Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2017

Zwáká na motuya mingi bonsomi na yo ya kopona

Zwáká na motuya mingi bonsomi na yo ya kopona

“Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.”2 BAKORINTI 3:17.

NZEMBO: 62, 65

1, 2. (a) Makanisi nini bato bazalaka na yango mpo na bonsomi ya kopona? (b) Biblia eteyaka biso nini mpo na bonsomi na biso ya kopona? (c) Mituna nini tokotalela?

LIBOSO ya kozwa ekateli moko, mwasi moko alobaki na moninga na ye boye: “Kotinda ngai nakanisa te; yebisá ngai kaka oyo nasengeli kosala. Ezali pɛtɛɛ ndenge wana.” Mwasi wana alingaki báyebisa ye oyo asengeli kosala, na esika ete asalela bonsomi na ye ya kopona, likabo ya motuya oyo euti epai ya Mozalisi. Bongo yo? Osepelaka kozwa bikateli yo moko, to olingaka ete basusu bázwa bikateli na esika na yo? Ndenge nini otalelaka bonsomi na yo ya kopona?

2 Bato bazali na makanisi ndenge na ndenge mpo na bonsomi ya kopona. Basusu balobaka ete bonsomi ya kopona ezalaka te, mpo Nzambe abongisá liboso makambo nyonso oyo ekómelaka biso. Basusu balobaka ete tokoki kozala na bonsomi ya kopona kaka soki tozali na bonsomi na makambo nyonso. Nzokande, Biblia eteyaka ete tokelamá na likoki mpe na bonsomi ya kopona biso moko oyo tolingi. (Tángá Yosua 24:15.) Biblia epesi mpe biso biyano na mituna oyo: Bonsomi na biso ya kopona ezali na bandelo? Ndenge nini tokoki kosalela bonsomi na biso ya kopona  mpo na kozwa bikateli? Ndenge nini bikateli na biso emonisaka ete tolingaka Yehova mingi? Ndenge nini tokoki komonisa ete tomemyaka bikateli ya basusu?

NDAKISA YA YEHOVA MPE YA YESU EKOKI KOTEYA BISO NINI?

3. Ndenge nini Yehova asalelaka bonsomi na ye na makambo nyonso?

3 Yehova azali na bonsomi na makambo nyonso, mpe tokoki kozwa liteya na lolenge oyo asalelaka bonsomi na ye. Na ndakisa, Yehova aponaki Yisraele mpo ezala ekólo na ye, “eloko na ye moko.” (Kolimbola Mibeko 7:6-8) Aponaki ekólo wana mpamba te. Yehova alingaki kokokisa elaka oyo apesaki moninga na ye Abrahama. (Ebandeli 22:15-18) Longola yango, Yehova amonisaka ntango nyonso bolingo mpe bosembo ntango azali kosalela bonsomi na ye. Tokoki komona yango na ndenge oyo apesaki Bayisraele disiplini ntango baboyaki kotosa ye. Ntango bayokaki mpenza mawa mpo na makambo oyo basalaki, Yehova amonisaki ete alingaka bango mpe ayokelaki bango mawa. Alobaki boye: “Nakosilisa maladi na bango ya kozanga bosembo. Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli.” (Hosea 14:4) Yehova azali ndakisa malamu mpo na biso na ndenge asalelaka bonsomi na ye mpo na kosalisa basusu!

4, 5. (a) Nani bapesaki bonsomi ya kopona libosoliboso, mpe ndenge nini asalelaki yango? (b) Motuna nini mokomoko na biso asengeli komituna?

4 Yehova amonaki malamu asala baanzelu mpe bato na bonsomi ya kopona. Ekelamu ya liboso ya Yehova ezalaki Yesu. Akelamaki na elilingi ya Nzambe mpe azalaki na bonsomi ya kopona. (Bakolose 1:15) Ndenge nini Yesu asalelaki bonsomi na ye ya kopona? Liboso ete aya awa na mabele, Yesu aponaki kotikala sembo epai ya Nzambe, kasi te kolanda Satana na botomboki na ye. Ntango Yesu ayaki awa na mabele, atɛmɛlaki Satana ntango amekaki ye. (Matai 4:10) Na nsima, na butu liboso akufa, Yesu ayebisaki Tata na ye ete alingi kosala mokano na ye. Alobaki: “Tata, soki olingi, longolelá ngai kɔpɔ oyo. Nzokande, ezala mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:42) Tozali mpenza na likoki ya komekola Yesu mpe kosalela bonsomi na biso ya kopona mpo na kokumisa Yehova mpe kosala mokano na ye?

5 Ya solo, tokoki komekola Yesu mpo biso mpe tosalemá na elilingi ya Yehova. (Ebandeli 1:26) Kasi, biso tozali te na bonsomi na makambo nyonso ndenge Yehova azali na yango. Liloba ya Nzambe elimboli ete Yehova atyá bandelo na bonsomi na biso bato mpe alingaka ete tótosa bandelo yango. Na ndakisa, na kati ya libota, basi basengeli kotosa mibali na bango mpe bana basengeli kotosa baboti na bango. (Baefese 5:22; 6:1) Ndenge nini bandelo yango etindaka biso tósalela bonsomi na biso ya kopona? Eyano na motuna wana ekokata soki tokozwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya.

LOLENGE MALAMU TO MABE YA KOSALELA BONSOMI YA KOPONA

6. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo bonsomi na biso esengeli kozala na bandelo.

6 Bonsomi oyo ezali na bandelo ekoki kozala bonsomi ya solosolo? Ɛɛ, ekoki kozala. Mpo na nini? Mpo bandelo yango ekoki kobatela biso. Tózwa ndakisa: Kanisá ete tozali kokende na engumba moko ya mosika na motuka oyo biso moko tozali kotambwisa. Kasi ezali na mobeko ya nzela ata moko te, mpe moto na moto akoki kopona vitɛsi oyo alingi kotambwisa motuka mpe ngámbo oyo alingi kokende. Okanisi ete okosala mobembo kozanga likama na nzela ya ndenge wana? Soki moke te. Bandelo ezali na ntina mingi mpo biso nyonso tózwa matomba na bonsomi ya  solosolo. Tótalela mwa bandakisa ya Biblia oyo emonisi ndenge oyo bandelo oyo Yehova atyá ekoki kopesa biso matomba.

7. (a) Bokeseni nini ezalaki kati na Adama mpe banyama? (b) Limbolá lolenge moko oyo Adama asalelaki bonsomi na ye ya kopona.

7 Ntango Yehova akelaki Adama, mobali ya liboso, apesaki ye mpe bonsomi ya kopona, likabo oyo apesaki mpe baanzelu. Kasi Nzambe apesaki banyama bonsomi ya kopona te. Ndenge nini Adama asalelaki bonsomi na ye ya kopona na lolenge ya malamu? Adama asepelaki mingi na mokumba ya kopesa banyama nkombo. Nzambe “abandaki koya na yango epai ya moto mpo na komona ndenge akobenga mokomoko na yango.” Adama azalaki kotala malamu nyama mokomoko, na nsima azalaki kopesa yango nkombo oyo ebongi na yango. Yehova abongolaki te nkombo oyo Adama apesaki nyama mokomoko. “Ndenge oyo moto azalaki kobenga yango, elingi koloba molimo mokomoko oyo ezali na bomoi, ezalaki bongo nkombo na yango.”Ebandeli 2:19.

8. (a) Ndenge nini Adama asalelaki bonsomi na ye ya kopona na lolenge ya mabe? (b) Yango ebimisaki nini?

8 Yehova apesaki Adama mokumba ya kokómisa mabele paradiso ntango ayebisaki ye: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.” (Ebandeli 1:28) Kasi Adama alyaki mbuma oyo bapekisaki ye; na ndenge yango, atosaki te ndelo oyo Yehova atyaki. Soki bato bazali konyokwama banda ebele ya bambula, ezali mpo Adama asalelaki bonsomi na ye ya kopona na ndenge ya mabe. (Baroma 5:12) Tóbosanaka te mpasi nyonso oyo ebimá mpo na ekateli oyo Adama azwaki. Yango ekotinda biso tósalelaka bonsomi na biso ya kopona na ndenge ya malamu mpe tóndima bandelo oyo Yehova atyelá biso.

9. (a) Yehova apesaki bato ya ekólo na ye Yisraele likoki ya kopona nini? (b) Balakaki kosala nini?

9 Bato nyonso basangolá kozanga kokoka mpe liwa epai ya Adama ná Eva. Atako bongo, tozali kaka na likoki ya kosalela bonsomi na biso ya kopona. Tokoki komona yango na ndenge oyo Nzambe azalaki kosalela ekólo ya Yisraele makambo. Yehova apesaki bango likoki ya kopona kokóma eloko na ye moko to te. (Kobima 19:3-6) Bato ya ekólo yango baponaki kokóma bato ya Nzambe mpe bandimaki kotosa bandelo oyo Nzambe atyaki. Balobaki boye: “Nyonso oyo Yehova alobi tondimi kosala yango.” (Kobima 19:8) Likambo ya mawa, na nsima baboyaki kotosa elaka oyo bapesaki Yehova. Tokoki kozwa liteya ya ntina mingi na ndakisa na bango. Tosengeli ntango nyonso kozwaka na motuya mingi bonsomi na biso ya kopona mpe kokoba kokangama na Yehova mpe kotosa mibeko na ye.1 Bakorinti 10:11.

10. Bandakisa nini ezali na Baebre 11 oyo emonisi ete bato ya kozanga kokoka bakoki kosalela bansomi na bango ya kopona mpo na kokumisa Nzambe? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Na Baebre 11, tozali kokuta bankombo ya mibali mpe basi ya sembo 16 oyo baponaki kotosa bandelo oyo Yehova atyaki. Yango wana, bazwaki mapamboli mingi mpe bazali na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Na ndakisa, Noa azalaki na kondima makasi mpe aponaki kotosa malako ya Nzambe ya kotonga masuwa mpo na kobikisa libota na ye mpe mabota oyo esengelaki koya na nsima. (Baebre 11:7) Abrahama Sara batosaki Nzambe na motema moko mpe bandimaki kokende na mokili oyo alakaki kopesa bango. Atako “bakokaki kozonga” na engumba ya Ure, batyaki makanisi na bango nyonso na bilaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya. Biblia elobi ete bazalaki na “mposa ya esika moko oyo eleki malamu.” (Baebre 11:8, 13, 15, 16) Moize asundolaki bomɛngo ya Ezipito mpe “aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na  esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” (Baebre 11:24-26) Tómekola kondima ya mibali mpe basi wana, tósepela na bonsomi na biso ya kopona, mpe tósalela yango mpo na kosala mokano ya Nzambe.

11. (a) Wapi lipamboli monene oyo bonsomi na biso ya kopona epesaka? (b) Nini etindaka yo osalela bonsomi na yo ya kopona na lolenge ya malamu?

11 Ekoki kozala pɛtɛɛ kosɛnga moto mosusu azwa ekateli na esika na biso, kasi soki tosali bongo tokozanga lipamboli moko ya monene: bonsomi ya kopona. Elimboli nini? Biblia elimboli yango na Kolimbola Mibeko 30:19, 20. (Tángá.) Na vɛrsɛ 19, tozali kotánga ete Nzambe apesaki Bayisraele likoki ya kopona. Na vɛrsɛ 20, tomoni ete Yehova apesaki bango libaku ya komonisa soki balingaka ye mingi. Biso mpe tokoki kopona kosambela Yehova. Tozali mpe na libaku monene ya kosalela bonsomi na biso ya kopona mpo na kokumisa Yehova mpe komonisa soki tolingaka ye mingi!

KOSALELA TE BONSOMI NA YO YA KOPONA NA LOLENGE YA MABE

12. Eloko nini tosengeli kosala soki moke te na bonsomi na biso ya kopona?

12 Kanisá ete opesi moninga na yo likabo moko ya motuya mingi. Okoyoka ndenge nini soki abwaki yango na fulu to, oyo eleki mabe, asaleli yango mpo na kosala moto mabe? Ekosala yo mpasi na motema. Yehova apesá biso bonsomi ya kopona. Na yango, ayokaka mpasi mingi ntango amonaka bato bazali kosalela bonsomi na bango na lolenge ya mabe, kozwa bikateli ya mabe, to kosala basusu mabe. Biblia elobi ete na “mikolo ya nsuka,” bato bakozala bato oyo “bazangi botɔndi.” (2 Timote 3:1, 2) Na yango, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na likabo ya motuya mingi oyo Yehova apesá biso? Ndenge nini tokoki koboya kosalela yango na lolenge ya mabe?

13. Wapi lolenge moko oyo tokoki koboya kosalela bonsomi na biso bakristo na ndenge ya mabe?

13 Biso nyonso tozalaka na bonsomi ya kopona baninga na biso, bilamba na biso, ndenge na biso ya kobongisa nzoto, mpe lolenge ya kominanola. Nzokande, tokoki kosalela bonsomi na biso lokola libaku ya kopona kosala makambo oyo Nzambe andimaka te to kolanda midɛlɛ ya bato ya mokili oyo. (Tángá 1 Petro 2:16.) Na esika ya kosalela bonsomi na biso lokola libaku ya kosala makambo ya mabe, tosengeli nde kosalela yango lokola libaku ya kosala “makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”1 Bakorinti 10:31; Bagalatia 5:13.

14. Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema ntango tozali kosalela bonsomi na biso ya kopona?

 14 Yehova alobaki: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.” (Yisaya 48:17) Mpo tózwa bikateli ya malamu, tosengeli kotyela Yehova motema mpe kondima bandelo oyo atyá. Tondimaka na komikitisa nyonso ete “nzela ya moto ya mabele ezali ya ye te. Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Ezala Adama to Bayisraele oyo batikalaki sembo te baboyaki kolanda bandelo oyo Yehova atyelaki bango mpe bamityelaki motema. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na bango ya mabe? Na esika ete tómityela motema, tosengeli nde ‘kotyela Yehova motema na biso mobimba.’Masese 3:5.

TOMEMYAKA BONSOMI YA KOPONA YA BASUSU

15. Liteya nini tozwi na etinda oyo ezali na Bagalatia 6:5?

15 Tosengeli mpe komemyaka bonsomi oyo basusu bazali na yango ya kozwa bikateli na bango moko na bomoi. Mpo na nini? Mpo biso nyonso tozali na bonsomi ya kopona, bakristo mibale bakoki ntango nyonso te kozwa ekateli moko. Yango esangisi mpe bikateli oyo etali etamboli na biso mpe losambo na biso. Tóbosana te etinda oyo ezali na Bagalatia 6:5. (Tángá.) Soki tozali koyeba ete mokristo nyonso azali na mokumba ya kozwa bikateli ye moko, tokomemya bonsomi oyo basusu bazali na yango ya kosalela bonsomi na bango ya kopona.

Tótinda basusu te na makasi bázwa bikateli oyo biso tozwi (Talá paragrafe 15)

16, 17. (a) Ndenge nini likambo etali bonsomi ya kopona ebimisaki mokakatano na Korinti? (b) Ndenge nini ntoma Paulo asalisaki bakristo yango? (c) Yango eteyi biso nini?

16 Tótalela ndakisa moko ya Biblia oyo emonisi ntina oyo tosengeli komemya bonsomi ya kopona ya bandeko. Bakristo ya Korinti bawelanaki na likambo etali kolya mosuni ya nyama oyo mbala mosusu epesamaki mbeka na bikeko, na nsima etɛkamaki na zando oyo bazalaki kotɛka misuni. Lisosoli ya bandeko mosusu epekisaki bango te kolya mosuni yango mpo bayebaki ete ekeko ezali eloko te. Kasi, bato mosusu oyo bazalaki kosambela bikeko liboso ete bákóma bakristo bamonaki ete kolya yango ekozala lokola kosambela yango. (1 Bakorinti 8:4, 7) Yango ezalaki likambo moko monene oyo ekokaki kokabola lisangá. Ndenge nini ntoma Paulo asalisaki bakristo yango básilisa likambo wana ya monene?

17 Ya liboso, ntoma Paulo akundwelaki bango nyonso ete bilei ekokaki te kokómisa makasi boninga na bango na Nzambe. (1 Bakorinti 8:8) Na nsima, akebisaki bango ete bátika te “lotomo” na bango ya kopona ezokisa lisosoli ya baoyo bazali na bolɛmbu. (1 Bakorinti 8:9) Lisusu, ayebisaki baoyo lisosoli na bango ezokaka mpambampamba ete básambisa te baoyo bazalaki kolya misuni ya ndenge wana. (1 Bakorinti 10:25, 29, 30) Yango wana, na makambo ya ntina oyo etali losambo, mokristo mokomoko asengelaki kozwa ekateli ye moko. Biso mpe tosengeli komemya bonsomi ya bandeko na biso ya kozwa ekateli bango moko ata na makambo ya mikemike.1 Bakorinti 10:32, 33.

18. Ndenge nini okomonisa ete ozwaka na motuya mingi bonsomi na yo ya kopona?

18 Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, oyo epesi biso bonsomi ya solosolo. (2 Bakorinti 3:17) Tozwaka likabo yango na motuya mingi mpamba te esalisaka biso tózwa bikateli oyo emonisaka ete tolingaka Yehova mingi. Na yango, tókoba kozwa bikateli oyo ekopesa ye lokumu, tótosaka lotomo ya basusu ya kopona ndenge oyo bakosalela likabo wana ya motuya mingi.