Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2017

Lisiko—‘Libonza oyo ekoki mpenza’ oyo euti na Tata

Lisiko—‘Libonza oyo ekoki mpenza’ oyo euti na Tata

“Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza . . . eutaka na Tata.”YAKOBO 1:17.

NZEMBO: 148, 109

1. Makambo nini ya malamu tokozwa na nzela ya lisiko?

MBEKA ya lisiko ya Yesu Kristo ememi mapamboli mingi. Na ndakisa, ebongiseli ya lisiko esali ete mokolo mosusu bana nyonso ya Adama oyo balingaka boyengebene bákɔta lisusu na libota ya Nzambe. Lipamboli mosusu ezali ete tokoki kozala na bomoi ya esengo mpo na libela. Longola yango, lisiko ezali na boyokani na makambo mosusu ya ntina mingi oyo etali bato oyo bakokende na likoló mpe baoyo bakozwa bomoi ya seko awa na mabele.Baebre 1:8, 9.

2. (a) Makambo nini ya ntina mingi etali likoló mpe mabele Yesu alobelaki na libondeli na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Mbula soki mibale liboso ete Yesu akufa, ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Na lisolo oyo, tokomona boyokani oyo lisiko ezali na yango na kosantisama ya nkombo ya Yehova, Bokonzi ya  Nzambe, mpe kokokisama ya mokano ya Nzambe.

“NKOMBO NA YO ESANTISAMA”

3. (a) Nkombo ya Yehova emonisaka nini? (b) Ndenge nini Satana abebisaki lokumu ya nkombo ya Yehova?

3 Libosoliboso, Yesu abondelaki mpo ete nkombo ya Yehova esantisama, to ezala mosantu. Nkombo ya Yehova emonisaka Yehova ye moko, elingi koloba bomoto na ye mpenza. Azali Moto oyo aleki na nguya mpe aleki na bosembo na molɔ́ngɔ́ mobimba. Yesu abengaki ye mpe “Tata mosantu.” (Yoane 17:11) Lokola Yehova azali mosantu, likambo nyonso oyo asalaka mpe mibeko nyonso oyo apesaka ezali mosantu. Kasi na Edene, na mayele nyonso Satana abɛtaki ntembe na lotomo oyo Nzambe azali na yango ya kotyela bato mibeko. Alobaki lokuta mpo na Yehova mpe abebisaki lokumu ya nkombo ya Nzambe.Ebandeli 3:1-5.

4. Ndenge nini Yesu asantisaki nkombo ya Nzambe?

4 Yesu na ngámbo na ye, azalaki mpenza kolinga nkombo ya Yehova mpe asalaki nyonso oyo akokaki kosala mpo na kosantisa yango. (Yoane 17:25, 26) Ndenge nini? Na etamboli na ye mpe mateya na ye, Yesu asalisaki basusu bámona ete mitinda ya Yehova ezali sembo mpe ete likambo nyonso oyo asɛngaka biso tósala ezali mpo na bolamu na biso. (Tángá Nzembo 40:8-10.) Ata ntango oyo Satana anyokolaki ye mpe akufaki liwa ya mpasi, Yesu atikalaki sembo. Amonisaki ete moto ya kokoka akoki kotosa Yehova na motema moko.

5. Ndenge nini tosantisaka nkombo ya Yehova?

5 Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka nkombo ya Yehova? Na etamboli na biso. Yehova asɛngaka biso tózala basantu. (Tángá 1 Petro 1:15, 16.) Yango elingi koloba ete tosengeli kosambela kaka ye mpe kotosa kaka ye na motema na biso mobimba. Ata ntango bazali konyokola biso, tosalaka nyonso tózala na bomoi oyo eyokani na makambo oyo Yehova ateyaka biso. Ntango tozali kotosa mitinda ya Yehova na bomoi na biso, tokumisaka nkombo na ye. (Matai 5:14-16) Tomonisaka ete mibeko na ye ezali malamu mpe ete Satana azali mokosi. Tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana tosalaka mabunga. Kasi soki tosali mabunga, tobongolaka motema mpe tosalaka makasi tótika kosala makambo oyo ebebisaka lokumu ya nkombo ya Nzambe.Nzembo 79:9.

6. Mpo na nini Yehova atángaka biso bayengebene, atako tozali bato ya kozanga kokoka?

6 Ezala tozali bakristo oyo batyami mafuta na elimo to “bampate mosusu,” Yehova alimbisaka masumu na biso soki tozali kondima lisiko. Andimaka biso lokola basambeli na ye oyo bamipesi epai na ye. Atángaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayengebene lokola bana na ye, mpe “bampate mosusu” bayengebene lokola baninga na ye. (Yoane 10:16; Baroma 5:1, 2; Yakobo 2:21-25) Yango wana, banda sikoyo, lisiko esali ete tózala na boyokani malamu na Tata na biso ya likoló mpe tósantisa nkombo na ye.

“BOKONZI NA YO EYA”

7. Lisiko ekomema mapamboli nini?

7 Na libondeli ya ndakisa, Yesu alobaki: “Bokonzi na yo eya.” Ndenge nini lisiko ezali na boyokani na Bokonzi ya Nzambe? Bokonzi ya Nzambe, to guvɛrnema na ye, esalemi na Yesu mpe bato 144 000 oyo baponami awa na mabele. Lisiko esali ete bato wana básekwisama  mpo na kozala na bomoi na likoló. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1) Bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe mpe bakoyangela mabele elongo na Yesu na boumeli ya mbula nkóto. Na ntango wana, Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo na kokómisa mabele mobimba paradiso mpe kosalisa bato bákóma bato ya kokoka. Nsukansuka, basaleli ya Yehova kuna na likoló mpe awa na mabele bakokóma libota moko. (Emoniseli 5:13; 20:6) Yesu akoboma Satana mpe akosilisa mikakatano nyonso abimiselá bato.Ebandeli 3:15.

8. (a) Ndenge nini Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba malamumalamu ntina ya Bokonzi ya Nzambe? (b) Ndenge nini topesaka Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ lelo oyo?

8 Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba malamumalamu ntina ya Bokonzi ya Nzambe. Na ndenge nini? Nsima ya batisimo na ye, Yesu abandaki kosakola “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe” bisika nyonso oyo azalaki koleka. (Luka 4:43) Ayebisaki mpe bayekoli na ye ete bakozala batatoli na ye “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Misala 1:6-8) Lelo oyo, na nzela ya mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi, bato bazali na libaku ya koyeba makambo oyo etali lisiko mpe kokóma bato oyo bakoyangelama na Bokonzi ya Nzambe. Tomonisaka ete tozali bato ya sembo oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela ntango topesaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba.Matai 24:14; 25:40.

“MOKANO NA YO ESALEMA”

9. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Yehova akokokisa mokano na ye mpo na bato?

9 Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete: “Mokano na yo esalema”? Soki Yehova alaki likambo, esalemaka kaka. (Yisaya 55:11) Botomboki ya Satana ekokaki te kopekisa ete mokano ya Yehova esalema. Mokano ya Yehova mpo na mabele ezalaki nini? Alingaki ete mabele etonda na bana ya kokoka oyo Adama ná Eva basengelaki kobota. (Ebandeli 1:28) Soki Adama ná Eva bakufaki kozanga ete bábota bana, mokano ya Nzambe ya kotondisa mabele na bana na bango elingaki kokokisama te. Yango wana, Yehova atikaki bango bábota bana. Lisiko epesi bato nyonso oyo bazali komonisa kondima libaku ya kokóma bato ya kokoka mpe kozwa bomoi ya seko. Yehova alingaka bato mpe alingi ete tózala na bomoi ya malamu, kaka ndenge akanaki yango mpo na biso.

10. Ndenge nini lisiko ekopesa bato oyo bakufá matomba?

10 Tokoloba nini mpo na ebele ya bato oyo bakufaki kozanga ete bázwa libaku ya koyeba Yehova? Yehova alingaka ete bato bázala na bomoi. Na yango, akozongisa na bomoi ata bato oyo bakufá. Lisiko efungoli nzela mpo ete bato yango bázongisama na bomoi. Na nsima, bakozwa libaku ya koyekola makambo etali Yehova mpe kozala na bomoi ya seko. (Misala 24:15) Yehova azali liziba ya bomoi. Ntango akozongisa na bomoi bato oyo bakufá, akokóma Tata na bango. (Nzembo 36:9) Na libondeli ya ndakisa, Yesu alobaki ete Yehova azali “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Yehova apesi Yesu mokumba ya ntina mingi ya kosekwisa bakufi. Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.”Yoane 6:40, 44; 11:25.

11. Mokano ya Nzambe mpo na “ebele mpenza ya bato” ezali nini?

11 Yesu alobaki mpe ete: “Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye  nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.” (Marko 3:35) Mokano ya Nzambe ezali ete bato oyo bauti na bikólo nyonso, mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso bákóma basambeli na ye. Babengami “ebele mpenza ya bato oyo ata moto moko te akokaki kotánga.” Bazali kondima lisiko mpe balingi kotosa Nzambe. Bazali kosanzola ye na maloba oyo: “Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.”Emoniseli 7:9, 10.

12. Liteya nini tozwi na libondeli ya Yesu na oyo etali mokano ya Yehova mpo na bato?

12 Libondeli ya ndakisa oyo Yesu asalaki esalisi biso tóyeba makambo mingi mpo na Yehova mpe mokano na ye mpo na bato. Ya liboso, tosengeli kosala nyonso mpo na kosantisa nkombo ya Yehova mpe kopesa ye lokumu. (Yisaya 8:13) Mbeka ya lisiko ya Yesu, oyo esali ete tóbika, epesaka mpe nkombo ya Nzambe lokumu. Kutu, nkombo ya Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.” Ya mibale, Yehova akosalela Bokonzi na ye mpo bato ya botosi bázwa matomba nyonso ya lisiko. Ya misato, tondimisami ete eloko moko te ekoki kopekisa mokano ya Yehova esalema.Nzembo 135:6; Yisaya 46:9, 10.

MONISÁ YEHOVA ETE OZALI NA BOTƆNDI MPO NA LISIKO

13. Mpo na nini tozwaka batisimo?

13 Lolenge ya malamu ya komonisa ete tozali na botɔndi mpo na lisiko ezali komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Ezali na lolenge wana nde tomonisaka ete tozali kondima lisiko mpe ete “tozali bato ya Yehova.” (Baroma 14:8) Ntango tozwaka batisimo, tosɛngaka Yehova apesa biso “lisosoli ya malamu.” (1 Petro 3:21) Yehova apambolaka biso  na nzela ya lisiko. Mpe tondimisami mpenza ete akopesa biso nyonso oyo alaki.Baroma 8:32.

Ndenge nini tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na lisiko? (Talá paragrafe 13, 14)

14. Mpo na nini Yehova asɛngi biso tólingaka basusu?

14 Nyonso oyo Yehova asalaka, asalaka yango na bolingo. Mokano na ye ezali ete basambeli na ye bámekola ye mpe bálinganaka. (1 Yoane 4:8-11) Ntango tolingaka bato, tomonisaka polele ete tozali “bana ya Tata na [biso] oyo azali na likoló.” (Matai 5:43-48) Mibeko mibale oyo eleki monene yango oyo: ya liboso kolinga Yehova, mpe ya mibale kolinga mozalani. (Matai 22:37-40) Lolenge moko ya komonisa ete tolingaka bato ezali kosakwela bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Soki totosi mobeko ya Yehova oyo etali kolinga basusu, mingimingi bandeko na biso bakristo, bolingo oyo tolingaka Yehova ‘ekokóma ya kokoka.’1 Yoane 4:12, 20.

MAPAMBOLI OYO TOZWI EPAI YA YEHOVA NA NZELA YA LISIKO

15. (a) Mapamboli nini tozali kozwa epai ya Yehova banda sikoyo? (b) Mapamboli nini tokozwa na mikolo ezali koya?

15 Yehova alaki biso ete soki tozali kondima lisiko, masumu na biso ‘ekobomama.’ Akoki kolimbisa masumu na biso mpo na libela. (Tángá Misala 3:19-21.) Ndenge tolobaki yango mwa liboso, lisiko esali ete Yehova azwa bato mosusu awa na mabele mpe akómisa bango bana na ye kuna na likoló. Bato yango ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Baroma 8:15-17) Azali kobenga bato oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” bákóma bato ya libota na ye awa na mabele. Ntango bakokóma bato ya kokoka, bakomekama mpo na mbala ya nsuka. Soki batikali sembo epai ya Yehova, akokómisa mpe bango bana na ye. (Baroma 8:20, 21; Emoniseli 20:7-9) Yehova akokoba kolinga bana na ye nyonso. Lisiko ekokoba kopesa biso mapamboli libela na libela. (Baebre 9:12) Yehova apesá biso likabo wana ya motuya mingi, mpe moto moko te akoki kobɔtɔla biso yango.

16. Ndenge nini lisiko elongoli biso na boombo?

16 Soki tobongoli motema mpe totiki masumu, ezali na eloko moko te oyo Zabolo akoki kosala mpo na kopekisa biso tókóma bato ya libota ya Yehova. Yesu akufaki “mbala moko mpo na libela.” Lisiko efutamaki mpo na libela. (Baebre 9:24-26) Adama amemelá biso liwa, kasi mbeka ya Yesu ekomemela biso bomoi ya seko. Lisiko ekoki kolongola biso na boombo ya mokili ya Satana mpe kolongola biso na bobangi ya liwa.Baebre 2:14, 15.

17. Bolingo oyo Yehova alingaka biso elimboli nini mpo na yo?

17 Bilaka ya Nzambe ekokokisama ntango nyonso. Ndenge kaka mibeko oyo Yehova atyá na molɔ́ngɔ́ ebongwanaka te, Yehova mpe akobongwana soki moke te. Akoyokisa biso nsɔni ata mokolo moko te. (Malaki 3:6) Yehova apesá biso likabo ya bomoi, mpe alingaka biso. “Biso moko toyebi mpe tondimi bolingo oyo Nzambe azali na yango epai na biso. Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:16) Bilaka na ye ekokisamaka ntango nyonso. Mosika te, mabele mobimba ekokóma paradiso ya kitoko. Bato nyonso oyo bakozala kuna bakomekola Yehova mpe bakolingana. Na nsima, basaleli na ye nyonso, ezala na likoló to na mabele, bakoloba: “Lipamboli, ná nkembo, ná bwanya, ná matɔndi, ná lokumu, ná nguya, ná makasi ezala na Nzambe na biso libela na libela. Amen.”Emoniseli 7:12.