Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2017

Mokano ya Yehova ekokokisama!

Mokano ya Yehova ekokokisama!

“Nalobi yango; nakokokisa yango. Nabongisi mokano yango, nakosala mpe yango.”YISAYA 46:11.

NZEMBO: 147, 149

1, 2. (a) Yehova asalisá biso tóyeba nini? (b) Elaka nini ezali na Yisaya 46:10, 11 mpe Yisaya 55:11?

VƐRSƐ ya liboso ya Biblia ezali na maloba oyo ya pɛtɛɛ kasi ya mozindo: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” (Ebandeli 1:1) Tomonaka kaka mwa biloko moke na ebele ya biloko oyo Nzambe akelá na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe toyebi makambo mingi te mpo na etando, pole, mpe nguya oyo esalaka ete biloko oyo ezali na likoló ekwea te. (Mosakoli 3:11) Kasi, Yehova asalisá biso tóyeba mokano na ye mpo na mabele mpe mpo na bato. Akelá bato na elilingi na ye mpe alingaki ete básepela na bomoi awa na mabele. (Ebandeli 1:26) Basengelaki kozala bana na ye, mpe ye asengelaki kozala Tata na bango.

2 Na mokapo ya misato ya mokanda ya Ebandeli, tomonaki ete Satana alukaki kobebisa mokano ya Yehova. (Ebandeli 3:1-7) Kasi, ezali ata na likambo moko te oyo Yehova akoki kosilisa te. Moto moko te akoki kotɛmɛla mokano na ye. (Yisaya 46:10, 11; 55:11) Na yango, tokoki kondimisama ete mokano ya Yehova ya ebandeli ekokokisama mpenza na ntango oyo ebongi!

3. (a) Mateya nini ya ntina mingi esalisi biso tókanga ntina ya nsango ya Biblia? (b) Mpo na nini tozali kotalela mateya yango sikoyo? (c) Mituna nini tokotalela?

3 Na ntembe te, toyebi mokano ya Nzambe mpo na mabele  mpe mpo na bato, mpe mokumba oyo Yesu azali na yango mpo na kokokisa mokano yango. Yango ezali mateya ya ntina mingi ya Biblia mpe mbala mosusu yango nde mateya ya liboso oyo toyekolaki ntango tobandaki koyekola Biblia. Sikoyo, tolingi mpe kosalisa basusu báyekola mateya wana ya ntina mingi. Na eleko oyo ya Ekaniseli ya liwa ya Kristo, tozali mpenza na libaku ya kosala yango ntango tozali kobengisa bato mpo báyangana na molulu yango. (Luka 22:19, 20) Soki bayei na molulu wana ya ntina mingi, bakoyekola makambo mingi oyo etali mokano ya Nzambe. Yango wana, oyo ezali ntango malamu ya kokanisa mituna ya sikisiki oyo tokoki kosalela mpo na kolendisa bato báyangana na molulu yango. Na lisolo oyo, tokotalela mituna misato: Mokano ya Nzambe mpo na mabele mpe mpo na bato ezali nini? Nini ebebisaki makambo? Mpe mpo na nini mbeka ya lisiko ya Yesu ezali fungola oyo esali ete mokano ya Nzambe ekokisama?

MOKANO YA MOZALISI EZALAKI NINI?

4. Ndenge nini bozalisi “ezali kosakola nkembo ya Nzambe”?

4 Yehova azali Mozalisi Monene. Biloko nyonso oyo akelá ezali malamu mingi. (Ebandeli 1:31; Yirimia 10:12) Biloko oyo Nzambe akelá ezali kitoko mpe esalaka na molɔngɔ. Yango ekoki koteya biso nini? Eteyi biso ete biloko nyonso oyo Yehova akelá, banda na biloko oyo eleki mike tii na oyo eleki minene, ezali na ntina. Longola yango, nini eyelaka yo na makanisi ntango okanisaka selile ya nzoto ya moto oyo esalemi na ndenge ya kokamwa, to ntango omoni mwana oyo abotami sika, to omiyokaka ndenge nini ntango omonaka kolala ya moi? Tosepelaka na biloko wana mpo Yehova akelá biso na likoki ya koyeba biloko oyo ezali mpenza kitoko.Tángá Nzembo 19:1; 104:24.

5. Yehova asalá nini mpo bikelamu na ye nyonso esala malamu mpe na bomoko?

5 Yehova abongisá malamumalamu bandelo mpo na bikelamu na ye nyonso. Atyá mibeko na molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe atyá mibeko oyo etali bizaleli malamu. Atyá mibeko yango mpo biloko nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba esala malamu mpe na bomoko. (Nzembo 19:7-9) Na molɔ́ngɔ́ mobimba, eloko na eloko ezali na esika na yango mpe na mosala na yango. Na ndakisa, mobeko etali nguya oyo esalaka ete biloko oyo ezali na likoló ekwea te ebatelaka etando oyo ezingi mabele, mpe ebatelaka mbu mpe ndenge oyo mai na yango emataka mpe ekitaka. Soki nguya yango ezalaki te, bomoi awa na mabele elingaki kozala te. Bandelo oyo Yehova atyá na molɔ́ngɔ́ mobimba esalaka ete makambo nyonso etambola na mobulu te na molɔ́ngɔ́ mobimba. Yango emonisi ete azali na mokano mpo na mabele mpe mpo na bato. Na mosala ya kosakola, tokoki kosalisa bato mosusu báyeba malamu Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba oyo ekamwisaka biso.Emoniseli 4:11.

6, 7. Makabo nini mosusu Yehova apesaki Adama ná Eva?

6 Mokano ya Yehova ezalaki ete bato bázala na bomoi ya seko awa na mabele. (Ebandeli 1:28; Nzembo 37:29) Lokola Yehova azali mokabi, apesaki Adama ná Eva makabo mingi ya kitoko. (Tángá Yakobo 1:17.) Apesaki bango bonsomi ya kopona mpe likoki ya kokanisa, ya kolinga, mpe ya kozala na boyokani ya malamu na basusu. Mozalisi azalaki kosolola na Adama mpe kopesa ye malako mpo na ndenge ya kosala makambo ya malamu. Adama ayekolaki mpe ndenge ya komibatela, kobatela banyama, mpe mabele. (Ebandeli 2:15-17, 19, 20) Yehova apesaki Adama ná Eva likoki ya koyoka elɛngi ya bilei, kosimba, komona, koyoka mpe koyoka nsolo ya biloko kitoko  oyo asalelaki bango. Na ndenge wana, bakokaki kosepela na bomoi na esika kitoko oyo bazalaki kofanda. Adama ná Eva bazalaki na misala mingi ya malamu oyo basengelaki kosala. Lisusu, bakokaki kokoba koyekola mpe koyeba makambo ya sika libela na libela.

7 Nini mosusu ezalaki na mokano ya Nzambe? Yehova apesaki Adama ná Eva likoki ya kobota bana ya kokoka. Bana na bango bakokaki mpe kobota oyo ya bango bana, tii mabele mobimba ekokaki kotonda na bato. Yehova alingaki ete baboti bálingaka bana na bango, kaka ndenge ye moko azalaki kolinga Adama ná Eva, bana na ye ya liboso oyo bazalaki bato ya kokoka. Apesaki bato mabele mpe biloko nyonso ya motuya mpe ya kitoko oyo ezali na mabele. Mabele esengelaki kozala esika na bango ya kofanda, mpe basengelaki soki moke te kolongolama wana.Nzembo 115:16.

NINI EBEBISAKI MAKAMBO?

8. Mpo na nini Nzambe apesaki Adama ná Eva mobeko oyo ezali na Ebandeli 2:16, 17?

8 Makambo etambolaki te ndenge Yehova alingaki. Nini esalemaki? Yehova apesaki Adama ná Eva mobeko moko ya pɛtɛɛ mpo báyeba ete bonsomi na bango ezali na ndelo. Alobaki: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:16, 17) Ezalaki mpasi te mpo bákanga ntina ya mobeko wana. Mpe ezalaki mpasi te mpo bátosa yango, mpamba te bazalaki na bilei mosusu mingi ya kitoko na elanga yango.

9, 10. (a) Satana afundaki Yehova na likambo nini? (b) Adama ná Eva baponaki kosala nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Satana Zabolo asalelaki nyoka mpo na kotinda Eva aboya kotosa Yehova, Tata na ye. (Tángá Ebandeli 3:1-5; Emoniseli 12:9) Satana abimisaki likanisi ete Nzambe apekisaki bato kolya “mbuma ya nzete nyonso ya elanga.” Ezali lokola nde alobaki: ‘Bolobi ete bokoki te kosala likambo oyo bolingi?’ Na nsima, ayebisaki Eva: “Bokokufa soki moke te.” Nzokande, maloba wana ezalaki lokuta. Na yango, alukaki kondimisa Eva ete asengelaki te koyoka Nzambe. Satana alobaki: “Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza.” Satana azalaki koloba ete Yehova apekisaki bango kolya mbuma yango mpo yango elingaki kopesa bango boyebi ya ndenge mosusu. Nsukansuka, apesaki bango elaka oyo ya lokuta: “Bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.”

10 Adama ná Eva basengelaki kopona oyo balingi kosala. Basengelaki nde kotosa Nzambe to koyokela nyoka? Likambo ya mawa, baponaki koboya kotosa Nzambe. Bapesaki Tata na bango Yehova mokɔngɔ mpe balandaki Satana. Banda wana, bakómaki komitambwisa bango moko, kozanga libateli ya Yehova.Ebandeli 3:6-13.

11. Mpo na nini Yehova akangaki miso te na lisumu ya Adama ná Eva?

11 Ntango Adama ná Eva babukaki mobeko ya Nzambe, bazalaki lisusu bato ya kokoka te. Longola yango, bakómaki banguna ya Nzambe mpo ayinaka makambo mabe. Yehova ‘azali na miso ya pɛto oyo ekokoka te komona makambo oyo ezali mabe.’ (Habakuku 1:13) Soki Yehova asalaka eloko moko te mpo na lisumu ya Adama ná Eva, bolamu ya bikelamu na ye nyonso elingaki kozala na likama. Ezala baanzelu to bato bakokaki komituna soki bakoki kotosa liloba na ye. Kasi Yehova azalaka sembo na mitinda na ye; akobuka yango ata mokolo moko te. (Nzembo 119:142) Atako Adama ná Eva bazalaki na bonsomi ya  kopona, bakokaki te kokima makama ya botomboki oyo batombokelaki Yehova. Nsukansuka, bakufaki mpe bazongaki na putulu esika bautaki.Ebandeli 3:19.

12. Nini ekómelaki bana ya Adama?

12 Ntango Adama ná Eva balyaki mbuma, Yehova akokaki lisusu kondima bango te na kati ya libota na ye. Abenganaki bango na elanga ya Edene, mpe bakokaki lisusu kozonga kuna soki moke te. (Ebandeli 3:23, 24) Yehova atikaki bango bányokwama mpo na ekateli na bango. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:4, 5.) Yango wana, bakokaki lisusu te komekola bizaleli ya Yehova na ndenge ya kokoka. Adama abungisaki bomoi ya malamu mpenza oyo ezalaki kozela ye liboso, kaka mpo na ye moko te, kasi mpe mpo na bana na ye. Kasi, atikelaki bana na ye nde ezaleli ya kozanga kokoka, lisumu, mpe liwa. (Baroma 5:12) Adama alongolaki bango libaku ya kozala na bomoi ya seko. Adama ná Eva bakokaki te kobota mwana ya kokoka, bana na bango mpe bakokaki te kobota bana ya kokoka. Banda ntango Satana atindaki Adama ná Eva bápesa Nzambe mokɔngɔ, Zabolo azali koluka kotinda bato nyonso básala kaka bongo.Yoane 8:44.

LISIKO ESALI ETE BATO BÁZALA NA BOYOKANI MALAMU NA NZAMBE

13. Yehova alingaki nini mpo na bato?

13 Yehova akobaki kaka kolinga bato. Atako Adama ná Eva baboyaki ye, alingaki kaka ete bato bázala na boyokani ya malamu elongo na ye. Mpe alingaki te ete ata moko na bango abomama. (2 Petro 3:9) Yango wana, Nzambe azwaki mbala moko bibongiseli mpo bato bákoka lisusu kozala na boyokani elongo na ye. Ndenge nini akokaki kosala yango kozanga kobuka mitinda na ye moko? Tótala ndenge asalaki yango.

14. (a) Na kotalela Yoane 3:16, Nzambe asalaki nini mpo na kosikola bato na lisumu mpe na liwa? (b) Motuna nini tokoki kotuna bato?

14 Tángá Yoane 3:16. Bato mingi oyo tobengisaka na Ekaniseli bayebi vɛrsɛ oyo na motó. Kasi ndenge nini mbeka ya Yesu esali ete bato bázala na likoki ya kozwa bomoi ya seko? Tozali na libaku ya kosalisa bato bázwa eyano na motuna wana ntango tozali kobengisa bango na Ekaniseli, ntango tokozala elongo na bango na Ekaniseli, mpe ntango tokozongela bango nsima ya Ekaniseli. Soki bakangi ntina ya lisiko, bakoyeba mpe ete Yehova alingaka bato mingi mpe atondi na bwanya. Makambo nini etali lisiko tokoki kosolola na bango?

15. Ndenge nini Yesu akesanaki na Adama?

15 Yehova abongisaki ete moto moko ya kokoka apesa bomoi na ye lokola lisiko. Moto yango ya kokoka asengelaki kozala sembo epai ya Yehova. Asengelaki kondima kopesa bomoi na ye mpo na bato. (Baroma 5:17-19) Yehova alongolaki bomoi ya Yesu, ekelamu na ye ya liboso, kuna na likoló mpe atindaki ye awa na mabele. (Yoane 1:14) Yango wana, Yesu azalaki moto ya kokoka, kaka ndenge Adama azalaki. Kasi, na kokesana na Adama, Yesu atosaki mitinda oyo Yehova azalaki kozela ete moto ya kokoka atosa yango. Ata na ntango ya komekama makasi, Yesu abukaki mibeko ya Nzambe soki moke te.

16. Mpo na nini lisiko ezali likabo moko ya motuya mingi?

16 Lokola Yesu akufaki moto ya kokoka, akoki kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. Akokanaki mpenza na Adama na makambo nyonso oyo Adama asengelaki kozala na yango. Yesu azalaki moto ya kokoka, moto ya sembo mpenza, mpe azalaki kotosa Nzambe. (1 Timote 2:6) Akufelaki biso, mpe mbeka na ye epesi mibali, basi, mpe bana nyonso libaku ya kozala na bomoi ya seko. (Matai 20:28)  Lisiko efungoli nzela mpo mokano ya Nzambe ekokisama.2 Bakorinti 1:19, 20.

YEHOVA AFUNGOLAKI NZELA MPO TÓZONGELA YE

17. Makambo nini ekosalema na nzela ya lisiko?

17 Yehova apesaki lisiko atako ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na ye. (1 Petro 1:19) Azwaka biso na motuya mingi, yango wana atikaki ete Mwana na ye ya bolingo akufela biso. (1 Yoane 4:9, 10) Na ndenge yango, tokoki koloba ete Yesu akómi tata na biso, na esika ya Adama. (1 Bakorinti 15:45) Yesu apesi biso libaku ya kozala na bomoi ya seko mpe libaku ya kozala lisusu na kati ya libota ya Nzambe. Na nzela ya mbeka ya lisiko, bato bakokóma bato ya kokoka mpe Yehova akoki kondima lisusu ete bákɔta na libota na ye, kozanga ete abuka mibeko na ye moko. Kanisá ndenge oyo bomoi ekozala ntango bato nyonso oyo bazali sembo epai ya Yehova bakokóma bato ya kokoka! Nsukansuka, bato nyonso kuna na likoló mpe awa na mabele bakozala na bomoko lokola libota moko. Biso nyonso tokokóma bana ya Nzambe.Baroma 8:21.

18. Ntango nini Yehova akokóma “makambo nyonso epai ya moto nyonso”?

18 Atako baboti na biso ya liboso baboyaki kotosa Yehova, atikaki te kolinga bato, mpe apesaki lisiko. Lisusu, atako tozali bato ya kozanga kokoka, Satana akoki te kopekisa biso tózala sembo epai ya Yehova. Na nzela ya lisiko, Yehova akosalisa biso tókóma mpenza bato ya sembo. Kanisá ndenge oyo bomoi ekozala ntango moto nyonso “oyo azali komona Mwana mpe azali kondimela ye” akozwa bomoi ya seko! (Yoane 6:40) Tata na biso ya bolingo mpe ya bwanya akokokisa mokano na ye mpe akosalisa bato bákóma bato ya kokoka. Na nsima, Yehova akokóma “makambo nyonso epai ya moto nyonso.”1 Bakorinti 15:28.

19. (a) Botɔndi mpo na lisiko esengeli kotinda biso tósala nini? (Talá etanda “ Tókoba koluka bato oyo babongi.”) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Botɔndi na biso mpo na lisiko esengeli kotinda biso tóyebisa bato mosusu makambo oyo etali likabo wana ya motuya mingi. Bato basengeli koyeba ete na nzela ya lisiko, Yehova, na bolingo na ye, apesi bato nyonso libaku ya kozala na bomoi ya seko. Kasi lisiko esali makambo mosusu mingi kolela oyo wana. Esukisi ntembe oyo Satana abimisaki na elanga ya Edene. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo esukisaki ntembe yango.