso tómikundola masolo ya Biblia mpe mitinda na yango mpo tókoka kozwa bikateli ya malamu.

  • Yehova akoki kosalela baanzelu na ye mpo na kosalisa biso.Baebre 1:14.

  • Yehova akoki kosalela bandeko mibali mpe basi mpo na kosalisa biso. Bakoki kolendisa biso na maloba mpe na misala na bango.Bakolose 4:11.

Na yango, maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 10:13 eteyi biso nini? Eteyi biso ete Yehova aponaka te komekama oyo tokutanaka na yango. Kasi tokoki kondimisama ete soki totyeli Yehova motema, tokoki koyikela komekama nyonso mpiko. Toyebi ete Yehova akobongisela biso ntango nyonso nzela ya kobima mpo tókoka kotikala sembo epai na ye.

^ par. 2 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “komekama” elimboli mpe “masɛnginya” to “bolɔzi.”