Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2017

“Tyelá Yehova motema mpe salá malamu”

“Tyelá Yehova motema mpe salá malamu”

“Tyelá Yehova motema mpe salá malamu . . . mpe salá makambo na bosembo.”NZEMBO 37:3.

NZEMBO: 133, 63

1. Yehova akelá bato na makoki nini ya kokamwa?

YEHOVA akelá bato na makoki ya kokamwa. Apesá biso likoki ya kokanisa, oyo esalisaka biso tósilisa mikakatano mpe tóbongisa makambo oyo tokosala na mikolo ezali koya. (Masese 2:11) Apesá biso nguya, mpo tókoka kosala makambo oyo tobongisaki mpe tókokisa mikano na biso. (Bafilipi 2:13) Apesá mpe biso lisosoli, likoki ya koyeba malamu ná mabe, oyo moto nyonso azalaka na yango. Lisosoli esalisaka biso tóboya kosala masumu mpe tóbongisa bisika oyo tosalaki mabunga.Baroma 2:15.

2. Ndenge nini Yehova alingaka ete tósalela makoki na biso?

2 Yehova alingaka ete tósalela makoki na biso na ndenge ya malamu. Mpo na nini? Mpo alingaka biso mpe ayebi ete tokozala na esengo soki tosaleli makabo oyo apesá biso. Na ndakisa, na Makomami ya Ebre, tozali kotánga boye: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba,” mpe “nyonso  oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza.” (Masese 21:5; Mosakoli 9:10) Na Makomami ya Grɛki, tozali kotánga boye: “Soki tozali mpenza na ntango oyo ebongi mpo na yango, tósalela bato nyonso oyo ezali malamu,” mpe “na kotalela lolenge oyo moto na moto azwi likabo, bósalela yango mpo na kosalelana.” (Bagalatia 6:10; 1 Petro 4:10) Tomoni polele ete Yehova alingi ete tósala nyonso oyo tokoki mpo tózwa matomba mpe basusu bázwa yango.

3. Nini emonisi ete makoki ya bato ezali na ndelo?

3 Yehova alingaka ete tósalela makoki na biso, kasi ayebi mpe ete makoki na biso ezali na ndelo. Na ndakisa, tokoki te kolongola kozanga kokoka, lisumu, mpe liwa. (1 Bakonzi 8:46) Lisusu, tokoki te kozala na bokonzi likoló ya bato mosusu, mpo moto nyonso azali na lotomo ya kopona oyo alingi kosala. Longola yango, ata soki tozali na boyebi ya ndenge nini to toyebi makambo mingi, boyebi na biso ekoki soki moke te kokóma lokola oyo ya Yehova.Yisaya 55:9.

Ntango ozali na mikakatano, “tyelá Yehova motema mpe salá malamu”

4. Tokotalela nini na lisolo oyo?

4 Tosengeli ntango nyonso kotika Yehova atambwisa biso, kotya motema ete akosunga biso mpe akosalela biso makambo oyo biso moko tokoki kosala te. Kasi, Yehova alingaka mpe ete tókanisa oyo tokoki kosala mpo na kosilisa mikakatano mpe kosalisa basusu. (Tángá Nzembo 37:3.) Tosengeli ‘kotyela Yehova motema mpe kosala malamu.’ Tosengeli “kosala makambo na bosembo.” Ndenge nini tokoki kosala yango? Tótalela ndakisa ya Noa, Davidi, mpe basaleli ya Yehova mosusu ya sembo oyo batyelaki Yehova motema. Tokomona ete ezalaki na makambo oyo bakokaki kosala te kasi batyaki makanisi na bango kaka na makambo oyo bakokaki kosala.

NTANGO TOFANDI ESIKA MOKO NA BATO MABE

5. Lobelá ndenge makambo ezalaki na mikolo ya Noa.

5 Noa afandaki na mokili oyo “etondi na mobulu” mpe na etamboli ya mbindo. (Ebandeli 6:4, 9-13) Atako ayebaki ete nsukansuka Yehova akoboma mokili wana ya mabe, na ntembe te Noa azalaki koyoka motema mpasi mpo na makambo oyo bato bazalaki kosala. Na yango, Noa ayebaki ete ezalaki na makambo oyo akokaki kosala te, kasi ayebaki mpe ete ezalaki na makambo oyo akokaki kosala.

Ntango batɛmɛli mosala na biso ya kosakola (Talá paragrafe 6-9)

6, 7. (a) Makambo nini Noa akokaki kosala te? (b) Na ndenge nini makambo ya ntango na biso ekokani na oyo ya Noa?

6 Oyo Noa akokaki kosala te: Noa asakolaki  makebisi ya Yehova na bosembo nyonso, kasi akokaki te kondimisa bato nsango yango na makasi. Lisusu, akokaki te koyeisa Mpela na lombangu. Noa asengelaki kotya motema ete Yehova Nzambe akokokisa elaka na ye ya kosukisa mabe mpe kondima ete akosala yango na ntango oyo ebongi.Ebandeli 6:17.

7 Biso mpe tofandi na mokili oyo etondi na mabe, oyo toyebi ete Yehova akani koboma yango. (1 Yoane 2:17) Kasi liboso ete ntango yango ekóma, tokoki te kotinda bato na makasi bándima ‘nsango malamu ya Bokonzi.’ Longola yango, tokoki kosala eloko moko te mpo ‘bolɔzi monene’ eya nokinoki. (Matai 24:14, 21) Lokola Noa, tosengeli kozala na kondima makasi, kotya motema ete etikali moke Nzambe akosilisa mabe nyonso. (Nzembo 37:10, 11) Tondimisami ete Yehova akotika nzela te ete mokili oyo mabe eumela lisusu ata mokolo mobimba soki mokolo oyo atyá ekoki.Habakuku 2:3.

8. Noa atyaki makanisi na ye na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Oyo Noa akokaki kosala: Na esika ete Noa alɛmba nzoto mpo na oyo akokaki kosala te, atyaki nde makanisi na oyo akokaki kosala. Na bosembo nyonso, Noa asakolaki nsango ya makebisi ya Yehova. (2 Petro 2:5) Mosala yango esengelaki kosalisa ye akoba kozala na kondima makasi. Longola kosakola, azalaki kolanda malako ya Yehova mpo na kotonga masuwa.Tángá Baebre 11:7.

9. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Noa?

9 Lokola Noa, biso mpe tozali na mingi ya kosala “na mosala ya Nkolo.” (1 Bakorinti 15:58) Na ndakisa, ekoki kozala ete topesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga mpe kobatela Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani, tosalaka misala na mayangani ya mike mpe ya minene, to tosalaka na biro ya filiale to na biro moko ya kobongola mikanda mosika na Betele. Likambo eleki ntina, tozalaka na mingi ya kosala na mosala ya kosakola, oyo ekómisaka makasi elikya na biso mpo na mikolo ezali koya. Ndeko mwasi moko ya sembo alobaki ete ntango ayebisaka basusu mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa, amonaka ete bato bazali na elikya ata moke te mpe bamonaka ete mikakatano na bango ekosila ata mokolo moko te. Ndenge  ndeko mwasi wana amonisi yango, tozali na elikya, mpe elikya yango ekómaka lisusu makasi ntango toyebisaka yango bato mosusu. Elikya yango esalisaka biso tókoba kopota mbangu mpo na kozwa bomoi!1 Bakorinti 9:24.

NTANGO TOSALI LISUMU

10. Lobelá likambo oyo ekómelaki Davidi.

10 Mokonzi Davidi azalaki moto ya sembo, mpe Yehova azalaki kolinga ye mingi. (Misala 13:22) Atako bongo, Davidi asalaki ekobo na Bate-sheba, likambo oyo ezalaki lisumu monene. Likambo ya mabe koleka, alukaki kobomba lisumu na ye na ndenge asalaki mwango ya kobomisa na etumba Uriya, mobali ya Bate-sheba. Kutu, Davidi atindaki na mabɔkɔ ya Uria ye moko mokanda oyo ezalaki na malako ya kobomisa ye! (2 Samwele 11:1-21) Nsukansuka, lisumu ya Davidi eyebanaki. (Marko 4:22) Ntango likambo yango eyebanaki, Davidi asalaki nini?

Masumu na biso ya kala (Talá paragrafe 11-14)

11, 12. (a) Nsima ya kosala lisumu, eloko nini Davidi akokaki kosala te? (b) Yehova akosala nini soki tobongoli motema?

11 Oyo Davidi akokaki kosala te: Davidi akokaki te kolongola lisumu oyo asalaki. Kutu, asengelaki konyokwama bomoi na ye mobimba mpo na mbuma mabe ya lisumu oyo asalaki. (2 Samwele 12:10-12, 14) Yango wana, asengelaki kozala na kondima. Asengelaki kotya motema ete soki abongoli mpenza motema, Yehova akolimbisa ye mpe akosalisa ye ayika mpiko na mikakatano ya lisumu na ye.

12 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tosalaka masumu. Kasi mabunga mosusu ezalaka minene koleka mosusu, mpe na bantango mosusu tokoki te kolongola mabunga oyo tosalaki. Biso mpe tokoki konyokwama mpo na mbuma mabe ya makambo oyo tosali. (Bagalatia 6:7) Kasi totyaka motema na elaka ya Nzambe oyo elobi ete soki tobongoli motema, akosunga biso na ntango ya mpasi, ata soki mikakatano yango euti na mabunga na biso moko.Tángá Yisaya 1:18, 19; Misala 3:19.

13. Ndenge nini Davidi azongisaki boyokani na ye na Yehova?

13 Oyo Davidi akokaki kosala: Davidi azalaki na mposa ya kozongisa boyokani na ye na Yehova. Ndenge nini asalaki yango? Davidi atikaki Yehova asalisa ye. Na ndakisa, andimaki ete Natane, mosakoli ya Yehova, asembola ye. (2 Samwele 12:13) Lisusu, Davidi abondelaki Yehova mpe ayambolaki masumu na ye, amonisaki ete alingi mpenza ete Yehova andima ye lisusu. (Nzembo 51:1-17) Na esika ete Davidi amitungisa koleka ndelo mpo na ngambo oyo amemaki, azwaki nde liteya na mabunga na ye. Azongelaki lisusu te masumu wana ya minene. Bambula mingi na nsima, akufaki sembo, mpe ezali ndenge wana nde Yehova akanisaka ye.Baebre 11:32-34.

14. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Davidi?

14 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Davidi? Soki tosali lisumu ya monene, tosengeli kobongola mpenza motema, koyambola lisumu na biso epai ya Yehova, mpe kosɛnga ye alimbisa biso. (1 Yoane 1:9) Tosengeli mpe koyebisa bankulutu lisumu yango, mpo bakoki kosalisa biso tózongisa boyokani na biso na Yehova. (Tángá Yakobo 5:14-16.) Soki tondimi lisalisi ya Yehova, tokomonisa ete totyaka motema na elaka na ye ya kolimbisa biso. Longola yango, tosengeli kozwa mateya na mabunga na biso mpe kokoba kosalela Yehova na elikya ete akolimbisa biso.Baebre 12:12, 13.

NA MABAKU MOSUSU

Mikakatano ya nzoto (Talá paragrafe 15)

15. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Hana?

15 Mbala mosusu, ozali kokanisa basaleli mosusu ya sembo ya Yehova oyo Biblia elobeli, oyo batyelaki ye motema ntango bazalaki kosala nyonso oyo bakoki na ntango ya mpasi. Tózwa ndakisa ya Hana, oyo azalaki kobota te. Akokaki te kobongola likambo yango. Kasi, atyelaki Yehova motema ete akobɔndisa ye. Yango wana, akobaki kosambela na tabernakle mpe kobondela Yehova mpo na koyebisa ye ndenge oyo azalaki  komiyoka. (1 Samwele 1:9-11) Azali mpenza ndakisa malamu mpo na biso! Soki maladi moko ezali kotungisa biso to tozali na mikakatano mosusu oyo tokoki kobongola te, tosengeli kobwakela Yehova mitungisi na biso mpe kotyela ye motema ete akotyela biso likebi. (1 Petro 5:6, 7) Lisusu, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tózwa matomba na makita ya lisangá mpe mateya mosusu oyo ebongiseli ya Yehova ezali kopesa biso.Baebre 10:24, 25.

Bana oyo batiki kosalela Yehova (Talá paragrafe 16)

16. Liteya nini baboti bakoki kozwa na ndakisa ya Samwele?

16 Tokoloba boni mpo na baboti ya sembo oyo bana na bango batiki kosalela Yehova? Mosakoli Samwele akokaki te kotinda na makasi bana na ye oyo bakómaki mikóló bátikala sembo epai ya Nzambe. (1 Samwele 8:1-3) Asengelaki kotika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova. Kasi, Samwele asalaki nyonso oyo akoki mpo na kotikala sembo epai ya Nzambe mpe kosepelisa Tata na ye ya likoló. (Masese 27:11) Lelo oyo, baboti bakristo mingi bakutanaka na likambo ya ndenge wana. Bazalaka na elikya ete, lokola tata ya mwana ya mobulu na ndakisa oyo Yesu apesaki, Yehova asepelaka koyamba lisusu basumuki oyo babongoli motema. (Luka 15:20) Kasi ntango baboti bazali kozela, basengeli kokoba kozala sembo epai ya Yehova, na elikya ete ndakisa na bango ekosalisa bana na bango bázongela ye.

Mikakatano ya mbongo (Talá paragrafe 17)

17. Mpo na nini ndakisa ya mwasi mobola oyo mobali akufá ezali kolendisa?

17 Ndakisa mosusu ya malamu ezali oyo ya mwasi mobola oyo mobali akufá, na eleko ya Yesu. (Tángá Luka 21:1-4.) Akokaki kosala eloko moko te mpo na kopekisa ete mombongo esalema na tempelo, mpe akokaki te kosilisa bobola oyo azalaki na yango. (Matai 21:12, 13) Kasi, lokola azalaki kotyela Yehova motema, yango etindaki ye apesa mabɔkɔ na losambo ya solo. Amonisaki ezaleli ya kokaba na ndenge apesaki “mbongo ya bibende mibale,” mbongo nyonso oyo azalaki na yango. Mwasi wana ya sembo amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema mobimba. Ayebaki ete soki atye mosala ya Yehova na esika ya liboso, Yehova akosala ete azanga te biloko oyo asengeli na yango. Ndenge moko mpe, totyaka motema ete soki totye Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, Yehova akosala ete tózanga te biloko oyo tosengeli na yango.Matai 6:33.

18. Pesá ndakisa ya ndeko moko oyo azalaki na makanisi malamu.

18 Lelo oyo, ebele ya bandeko mibali mpe basi bazali komonisa kondima ya ndenge wana epai ya Yehova na ndenge bazali kotya makanisi na bango nyonso na oyo bakoki kosala, kasi te na oyo bakoki kosala te. Tózwa ndakisa ya ndeko Malcolm, oyo atikalaki sembo tii na liwa na ye na 2015. Ye ná mwasi na ye basalelaki Yehova bambula mingi; na bambula wana nyonso, ezalaki na ntango ya bisengo mpe ntango ya mpasi. Alobaki boye: “Toyebaka te makambo oyo tokokutana na yango na bomoi, mpasi to mikakatano oyo ezali kozela biso. Kasi Yehova apambolaka baoyo batyelaka ye motema.” Toli nini ndeko Malcolm alingaki kopesa? “Bondelá Yehova asalisa yo obota mbuma mingi mpe ozala na molende na mosala na ye. Tyá makanisi na makambo oyo okoki kosala, kasi te na oyo okoki kosala te.” *

19. (a) Mpo na nini mokapo ya mobu 2017 ebongi mpenza? (b) Ndenge nini okosalela mokapo ya mobu 2017 na bomoi na yo?

19 Mokili oyo mabe ezali kokóma “lisusu mabe koleka,” yango wana tosengeli koyeba ete tokokutana lisusu na mikakatano mingi. (2 Timote 3:1, 13) Lelo oyo, koleka liboso, ezali na ntina mingi ete tóboya kotika mikakatano elekela biso motó. Tosengeli nde kotyela Yehova motema mobimba mpe kotya makanisi nyonso na makambo oyo tokoki kosala. Yango wana, mokapo ya mobu 2017 ebongi mpenza; elobi: “Tyelá Yehova motema mpe salá malamu!”Nzembo 37:3.

Mokapo ya mobu 2017: “Tyelá Yehova motema mpe salá malamu.”Nzembo 37:3

^ par. 18 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2013, nkasa 17 tii 20.