Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2017

Nani azali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo?

Nani azali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo?

“Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino.”BAEBRE 13:7.

NZEMBO: 125, 43

1, 2. Ntango Yesu amataki likoló, mbala mosusu bantoma bazalaki komituna nini?

BANTOMA ya Yesu batɛlɛmaki na Ngomba ya Olive mpe bazalaki kotala ndenge Nkolo mpe moninga na bango Yesu azalaki komata likoló, mpe lipata moko ezipaki ye. (Misala 1:9, 10) Na boumeli ya mbula soki mibale, Yesu ateyaki bango, alendisaki bango, mpe akambaki bango. Kasi sikoyo, atiki bango. Bakosala nini?

2 Liboso ete Yesu amata likoló, ayebisaki bayekoli na ye: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:8) Ndenge nini bakokaki kosala mosala yango? Yesu alakaki bango ete elimo santu ya Nzambe ekosalisa bango. (Misala 1:5) Kasi, nani akokamba bango mpe akotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba? Bantoma bayebaki ete na ntango ya kala, Yehova asalelaki bato mpo na kokamba Bayisraele. Yango wana, mbala mosusu bazalaki komituna soki sikoyo Yehova akopona mokambi ya sika.

3. (a) Ntango Yesu amataki likoló, mwa moke na nsima, ekateli nini ya ntina mingi bantoma ya sembo bazwaki? (b) Tokoyanola na mituna nini na lisolo oyo?

 3 Ntango Yesu amataki likoló, mwa moke nsima, bayekoli na ye batalelaki Makomami, babondelaki Nzambe asalisa bango, mpe baponaki Matiasi mpo azala ntoma ya 12 na esika ya Yudasi Mokeriota. (Misala 1:15-26) Mpo na nini liponi yango ezalaki na ntina mingi mpo na bango mpe mpo na Yehova? Bayekoli bamonaki ete esengelaki bantoma bázala 12. * Yesu aponaki bantoma mpe apesaki bango formasyo mpo na mokumba moko ya ntina mingi na kati ya basaleli ya Nzambe. Mokumba yango ezalaki nini, mpe ndenge nini Yehova mpe Yesu babongisaki bango mpo na yango? Ebongiseli nini ekokani na yango lelo oyo? Mpe ndenge nini tokoki ‘kokanisa baoyo bazali kokamba biso,’ mingimingi “moombo ya sembo mpe ya mayele”?Baebre 13:7; Matai 24:45.

YESU ATAMBWISAKA LISANGANI YA MIKÓLÓ-BAKAMBI

4. Mokumba nini bantoma mpe bankulutu mosusu na Yerusaleme bazalaki na yango?

4 Bantoma babandaki kokamba lisangá ya bokristo na Pantekote ya mobu 33. Biblia elobi ete “Petro atɛlɛmaki elongo na bantoma zomi na moko” mpe ateyaki ebele ya bato mateya ya solo oyo epesaka bomoi. (Misala 2:14, 15) Mingi kati na bato yango bakómaki bakristo. Na nsima, bakristo yango ya sika “bakobaki komipesa na mateya ya bantoma.” (Misala 2:42) Bantoma bazalaki na mokumba ya kopona ndenge ya kosalela mbongo ya lisangá. (Misala 4:34, 35) Bazalaki mpe koteya basaleli ya Nzambe, kobondela mpo na bango, mpe koloba: “Biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya liloba.” (Misala 6:4) Longola yango, bazalaki kotinda bakristo oyo bameseni na mosala ya kosakola bákende kosakola na bateritware ya sika. (Misala 8:14, 15) Na nsima, bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo basanganaki na bantoma mpo na kokamba lisangá. Basalaki lisangani ya mikóló-bakambi, oyo ezalaki kotambwisa masangá nyonso.Misala 15:2.

5, 6. (a) Ndenge nini elimo santu epesaki lisangani ya mikóló-bakambi nguya? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Ndenge nini baanzelu basalisaki lisangani ya mikóló-bakambi? (c) Ndenge nini Liloba ya Nzambe etambwisaki lisangani ya mikóló-bakambi?

5 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bayebaki ete Yehova azalaki kotambwisa lisangani ya mikóló-bakambi na nzela ya Yesu. Ndenge nini bayebaki yango? Ya liboso, elimo santu epesaki lisangani ya mikóló-bakambi nguya. (Yoane 16:13) Bakristo nyonso oyo batyamaki mafuta na elimo bazwaki elimo santu, kasi elimo yango epesaki mingimingi bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme nguya ya kokokisa mokumba na bango ya bakɛngɛli. Na ndakisa, na mobu 49, elimo santu etambwisaki lisangani ya mikóló-bakambi ezwa ekateli na likambo ya kokatama ngenga. Masangá elandaki ekateli yango. Yango wana, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.” (Misala 16:4, 5) Na nzela ya mokanda oyo etindamaki na masangá na likambo ya kokatama ngenga, tokoki komona ete lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki na elimo ya Nzambe mpe bandeko ya lisangani yango bamonisaki bizaleli lokola bolingo mpe kondima.Misala 15:11, 25-29; Bagalatia 5:22, 23.

6 Ya mibale, baanzelu basalisaki lisangani ya mikóló-bakambi. Na ndakisa, anzelu moko ayebisaki Korneyi akende koluka ntoma Petro. Ntango Petro ateyaki Korneyi ná bato ya libota na ye, bazwaki elimo santu, atako bakatamaki ngenga te. Na ndenge yango, Korneyi azalaki moto  ya liboso ya ekólo mosusu oyo akatamaki ngenga te oyo akómaki mokristo. Ntango bantoma mpe bandeko mosusu bayokaki likambo yango, bandimaki litambwisi ya Nzambe mpe bayambaki bato ya bikólo mosusu na lisangá ya bokristo. (Misala 11:13-18) Likambo yango esalisi biso tómona ete baanzelu bazalaki mpenza kosunga mosala ya kosakola oyo lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kotambwisa. (Misala 5:19, 20) Ya misato, Liloba ya Nzambe ezalaki kotambwisa lisangani ya mikóló-bakambi. Mibali yango bazalaki kosalela Makomami mpo na kozwa bikateli ya ntina mingi oyo etali bindimeli ya bakristo mpe mpo na kokamba masangá.Misala 1:20-22; 15:15-20.

7. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki kokamba bakristo ya liboso?

7 Atako lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki na bokonzi ya kotambwisa masangá, bandeko oyo bazalaki na lisangani yango bayebaki ete Yesu Kristo nde azalaki Mokambi na bango. Ndenge nini toyebi yango? Ntoma Paulo alobaki ete Kristo nde aponaki “bamosusu bázala bantoma.” Alobaki mpe ete Kristo azalaki “motó,” to Mokambi ya lisangá. (Baefese 4:11, 15) Mpe na esika ya kobengama na nkombo ya ntoma moko boye, ‘bayekoli babengamaki bakristo na litambwisi ya Nzambe.’ (Misala 11:26) Ntoma Paulo ayebaki ete ezalaki na ntina mingi kolanda mateya ya Biblia oyo bantoma mpe mibali mosusu oyo bazalaki kokamba bazalaki koteya. Atako bongo, alobaki: “Kasi nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo.” Maloba wana etalelaki mpe ndeko mokomoko ya lisangani ya mikolo-bakambi. Na nsima, ntoma Paulo abakisaki: “Mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.” (1 Bakorinti 11:2, 3) Ezali polele ete Yehova atyaki Mwana na ye, Kristo Yesu, mpo akamba lisangá.

“OYO EZALI MOSALA YA MOTO TE”

8, 9. Mokumba nini ya ntina mingi ndeko Russell azalaki na yango?

8 Kobanda na 1870, ndeko Charles Taze Russell ná baninga na ye mosusu babandaki kosambela Nzambe na ndenge oyo Biblia esɛngi mpe kosalisa basusu básala mpe bongo. Yango elimbolaki mpe kosalisa bato oyo balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge. Yango wana, basalaki la Société (Zion’s Watch Tower Tract Society) mpe bakomisaki yango na mikanda ya Leta na 1884, mpe ndeko Russell akómaki prezida na yango. * Ndeko Russell ayekolaki Biblia malamumalamu mpe abangaki te koyebisa basusu ete mateya ya mangomba, na ndakisa liteya ya Bosato mpe liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, euti na Biblia te. Ayekolaki ete kozonga ya Kristo ekomonana na miso te mpe ete “bantango oyo etyamá ya bikólo” esengelaki kosuka na 1914. (Luka 21:24) Ndeko Russell asalelaki ntango na ye, makasi na ye, mpe mbongo na ye mpo na koteya basusu mateya wana ya solo. Ezali polele ete Yehova mpe Yesu basalelaki ndeko Russell mpo na kokamba basusu na eleko wana ya ntina mingi na lisolo ya bato.

9 Ndeko Russell alingaki te ete bato bápesa ye lokumu ya ndenge mosusu. Na 1896, akomaki ete ye ná bandeko mosusu oyo bazalaki kotambwisa mosala balingaki te ete bápesa bango lokumu ya ndenge mosusu. Balingaki te ete bápesa bango batitre ya lokumu, mpe balingaki te ete etuluku moko ebengama na nkombo na bango. Na nsima, alobaki boye: “Oyo ezali mosala ya moto te.”

10. (a) Ntango nini Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele”? (b) Lobelá makambo oyo emonisaki polele ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na la Société Watch Tower.

10 Na 1919, mbula misato nsima ya liwa ya ndeko Russell, Yesu atyaki “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Mpo na mokano nini? Mpo na kopesa bayekoli na ye “bilei na bango na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:45) Ata na bambula wana ya  ebandeli, mwa etuluku moke ya bandeko oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki na biro monene na Brooklyn, New York, bazalaki kopesa bayekoli ya Yesu bilei ya elimo. Maloba “lisangani ya mikóló-bakambi” ebandaki kobima na mikanda na biso nsima ya 1940. Na ntango wana, lisangani ya mikóló-bakambi ekesanaki mingi te na bakambi ya la Société (Watch Tower Bible and Tract Society). Kasi na 1971, emonisamaki polele ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na la Societé Watch Tower, oyo ezalaki kotalela kaka makambo etali mibeko. Kobanda na mbula wana, bandeko oyo batyami mafuta na elimo bakokaki kokɔta na Lisangani ya Mikóló-Bakambi kozanga ete bázala liboso bakambi (administrateurs) ya la Société. Na bambula euti koleka, bandeko mosusu oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” bakómaki bakambi ya la Société mpe ya bibongiseli mosusu oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta, oyo basaleli ya Nzambe basalelaka. Yango esali ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi emipesa mobimba na mateya ya Biblia mpe malako. (Yoane 10:16; Misala 6:4) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013 elimbolaki ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali mwa etuluku moke ya bandeko mibali oyo batyami mafuta na elimo, oyo basali Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Lisangani ya mikóló-bakambi, na bambula ya 1950

11. Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bikateli?

11 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bikateli lokola lisangá ntango bandeko oyo bazali na lisangani yango basalaka likita na bango pɔsɔ na pɔsɔ. Likita yango esalisaka bango básololaka mingi mpe bákoba kozala na bomoko. (Masese 20:18) Ndeko moko te ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi aleki basusu; yango wana, mbula na mbula, baponaka moko na bango mpo atambwisa likita yango. (1 Petro 5:1) Ezali mpe bongo mpo na komite mokomoko na bakomite motoba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ndeko moko te ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi amonaka ete azali mokambi ya bandeko mosusu. Mokomoko na bango azali mpe mosali ya ndako, azwaka bilei ya elimo oyo moombo ya sembo apesaka mpe alandaka litambwisi ya moombo yango.

Bandá moombo ya sembo atyamá na 1919, apesaka basaleli ya Nzambe bilei ya elimo (Talá paragrafe 10, 11)

“NANI AZALI MPENZA MOOMBO YA SEMBO MPE YA MAYELE?”

12. Mituna nini tokoyanola na baparagrafe oyo elandi?

12 Nzambe alobaka te na Lisangani ya Mikóló-Bakambi na ndenge ya likamwisi, mpe basangani na yango bazali kaka bato ya kozanga kokoka. Bakoki kosala mabunga ntango bazali kolimbola Biblia to kotambwisa ebongiseli ya Nzambe. Na ndakisa, Index des publications Watch Tower ezali na masolo “Kolimbola bindimeli na biso,” oyo ezali na liste ya bingɛngiseli oyo ebimaki na mateya ya Biblia banda 1870. Yesu ayebisaki biso te ete moombo ya sembo akopesa biso bilei ya elimo oyo ezali ya kokoka. Na yango, ndenge nini tokoki koyanola na motuna oyo ya Yesu: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?” (Matai 24:45) Nini emonisi ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali moombo ya sembo? Tótalela makambo misato oyo esalisaki mpe lisangani ya mikóló-bakambi na ntango ya bantoma.

13. Ndenge nini elimo santu esalisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

13 Elimo santu esalisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Elimo santu esalisaki Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekanga ntina ya mateya ya Biblia oyo liboso elimbolamaki malamu te. Na ndakisa, tótalela liste ya mateya oyo esembolamaki, oyo touti kolobela. Moto moko te akokaki kokanga ntina ya “makambo [wana ya] mozindo ya Nzambe” mpe kolimbola yango na ndenge na ye moko! (Tángá 1 Bakorinti 2:10.) Lisangani ya Mikóló-Bakambi eyokaka lokola ntoma Paulo, oyo akomaki: “Tozali mpe kolobela makambo yango, na maloba oyo eteyami na bwanya ya bato te, kasi na oyo eteyami na elimo.” (1 Bakorinti 2:13) Nsima ya bankama ya bambula ya mateya ya lokuta mpe kozanga litambwisi  ya polele, mpo na nini boyebi ya Biblia ekómi mingi boye banda 1919? Ezali mpo ete Nzambe asalisi na nzela ya elimo santu na ye!

14. Na kotalela Emoniseli 14:6, 7, ndenge nini baanzelu basalisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe basaleli ya Nzambe lelo oyo?

14 Banzelu basalisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali na mokumba monene ya kokamba basakoli koleka milio 8 na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Mpo na nini mosala yango ezali kobota mbuma mingi? Moko ya bantina ezali lisalisi ya banzelu. (Tángá Emoniseli 14:6, 7.) Mbala mingi, banzelu bakambaki basakoli epai ya moto moko oyo autaki kosilisa kobondela Nzambe mpo asalisa ye! * Mosala ya kosakola mpe ya koteya ezali kokoba kokola ata na bisika oyo botɛmɛli ezali makasi. Makambo wana ezali mpe kosalema mpo na lisalisi ya baanzelu.

15. Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na bakonzi ya mangomba ya bokristo? Pesá ndakisa.

15 Liloba ya Nzambe etambwisaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (Tángá Yoane 17:17.) Tótala likambo oyo esalemaki na 1973. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/1973 etunaki soki “moto oyo atiki naino komɛla makaya te abongi kozwa batisimo.” Eyano oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango epesaki na motuna wana, oyo eutaki na mitinda ya Biblia, ezalaki: “Te”! Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango ezongelaki bavɛrsɛ mingi ya Biblia mpe elimbolaki mpo na nini moto oyo alingi kotika komɛla  makaya te asengeli kolongolama na lisangá. (1 Bakorinti 5:7; 2 Bakorinti 7:1) Elobaki ete etinda wana ya polele euti epai ya bato te, kasi euti “epai ya Nzambe, oyo alobaka na nzela ya Liloba na ye oyo ekomami.” Lingomba mosusu te endimaki kokangama makasi na makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi, ata soki kosala bongo ekoki kozala mpasi mpo na bandimi na yango mosusu. Buku moko oyo ebimaki kala mingi te elobeli mangomba na États-Unis, elobi: “Mbala na mbala, bakonzi ya mangomba babongolaki mateya na bango mpo eyokana na bindimeli mpe makanisi ya bato, mpo bandimi mpe bato mingi bátika te kosunga bango.” Kasi Lisangani ya Mikóló-Bakambi etambwisamaka te na makambo oyo bato mingi balingaka. Bandeko oyo bazali na lisangani yango batambwisamaka nde na Liloba ya Nzambe, oyo emonisi polele ete Yehova nde azali mpenza kokamba basaleli na ye lelo oyo.

“BÓKANISAKA BAOYO BAZALI KOKAMBA BINO”

16. Wapi lolenge moko ya kokanisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

16 Tángá Baebre 13:7. Biblia elobi ete ‘tókanisaka baoyo bazali kokamba biso.’ Lolenge moko oyo tokoki kosala yango ezali ya kobondelaka mpo na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (Baefese 6:18) Bazali na mikumba mingi, na ndakisa kobongisa bilei ya elimo, kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpe kolandela ndenge ya kosalela makabo ya ebongiseli ya Yehova. Na yango, tosengeli kobondelaka mpo na bango mbala na mbala.

17, 18. (a) Ndenge nini tolandaka litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi? (b) Ndenge nini na nzela ya mosala na biso ya kosakola topesaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe Yesu mabɔkɔ?

17 Tokoki mpe kokanisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi soki tozali kolanda malako mpe litambwisi na yango. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekambaka biso na nzela ya mikanda, makita, mayangani ya mike mpe ya minene. Etyaka mpe bakɛngɛli ya zongazonga, oyo na ngala na bango batyaka bankulutu na masangá. Ntango bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu balandaka na likebi malako oyo bazwaka, bamonisaka ete bazali kokanisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Mpe biso nyonso tomonisaka ete totosaka Mokambi na biso, Yesu, na ndenge totosaka bato oyo azali kosalela lelo oyo.Baebre 13:17.

18 Lolenge mosusu oyo tokoki kokanisa Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali ya kosala nyonso oyo tokoki na mosala ya kosakola. Baebre 13:7 elendisi bakristo bámekola kondima ya baoyo bazali kokamba. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bamonisaka kondima makasi na ndenge basakolaka na molende mpe basalaka nyonso mpo mosala ya kosakola nsango malamu ekende liboso. Tozali kopesa bandeko yango mabɔkɔ na mosala wana ya ntina mingi? Soki tozali kosala bongo, tokosepela ntango tokoyoka Yesu azali koyebisa biso: “Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalelaki ngai.”Matai 25:34-40.

19. Mpo na nini ozali na ekateli ya kolanda Mokambi na biso, Yesu?

19 Ntango Yesu azongaki na likoló, asundolaki bayekoli na ye te. (Matai 28:20) Ayebaki ete elimo santu, baanzelu, mpe Liloba ya Nzambe esalisaki ye atambwisa makambo ntango azalaki awa na mabele. Lelo oyo, asalisaka moombo ya sembo kaka ndenge wana. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kokoba “kolanda Mwana-Mpate,” Yesu, “epai nyonso oyo azali kokende.” (Emoniseli 14:4) Na yango, ntango tolandaka litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, tolandaka nde Yesu, Mokambi na biso. Mosika te, akokamba biso tii na bomoi ya seko. (Emoniseli 7:14-17) Mokambi moko te awa na mabele akoki kopesa elaka wana!

^ par. 3 Emonani ete Yehova alingaki ete bantoma bázala 12, mpo bázala “mabanga zomi na mibale ya moboko” ya Yerusaleme ya sika na mikolo ezali koya. (Emoniseli 21:14) Yango wana, ezalaki na ntina te kotya ntoma moko na esika ya mosusu ntango bantoma ya sembo bazalaki kokufa na nsima.

^ par. 8 Kobanda na 1955, ebongiseli yango eyebani na nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.

^ par. 14 Talá buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe nkasa 58-59.