Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2017

Okoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango omekami

Okoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango omekami

‘Tambolá na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo!’MIKA 6:8.

NZEMBO: 48, 95

1-3. (a) Eloko nini mosakoli oyo autaki na Yuda asalaki te? (b) Yango ebimisaki nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

YEROBOAME, mokonzi ya Yisraele atyaki etumbelo ya losambo ya lokuta na engumba Betele. Yehova atindaki mosakoli moko ya Yuda mpo akende koyebisa Yeroboame nsango moko ya lisambisi. Mosakoli yango ya komikitisa atosaki Yehova mpe ayebisaki Yeroboame nsango yango. Mokonzi yango asilikelaki mosakoli, kasi Yehova abatelaki mosakoli yango.1 Bakonzi 13:1-10.

2 Yehova apesaki mosakoli yango mitindo ete alya eloko te mpe amɛla mai te na Yisraele, mpe azonga epai na ye na nzela mosusu. Kasi ntango azalaki kozonga, na nzela, akutanaki na mosakoli moko ya mobange, oyo akosaki ye, na ndenge ayebisaki ye ete Yehova atindi nsango mosusu na nzela na ye. Mosakoli ya mobange asɛngaki ete bázonga na ndako na ye, mpo alya limpa mpe amɛla mai. Mosakoli wana atosaki Yehova te mpe azongaki elongo na mosakoli yango ya mobange. Kasi, Yehova asepelaki te na likambo yango. Ntango mosakoli yango azalaki kozonga, na nzela, nkɔsi moko ebimelaki ye mpe ebomaki ye.1 Bakonzi 13:11-24.

3 Toyebi te ntina oyo mosakoli wana andimaki koyokela mosakoli ya mobange, na esika ya koyokela Yehova. Kasi toyebi ete akobaki  te “kotambola na bopɔlɔ” elongo na Yehova. (Tángá Mika 6:8.) Na Biblia, kotambola elongo na Yehova elimboli kotyela ye motema, kolanda litambwisi na ye, mpe kotosa ye. Moto ya bopɔlɔ ayebaka ete asengeli kobondela ntango nyonso. Soki mosakoli wana azalaki na bopɔlɔ, alingaki kotuna Yehova mpo na koyeba soki malako oyo apesaki ye ebongwani. Ntango mosusu, esɛngaka ete biso mpe tózwa bikateli ya minene, mpe mbala mosusu tokoki koyeba malamu te oyo Yehova alingi tósala. Kasi soki tozali na bopɔlɔ, tokosɛnga Yehova alakisa biso nzela mpo tósala te mabunga ya minene.

4. Tokoyekola nini na lisolo oyo?

4 Na lisolo oyo eleki, tomonaki ndimbola ya kozala na bopɔlɔ mpe mpo na nini yango ezali na ntina mpo na biso lelo oyo. Kasi tokoki kosala nini mpo tókóma na bopɔlɔ mingi koleka? Mpe makambo nini ekoki kotya bopɔlɔ na biso na komekama, elingi koloba komonisa soki tozali mpenza na bopɔlɔ to te? Tótalela sikoyo makambo misato oyo ekoki kotya bopɔlɔ na biso na komekama.Masese 11:2.

NTANGO MAKAMBO YA BOMOI NA BISO EBONGWANI

5, 6. Ndenge nini Barazilai amonisaki ete azalaki na bopɔlɔ?

5 Ndenge oyo tosalaka ntango makambo ya bomoi na biso to mikumba na biso ebongwani ekoki komonisa soki tozali mpenza na bopɔlɔ to te. Tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Barazilai, moninga ya sembo ya mokonzi Davidi. Ntango Barazilai azalaki na mbula 80, Davidi abengaki ye aya kofanda na ndako ya mokonzi. Atako yango ezalaki lokumu monene, Barazilai alobaki ete elekaki malamu kopesa mokumba wana na mobali moko na nkombo Kimehame, oyo mbala mosusu azalaki mwana na ye.2 Samwele 19:31-37.

6 Mpo na nini Barazilai andimaki te libyangi wana? Ezalaki nde mpo na kokima mikumba to koluka bomoi oyo ezangi mindɔndɔ? Te, ezali mpo Barazilai azalaki na bopɔlɔ. Ayebaki ete bomoi na ye ebongwanaki mpe andimaki esika makoki na ye esuki. (Tángá Bagalatia 6:4, 5.) Lokola Barazilai, tosengeli kozala na bopɔlɔ. Na esika ya kotingama kaka na oyo biso tolingi to komikokanisa na basusu, tosalaka nyonso tópesa Yehova oyo eleki malamu. Yango ezali na ntina mingi koleka kozala na mokumba moko boye to koyebana mingi. (Bagalatia 5:26) Soki tozali na bopɔlɔ, tokosala elongo na bandeko mpo na kokumisa Yehova mpe kosalisa basusu.1 Bakorinti 10:31.

7, 8. Ndenge nini bopɔlɔ esalisaka biso tómityela motema mingi te?

7 Ekoki kozala mpasi kokoba kozala na bopɔlɔ soki bapesi biso mikumba mingi to bokonzi mingi. Tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Nehemia. Ntango Nehemia ayokaki ete bato ya Yerusaleme bazalaki na mikakatano mingi, abondelaki Yehova asalisa bango. (Nehemia 1:4, 11) Yehova ayanolaki na libondeli ya Nehemia. Mokonzi Artazerezese akómisaki Nehemia guvɛrnɛrɛ na Yerusaleme. Atako Nehemia azalaki na nguya mpe na bozwi, amityelaki motema soki moke te. Alukaki litambwisi ya Yehova mpe azalaki kotánga Mobeko na ye mbala na mbala. (Nehemia 8:1, 8, 9) Nehemia azalaki na bokonzi likoló ya bato ebele. Kasi asalelaki soki moke te bokonzi na ye mpo na matomba na ye moko mpe asalelaki bato makambo na nko te.Nehemia 5:14-19.

8 Lokola Nehemia, soki bapesi biso mikumba mingi to tozwi mokumba moko boye, tosengeli kondimisama ete tozali kaka na bopɔlɔ. Tolingi te kotya motema na makoki na biso moko to na ebele ya makambo oyo toyebi. Ndenge nini moto akoki kobanda komityela motema mingi? Na ndakisa, nkulutu moko akoki kobanda kosala makambo ya lisangá kozanga kobondela liboso. To, ndeko mobali to ndeko mwasi akoki naino kozwa ekateli, na nsima,  kobondela mpo na kosɛnga Yehova apambola ekateli yango. Nzokande, moto ya bopɔlɔ amityelaka motema mingi te, ata ntango azali kosala likambo moko oyo asalá liboso mbala na mbala. Amikundolaka ntango nyonso ete makoki na ye ekoki soki moke te kokokana na oyo ya Yehova. (Tángá Masese 3:5, 6.) Na mokili ya lelo, bato mingi balukaka kaka matomba na bango moko mpe balingaka kaka koleka basusu. Kasi basaleli ya Yehova bazalaka bongo te. Tokanisaka te ete kozala na mikumba mingi ekómisaka biso bato malamu koleka basusu, ezala na libota to na lisangá. Tokanisaka nde mosala oyo tozali na yango na kati ya ebongiseli ya Nzambe mpe tosalaka na bomoko elongo na bandeko mibali mpe basi.1 Timote 3:15.

NTANGO BASUSU BALOBI NA BISO MABE TO BAKUMISI BISO

9, 10. Ndenge nini bopɔlɔ ekoki kosalisa biso ntango basusu balobi na biso mabe?

9 Ekoki kosala biso mpasi soki moto moko alobi na biso mabe to asaleli biso makambo na bosembo te. Likambo yango ekómelaki Hana. Atako mobali na ye azalaki kolinga ye mingi, Hana azalaki na esengo te. Mbanda na ye Penina azalaki kotyola ye ntango nyonso. Hana azalaki na mposa ya bana, kasi azalaki kobota te. Mokolo moko, Hana azalaki na mawa makasi mpe akendaki na tabernakle mpo na kobondela. Nganga-nzambe monene Eli amonaki ye azali kolela mpe alobaki na ye ete alangwe masanga! Kanisá nkanda oyo Hana akokaki koyoka! Atako bongo, Hana ayanolaki Eli na limemya nyonso. Na nsima, Hana asalaki libondeli oyo emonisaki ete azalaki na kondima epai ya Yehova mpe azalaki kolinga ye.1 Samwele 1:5-7, 12-16; 2:1-10.

10 Bopɔlɔ ekoki kosalisa biso tókoba ‘kosala malamu mpo na kolonga mabe.’ (Baroma 12:21) Ebongiseli ya Satana etondi na makambo ya mabe. Yango wana, tosengeli kokamwa te soki basaleli biso makambo na bosembo te. Atako yango ekoki kopesa biso nkanda, tosengeli kobengana nkanda yango. (Nzembo 37:1) Ekoki kozala lisusu mpasi koleka soki tozali na matata na bandeko mibali to bandeko basi na lisangá. Soki esalemi bongo, tosengeli komekola Yesu. Biblia elobi: “Ntango azalaki kofingama,  azalaki kozongisa kofinga te.” Azalaki nde “ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na bosembo.” (1 Petro 2:23) Yesu azalaki na komikitisa mpe ayebaki ete Yehova akosembola likambo nyonso oyo ezali sembo te. (Baroma 12:19) Biso mpe tolingi kozala na komikitisa mpe koboya ‘kozongisa mabe na mabe.’1 Petro 3:8, 9.

11, 12. (a) Ndenge nini tokoki kokoba kozala na bopɔlɔ ntango basusu bakumisi biso to balobi na biso maloba ya sukali? (b) Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na bopɔlɔ na elateli na biso mpe na bizaleli na biso?

11 Bopɔlɔ na biso ekoki mpe kotyama na komekama ntango bakumisi biso to balobi na biso maloba ya sukali. Bakumisaki Estere mpe balobaki na ye maloba mingi ya sukali. Azalaki moko ya basi oyo balekaki kitoko na Perse. Na boumeli ya mbula mobimba, bazalaki kopesa ye bankisi ya konyɔlisa nzoto elongo na bilenge basi mosusu oyo bazalaki bango nyonso koluka ete mokonzi amona bango kitoko koleka. Kasi mokonzi aponaki Estere mpo azala mwasi na ye. Atako miso ya bato nyonso ekómaki epai na ye, Estere abongwanaki te. Akómaki te komona ete aleki basusu. Akobaki komonisa bopɔlɔ, boboto, mpe limemya.Estere 2:9, 12, 15, 17.

Elateli na biso emonisaka ete tomemyaka Yehova mpe basusu, to emonisaka nde ete tozali na bopɔlɔ te? (Talá paragrafe 12)

12 Soki tozali na bopɔlɔ, elateli na biso mpe bizaleli na biso esengeli komonisa ete tomemyaka basusu mpe tomipesaka nzoto kilo. Na esika ete tómikumisa to tóluka kokamwisa bato, tolukaka nde kozala na “elimo ya kimya mpe ya boboto.” (Tángá 1 Petro 3:3, 4; Yirimia 9:23, 24) Nsukansuka, ndenge oyo biso moko tomitalelaka emonanaka na maloba mpe na misala na biso. Na ndakisa, tokoki koluka kotinda basusu bákanisa ete toleki bango mpo na makambo oyo tosalaka, makambo oyo toyebi, to mpo na bato oyo toyebani na bango. To, tokoki koluka komonisa lokola ete biso moko nde tosalaki likambo moko ya ntina mingi, atako bato mosusu basalisaki biso. Kasi, tózwa ndakisa ya Yesu. Akokaki koluka kokamwisa bato mpo na bwanya oyo azalaki na yango. Nzokande, Yesu azalaki mbala mingi nde kozongela maloba oyo ezali na Liloba ya Nzambe. Alingaki te ete bato bápesa ye lokumu. Azalaki ntango nyonso kolinga ete lokumu nyonso ekende epai ya Yehova.Yoane 8:28.

NTANGO TOZALI KOZWA BIKATELI

13, 14. Ndenge nini bopɔlɔ ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu?

13 Tosengeli kozala na bopɔlɔ ntango tozali kozwa bikateli, to ntango basusu bazali kozwa bikateli oyo etaleli mpe biso. Ntango ntoma Paulo azalaki kofanda na Kaisaria, azalaki na mposa ya kokende na Yerusaleme mpo na kosilisa mosala oyo Yehova apesaki ye. Kasi mosakoli Agabusi ayebisaki ntoma Paulo ete soki akei kuna, bakokanga ye. Bakoki ata koboma ye. Bandeko babondelaki ntoma Paulo akende te. Kasi ntoma Paulo azwaki ekateli ya kokende na Yerusaleme. Ezalaki nde mpo azalaki komityela motema mingi? Te, ntoma Paulo azalaki na bopɔlɔ mpe atyelaki Yehova motema mobimba. Bandeko mpe bazalaki na bopɔlɔ. Yango wana, bandimaki ekateli ya ntoma Paulo mpe batikaki ye akende.Misala 21:10-14.

14 Kozala na bopɔlɔ ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu, ata soki toyebi mpenza te ndenge makambo ekoleka to tozali te na bokonzi ya kobongola makambo. Na ndakisa, tokoki kozala na likanisi ya kobanda mosala ya ntango nyonso. Kasi tokosala nini soki tobɛli? Tokosala nini soki baboti na biso babɛli to bazali na mposa ya lisalisi? Tokosala nini soki tokómi mibange? Tokoki te koyanola na mituna wana nyonso, ata soki tobondeli mpo na yango mpe tozali kokanisa yango. (Mosakoli 8:16, 17) Kasi soki totyeli Yehova motema, tokoyeba esika makoki na biso esuki mpe tokondima yango. Tokotalela makambo nyonso, tokoluka toli,  mpe oyo eleki ntina, tokobondela mpo na koluka litambwisi ya Yehova. Na nsima, tosengeli kolanda litambwisi ya elimo ya Yehova. (Tángá Mosakoli 11:4-6.) Yehova akoki kopambola bikateli na biso, to kosalisa biso tóbongola myango na biso.Masese 16:3, 9.

NDENGE NINI TOKOKI KOMONISA BOPƆLƆ LISUSU MINGI?

15. Ndenge nini komanyola mpo na Yehova ekosalisa biso tókoba kozala na komikitisa?

15 Ndenge nini tokoki komonisa bopɔlɔ lisusu mingi? Tokotalela ndenge minei oyo tokoki kosala yango. Lolenge ya liboso, tosengeli komanyola mpo na Yehova, kokanisa mpo na koluka koyeba soki azali na bomoto ya ndenge nini. Soki tomikokanisi na Yehova, tokomona ete biso tozali moke mpenza mpe toyebi makambo mingi te. (Yisaya 8:13) Kobosana te ete tozali kosala elongo na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, kasi te elongo na moto to anzelu. Komanyola na likambo wana ekosalisa biso tómikitisa “na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe.”1 Petro 5:6.

16. Ndenge nini komanyola na bolingo ya Nzambe esalisaka biso tózala na bopɔlɔ?

16 Lolenge ya mibale ya kokóma na bopɔlɔ mingi ezali komanyola na bolingo monene oyo Yehova alingaka biso. Ntoma Paulo akokanisaki lisangá na nzoto ya moto. Yehova asalá binama nyonso ya nzoto mpo ezala na ntina. (1 Bakorinti 12:23, 24) Mokomoko na biso mpe azali na motuya mingi na miso ya Yehova. Akokanisaka biso na basusu te, mpe atikaka kolinga biso te ntango tosali mabunga. Koyeba ete Yehova alingaka biso ekosalisa biso tómiyoka ete tobatelami.

17. Matomba nini tokozwa soki tozali koluka makambo ya malamu oyo basusu bazali na yango?

17 Lolenge ya misato, tokozala na bopɔlɔ mingi soki tozali koluka makambo ya malamu oyo basusu bazali na yango, ndenge Yehova asalaka. Na esika ya kobenda likebi ya basusu epai na biso to koyebisa bango oyo basengeli kosala, tósɛnga nde bango bápesa biso toli mpe tóndima makanisi na bango. (Masese 13:10) Tokosepela soki bandeko na biso ya mibali mpe ya basi bazwi mikumba mosusu. Mpe totɔndaka Yehova ndenge apesi biso nyonso likoki ya kosalela ye.1 Petro 5:9.

18. Ndenge nini koteya lisosoli na biso ekosalisa biso tózala na bopɔlɔ mingi?

18 Lolenge ya minei, tokokóma na bopɔlɔ mingi soki tozali kosalela mitinda ya Biblia mpo na koteya lisosoli na biso. Mitinda yango eteyaka biso ndenge oyo Yehova amiyokaka mpe akanisaka. Soki toyekoli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango, tokoki kozwa bikateli oyo ekosepelisa ye. Ntango tozali koyekola, kobondela, mpe kosalela makambo oyo toyekoli, lisosoli na biso ekokóma malamu koleka. (1 Timote 1:5) Tokotika basusu bázala liboso, biso na nsima. Soki tosali makambo wana, Yehova alaki ete ‘akosilisa kobongisa biso,’ mpe akosalisa biso tózala na bopɔlɔ mingi.1 Petro 5:10.

19. Nini ekosalisa biso tókoba kozala na bopɔlɔ libela na libela?

19 Ozali kokanisa lisusu mosakoli ya Yuda oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo? Abungisaki bomoi na ye mpe boninga na ye na Yehova mpo akobaki te kozala na bopɔlɔ. Kasi, tokoki kokoba kozala na bopɔlɔ ata soki ezali mpasi kosala bongo. Ndakisa ya basaleli mingi ya sembo ya Yehova emonisi ete ekoki kosalema. Soki tozali kosalela Yehova banda ntango molai, tokotyela ye motema mingi koleka. (Masese 8:13) Ezala tokutani na makambo nini na bomoi na biso, tokoki kaka kokoba kotambola elongo na Yehova. Yango ezali lokumu eleki monene oyo tokoki kozala na yango. Yango wana, tiká ete tósala nyonso oyo tokoki mpo na kokoba kozala na bopɔlɔ mpe kotambola elongo na Yehova libela na libela.