Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2017

“Pesá bato ya sembo makambo yango”

“Pesá bato ya sembo makambo yango”

“Pesá bato ya sembo makambo yango, bongo bango mpe bakoyeba mpenza koteya bato mosusu.”2 TIMOTE 2:2.

NZEMBO: 123, 53

1, 2. Ndenge nini bato mingi batalelaka mosala na bango?

BATO mingi bakanisaka ete valɛrɛ ya moto eyebanaka na mosala oyo asalaka. Na mimeseno ya bamboka mosusu, mpo na koyeba moto malamu, batunaka ye: “Mosala nini osalaka?”

2 Mbala mosusu, ntango Biblia ezali kolobela moto, eyebisaka mpe mosala na ye. Na ndakisa, ebengi “Matai mokɔngɔli-mpako,” ‘Simo, mobongisi-mposo ya nyama,’ mpe “Luka monganga mpe ndeko ya bolingo.” (Matai 10:3; Misala 10:6; Bakolose 4:14) Ntango mosusu, Biblia elobelaka mikumba oyo bato bazalaki na yango na mosala ya Yehova. Na ndakisa, mokonzi Davidi, mosakoli Eliya, mpe ntoma Paulo. Mibali wana bazalaki kozwa na motuya mingi mikumba oyo Yehova apesaki bango. Biso mpe tosengeli kozwa na motuya mingi mokumba nyonso oyo bapesi biso na mosala ya Yehova.

3. Mpo na nini bandeko oyo bakómi mikóló basengeli kopesa bandeko oyo bazali naino bilenge formasyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Tosepelaka kosalela Yehova mpe tozwaka na motuya mingi mikumba na biso. Mingi na biso tolingaka mosala na biso mingi, yango wana tozalaka na mposa ete tókoba kosala yango ntango  nyonso oyo esengeli. Kasi likambo ya mawa, ntango moto azali kokóma mokóló, akokaka lisusu te kosala makambo nyonso oyo amesanaki kosala ntango azalaki naino elenge. (Mosakoli 1:4) Likambo yango ezali kobimisa mikakatano mosusu mpo na basaleli ya Yehova. Lelo oyo, mosala ya kosakola ezali se kokola, mpe ebongiseli ya Yehova ezali kosalela baaparɛyi oyo ezali kobima mikolo oyo mpo na kosalisa bato mingi koleka báyoka nsango malamu. Kasi ntango mosusu ekoki kozala mpasi mpo bandeko oyo bakómi mikóló báyekola lolenge ya sika ya kosala makambo. (Luka 5:39) Longola yango, ezali likambo ya kokamwa te soki moto azali kolɛmba to makasi na ye ezali kosila ntango azali kokóma mokóló. (Masese 20:29) Yango wana, soki bandeko oyo bakómi mikóló bazali kopesa bandeko oyo bazali naino bilenge formasyo mpo bázwa mikumba mosusu na ebongiseli ya Yehova, yango ezali elembo ya bolingo mpe likambo oyo ebongi mpenza.—Tángá Nzembo 71:18.

4. Mpo na nini ezalaka mpasi mpo na basusu kotikela basusu mikumba mosusu? (Talá etanda “ Ntina oyo ekoki kozala mpasi kotikela basusu mikumba mosusu.”)

4 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo bandeko oyo bazali na mikumba bátikela baoyo bazali naino bilenge mikumba mosusu. Likanisi ya kotika mokumba moko oyo bazalaki kolinga mingi ekoki kopesa bandeko yango mawa. Ekoki kosala bango mpasi kotika mokumba moko ya ntina mingi oyo bazalaki kolinga. To bakoki kobanga ete soki batambwisi mosala yango te, ekosalema malamu te. Mbala mosusu bakoki kokanisa ete bazali na ntango te mpo na kopesa basusu formasyo. Na ngámbo mosusu, bandeko oyo bazali naino bilenge basengeli komonisa motema molai soki bazali naino kopesa bango mikumba mosusu te.

5. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

5 Kasi, mpo na nini ezali na ntina mingi ete bandeko oyo bakómi mikóló básalisa bandeko oyo bazali naino bilenge mpo bázwa mikumba mosusu? Ndenge nini bakoki kosala yango? (2 Timote 2:2) Mpe mpo na nini bandeko oyo bazali naino bilenge basengeli kozala na makanisi malamu ntango bazali kosala elongo na bandeko oyo bakómi mikóló, oyo bayebi makambo mingi, mpe koyekola epai na bango? Mpo na kobanda, tótalela ndenge oyo mokonzi Davidi abongisaki mwana na ye mpo na mosala moko ya ntina mingi.

 DAVIDI ABONGISAKI SALOMO

6. (a) Mokonzi Davidi azalaki na mposa ya kosala nini? (b) Yehova ayebisaki ye nini?

6 Na boumeli ya bambula mingi, Davidi anyokwamaki mpe azalaki se kokimakima. Na nsima, ntango akómaki mokonzi, azalaki kofanda na ndako moko ya kitoko. Yango wana, ayebisaki mosakoli Natane boye: “Talá, ngai nafandi na ndako moko ya banzete ya sɛdrɛ, kasi sanduku ya kondimana ya Yehova ezali na kati ya hema.” Davidi azalaki na mposa makasi ya kotongela Yehova tempelo moko kitoko. Natane ayebisaki ye boye: “Nyonso oyo ezali na motema na yo, salá, mpamba te Nzambe ya solo azali na yo.” Kasi Yehova alingaki bongo te. Atindaki Natane akende koyebisa Davidi boye: “Ezali yo te nde okotongela ngai ndako ya kofanda.” Atako Yehova alakaki Davidi ete akozala elongo na ye ntango nyonso, Davidi ayebaki ete mwana na ye moto akotonga tempelo yango. Davidi asalaki nini?1 Ntango 17:1-4, 8, 11, 12; 29:1.

7. Davidi asalaki nini ntango Yehova alobaki ete ye te moto akotonga tempelo?

7 Davidi azalaki mpenza na mposa ya kotongela Yehova tempelo, na yango, ekoki kozala ete nsango wana elɛmbisaki ye mpenza nzoto. Atako bongo, akobaki kaka kopesa mabɔkɔ na mosala oyo mwana na ye Salomo asengelaki kotambwisa. Davidi asalisaki ye na kobongisa bato ya kosala misala mpe koyanganisa bibende, motako, palata, wolo, mpe mabaya. Amitungisaki te ndenge lokumu ya kotonga tempelo esengelaki kokende epai na ye te, mpo na nsima, tempelo yango eyebanaki na nkombo ya tempelo ya Salomo. Alendisaki nde Salomo na maloba oyo: “Sikoyo, mwana na ngai, Yehova azala na yo, mpe yo, osengeli kolonga mpe kotonga ndako ya Yehova Nzambe na yo, ndenge alobaki mpo na yo.”1 Ntango 22:11, 14-16.

8. (a) Mpo na nini Davidi akokaki kokanisa ete Salomo akokoka te kotonga tempelo? (b) Kasi Davidi asalaki nini?

8 Tángá 1 Ntango 22:5. Na ntembe te, Davidi ayebaki ete Salomo akoki naino te mpo na kotambwisa mosala monene ya ndenge wana. Tempelo esengelaki kozala ‘eloko oyo eleki na kitoko’ mpe Salomo azalaki ‘elenge mpe ayebaki naino makambo mingi te.’ Kasi Davidi ayebaki ete Yehova akosalisa Salomo asala mosala wana monene. Yango wana, Davidi asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa Salomo amibongisa mpo na mosala wana monene.

SEPELÁ KOPESA BASUSU FORMASYO

Tosepelaka ntango tozali komona bandeko oyo bazali naino bilenge bazali kozwa mikumba mosusu (Talá paragrafe 9)

9. (a) Ndenge nini bandeko oyo bakómi mikóló basepelaka ete basusu bázwa mikumba? (b) Pesá ndakisa.

9 Bandeko oyo bakómi mikóló basengeli te kolɛmba nzoto soki esɛngi ete bápesa bandeko oyo bazali naino bilenge mikumba mosusu. Biso nyonso toyebi ete likambo eleki ntina sikoyo ezali mosala ya Yehova. Kopesa bilenge formasyo mpo bákokisa mikumba mosusu ekosala ete mosala yango ekende liboso. Tózwa ndakisa oyo: Ntango ozalaki mwana moke, mbala mosusu ozalaki komona tata na yo azali kotambwisa motuka. Ntango okolaki mwa moke, alakisaki yo ndenge batambwisaka motuka. Na nsima, ozwaki mokanda oyo epesaka ndingisa ya kotambwisa motuka (permis de conduire) mpe okómaki kotambwisa yo moko. Atako bongo, tata  na yo azalaki kaka kopesa yo toli. Mikolo mosusu yo moto ozalaki kotambwisa, mpe mikolo mosusu ye. Kasi, ntango tata na yo akómaki mobange, mbala mingi yo moto okómaki kotambwisa. Tata na yo azalaki komona yango mabe? Te, na ntembe te azalaki nde kosepela komona yo ozali kotambwisa ye. Ndenge moko mpe, bandeko oyo bakómi mikóló basepelaka komona ndenge bandeko oyo bazali naino bilenge, oyo bapesaki formasyo, bazali kokɔmela mpe kozwa mikumba na ebongiseli ya Yehova.

10. Moize ayokaki ndenge nini na likambo etali kozwa lokumu mpe kozala na mikumba?

10 Tosengeli kokeba ete tóyokela basusu zuwa te mpo na mikumba oyo bazwi. Tokoki kozwa liteya na likambo oyo Moize asalaki ntango Bayisraele mosusu bakómaki kosala lokola basakoli. (Tángá Mitángo 11:24-29.) Yosua alingaki kopekisa bango, kasi Moize alobaki na ye boye: “Ozali nde koyoka zuwa mpo na ngai? Te, nakolinga kutu bato nyonso ya Yehova bázala basakoli, mpo Yehova akotyela bango elimo na ye!” Moize ayebaki ete Yehova nde azalaki kotambwisa mosala. Na esika ya koluka lokumu mpo na ye moko, Moize alingaki ete basaleli nyonso ya Yehova bázwa mikumba. Bongo biso? Tosepelaka ntango basusu bazwi mikumba na mosala ya Yehova?

11. Ndeko moko alobaki nini na likambo etali kopesa basusu mikumba?

11 Ezali na bandeko ebele oyo basali mosala makasi bambula mingi na mosala ya Yehova mpe bapesá bandeko oyo bazali naino bilenge formasyo mpo bázwa mikumba mosusu. Tózwa ndakisa ya ndeko Peter. Ye asili kolekisa mbula 74 na mosala ya ntango nyonso; kati na yango, mbula 35 alekisi yango na Betele moko na Mpoto. Na boumeli ya bambula mingi, ye moto azalaki mokɛngɛli ya Departema ya mosala. Na nsima, bapesaki mokumba yango na ndeko Paul, oyo ndeko Peter azali mokóló na ye, mpe ye nde apesaki ye formasyo. Ndeko Peter amonaki nde mabe mpo na mbongwana wana? Te. Alobi boye: “Nazali na esengo mingi komona ete bandeko bazwi formasyo mpe bandimi kozwa mikumba minene mpe bazali kokokisa mosala na bango malamu.”

ZWÁKÁ BANDEKO OYO BAKÓMI MIKÓLÓ NA MOTUYA MINGI

12. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Rehoboame?

12 Ntango Rehoboame, mwana ya Salomo, akómaki mokonzi, asɛngaki toli epai ya mikóló mpo na ndenge ya kokokisa mokumba na ye ya sika. Kasi na nsima, aboyaki kolanda toli na bango! Alandaki nde toli ya bilenge mibali mosusu oyo akolaki na bango. Yango ebimisaki mpasi mingi. (2 Ntango 10:6-11, 19) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye? Ezali likambo ya bwanya koluka toli epai ya mikóló mpe bato oyo bayebi makambo mingi koleka biso. Bandeko oyo bazali naino bilenge basengeli te kokanisa ete esengeli bákoba kosala makambo kaka ndenge bazalaki kosala liboso. Basengeli nde komemya makanisi ya bandeko oyo bakómi mikóló mpe basengeli te kokanisa nokinoki ete lolenge oyo mikóló basalaka makambo ezali malamu te.

13. Ndenge nini bandeko oyo bazali naino bilenge basengeli kosala elongo na bandeko oyo bakómi mikóló?

13 Ntango mosusu, bapesaka bandeko oyo bazali naino bilenge mokumba ya kozala bakɛngɛli na misala ya bandeko oyo bakómi mikóló mpe bayebi makambo mingi. Bandeko yango bakomonisa ete bazali na bwanya soki bazali koyekola epai ya mikóló yango. Na ndakisa oyo topesaki liboso, ntango ndeko Paul azwaki esika ya ndeko Peter lokola mokɛngɛli ya departema moko ya Betele, ndeko Paul alobaki boye: “Nakendaki koluka toli epai ya ndeko Peter, mpe nalendisaki bandeko mosusu ya departema básalaka mpe bongo.”

14. Liteya nini tozwi na ndenge oyo Timote ná ntoma Paulo basalaki elongo?

14 Ntoma Paulo azalaki mpenza mokóló ya Timote; atako bongo, basalaki elongo na boumeli  ya bambula mingi. (Tángá Bafilipi 2:20-22.) Ntoma Paulo akomelaki Bakorinti boye: “Nazali kotindela bino Timote, mpo azali mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo na kati ya Nkolo; mpe akokundwela bino ndenge na ngai ya kosala na mosala ya Kristo Yesu, kaka ndenge nazali koteya epai nyonso na lisangá mokomoko.” (1 Bakorinti 4:17) Maloba wana esalisi biso tómona polele ete ntoma Paulo ná Timote bazalaki kosala elongo mpe kosalisana. Ntoma Paulo azwaki ntango ya koteya Timote ‘ndenge na ye ya kosala na mosala ya Kristo,’ mpe Timote ayekolaki malamu. Ntoma Paulo azalaki kolinga Timote mingi mpe andimisamaki ete Timote akosalisa malamu bandeko ya Korinti. Bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo ntango bazali kopesa bandeko formasyo mpo na kotambwisa lisangá.

MOKOMOKO NA BISO AZALI NA MOKUMBA YA NTINA MINGI

15. Ndenge nini Baroma 12:3-5 ezali kosalisa biso tóndima mbongwana?

15 Tozali na eleko oyo makambo minene ezali kosalema. Eteni ya ebongiseli ya Yehova oyo ezali awa na mabele ezali kokola na ndenge mingi. Yango elimboli ete makambo ekokoba kobongwana se kobongwana. Mbongwana yango mosusu ezali kosimba mokomoko na biso mpe ezali pɛtɛɛ te kondima yango. Soki tozali na komikitisa mpe tozali komona libosoliboso matomba ya mosala ya Bokonzi, kasi te makambo oyo biso moko tolingi, mbongwana yango ekosalisa biso. Soki tosali bongo, tokobatela bomoko na biso. Ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Roma boye: “Nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.” Na nsima, alimbolaki ete kaka ndenge enama mokomoko ya nzoto na biso ezalaka na mosala na yango, ndeko mokomoko ya lisangá azali na mokumba na ye.Baroma 12:3-5.

16. Mokristo mokomoko akoki kosala nini mpo na kobatela kimya mpe bomoko na kati ya ebongiseli ya Yehova?

16 Basaleli nyonso ya Yehova balingaka kopesa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi mpe kosala nyonso oyo basɛngi bango básala. Bandeko oyo bakómi mikóló bakoki kopesa baoyo bazali naino bilenge formasyo. Bandeko oyo bazali naino bilenge bakoki kokokisa mikumba mingi na bopɔlɔ mpe na limemya. Mpe bandeko mibali oyo babalá basepelaka mingi soki basi na bango bazali kopesa bango mabɔkɔ ata ntango makambo ebongwani. Bandeko basi yango bakoki komekola Prisile, oyo asalaki na bosembo elongo na mobali na ye Akila.Misala 18:2.

17. Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo mpo básala nini?

17 Yesu atiká ndakisa eleki malamu ya moto oyo andimaki kopesa basusu formasyo. Yesu ayebaki ete basusu bakokoba na mosala oyo abandisaki. Ya solo, ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki bato ya kozanga kokoka. Kasi azalaki na kondima ete bakopalanganisa nsango malamu mingi koleka ye. (Yoane 14:12) Apesaki bango formasyo ya malamu, bango mpe bazalaki na likoki ya kosakola na ekólo nyonso oyo bakokaki kokende.Bakolose 1:23.

18. (a) Mosala nini tokozala na yango na mikolo ezali koya? (b) Mosala nini tozali na yango sikoyo?

18 Na nsima, Yesu akufaki, mpe Yehova asekwisaki ye, mpe apesaki ye misala mosusu mingi mpe bokonzi mingi “mosika mpenza koleka guvɛrnema nyonso mpe bokonzi mpe nguya mpe bonkolo.” (Baefese 1:19-21) Lokola tozali basaleli ya Yehova, soki tokufi sembo liboso ya Armagedone, tokozongisama na bomoi mpe tokozala na mosala mingi ya ntina mpenza na mokili ya sika. Kasi sikoyo, biso nyonso tozali na mokumba monene ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. Yango wana, tózala bilenge to mikóló, mokomoko na biso akoki kokoba ‘kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.’1 Bakorinti 15:58.